Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 15 nk. 24-25
  • Baninga ya Nzambe basalaka malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baninga ya Nzambe basalaka malamu
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Okoki kosala nini mpo bózala na libota ya esengo?
    Okoki kosala nini mpo bózala na libota ya esengo?
  • Mafungola mibale mpo ete libala liumela
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 15 nk. 24-25

Liteya 15

Baninga ya Nzambe basalaka malamu

Soki ozali na moninga moko oyo osepelaka na ye mpe omemyaka ye, okolinga kozala lokola ye. Biblia elobi ete: “Yehova azali malamu mpe azali sembo.” (Nzembo 25:8, NW) Mpo na kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kozala bato malamu mpe ya sembo. Biblia elobi: “Bózala [bamekoli, NW] na Nzambe, lokola bana balingami. Bótambolaka mpe na bolingo.” (Baefese 5:1, 2) Talá ndenge mosusu ya kosala yango:

Salisaká bato. “Tósalela bato nyonso malamu.”​—Bagalatia 6:10.

Salaká mosala. “Moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká ete asalaka mosala, asalisa mabɔkɔ na ye misala.”​—Baefese 4:28.

Zalaká ntango nyonso pɛto na nzoto mpe na bizaleli. “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na [elimo, NW] mpe tókokisa ezaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔmɔ na Nkolo.”​—2 Bakolinti 7:1.

Lingaká libota na yo mpe pesaká bango limemya. “Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko mpe tiká ete mwasi atosa mobali na ye. Bino bana, bótosaka baboti na bino.”​—Baefese 5:33–6:1.

Lingaká mpe bato mosusu. “Tólingana, moto moninga na ye, mpo ete bolingo euti na Nzambe.”​—1 Yoane 4:7.

Tosaká mibeko ya Leta. “Tiká ete moto na moto atosaka [Leta] . . . Bópesa na moto na moto nyonso oyo esengeli na ye, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako.”​—Baloma 13:1, 7, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto