LITEYA 52
Kolendisa bato mpenza malamu
BAKLISTO oyo bazali bankulutu basengeli koyeba “kolendisa na mateya oyo epesaka litomba.” (Tito 1:9) Na bantango mosusu, kolendisa wana esengeli kosalema na ntango makambo ya minene ebimi. Kopesa toli ndenge Makomami esɛngi ezali likambo ya ntina mingi. Yango wana, bankulutu basengeli kolanda toli oyo: “Kobá komipesa na . . . kolendisa.” (1 Tim. 4:13) Lisolo oyo ezali koteya libosoliboso bankulutu to bandeko oyo bazali koluka kokóma bankulutu; kasi na bantango mosusu, baboti mpe bazalaka na mposa ya kolendisa bana na bango mpe bandeko oyo bayekolaka na bato Biblia mpe bazalaka na mposa ya kolendisa bayekoli na bango. Soki mposa wana emonani, bango mpe basengeli kolanda malako oyo.
Makambo oyo esɛngaka kolendisa bato. Mpo na koyeba ntango nini okoki kolendisa moto, talelá masolo ya Biblia, epai okokuta makambo oyo esɛngaki ete bandeko bálendisama. Ntoma Petelo alendisaki bankulutu bákebaka na mokumba na bango ya babateli ya etonga ya Nzambe. (1 Pet. 5:1, 2) Paulo alobaki na Tito alendisa bilenge mibali “bázala bato ya makanisi malamu.” (Tito 2:6) Paulo alendisaki baoyo bazalaki baklisto lokola ye ete ‘bálobaka na boyokani’ mpe báboya kozala esika moko na bato oyo bakɔtisaka bokabwani na kati ya bandeko. (1 Kol. 1:10; Lom. 16:17; Filp. 4:2) Atako Paulo akumisaki bandeko ya lisangá ya Tesaloniki mpo na makambo ya malamu oyo bazalaki kosala, alendisaki bango mpe básalela malako oyo bazwaki malamumalamu lisusu. (1 Tes. 4:1, 10) Petelo abondelaki baoyo bazalaki baklisto lokola ye ete ‘báboya bamposa ya mosuni.’ (1 Pet. 2:11) Yuda alendisaki bandeko na ye ‘bábunda etumba makasi mpo na kondima,’ mpo na kokima masɛnginya ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe, oyo bazalaki kosepela na etamboli ya nsɔni. (Yuda 3, 4) Basɛngaki na baklisto nyonso bálendisanaka mpo nguya ya lisumu oyo ekosaka bato ekoka te kokómisa moko na bango motema makasi. (Ebe. 3:13) Petelo alendisaki Bayuda oyo bandimelaki naino Klisto te ete: “Bómibikisa na libota oyo etɛngamá.”—Mis. 2:40.
Esengeli kozala na bizaleli nini mpo na kolendisa bato na makambo nyonso wana? Ndenge nini moto oyo azali kolendisa akoki kotinda bato básalela noki likambo oyo alendisi bango kozanga kozokisa bango to kopusa bango na makasi?
“Na bolingo.” Soki ozali kolendisa bato “na bolingo” te, bakoki komona lokola ozali na makambo makasi. (Flmo. 9) Toboyi te, ntango likambo ezali kosɛnga esalema nokinoki, moto oyo azali kosala lisolo asengeli koloba na ndenge oyo bato bakoyoka ete ezali likambo ya kozelisa te. Mpo soki asaleli elobeli oyo elalá, bato bakoki kokanisa lokola azali kobondela bango. Elobeli na ye esengeli kozala ya lisɛki te mpe esengeli komonisa polele ete azali komitya na esika ya bato yango. Soki olendisi bato na bolingo, bakosepela mingi kosalela likambo oyo otindi bango básala. Talá ndenge Paulo alobaki mpo na ye moko mpe baninga na ye ya mosala epai ya bato ya Tesaloniki: “Boyebi malamu ete, ndenge tata asalaka epai ya bana na ye, tokobaki kolendisa mokomoko na bino.” (1 Tes. 2:11) Bankulutu wana babondelaki bandeko yango na bolingo mpenza. Tiká ete maloba oyo yo okobimisa emonisa mpenza ete ozali kotalela bamposa ya bato oyo bazali koyoka yo.
Kebaká na maloba na yo. Kosilikisa te bato oyo ozali kosala makasi mpo na kolendisa bango básala malamu. Atako bongo, kobanga te koyebisa bango “mokano mobimba ya Nzambe.” (Mis. 20:27) Bato oyo bazali na motema ya botɔndi bakomona mabe te mpe bakotika kolinga yo te mpo olobi na bango na boboto mpenza ete básala oyo ezali malamu.—Nz. 141:5.
Mbala mingi, liboso ya kolendisa moto, ebongaka naino kopesa ye longonya ya solosolo. Kanisá makambo ya malamu oyo bandeko na yo bazali kosala, makambo oyo Yehova azali kosepela na yango mingi, lokola kondima oyo bazali kolakisa na mosala ya kosakola, bolingo oyo ezali kotinda bango bámipesa mobimba, mpe ezaleli na bango ya kokanga motema ntango bazali kokutana na makambo ya mpasi. (1 Tes. 1:2-8; 2 Tes. 1:3-5) Soki okanisi makambo wana nyonso, bandeko na yo bakomona ete oyebi motuya na bango mpe ozali komitya na esika na bango, mpe bakolanda malamu likambo oyo okolendisa bango básala.
“Na motema molai mpenza.” Ntango ozali kolendisa bato, ebongi kosala yango “na motema molai mpenza.” (2 Tim. 4:2) Motema molai esɛngi nini lisusu? Kozala na motema molai esɛngi mpe kokanga motema na mabe to na matumoli. Moto ya motema molai atyaka ntango nyonso motema ete bato oyo bazali koyoka ye bakosalela makambo oyo ye azali koloba. Kolendisa bato na elimo ya ndenge wana ezali malamu mpo bakokanisa te ete ozali kozwa bango lokola bato oyo bakokoka te kotika kosala mabe. Soki otii motema ete bandeko na yo ya mibali mpe ya basi bazali na bolingo ya kosalela Yehova na ndenge oyo ekoki na bango, okolamusa mposa na bango ya kosala oyo ezali malamu.—Ebe. 6:9.
“Na mateya oyo epesaka litomba.” Ndenge nini nkulutu akoki kolendisa “na mateya oyo epesaka litomba”? Asengeli ‘kokangama makasi na liloba ya sembo na oyo etali mayele na ye ya koteya.’ (Tito 1:9) Na esika ya kopesa makanisi na yo moko, salelá nde Liloba ya Nzambe oyo ezali na nguya ya kolendisa. Luká Biblia elakisa yo nini osengeli koloba. Tángá matomba oyo bato bazwaka soki bazali kosalela mateya ya Biblia na likambo oyo ozali kolobela. Lobelá malamumalamu bampasi oyo moto akoki kozwa sikoyo mpe oyo akoki kozwa na mikolo oyo ekoya soki aboyi kotosa Liloba ya Nzambe na likambo oyo ozali kolobela mpe tángá bampasi yango mpo na kondimisa bango básala oyo ezali malamu.
Salá nyonso olakisa polelepolele bato oyo bazali koyoka yo eloko nini basengeli kosala mpe ndenge nini bakosala yango. Esengeli komonana polele ete makanisi oyo ozali kopesa euti mpenza na Makomami. Soki, na likambo yango, Makomami ezali kopesa mwa bonsomi na oyo etali ekateli ya kozwa, lakisá esika nini bonsomi wana esuki. Mpe, na nsuka ya lisolo na yo, lobá maloba ya kolendisa oyo ekotinda bango bázwa mokano makasi ya kosala oyo ezali malamu.
Na “elobeli ya polele.” Mpo na kolendisa bato malamu mpenza, ebongi kozala na “elobeli ya polele . . . na kati ya kondima.” (1 Tim. 3:13) Nini epesaka moto nzela alobaka polelepolele? Ezali soki ye moko azali “ndakisa . . . ya malamu” na likambo oyo azali kolendisa bandeko básala. (Tito 2:6, 7; 1 Pet. 5:3) Soki ye moko asalelaka likambo yango, baoyo ye azali kolendisa bakoloba te ete ye azali kotinda bato nzokande ye moko asalelaka yango te. Bakomona ye ndakisa oyo bakoki kolanda, ndenge ye mpe azali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya Klisto.—1 Kol. 11:1; Filp. 3:17.
Bato bakoki kozwa bolamu mingi soki ozali kolendisa bango na mateya oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe na bolingo. Bato oyo bazali na mokumba ya kolendisa basusu, basengeli kosala makasi mpo básala yango na ndenge ya malamu mpenza.—Lom. 12:8.