LITEYA 53
Kokitisa mitema ya bato mpe kopesa bango makasi
LISANGÁ ya boklisto esengeli kokitisaka mitema ya basaleli ya Nzambe, ata soki bazali kokutana na mikakatano nini. Yango wana, basɛngaka mpenza na bankulutu ete bákebaka mpo masolo mpe toli na bango ezala ntango nyonso oyo ekokitisa bato mitema. Ebongi bankulutu bázala “lokola esika ya komibomba na ntango ya mopɛpɛ mpe esika ya komibatela na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi; lokola mongala ya mai na esika ekauki, mpe lokola elili ya libanga monene na mabele oyo ebimisaka lisusu matiti te.”—Yis. 32:2, NW.
Soki ozali nkulutu, masolo na yo ezalaka mpenza lokola mai ya mpiɔ mpe ebɔndisaka bato? Ekitisaka mpenza mitema ya baoyo bazali kosala nyonso mpo na kosalela Yehova na bosembo? Epesaka bango makasi ya kokangama na kosala mokano ya Nzambe atako bato bazali koboya bango to kotɛmɛla bango? Bongo soki bato mosusu oyo bazali koyoka yo bazali lisusu kosepela na mokili te mpo mikakatano eleki bango, to mpe bazali konyokwama mpo bazangi mbongo, to bazali kobunda na maladi moko ya makasi oyo nkisi ya kosilisa yango ezali te? Na ntango wana, yo nde okoki ‘kopesa bandeko na yo makasi na maloba ya monɔkɔ na yo.’—Yobo 16:5.
Soki bapesi yo lisolo, moná yango lokola libaku oyo ozwi mpo na kosalisa bandeko na yo bázwa elikya mpe makasi epai ya Yehova mpe na bibongiseli nyonso oyo ye asaleli biso.—Lom. 15:13; Ef. 6:10.
Yebisá bango lisusu makambo oyo Yehova asalá. Lolenge malamu ya kopesa bato makasi ezali ya kobɛtɛla bango masolo ya kala oyo ezali kolakisa ndenge Yehova asalisaki bato na ye na ntango ya mpasi.—Lom. 15:4.
Yehova ayebisaki Moize alendisa Yosua ‘azala na mpiko’ mpe ‘azala makasi’ liboso ete Yisalaele ekɔta na Mokili ya Ndaka oyo na ntango wana, ezalaki na mabɔkɔ ya bikólo oyo bazalaki banguna na bango. Ndenge nini Moize asalaki yango? Na miso ya Yosua, Moize abandaki kozongela liboso ya ekólo mobimba makambo oyo Yehova asalelaki bango ntango babimaki na Ezipito. (Det. 3:28; 7:18) Moize alobelaki mpe ndenge Yehova asalisaki bango bálonga bato ya Amola. Na nsima, Moize alobaki na Yosua ete: “Zalá na mpiko mpe na makasi.” (Det. 31:1-8, NW) Ntango olingi koyikisa bandeko na yo mpiko, osalisaka bango bákanisa makambo oyo Yehova asalelá bango mpo bázwa makasi?
Lokola bato mosusu bazali na mikakatano makasi, bakómá komituna soki mpenza mokolo mosusu bakomona mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe. Yebisá bango bábosana te ete ata ndenge nini, bilaka ya Yehova ekozanga te kokokisama.—Yos. 23:14.
Na bamboka mosusu, bandeko na biso bazali konyokwama mpo Leta abimisá mibeko oyo ezali kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu. Na bamboka ya ndenge wana, bankulutu ya bolingo bakoki kopesa bandeko na bango makasi soki bazali kobɛtɛla bango masolo ya makambo oyo ekómelaki bantoma ya Yesu Klisto. (Mis. 4:1–5:42) Mpe komonisa polele makambo oyo ezali na mokanda ya Esetele, epai Nzambe asalaki ete makambo ebalukela banguna, ekoki kopesa bandeko mpiko mpenza.
Ezali na bato mosusu oyo bayaka na makita ya lisangá, kasi bakolaka te. Mbala mosusu, bakanisaka ete Nzambe akoki ata moke te kolimbisa bango mpo basalá mabe moko monene na ntango ya kala. Soki ezali bongo, okoki kobɛtɛla bango lisolo ya Mokonzi Manase, ndenge Yehova alimbisaki ye. (2 Nta. 33:1-16) To mpe okoki kobɛta lisolo ya bato ya Kolinti oyo babongisaki bizaleli na bango, bakómaki baklisto, mpe Nzambe abengaki bango bato malamu.—1 Kol. 6:9-11.
Ezali nde na bato mosusu oyo bazali kokanisa ete mikakatano oyo bazali kozwa elakisi ete Nzambe azali lisusu kosepela na bango te? Okoki kosalisa bango bákanisa makambo oyo ekómelaki Yobo mpe ndenge ayaki kozwa ebele ya mapamboli mpo aboyaki kotika bosembo na ye epai ya Yehova. (Yobo 1:1-22; 10:1; 42:12, 13; Nz. 34:19) Bato oyo bayaki kotala Yobo, oyo balobaki ete bayei kobɔndisa ye, bakoselaki ye makambo ete mpasi na ye euti na lisumu moko oyo ye asalaki. (Yobo 4:7, 8; 8:5, 6) Kasi Paulo na Balanabasi basalaki bongo te; mpo na kopesa bayekoli makasi mpe ‘kolendisa bango bátikala na kati ya kondima,’ balobaki na bango nde ete: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” (Mis. 14:21, 22) Ndenge moko mpe lelo oyo, okoki kopesa makasi na baoyo bazali konyokwama soki omonisi bango ete kokanga motema na kati ya mpasi ezali likambo oyo baklisto nyonso basengeli kosala mpe ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe.—Mas. 27:11; Mat. 24:13; Lom. 5:3, 4; 2 Tim. 3:12.
Salisá bato oyo bazali koyoka yo bákanisa mwa moke bilaka ya Yehova oyo ekokisamá na bomoi na bango moko. Soki osalisi bango bákanisa boye, bakoki koyeba lisusu eloko nini Yehova asalá mpo na bango mpenza, ndenge alakaki. Na Nzembo 32:8, totángi boye: “Nakopesa yo mayele mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kotambola. Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” Soki osalisi bato oyo bazali koyoka yo bákanisa ndenge Yehova azali kotambwisa bango to ndenge azali kopesa bango makasi tii sikoyo, bakokoka komona bango moko ete azali kobatela bango malamu mpe akosalisa bango ata na mikakatano ya ndenge nini oyo bazali kobunda na yango sikoyo.—Yis. 41:10, 13; 1 Pet. 5:7.
Monisá ete osepelaka na oyo Nzambe azali kosala sikoyo. Soki olingi kokitisa mitema ya bandeko na yo, monisá bango makambo oyo Yehova azali kosala sikoyo. Soki olobeli makambo yango na ndenge oyo bakomona ete ozali kosepela mpenza na yango, bango mpe bakosepela na mitema na bango.
Monisá ndenge nini Yehova azali kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Alakisaka biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu. (Yis. 30:21) Azali koyebisa biso ntina oyo kobomana ezali, na makambo ya nko, bobola, maladi, mpe liwa, mpe ayebisi biso ndenge nini akosukisa makambo nyonso wana. Apesi biso bandeko ebele oyo balingaka biso. Apesi biso likabo moko kitoko: libondeli. Apesi biso libaku malamu ya kozala Batatoli na ye. Afungoli biso miso mpo tóyeba ete Klisto afandi na kiti na ye ya bokonzi kuna na likoló mpe mikolo ya nsuka ya mokili oyo ezali kokende na nsuka na yango.—Emon. 12:1-12.
Bakisa likoló ya makambo wana ya malamu, makita na biso ya lisangá, mayangani na biso ya mike mpe ya minene. Soki ozali kolobela bibongiseli wana na ndenge oyo ekolakisa ete ozali na botɔndi mingi mpo na yango, bamosusu bakokangama makasi lisusu na mokano na bango ya koboya kozangisaka makita mpambampamba, esika tokendaka kokutana na bandeko na biso.—Ebe. 10:23-25.
Masolo ya makambo oyo ezali komonisa mapamboli oyo Yehova azali kosopela biso na mosala ya kosakola ekoki mpe kopesa makasi. Na ekeke ya liboso, ntango Paulo na Balanabasi bazalaki kokende mobembo na Yelusaleme, bapesaki “esengo monene epai ya bandeko nyonso” na ndenge bazalaki koyebisa bango likambo mokomoko ya bato ya bikólo mosusu, ndenge bakómaki bandimi. (Mis. 15:3) Yo mpe okoki kopesa bandeko esengo mingi soki obɛtɛli bango masolo ya makambo oyo okutani na yango, oyo ezali kolendisa.
Bato bakozwa makasi mingi lisusu soki omonisi bango ete mosala oyo bazali kosala ezali na motuya. Pesá bango longonya mpo na oyo bazali kosala na mosala ya kosakola. Pesá longonya na baoyo bazali kokangama na mosala ya Nzambe, atako bazali kokoka lisusu te kosala mingi mpo bakómi mibange to mpo na maladi. Yebisá bango ete Yehova abosani te bolingo na bango mpo na nkombo na ye. (Ebe. 6:10) Kondima oyo moto akómaka na yango nsima ya komekama makasi ezali eloko ya ntina mingi. (1 Pet. 1:6, 7) Esengeli koyebisa bandeko bábosana likambo wana te.
Lobelá na esengo mpenza makambo oyo tozali kozela na mikolo ekoya. Makambo oyo Nzambe alaki biso, oyo elimo na ye esalisaki bato bákoma, epesaka makasi na baoyo balingaka Nzambe. Ntango mosusu, mingi na kati ya baoyo bazali kolanda lisolo na yo bayokayoká makambo yango mbala mingi. Kasi soki bamoni ete ozali kolobela bilaka yango na esengo mpenza, ekozala lokola bazali komona na miso na bango mpenza kokokisama ya makambo yango, bakotya motema ete ekokokisama mpenza, mpe mitema na bango ekozala na botɔndi mingi. Soki osaleli mateya oyo ozwi na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okokoka kosala nyonso wana.
Yehova ye moko azali moto ya libosoliboso oyo akitisaka bato na ye motema mpe apesaka bango makasi. Atako bongo, yo mpe okoki kosala na ye elongo mpo na kopesa bato bolamu wana. Yango wana, ntango ozali kosala lisolo na lisangá, moná yango lokola libaku oyo ozwi mpo na kopesa bandeko makasi.