Boyei malamu na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
PƆSƆ na pɔsɔ, na mikili koleka 200, bamilio ya bana-kelasi balandaka mateya na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Basusu babandi kolanda mateya ya eteyelo yango sika, nzokande, basusu babandá kolanda yango banda kala. Eteyelo yango ezali kosalema na bisika ebele mpenza. Ezala ofandi na mboka nini, okoki kolanda mateya kaka ndenge moko na eteyelo yango. Nzambe azali kolakisa mikóló na bana mike, bato ya bikólo nyonso, ezala baoyo batángá kelasi mingi to baoyo batángá mingi te, mpe bafutaka mbongo te mpo na yango.
Na 1943, ntango Batatoli ya Yehova bafungolaki eteyelo yango na masangá, mokanda Mateya na mosala ya Teokrasi na lokasa 4 (na Lingelesi) emonisaki ntina na yango: “Kobongisa ‘bato nyonso ya sembo,’ baoyo bayoki Liloba ya Nzambe mpe bamonisi ete bandimi yango, mpo ‘báyeba koteya basusu’ . . . mpo ete mokomoko na bango azala . . . na nyonso oyo esengeli mpo na kosakola elikya na ye.” Kino lelo oyo, ntina oyo basalaki eteyelo yango ebongwani te.
Na yango, eloko nini eleki malamu mpenza oyo mokomoko na biso akoki kosala na likabo ya koloba oyo Nzambe apesi biso? Biblia epesi eyano boye: “Tiká ete nyonso oyo ezali kopemela esanzola Yehova.” (Nz. 150:6, NW) Ntango tozali kosala bongo, tozali kosepelisa motema ya Tata na biso ya likoló mpe tozali komonisa mpenza ye ete tozali kopesa ye matɔndi mpo na boboto mpe bolingo na ye. Yango wana, tokoki kokamwa te ntango baklisto balendisami ete ‘bápesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye’! (Ebe. 13:15) Mokano na biso ezali ya kosalisa yo mpo okolisa makoki na yo oyo Nzambe apesi yo lokola likabo, mpo na kosanzola na yango Yehova. Yango wana, totombeli yo, mwana-kelasi, boyei malamu na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
Atako na eteyelo yango babendi likebi mingi mpo na kotánga liboso ya bato mingi, koyeba koloba mpe koteya, matomba ya mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esuki kaka wana te. Ntango ozali kosala lisolo na eteyelo, bakosalisa yo okóma na makoki mingi, lokola koyeba kotánga malamu yo moko, koyoka malamu mpe kosimba makambo oyo ozali koyoka, koyekola, kolukaluka na mikanda, kotalela likambo malamumalamu mpe kotya yango na molɔngɔ, koyeba kosolola na bato, koyeba koyanola na mituna, mpe koyeba kokoma makanisi oyo ozwi. Makambo oyo okoyekola to biyano oyo okopesa mpe masolo oyo okosala na eteyelo yango, ekouta na Biblia yango moko mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Ntango ozali kotondisa elimo na yo na solo ya Liloba ya Nzambe, okoyekola kokanisa ndenge Nzambe akanisaka. Yango ekoki mpenza kosalisa yo na makambo nyonso ya bomoi na yo! William Lyon Phelps, profesɛrɛ na iniversite moko na ekeke ya 20, akomaki boye mpo na komonisa valɛrɛ ya Liloba ya Nzambe: “Tokoki mpenza koloba ete moto nyonso oyo ayebi Biblia malamu azali solo moto oyo atángá. . . . Nandimi ete moto oyo ayebi Biblia, atako akɔtá na iniversite te, aleki mpenza moto oyo akɔtá na iniversite kasi ayebi Biblia te.”
Ndenge oyo okoki mpenza kozwa matomba mingi
Ya solo, mpo ozwa mpenza matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, yo moko, mwana-kelasi, osengeli kosala milende. Ntoma Paulo alendisaki Timote, moninga na ye moklisto, na maloba oyo: “Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.” (1 Tim. 4:15) Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kosala milende?
Salá makasi ozangaka te na mokolo ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Salelá malamu mpenza mokanda oyo, Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Komá nkombo na yo na esika oyo batiki mpo na kokoma nkombo na lokasa ya liboso na mokanda oyo mpe memáká mokanda oyo ntango nyonso ozali koya na eteyelo yango. Mokanda oyo ya boyekoli ezali mpe kaye ya kokoma makambo mosusu. Ntango otángi makanisi ya ntina oyo ekosalisa yo, tyá mokɔlɔtɔ na nse ya maloba yango. Salelá bisika oyo etikali mpamba, oyo ezali pembeni ya makomi mpo na kokoma makanisi ya ntina oyo osimbi na masolo na eteyelo.
Ntango programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekoya, bakopesa yo yango. Programɛ yango ekozala mpe na mwa makambo oyo ekomonisa ndenge eteyelo yango ekosalema. Ekozala malamu otya programɛ yango na kati ya mokanda oyo, wana nde okozwa yango nokinoki.
Ntango ozali kobongisa masolo ya eteyelo mpo na pɔsɔ moko, kobosana te ete mokanda ya libosoliboso oyo tozali koyekola ezali nde Biblia. Tángá libosoliboso mikapo ya Biblia oyo babongisi mpo na pɔsɔ yango. Soki okoki mpe kotánga na ndako masolo mosusu ya programɛ, ekosalisa yo lisusu mingi koleka.
Ntango mosusu na eteyelo, ezalaka na mituna oyo moto nyonso akoki kopesa eyano. Landá yango malamu. Kopesa biyano na mituna yango ezali na ntina mingi, mpamba te ekosalisa yo obosana te makambo oyo oyoki mpe osalela yango na bomoi na yo.
Ya solo, bana-kelasi nyonso bakosala masolo to bilakiseli na lisangá. Soki okosala lisolo to elakiseli, bongisá yango malamu mpenza. Salá makasi ete olobaka malamu na likambo nyonso oyo basɛngi yo otalela. Bakopesa yo toli mpo na kosalisa yo okende ntango nyonso liboso. Ndimá toli yango mpo ezali lisalisi oyo bapesi yo. Na kati ya mokanda na yo, komá likambo nyonso oyo bapesi yo toli mpo na yango mpo na koyeba likambo nini osengeli kosala mpo okola. Lokola ezalaka mpasi ete moto amitalela ndenge basusu bazali kotalela ye, makanisi mpe toli oyo euti na Biblia, oyo bakopesa yo na bolingo nyonso, ekosalisa yo mingi mpo okende liboso. Toli oyo ezali mpenza na ntina mingi, ata soki osalá bambula mingi na eteyelo yango.—Mas. 1:5.
Olingi kokola nokinoki? Okoki kokola nokinoki soki yo moko omityeli mikano ya malamu. Na ndako, yekolá makambo oyo mwana-kelasi mokomoko akolobela na lisolo na ye. Soki bazali koluka moto oyo akoki kosala lisolo moko, okosɛnga bápesa yo yango mpe ekosalisa yo okola lisusu. Ntango bato mosusu bazali kosala masolo, landá na likebi nyonso ndenge bazali koteya, mpamba te toyekolaka makambo mingi na bato mosusu.
Lisusu, soki likoki ezali, okoki kosala ete okola nokinoki soki yo moko ozali kotánga mingi mpe koyekola mokanda oyo. Yekolá malamumalamu makambo oyo ezali na mateya 15 oyo elandi, mpe na nsima, yekolá “Mateya mpo na kokolisa makoki ya koloba mpe ya koteya,” oyo ebandi na lokasa 78. Liboso, yekolá liteya mokomoko mpe salá devuare oyo ezali na nsuka ya liteya yango. Na mosala na yo ya kosakola, salelá makambo oyo ozali koyekola. Yango ekosalisa yo mingi ete okola mpo na kokóma molobi malamu mpe moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe.
Mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalisa yo omibongisa mpo na likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Lokola tozali na bomoi mpo na mokano ya Nzambe, tokomonisa ete tozali mpenza kokokisa ntina oyo tozali na bomoi soki tozali kopesa ye masanzoli. Yehova Nzambe abongi kozwa masanzoli oyo eleki masanzoli nyonso. (Emon. 4:11) Mateya oyo tozali kozwa na eteyelo yango ezali kosalisa biso tósalaka bongo, ete tókanisaka malamu, tósalaka na mayele, tósakolaka malamumalamu makambo kitoko ya solo oyo euti na Liloba ya Nzambe.