LITEYA 3
Ebengeli ya maloba
BAKLISTO nyonso te nde batángá kelasi mingi. Kutu bato balobaki ete Petelo na Yoane bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Atako bongo, ezali na ntina mingi tókeba ete tóbebisaka ebengeli ya maloba te, mpamba te yango ekoki kosala ete bato bátya likebi te na solo ya Biblia oyo tozali kolakisa bango.
Makambo oyo osengeli kotalela. Lokota na lokota ezalaka na malako na yango mpo na ndenge ya kobenga maloba. Nkota mingi ekomamaka na balɛtrɛ ya alfabɛ. Longola alfabɛ oyo tosalelaka (alfabɛ ya Latin), ezali na baalfabɛ mosusu lokola, alfabɛ ya Arabe, ya Cyrille, ya Grɛki mpe ya Liebele. Na lokota ya Chinois, na esika ete básalela alfabɛ, bango basalelaka bilembo oyo ekoki kozala na biteni ebele. Mbala mingi, bilembo yango emonisaka maloba to biteni ya maloba. Atako lokota ya Japonais mpe ya Coréen esalelaka bilembo mosusu ya lokota ya Chinois, mbala mosusu bilembo yango ebengamaka ndenge moko te mpe ezalaka na ndimbola moko te.
Na nkota oyo esalelaka alfabɛ, kobenga maloba na ndenge esengeli esɛngi mpe kotánga lɛtrɛ to ekango mokomoko na ndenge lokota esɛngi. Yango ekozala mpenza mpasi te soki lokota yango ezali na malako ya mindɔndɔmindɔndɔ te oyo osengeli kolanda, lokola na lokota ya Grɛki, Espagnol mpe Zulu. Nzokande, lokota moko ekoki kozwa maloba oyo euti na nkota ya bapaya mpe yango ekosɛnga kobenga maloba yango ndenge babengaka yango na mboka oyo maloba wana eutaki. Yango ekosala ete, lɛtrɛ moko to balɛtrɛ mingi oyo ekangani esika moko ezala na ndenge ebele ya kobenga yango to mpe mbala mosusu ekotángama te. Mbala mosusu ekosɛnga ete okanga na motó ndenge nyonso ya kotánga maloba yango oyo ekeseni na malako ya lokota na bino mpe na nsima, osalelaka yango mbala na mbala ntango ozali koloba. Na lokota ya Chinois, mpo obenga maloba na ndenge esengeli, osengeli kokanga bankóto ya bilembo na motó. Na nkota mosusu, soki otomboli to okitisi mongongo mabe, liloba ekómi na ndimbola mosusu. Soki otii likebi na yango te, okoki koyebisa bato likambo oyo olingaki koloba te.
Soki na lokota moko, osengeli kokangisa bikango mingi mpo na kosala liloba moko, boye ezali na ntina mingi ete omatisa mongongo na ekango oyo ebongi. Nkota mingi oyo esalelaka maloba ya ndenge wana, ezali na malako na yango mpo na ndenge ya kobenga maloba. Na maloba oyo okoki kosalela malako yango te, batyelaka yango elembo moko ya mongongo. Yango ekosalisa yo otánga maloba ndenge esengeli mpe kozanga mpasi. Nzokande, ezalaka mpasi mingi koleka soki lokota na bino ezali na malako ya sikisiki te mpo na lolenge ya kobenga maloba. Yango ekosɛnga mpenza ete okanga maloba mingi na motó mpo okoka kobenga yango na ndenge esengeli.
Na nkota mosusu, bilembo ya kobongola mongongo ezali na ntina mingi mpe esengeli kotalela yango. Yango ezali bilembo oyo ezali likoló to na nse ya balɛtrɛ mosusu, na ndakisa: á, è, é, ô, ñ, ō, ŭ, č, ö, ç, ɛ́, ɔ́, ú. Ntango mosusu bakomaka bilembo yango, to moto oyo azali kotánga, ye moko asengeli koyeba esika akomatisa mongongo, na kotalela maloba oyo ezali pembenipembeni ya liloba yango. Soki ezali bongo, ntango bapesi yo mokumba ya kotánga liboso ya bato mingi, osengeli komibongisa malamu mpenza liboso.
Talá sikoyo makambo oyo osengeli kokeba na yango ntango ozali kobenga maloba. Soki ozali koluka konyata liloba mokomoko koleka ndelo, yango ekoki komonana lokola lolendo, to mpe ozali koluka kolakisa bato ete yo nde oyebi mingi. Ekoki mpe kozala bongo soki ozali kobenga maloba ndenge oyo bato bameseni kobenga yango lisusu te. Yango ekobenda likebi ya bato kaka epai na yo molobi. Epai mosusu, ekozala malamu ete osalela elobeli ya mpambampamba te mpe ebengeli ya balabala te. Makambo yango mosusu tolobelaki yango na liteya “Kobimisa maloba polele.”
Ekólo na ekólo ezalaka na lolenge na yango ya kobenga maloba ya lokota moko, ndenge endimami na bato oyo bafandi wana. Ata na kati ya ekólo moko, esika na esika ekoki kozala na lolenge na yango ya kobenga maloba. Moto oyo auti ekólo mosusu, akoki kozala na lolenge na ye oyo alobaka lokota ya mboka na bino. Badiksionɛrɛ ekoki kolakisa ndenge mingi oyo bato babengaka liloba moko. Soki moto atángi mpenza kelasi mingi te to soki lokota oyo azali koloba ezali ya mboka na ye te, mpo abongisa mpenza lolenge na ye ya kobenga maloba, asengeli kolanda na likebi mpenza ntango bakóló lokota bazali koloba mpe na nsima, asengeli kobenga maloba ndenge bango bazali kobenga yango. Biso Batatoli ya Yehova, tolingi ete na lolenge na biso ya koloba, bato oyo bafandi esika oyo biso tozali kosakola nsango malamu bákumisa nsango yango mpe bákanga ntina na yango kozanga mikakatano.
Ntango ozali kosolola na bato mokolo na mokolo, ekozala malamu mingi osalela maloba oyo omeseni na yango mpenza. Na masolo na yo na bato mokolo na mokolo, okozala mpenza na mikakatano te mpo na kobenga maloba na ndenge esengeli. Nzokande, ntango ozali kotánga na mongongo makasi, okoki kokutana na maloba oyo osalelaka mpenza te na masolo na yo ya mokolo na mokolo. Kutu mbala mingi, Batatoli ya Yehova batángaka na miso ya bato mingi. Totángaka Biblia mpo na bato oyo tozali kopesa bango litatoli. Bandeko mibali mosusu batángaka baparagrafe na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Boyekoli ya Mokanda. Yango wana, ezali na ntina mingi ete tótángaka malamu mpe tóbengaka maloba na ndenge esengeli mpo bato bátya likebi na nsango na biso.
Ozalaka na mokakatano mpo na kotánga maloba mosusu na kati ya Biblia mpe na mikanda mosusu? Na Lingala, soki batii elembo moko likoló ya molelisi (voyelle), yango ekomonisa ete osengeli kotombola mongongo na yo na ekango oyo ezali na molelisi yango. Mbala mingi, ekango oyo ezali na elembo ya kobongola mongongo esalisaka mpo na kokesenisa maloba mibale oyo ekomamaka ndenge moko. Ndenge tomoni yango, soki elembo ya kobongola mongongo ezalaka te, mbɛlɛ ezali mpasi mpenza mpo na kokesenisa maloba lokola kotánga mpe kotanga. Elingaki mpe kozala mpasi kokesenisa maloba lokola moto mpe mɔ́tɔ, mabele mpe mabɛlɛ, soki tózalaka kaka na lolenge moko ya kokoma o mpe e. Na Lingala, kokesenisa o mpe ɔ, e mpe ɛ, nde esali ete tóyeba kokesenisa maloba mosusu. Mpo otánga malamu mpe bato bákanga ntina na yango, ezali na ntina mingi ete oyeba makambo oyo nyonso.
Ndenge ya kobongisa ebengeli na yo ya maloba. Bato mingi oyo babengaka maloba na ndenge esengeli te, bayebaka yango te. Soki mokɛngɛli na eteyelo ayebisi yo maloba mosusu oyo osengeli kotyela yango likebi, sepelá na boboto na ye. Soki sikoyo oyebi mokakatano oyo ozali na yango, ndenge nini okolonga yango?
Libosoliboso, ntango ozwi lisolo ya kosala oyo esɛngi ete otánga na miso ya bato mingi, talá na diksionɛrɛ. Luká maloba oyo oyebi te. Soki oyebi kosalela diksionɛrɛ te, fungolá yango na lokasa ya liboso mpo na koyeba ndimbola ya bilembo oyo basaleli wana, to tuná moto mosusu alimbolela yo yango. Diksionɛrɛ ekolakisa yo esika nini osengeli komatisa mongongo, mpo na liloba oyo ezali na bikango mingi, mpe esika oyo osengeli kokitisa mongongo. Ekolakisa yo ndenge nini kotánga milelisi mpe mileli na liloba oyo ozali koluka. Na bisika mosusu, liloba moko ekoki kozala na ndenge mingi ya kotánga yango, na kotalela maloba oyo ezali pembenipembeni na yango. Liloba nyonso oyo oluki, tángá yango na mongongo makasi mbala ebele liboso ete okanga diksionɛrɛ.
Likambo ya mibale oyo okoki kosala mpo na kobongisa lolenge na yo ya kobenga maloba ezali ete okoki kotánga liboso ya moto mosusu, oyo ayebi kobenga maloba na ndenge esengeli, mpe sɛngá ye abongisa mabunga nyonso oyo ozali kosala.
Likambo ya misato oyo okoki kosala mpo na kobongisa ebengeli na yo ya maloba ezali kolanda na likebi mpenza bandeko oyo bayebi koloba malamu. Soki ozali na bakasɛti ya botángi ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, to Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, salelá yango malamu mpenza. Ntango ozali koyoka yango, tyá likebi na maloba oyo batángi yango ndenge yo otángaka yango te. Komá yango mpe zongelá yango mbala na mbala. Nsima ya ntango, okosala lisusu mabunga te ntango ozali kobenga maloba, mpe yango ekosalisa yo olobaka malamu.