Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 124-130
  • Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA YILIMIA
  • LITOMBA NA YANGO
  • Jérémie: mosakoli na bikateli na Nzambe oyo bato balingaki koyoka yango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Yehova asali oyo akanaki”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Na kati ya Yirimia
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 124-130

Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia

Mokomi: Yilimia

Bisika ya bokomi: Yuda mpe Ezipito

Nsuka ya bokomi: 580 L.T.B.

Boumeli ya lisoló: 647–580 L.T.B.

1. Ntango nini mpe nani apesaki Yilimia mokumba?

MOSAKOLI Yilimia azalaki na bomoi na eleko moko ya mikakatano mpe ya yikiyiki. Yehova apesaki ye mokumba na mobu 647 L.T.B., na mbula ya 13 ya boyangeli ya Yosiya, Mokonzi ya Yuda, oyo azalaki kobanga Nzambe. Na boumeli ya eleko oyo bazalaki kobongisa ndako ya Yehova, bakutaki mokanda ya Mibeko ya Yehova mpe yango etángamaki liboso na mokonzi. Asalaki makasi mpo na kotosisa yango, kasi alóngaki kokweisa losambo ya bikeko bobele mpo na mwa ntango moke. Manase, nkɔ́kɔ ya Yosiya, oyo ayangelaki na boumeli ya mbula 55, mpe Amona, tata na ye, oyo abomamaki nsima na koyangela bobele mbula 2, basalaki mabe mingi. Balendisaki bato na komipesa na bilambo ya mbindo mpe na milulu ya nsɔ́mɔ, na boye ete bakómaki na momeseno ya kopesa makabo na mpaka ya malasi epai na “mokonzi mwasi na lola” mpe bazalaki kopesa bato lokola mbeka epai na banzambe-bademó. Manase atondisaki Yelusaleme na makila ya bato oyo basali likambo te.​—Yil. 1:2; 44:19; 2 Mik. 21:6, 16, 19-23; 23:26, 27.

2. Mosala ya Yilimia ezalaki nini, mpe esakweli na ye oyo etondi na makambo mingi eumelaki mbula boni?

2 Mosala ya Yilimia ezalaki ya lisɛki te. Asengelaki kosala lokola mosakoli ya Yehova mpo na kosakola kobebisama ya Yuda mpe ya Yelusaleme, kotumbama ya tempelo kitoko ya Yehova, mpe kokende ya bato na ye na boombo​—makambo ya nsɔ́mɔ oyo bato bakokaki kondima yango te! Kosakola na ye na ntina na Yelusaleme esengelaki koumela mbula 40, na boumeli ya boyangeli ya bakonzi mabe oyo: Yoahaza, Yoyakimi, Yoyakini (Konia), mpe Sidikiya. (Yil. 1:2, 3) Na nsima, ntango azalaki na Ezipito, asengelaki kosakola na ntina na losambo ya bikeko mpo na Bayuda oyo bakimaki kuna. Mokanda na ye esukaki kokomama na mobu 580 L.T.B. Boumeli ya lisoló oyo likomamaki na Yilimia ezali na makambo mingi oyo masalemaki na eleko ya mbula 67.​—52:31.

3. (a) Lolenge nini kopemama mpe bosolo ya mokanda ya Yilimia emonisamaki na ntango ya Baebele? (b) Litatoli mosusu nini mpo na yango tozali kokuta kati na Makomami ya Greke ya boklisto?

3 Na lokótá ya Liebele, nkombo ya mosakoli mpe ya mokanda na ye ezali bongo Yir·meyahʹ to Yir·meyaʹhu, oyo elimboli mbala mosusu, “Yehova akumisi; to, Yehova afungoli [mpenza longwa na libumu].” Mokanda oyo ezali kati na bakataloge nyonso ya Makomami ya Liebele, mpe ntembe ezali te mpo na oyo etali kopemama na yango. Kokokisama monene ya bisakweli mingi na boumeli ya bomoi ya Yilimia, emonisi mpenzampenza bosolo na yango. Lisusu, Yilimia alobelami mbala mingi na nkombo kati na Makomami ya Greke ya boklisto. (Mat. 2:17, 18; 16:14; 27:9) Likambo oyo ete Yesu ayebaki makambo mazali kati na mokanda ya Yilimia emonisami polele na lolenge ayokanisaki maloba ya Yilimia 7:11 mpe oyo ya Yisaya 56:7 ntango apɛtolaki tempelo. (Mko. 11:17; Luka 19:46) Na ntina na molende mpe mpiko ya Yesu, bato mosusu bakanisaki ete ye azalaki Yilimia. (Mat. 16:13, 14) Esakweli ya Yilimia na ntina na kondimana ya sika (Yil. 31:31-34) etángami na Paulo na Baebele 8:8-12 mpe Ebr. 10:16, 17. Paulo atángi Yilimia 9:24 na kolobáká ete: “Tiká ete ye oyo azali komikumisa, amikumisa kati na [Yehova].” (1 Kol. 1:31) Na Emoniseli 18:21, tozali kokuta kosalelama makasi ya elakiseli oyo elobelami na Yilimia (Yil. 51:63, 64) mpo na kokwea ya Babilone.

4. Lolenge nini arkeoloji endimi lisoló oyo?

4 Biloko oyo bizali kokundolama na nzela ya arkeoloji bindimisi lisoló ya makambo mazali na Yilimia. Na ndakisa, Kronike ya Babilone elobeli kokamatama ya Yelusaleme na mobu 617 L.T.B. na Nebukadanesala (Nebukadalesala) ntango akangaki mokonzi (Yoyakini) mpe atyaki na ebongá (Sidikiya), moto oyo ye aponaki.​—24:1; 29:1, 2; 37:1.a

5. (a) Makambo nini toyebi na ntina na Yilimia ye moko? (b) Nini tokoki koloba na ntina na ekomeli na ye?

5 Toyebi makambo mingi matali bomoi ya Yilimia koleka basakoli mosusu ya kala, longola bobele Mose. Yilimia alobeli makambo mingi matali ye moko, makanisi na ye, mayoki na ye, komonisáká bongo molende mpe mpiko makasi, oyo esanganaki na komikitisa mpe na motema boboto. Azalaki bobele mosakoli te, kasi azalaki lisusu nganga, mosangisi-mikanda ya Makomami, mpe mokomi ya lisoló ya bato na bosikisiki. Azalaki mwana ya nganga Hilikiya na Anatoto, mboka na banganga na nɔ́rdi ya Yelusaleme, “na mokili na Benyamina.” (1:1) Ekomeli ya Yilimia ezali polele, ezangi mindɔndɔ́, mpe ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Bilakiseli mpe bililingi bizali mingi, mpe mokanda na ye ekomami lolenge ya lisoló (prose) mpe na maloba ya ntɔ́ki.

MAKAMBO MAZALI KATI NA YILIMIA

6. Lolenge nini makambo mazali na esakweli mabongisami?

6 Makambo mabongisami na kolandáká ntango yango esalemaki te, kasi engebene lisoló na lisoló. Na yango, lisoló lizali na mbongwana mingi mpo na oyo etali ntango mpe makambo matali yango. Na nsuka, kobebisama ya Yelusaleme mpe ya Yuda elobelami polelepolele na mokapo 52. Yango emonisi te bobele kokokisama ya bisakweli mingi, kasi ezali lisusu kopesa moboko ya makambo oyo mazali na mokanda molandi, mokanda ya Bileli.

7. Lolenge nini Yilimia akómaki mosakoli, mpe lolenge nini Yehova andimisi ye?

7 Yehova apesi Yilimia mokumba (1:1-19). Yilimia azwaki mokumba mpo ete alingaki kokóma mosakoli to mpo ete autaki na libota ya banganga? Yehova alimboli yango: “Naino natongi yo kati na libumu te, nayebaki yo; mpe naino obotamaki te, nabulisaki yo, mpe napesaki yo lokola mosakoli epai na mabota.” Ezali mokumba moutaki epai na Yehova. Yilimia andimaki mokumba yango? Na komikitisa nyonso, alobi ete, “Nazali bobele elenge.” Yehova apesi ye elikya: “Talá, natye maloba na ngai kati na monɔkɔ na yo. Talá, lelo oyo, nakumisi yo likoló na mabota mpe likoló na makonzi mpo na kobikola mpe kobwaka na nsé, mpo na kobuka mpe kobebisa, kotonga mpe kokóna.” Yilimia asengelaki kobanga te. “Bakobunana na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.”​—1:5, 6, 9, 10, 19.

8. (a) Na makambo nini Yelusaleme azangaki sembo? (b) Lolenge nini Yehova akoyeisa mpasi?

8 Yelusaleme, mwasi oyo azangi sembo (2:1–6:30). Liloba ya Yehova likoyebisa nsango nini epai na Yilimia? Yelusaleme asili kobosana bolingo na ye ya liboso. Asili kotika Yehova, Liziba ya mai na bomoi, mpe asili kosala ekobo elongo na banzambe-bapaya. Longwa na vinyo malamu, asili kobongwana “nkóna na mpamba na [vinyo] mabe.” (2:21) Bilamba na ye bizali na makila ya milimo ya bato mpamba oyo basali likambo te. Ata Yisalaele, mwasi na ekobo, azali na boyengebene mingi koleka Yuda. Nzambe azali kobénga bana-batomboki ete bázongela ye mpamba te azali mpenza mobali mpe nkolo na bango. Kasi bamimonisi lokola mwasi oyo azangi sembo. Bakoki kozonga soki balongoli biloko na bango ya mbindo mpe soki bakati ngenga ya mitema na bango. “Bótɛmisa bɛndɛlɛ kati na Siona,” mpamba te Yehova akoyeisa mabe longwa na epai na nɔ́rdi. (4:6) Libebi likoló na libebi! Lokola nkosi abuti longwa na efandelo na ye, lokola mopɛpɛ na kokaukisa ekopepa na mokili mokauki, mpe makalo lokola mopɛpɛ mokotimbatimba, ezali motindo wana nde mokokisi na bikateli na Yehova akoya.

9. (a) Liloba nini Yilimia azalaki na yango mpo na bato na motó makasi oyo bazalaki na Yelusaleme? (b) Konganga na bango mpo na kimya ezalaki na ntina nini?

9 Bótambolatambola na Yelusaleme. Bozali komona nini? Bobele bikweli mpe kozanga sembo! Bato basili kowangana Yehova, mpe liloba na Ye kati na monɔkɔ na Yilimia esengeli kozala mɔ́tɔ mokozikisa bango lokola nkoni. Lokola basili kotika Yehova mpo na kosalela nzambe-mopaya, bobele bongo Ye akosala ete básalela bapaya kati na mokili na bopaya. Oyo nde bato na motó makasi! Bazali na miso, kasi bakoki komona te, na matoi kasi bakoki koyoka te. Oyo nde likambo ya nsɔ́mɔ! Basakoli mpe banganga bazali mpenza kosakola makambo na lokuta, “mpe bato na ngai balingi ete ezala boye,” Yehova alobi bongo. (5:31) Mabe ebɛlɛmi oyo euti na nɔ́rdi, mpamba te “longwa na oyo moke na bango kino oyo monene na bango, nyonso bamipesi na bilulela.” Bazali koloba ete, “Kimya! Kimya! nde kimya ezali te.” (6:13, 14) Kasi mobebisi akoya na mbalakaka. Yehova asili kokómisa Yilimia momeki na ebendé katikati na bango, kasi eloko ezali te, bobele bosɔtɔ ya bibendé mpe palata ya mabe. Bango nyonso bazali mpenza mabe.

10. Mpo na nini Yelusaleme asengeli kozwa etumbu ekokani na oyo ya Silo mpe ya Efelaima?

10 Likebisi oyo emonisi ete tempelo ezali libateli te (7:1–10:25). Liloba ya Yehova liyei epai na Yilimia, mpe asengeli kosakola yango na bikuke ya tempelo. Tóyoka ye wana azali konganga epai na baoyo bazali kokɔta na kati: ‘Bozali komikumisa na ntina na tempelo ya Yehova, kasi makambo nini bozali kosala? Bozali konyokola etike mpe mwasi-mokufeli-mobali, bozali kosopa makila oyo masali eloko te, bozali kotambola nsima na banzambe mosusu, bozali koyiba, bozali koboma, bozali kosala ekobo, bozali kokata ndai na lokuta, mpe bozali kopesa bambeka epai na Baala! Bakosi! Bosili kokómisa ndako na Yehova “ndako na bayibi.” Bómikundola makambo Yehova asalaki na Silo. Ye akosala bobele bongo na ndako na bino, Ɛ Yuda, akobwaka yo motindo moko abwakaki Efelaima (Yisalaele) na nɔ́rdi.’​—Yil. 7:4-11; 1 Sam. 2:12-14; 3:11-14; 4:12-22.

11. Mpo na nini ntina ezali te ya kobondela mpo na Yuda?

11 Ntina ezali te ya kobondela mpo na Yuda. Ɛɛ, bato bazali kútu kosala mikate mpo na kopesa epai na “mokonzi-mwasi na lola”! Ya solo, “oyo ezali libota likotosa mongongo na [Yehova] Nzambe na bango te; baoyo bakoyambaka mpamela mpe te. Makambo na sembo makufi.” (Yil. 7:18, 28) Yuda asili kosala makambo ya mbindo kati na ndako ya Yehova mpe asili kotumba bana na ye ya mibali mpe ya basi na bisika na likoló ya Tofete kati na lobwaku ya Hinomo. Talá! Yango ekobyangama “lobwaku na Koboma,” mpe bibembe na bango bikokóma bilei mpo na bandɛkɛ mpe banyama. (7:32) Esengo mpe bosepeli ekosila na Yuda mpe na Yelusaleme.

12. Na esika ya kozala na kimya, nini ekokómela Yuda mpe banzambe-bapaya na yango?

12 Bazalaki kolikya mpo na kozwa kimya mpe kobikisama, kasi bazwi nde nsɔ́mɔ! Kopalangana, kobomama, mpe kolela ekoya na ntina na mitó makasi na bango. ‘Yehova azali Nzambe na bomoi mpe Mokonzi libela.’ Mpo na banzambe baoyo basalaki likoló mpe mabelé te, elimo ezali kati na bango te. Bazali mpamba, mosala na mabungá, mpe bakobomama. (10:10-15) Yehova akobwaka mosika bafándi na mabelé. Yoká! Lokito na makɛlɛlɛ eyei, kongala uta na mokili na nɔ́rdi mpo na koyeisa mboka na Yuda mpamba. Mosakoli andimi ete: ‘Moto akoki te mpo na komitambwisa ye moko,’ mpe abondeli ete asembolama mpo ete akoka kobomama te.​—10:23.

13. Mpo na nini epekisami na Yilimia ete abondela te mpo na Yuda, mpe lolenge nini Yehova alendisi Yilimia na ntango ya likámá?

13 Kolakelama mabe epai na baoyo babuki kondimana (11:1–12:17). Yuda atosi te maloba na kondimana oyo asalaki elongo na Yehova. Bato bazali kobelela Nzambe mpo na kozwa lisungi, kasi bazwi yango te. Yilimia asengeli te kobondela mpo na Yuda, mpamba te Yehova “abamboli mɔ́tɔ” na nzeté kitoko wana ya olive. (11:16) Lokola baninga ya Yilimia, bato na Anatoto, bakani koboma ye, mosakoli amibaloli epai na Yehova mpo na kozwa nguya mpe lisalisi. Yehova alaki ete akobukanisa Anatoto. Yilimia atuni ete, ‘Mpo na nini nzela ya bato mabe ezali kolónga?’ Yehova andimisi ye ete: ‘Nakobikola mpe nakobebisa libota oyo lizangi botosi.’​—12:1, 17.

14. (a) Na bandakisa nini Yehova amonisi ete Yelusaleme ekoki kobonga lisusu te mpe ete kosambisama na yango ekoya mpenza solo? (b) Nini esalemi ntango Yilimia alei maloba ya Yehova?

14 Yelusaleme ekobonga lisusu te mpe ekweisami (13:1–15:21). Yilimia ayebisi lolenge Yehova apesaki ye etindá ete alata nkamba na molikani na loketo na ye mpe na nsima abomba yango kati na libulu ya mabanga na ebale Pelata. Ntango Yilimia ayaki kokundola yango, esilaki kobeba. “Ekokaki lisusu na mosala moko te.” Na yango, Yehova amonisaki ekateli na ye ya kobebisa “lolendo na Yuda mpe lolendo monene na Yelusaleme.” (13:7, 9) Akobɛtanisa bango na bango kati na molangwa na bango, lokola mbeki monene etondi na vinyo. “Moto na Etiopia ayebi kokalambisa loposo na ye, to nkoi matɔnɔ na ye?” (13:23) Bobele bongo, Yelusaleme ekobonga lisusu te. Yilimia asengeli te kobondela mpo na bato wana. Ata soki Mose mpe Samwele bakokaki koya liboso na Yehova mpo na kobondela na ntina na bango, alingaki koyoka bango te, mpamba te asili kozwa ekateli ya kobebisa Yelusaleme. Yehova apesi Yilimia makasi ya kotɛmɛla baoyo bazali kopamela ye. Yilimia azwi mpe alei maloba ya Yehova, yango epesi ‘esengo mpe bosepeli na motema.’ (15:16) Ezali ntango ya kosakana te, kasi ya kotya motema epai na Yehova, oyo asili kolaka ete akokómisa Yilimia efelo makasi ya motako liboso na bato.

15. (a) Na meko nini makambo mazali mpenza mpasi, mpe etindá nini Yehova apesi mpo na kolobela yango mingi? (b) Lolenge nini bato bakoyeba nkombo ya Yehova, mpe mpo na nini akozimbisama na masumu na bango te?

15 Yehova akotinda babomi-mbisi mpe babomi-nyama (16:1–17:27). Na kotalela libebi oyo libɛlɛmi, Yehova apesi etindá oyo epai na Yilimia: “Yo okobala mwasi te mpe okozala na bana babali mpe na bana basi na esika oyo te.” (16:2) Oyo ezali ntango te ya kolela soko mpe ya kosepela elongo na bato oyo, mpamba te Yehova alingi kobengana bango na mokili oyo. Na nsima, Yehova alaki mpe ete akotinda ‘babomi-mbisi mpo na kolɔba bango mpe babomi-nyama mpo na kolanda bango,’ mpe wana akokokisa makambo oyo nyonso, “bakoyeba ete nkombo na [ye] ezali Yehova.” (16:16, 21, NW) Lisumu na Yuda lisili kokomama na mitema ya bato na ekomeli ya ebendé, ɛɛ, na nsɔngɛ́ ya diamá. “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi,” kasi Yehova akoki koluka kati na motema. Moto akoki kokosa ye te. Baoyo bapɛngwi basili ‘kotika Yehova, liziba na mai na bomoi.’ (17:9, 13) Soki Yuda ekobulisa mokolo na Sabata te, Yehova akozikisa bikuke mpe ndako milai na ye.

16. Yehova amonisi nini na nzela ya moyemi mpe mbeki na ye oyo esalemi na mabelé?

16 Moyemi mpe mabelé (18:1–19:15). Yehova apesi Yilimia etindá ete akende na ndako na moyemi. Kuna, amoni lolenge moyemi azali kozongisa mbeki ya mabelé oyo ebebaki, kokómisáká yango mbeki mosusu engebene lolenge ye alingi. Bongo, Yehova alobi ete ye azali Moyemi ya ndako na Yisalaele, mpe azali na nguya ya kobebisa yango mpe ya kotonga yango. Nsima na yango, alobi na Yilimia ete akamata mbeki ya moyemi mpo na kokende na yango na Lobwaku ya Hinomo mpe kuna asakola mabe oyo ekouta epai na Yehova mpamba te bato basili kotondisa esika wana na makila oyo masali eloko te, kotumbáká bana na bango ya mibali na mɔ́tɔ lokola makabo mpo na Baala. Yilimia asengeli kobuka bongo mbeki yango mpo na komonisa lolenge Yehova akobebisa Yelusaleme mpe bato na Yuda.

17. Makambo nini ya mpasi Yilimia akutani na yango, kasi yango ekangisi ye monɔkɔ?

17 Likoki ezali te mpo na kokima monyoko (20:1-18). Lokola asilikaki na ntina na makambo oyo Yilimia azalaki kosakola na molende nyonso, Pasahulu, mokóló na liboso kati na tempelo, atye Yilimia kati na bikangelo na boumeli ya butu moko. Na ntango bakangolaki ye, Yilimia asakoli komemama ya Pasahulu na boombo mpe kufa na ye kati na Babilone. Lokola ayokaki mawa mpe nsɔ́ni likoló na kosɛka oyo esalemi na ntina na ye, Yilimia akanisi ete atika kosakola. Kasi, akoki kofanda nyɛɛ te. Liloba ya Yehova likómi ‘kati na motema na ye lokola mɔ́tɔ na kozikisa oyo ezali kopela kati na mikuwa na ye,’ na boye ete apusami na koloba. Atako alakeli mokolo oyo abotamaki mabe, angangi ete: “Bóyembela Yehova, bino bato, bósanzola Yehova, mpo ete abikisi molimo na mobólá longwa na lobɔkɔ na bato mabe.”​—20:9, 13, NW.

18. Makambo nini Yilimia ayebisi Sidikiya?

18 Nkanda ya Yehova epai na bakonzi (21:1–22:30). Lokola eyano na motuna Sidikiya atunaki, Yilimia ayebisi ye nkanda oyo Yehova azali na yango mpo na engumba: Mokonzi ya Babilone akozingela yango, mpe ekobebisama na maladi mabe, na mopanga, na nzala, mpe na mɔ́tɔ. Salumu (Yoahaza) akokufa na boombo, Yoyakimi akokundama na lolenge ya kokundama ya mpunda-mobali, mpe mwana na ye Konia (Yoyakini) akobimisama na Yelusaleme mpo na kokufa na Babilone.

19. Yilimia asakoli nini na ntina na “etape na boyengebene,” mpe nini emonisami na bikɔlɔ mibale ya mbuma na mosuke?

19 Elikya kati na “etape na boyengebene” (23:1–24:10). Yehova apesi elaka ete babateli na mpate ya solo bakokitana babateli na mpate ya lokuta mpe ete “etape na boyengebene” ekobima na libota ya Davidi, mokonzi oyo “akozala na lokumu lokola mokonzi mpe akobongisa makambo na mayele mpe akosambisa na sembo mpe na boyengebene kati na mokili.” Nkombo na ye nani? “Akobyangama, Yehova boyengebene na biso.” Akoyanganisa batikali oyo bapalanganaki. (23:5, 6, NW) Soki basakoli bakangamaki na eyanganelo ya Yehova, mbɛlɛ balingaki kopusa bato ete báyoka mpe bátika banzela mabe na bango. Na esika ete básala bongo, Yehova alobi ete, “bakopɛngwisa bato na ngai na nkuta na bango.” (23:22, 32) “Talá, bikɔlɔ mibale na mbuma na mosuke.” Yilimia asaleli mbuma malamu mpe mbuma mabe ya mosuke mpo na komonisa bozongi ya batikali ya sembo na mokili na bango na lisalisi ya ngɔlu ya Nzambe mpe koya ya kelasi mosusu oyo ekosuka mabe.​—24:1, 5, 8-10.

20. Lolenge nini Yehova asaleli Babilone lokola mosaleli na ye, kasi, na nsima, nini ekokómela mboka yango?

20 Ntembe kati na Yehova mpe mabota (25:1-38). Mokapo oyo elobeli na mokuse bikateli oyo bimonisami na molai kati na mikapo 45-49. Na nzela ya bisakweli misato oyo bikokani, Yehova asakoli mpasi oyo ekokwela mabota nyonso ya mabelé. Ya liboso, Nebukadalesala amonisami lokola mosaleli ya Yehova mpo na kobebisa Yuda mpe mabota ya zingazinga, “mpe mabota oyo bakosalela mokonzi na [Babilone] kino bilanga ntuku nsambo.” Na nsima, ekozala ngala ya Babilone, mpe yango ekokóma “mpamba libela na libela.”​—25:1-14.

21. Nani asengeli komela kɔ́pɔ na nkanda na Yehova? Nini ekosalema nsima na komela yango?

21 Esakweli ya mibale ezali emonaneli ya kɔ́pɔ ya vinyo ya nkanda ya Yehova. Yilimia asengeli kopesa kɔ́pɔ yango epai na mabota, mpe “bakomɛla yango mpe bakotetema epai na epai mpe bakobongwana bibɛbɛ” na ntina na libebi oyo Yehova akoyeisa likoló na bango. Ya liboso, epai na Yelusaleme mpe Yuda! Na nsima, na Ezipito, na Filisitia, na Edome, kino na Tulo, na mikili mizali pene mpe oyo mizali mosika, mpe na “makonzi nyonso mazali kati na mokili; mpe mokonzi na Sesaka akomela nsima na bango.” Bango nyonso ‘bakomela mpe bakosanza mpe bakokwea.’ Moko te akobika.​—25:15-29.

22. Na nzela ya mpasi nini monene kongala ya nkanda ya Yehova ekomonisama?

22 Kati na esakweli ya misato, Yilimia abimisi maloba kitoko ya ntɔ́ki. “[Yehova] akonguluma longwa na likoló, . . . mpo na kotɛmɛla bafándi nyonso na mokili.” Makɛlɛlɛ, mpasi, mopɛpɛ makasi! “Mpe babomami na [Yehova] na mokolo yango bakozala longwa na molelo moko na mokili kino molelo mosusu na mokili.” Bakolela bango te, bakokundama mpe te. Bakozala lokola nyei likoló na mabelé. Babateli na mpate ya lokuta bakobomama, elongo na bato minene ya bitongá na bango. Bakozala na esika ya kokima te. Yoká lolenge bazali kokimela! Yehova ye moko “azali kobebisa bilanga na bango . . . mpo na makasi na nkanda na ye.”​—25:30-38.

23. (a) Mwango mabe nini ekamatami na ntina na Yilimia, amilóngisi na maloba nini, mpe makambo nini masalemaki liboso oyo malobelami mpo na kotika ye? (b) Lolenge nini Yilimia andimisi likambo litali kokende na boombo na Babilone, mpe esakweli nini ekokisami na ntina na Hanania?

23 Yilimia alóngisami (26:1–28:17). Bakonzi mpe bato basali mwango mabe mpo na koboma Yilimia. Yilimia alobeli likambo na ye. Ezali liloba ya Yehova nde azali kolobela. Soki babomi ye, bakoboma moto oyo asali eloko te. Likambo likatami: azali na ngambo te. Mibangé balobeli misala ya basakoli Mika mpe Uliya mpo na kotalela likambo ya Yilimia. Na nsima Yehova alobi na Yilimia ete asala minyɔlɔlɔ mpe bikanganeli, atya yango na nkingo na ye, mpe na nsima atinda yango epai na mabota ya zingazinga lokola bilembo ete basengeli kosalela mokonzi ya Babilone na boumeli ya bileko misato ya bakonzi. Hanania, moko na basakoli ya lokuta, atɛmɛli Yilimia. Alobi ete ekanganeli ya Babilone ekobukana na mibu mibale mpe amonisi yango na kobukáká ekanganeli ya nzeté. Yehova alobeli lisusu makasi esakweli na ye na kosɛngáká na Yilimia ete asala bikanganeli ya ebendé mpe asakola ete Hanania asengeli kokufa na mobu wana. Hanania akufaki solo.

24. (a) Nsango nini Yilimia atindi epai na bakangami oyo bazali na Babilone? (b) Yehova akosala kondimana ya sika elongo na nani, mpe lolenge nini yango ekozala monene koleka kondimana ya liboso?

24 Kobɔndisama mpo na bakangami kati na Babilone (29:1–31:40). Yilimia atindi nkomá epai na bakangami oyo bamemamaki na Babilone elongo na Yekonia (Yoyakini): Bófanda kuna, mpamba te liboso ete Yehova azongisa bino, eleko ya mbula 70 esengeli koleka na boombo. Yehova apesi etindá na Yilimia ete akoma na ntina na bozongi na bango kati na mokanda: Yehova akobuka bikanganelo na bango, mpe “bakosalela [Yehova] Nzambe na bango mpe Davidi, mokonzi na bango oyo [ngai Yehova] nakobimisela bango ye.” (30:9) Laele asengeli koyokisa lisusu mongongo na ye te mpo na kolela, mpamba te bana na ye “bakobutwa lisusu longwa na mokili na moyini.” (31:16) Mpe na nsima Yehova asakoli maloba oyo mazali kopesa elikya! Akosala kondimana ya sika elongo na ndako ya Yuda mpe na ndako ya Yisalaele. Kondimana yango ekozala monene koleka oyo basili kobuka! Yehova akokoma mobeko na ye kati na mitema na bango. “Nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.” Longwa na oyo aleki moke kino na oyo aleki monene, bango nyonso bakoyeba Yehova, mpe ye akolimbisa mabungá na bango. (31:31-34) Engumba na bango ekotongama lisusu lokola eloko na bulɛɛ mpo na Yehova.

25. Lolenge nini bosolo ya kobongisama ya Yisalaele elobelami makasi, mpe liloba ya Yehova epesi nsango nini?

25 Kondimana ya Yehova elongo na Davidi endimisami (32:1–34:22). Na boumeli ya bozingeli ya nsuka oyo Nebukadalesala asalaki likoló na Yelusaleme, Yilimia azalaki na bolɔ́kɔ. Nzokande, lokola elembo ete solo Yehova akobongisa lisusu Yisalaele, Yilimia asombi elanga na Anatoto mpe atye mokanda ya boyokani kati na mbeki esalemi na mabelé. Liloba ya Yehova lipesi sikawa nsango malamu: Yuda mpe Yelusaleme bakosepela lisusu, mpe Yehova akokokisa kondimana na ye elongo na Davidi. Kasi yo, Ɛ Sidikiya, oyeba ete mokonzi ya Babilone akotumba mboka na mɔ́tɔ mpe yo okomemama na boombo na Babilone. Mawa epai na bankolo na baombo oyo bandimaki kosikola baombo na bango kasi babukaki kondimana na bango!

26. Yehova apesi elaka nini epai na Balekaba, mpe mpo na nini?

26 Elaka na Yehova epai na Lekaba (35:1-19). Na mikolo ya mokonzi Yoyakimi, Yehova atindi Yilimia epai na Balekaba. Bango babombamaki na Yelusaleme na boyei ya liboso ya bato na Babilone. Yilimia apesi bango vinyo mpo ete bámela. Baboyi komela yango na ntina na etindá oyo Yonadaba, nkɔ́kɔ na bango, apesaki bango esili koleka mbula 250. Oyo nde bokeseni makasi na kozanga sembo ya Yuda! Yehova alaki bango ete: “Yonadaba, mwana na Lekaba, akozanga moto te mpo na kotɛlɛma liboso na ngai libela.”​—35:19.

27. Nini epesi nzela na kokomama lisusu ya bisakweli ya Yilimia?

27 Yilimia akomi búku mosusu (36:1-32). Yehova atindi Yilimia ete akoma maloba nyonso ya bisakweli oyo asili kopesa kino sikawa. Yilimia akomisi maloba yango na nzela ya Baluku, oyo na nsima atángi yango na mongongo makasi kati na ndako na Yehova na mokolo moko ya kokila bilei. Mokonzi Yoyakimi asɛngi rulo yango, mpe wana eyokaki ye eteni na yango, na nkanda nyonso apasoli yango mpe abwaki yango kati na mɔ́tɔ. Asɛngi ete bákanga Yilimia mpe Baluku, kasi Yehova abombi bango mpe ayebisi Yilimia ete akoma rulo mosusu.

28. (a) Bisakweli nini Yilimia alobeli yango mbala na mbala? (b) Lolenge nini ezaleli ya Ebede-meleke ekeseni na oyo ya bankumu?

28 Mikolo ya nsuka ya Yelusaleme (37:1–39:18). Lisoló elobeli lisusu boyangeli ya Sidikiya. Mokonzi asɛngi Yilimia ete abondela Yehova na ntina na Yuda. Mosakoli aboyi, alobi ete kobebisama ya Yelusaleme ezali likambo ya solo. Yilimia ameki kokende na Anatoto kasi akangami lokola mokimi, abɛtami, mpe atyami na bolɔ́kɔ mikolo mingi. Na nsima, Sidikiya abéngisi ye epai na ye. Liloba lizali nde uta na Yehova? Liloba lizali! “Okokabama epai na lobɔkɔ na mokonzi na [Babilone].” (37:17) Kosilikáká na ntina na bisakweli ya kokweisama oyo Yilimia azali kosakola ntango nyonso, bankumu babwaki ye kati na libulu oyo etondi na pɔtɔpɔtɔ. Ebede-meleke, moto na Etiopia, mokube oyo azalaki na ndako ya mokonzi, na boboto nyonso abondeli mpo na ye, na boye ete Yilimia abikisami na liwa oyo elingaki kokómela ye, kasi atikali naino na bolɔ́kɔ kati na lopango ya bakɛngɛli. Lisusu, Sidikiya abyangi Yilimia liboso na ye, ayebisi ye ete: ‘Omitika na mabɔkɔ ya mokonzi na Babilone noki te okokende na boombo mpe Yelusaleme ekobebisama!’​—38:17, 18.

29. Mpasi nini ekweli Yelusaleme, kasi lolenge nini Yilimia mpe Ebede-meleke babatelami na yango?

29 Bozingelami ya Yelusaleme eumeli sanza 18, mpe na nsima kokwea ya mboka esalemi na mbula ya 11 ya boyangeli ya Sidikiya. Mokonzi akimi elongo na mampinga na ye kasi bakangi ye. Bana na ye mpe bato minene na ye babomami liboso na ye, mpe batɔbɔli ye miso mpe bamemi ye na Babilone wana ekangami ye na minyɔlɔlɔ. Mboka ezikisami mpe ebebisami, mpe bato nyonso bamemami na boombo na Babilone, longola bobele mwa bato mpamba. Na etindá ya Nebukadalesala, Yilimia abimisami na lopango. Liboso ete afungolama, ayebisi Ebede-meleke elaka oyo Yehova apesaki mpo na kobikisa ye, ‘mpamba te atyaki elikya epai na Yehova.’​—39:18.

30. Lolenge nini bato oyo batikalaki bazangi kolanda toli ya Yilimia, mpe kosambisama nini ya kokweisa Yilimia ayebisi yango na Ezipito?

30 Makambo ya nsuka na Misipa mpe na Ezipito (40:1–44:30). Yilimia atikali na Misipa elongo na Gedalia, oyo bato na Babilone batye moyangeli likoló na bato oyo batikali. Nsima na sanza mibale, Gedalia abomami. Bato basɛngi toli epai na Yilimia, mpe ayebisi liloba ya Nzambe mpo na bango: ‘Yehova akobikola bino te longwa na mokili oyo. Bóbanga te na ntina na mokonzi ya Babilone. Nzokande, soki bokiti na Ezipito, bokokufa!’ Bakiti na Ezipito, bamemi Yilimia mpe Baluku elongo na bango. Na Tahapanehese kati na Ezipito, Yilimia ayebisi ekateli ya kokweisa uta na Yehova: Mokonzi na Babilone akotya kiti na ye ya bokonzi na Ezipito. Ezali mpamba mpo na Yisalaele kosambela banzambe ya Ezipito mpe kozongela kopesa mbeka epai na “mokonzi mwasi na lola.” Basili kobosana lolenge Yehova abebisaki Yelusaleme na ntina na losambo na yango ya bikeko? Yehova akoyeisa mpasi likoló na bango kati na mokili ya Ezipito, mpe bakozonga na Yuda te. Lokola elembo, Yehova azali kopesa Falo Hofola kati na mabɔkɔ ya banguna na ye.

31. Elikya nini epesami epai na Baluku?

31 Libula ya Baluku (45:1-5). Baluku atungisami mingi na makanisi na koyokáká Yilimia kozongela mbala na mbala esakweli ya kokweisa. Elobami na ye ete akanisa liboso mosala ya Yehova ya kotonga mpe ya kobukabuka na esika ya “koluka makambo minene” mpo na ye moko. (45:5) Akobatelama na boumeli ya mpasi nyonso wana.

32. “Mopanga ya Yehova” ekokwela banani?

32 Mopanga ya Yehova liboso na mabota (46:1–49:39). Yilimia ayebisi bolóngi ya Babilone likoló na Ezipito na Kalekemisi mpe na bisika mosusu. Atako mabota masili kobomama, Yakobo akotikala kasi akozanga kozwa etumbu te. “Mopanga na [Yehova]” ekotɛmɛla Bafilisitia, ekotɛmɛla Moaba, libota na lolendo mpe Amona, libota na komikumisa, ekotɛmɛla Edome mpe Damaseke, Kedala mpe Hasolo. (47:6) Litimbo ya Elama likobukana.

33. (a) Nini ekokómela Babilone, kɔ́pɔ ya wolo? (b) Na yango lolenge nini bato ya Nzambe basengeli kosala?

33 Mopanga ya Yehova liboso na Babilone (50:1–51:64). Yehova alobi sikawa na ntina na Babilone: Yebisá yango kati na mabota. Kobomba eloko moko te. Babilone asili kokangama mpe banzambe na yango bayokisami nsɔ́ni. Bókima longwa na ye. Malató oyo ebukaki mabota nyonso ya mabelé, yango moko esili kobukana. “Ɛ yo na lolendo!,” monyokoli na bakangami ya Yisalaele mpe Yuda, oyeba ete Yehova na bibele azali Mosikoli na bango. Babilone akokóma efandelo na banyama mabe. “Lokola wana Nzambe abukaki Sodomo mpe Gomola . . . moto akofanda wana te.” (50:31, 40) Yehova asalelaki Babilone lokola kɔ́pɔ na wolo na lobɔkɔ na ye mpo na komelisa mabota, kasi na mbalakaka asili kokwea, na boye ete yango moko ebukani. Bókimela na ntina na ye, bino bato. Yehova asili kopusa elimo ya bakonzi ya Mede mpo na kobebisa yango. Mibali na etumba ya Babilone batiki kobunda. Bakómi lokola basi. Mwana mwasi na Babilone akonyatama lokola etutelo na lɔsɔ. “Bakolala mpe mpɔngi na seko, bakolamuka te.” Mai monene etombwani mpe ezipi Babilone na ebele ya mbongé. ‘Bato na ngai, bóbima longwa na kati na ye, moto na moto abikisa molimo na ye, longwa na nkanda na makasi na Yehova.’ (51:39, 45) Bóyoka konganga, kobukana monene uta Babilone! Bibundeli ya Babilone mpo na etumba bisengeli kobebisama, mpamba te Yehova azali Nzambe oyo apesaka mbano. Na ntembe te, akobekola.

34. Elembo nini emonisi kokwea ya Babilone?

34 Yilimia apesi etindá na Selaya ete: ‘Kendá na Babilone mpe tángá na mongongo makasi maloba ya esakweli na ntina na Babilone. Na nsima, kangisá búku na libanga mpe bwaká yango katikati na Pelata. Okoloba mpe ete, Babilone akozinda boye, mpe akolubwa lisusu te mpo na mabe makoyeisa ngai likoló na ye.’​—51:61-64.

35. Lisoló nini lilandi na nsima?

35 Lisoló ya kokwea ya Yelusaleme (52:1-34). Lisoló oyo ezali na bokokani mingi na oyo elobelami liboso na 2 Mikonzi 24:18-20; 25:1-21, 27-30.

LITOMBA NA YANGO

36. (a) Ndakisa nini ya molende mpe ya mpiko tozali kokuta epai na Yilimia? (b) Na makambo nini Baluku, Balekaba, mpe Ebede-meleke bazali mpe ndakisa malamu mpo na biso?

36 Esakweli oyo epemami ezali kolendisa mpe ezali kopesa litomba. Tótalela ndakisa ya mpiko oyo mosakoli amonisaki. Kozanga kobanga, asakolaki nsango oyo bato bayebi Nzambe te balingaki koyoka yango te. Aboyaki kotambola elongo na bato mabe. Asosolaki ntina ya kosakola nsango ya Nzambe na lombangu nyonso, komipesáká mobimba kati na mosala ya Yehova mpe alɛmbaki soko moke te. Mpo na ye, liloba ya Nzambe lizalaki lokola mɔ́tɔ kati na mikuwa na ye, mpe yango ezalaki esengo monene mpe bosepeli na motema na ye. (Yil. 15:16-20; 20:8-13) Tiká ete biso mpe tózala na molende motindo moko mpo na liloba ya Yehova! Tiká ete biso mpe tósunga na bosembo nyonso basaleli ya Nzambe, motindo Baluku asungaki Yilimia. Botosi ya solosolo ya Balekaba ezali lisusu ndakisa kitoko mpo na biso, mpe ezali bobele bongo mpo na oyo etali boboto ya Ebede-meleke mpo na mosakoli oyo azalaki konyokwama.​—36:8-19, 32; 35:1-19; 38:7-13; 39:15-18.

37. Lolenge nini botaleli ya mokanda ya Yilimia ezali kolendisa kondima na biso kati na nguya oyo Yehova azali na yango ya kopesa bisakweli?

37 Liloba ya Yehova oyo liyaki epai na Yilimia likokisamaki na bosikisiki mpenza. Yango ezali solo kolendisa kondima kati na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kopesa bisakweli. Na ndakisa, tólobela kokokisama ya bisakweli oyo Yilimia ye moko amonaki, lokola komemama ya Sidikiya na boombo mpe kobebisama ya Yelusaleme (21:3-10; 39:6-9), kolongolama na bokonzi mpe liwa ya mokonzi Salumu (Yoahaza) kati na boombo (Yil. 22:11, 12; 2 Mik. 23:30-34; 2 Nta. 36:1-4), komemama ya mokonzi Konia (Yoyakini) na boombo na Babilone (Yil. 22:24-27; 2 Mik. 24:15, 16), mpe kufa ya Hanania, mosakoli ya lokuta, bobele na mbula yango (Yil. 28:16, 17). Bisakweli oyo nyonso, mpe mosusu, bikokisamaki bobele lokola Yehova asakolaki yango. Basakoli mpe basaleli ya Yehova oyo bayaki na nsima bamonaki ete esakweli ya Yilimia ebongi kotyelama motema mpe ezali na litomba. Na ndakisa, Danyele asosolaki uta na makomi ya Yilimia ete libebi ya Yelusaleme esengeli koumela mbula 70, mpe Ezela abendaki likebi likoló na kokokisama ya maloba ya Yilimia na nsuka ya mbula 70.​—Dan. 9:2; 2 Nta. 36:20, 21; Ezl. 1:1; Yil. 25:11, 12; 29:10.

38. (a) Kondimana nini, oyo Yesu mpe alobelaki yango, emonisami mingi kati na esakweli ya Yilimia? (b) Elikya nini ya Bokonzi ezali kosakolama?

38 Na libaku oyo abandisaki molulu ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo elongo na bayekoli na ye, Yesu amonisaki kokokisama ya esakweli ya Yilimia na ntina na kondimana ya sika. Na yango, alobelaki “kondimana na sika na makila na ngai,” na nzela na yango masumu na bango malimbisamaki mpe bayanganisamaki lokola libota ya Yehova na elimo. (Luka 22:20; Yil. 31:31-34) Bato oyo babotami na elimo mpe bakɔtisami na kondimana ya sika ezali bato oyo Klisto asali na bango kondimana mpo na Bokonzi, mpo na koyangela elongo na ye kati na makoló. (Luka 22:29; Emon. 5:9, 10; 20:6) Bokonzi oyo elobelami mbala mingi kati na esakweli ya Yilimia. Kati na botɔndɔli ya bozangi sembo ya Yelusaleme, Yilimia amonisaki mpe mwa elikya oyo: “[Yehova] alobi ete, Talá mikolo ikoya wana nakokólisela Davidi etape na boyengebene mpe ye akozala na lokumu lokola mokonzi mpe akobongisa makambo na mayele mpe akosambisa na sembo mpe na boyengebene kati na mokili.” Ɛɛ, mokonzi abyangami “[Yehova] boyengebene na biso.”​—Yil. 23:5, 6.

39. Bozongi ya batikali longwa na Babilone, lokola Yilimia asakolaki yango, epesi biso elikya nini?

39 Yilimia alobeli lisusu kozongisama: “Kasi bakosalela [Yehova] Nzambe na bango mpe Davidi, mokonzi na bango oyo nakobimisela bango ye.” (30:9) Na nsuka, ayebisi liloba malamu oyo Yehova asili koloba na ntina na Yisalaele mpe Yuda na polele nyonso ete, “na mikolo yango mpe na ntango yango [Yehova akokólisela] Davidi etape na boyengebene,” mpo na koyeisa mingi mombóto na ye mpe mpo ete ezala na ‘mwana oyo akoyangela lokola mokonzi na kiti na ye ya bokonzi.’ (33:15, 21) Lokola batikali bazongaki solo longwa na Babilone, bobele bongo Bokonzi ya “etape” wana ya boyengebene ekosambisa na bosembo mpe na boyengebene na mabelé mobimba.​—Luka 1:32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 326, 480.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto