Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 106-111
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA MASESE
  • LITOMBA NA YANGO
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Masese
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Zwá mayele mpe ndimá disipilini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • ‘Bwanya ekobakisela biso mikolo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tólóna kobanga ya pɛto mpo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 106-111

Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese

Balobi: Salomo, Agulu, Lemuele

Esika ya bokomi: Yelusaleme

Nsuka ya bokomi: soko 717 L.T.B.

1. Mayele nini makoki kozwama kati na mokanda ya Masese?

NTANGO Salomo, mwana na Davidi, akómaki mokonzi na Yisalaele na mobu 1037 L.T.B., abondelaki Yehova ete apesa ye “mayele mpe boyebi” mpo na “kosambisa libota oyo monene.” Yehova akokisaki lisɛngi na ye na kopesáká ye ‘motema ya boyebi mpe ya mayele mpe ya bososoli.’ (2 Nta. 1:10-12; 1 Mik. 3:12; 4:30, 31) Mpo na yango, Salomo akokaki “koloba masese nkóto misato.” (1 Mik. 4:32) Ndambo na maloba yango ya mayele oyo alobaki ekomamaki kati na mokanda ya Biblia oyo ebéngami Masese. Lokola mayele na ye ezalaki mpenza oyo ‘Nzambe atyaki na motema na ye,’ na yango, wana ezali biso koyekola Masese, tozali bongo koyekola mpenza mayele ya Yehova Nzambe. (1 Mik. 10:23, 24) Masese yango mazali na makambo ya solo ya seko. Mazali mpe na litomba na mikolo na biso lokola ezalaki na ntango oyo yango elobamaki mpo na mbala ya liboso.

2. Mpo na nini eleko ya Salomo ezalaki ntango oyo ebongaki mpo na kopesa litambwisi liuti na Nzambe kati na mokanda ya Masese?

2 Boyangeli ya Salomo ezalaki eleko moko malamu mpo na kopesa litambwisi wana euti na Nzambe. Elobamaki ete Salomo “afandaki na kiti na [Yehova] lokola mokonzi.” Bokonzi ya Teokrasi na Yisalaele ekómaki na nguya makasi, mpe Salomo apesamelaki “lokumu monene na bokonzi.” (1 Nta. 29:23, 25) Ezalaki ntango ya kimya, ya bomengo, mpe ya libateli. (1 Mik. 4:20-25) Nzokande, ata na nsé ya boyangeli wana ya Teokrasi, bato bazalaki kozwa mikakatano mpe mitungisi oyo mizalaki kokómela bango mpo na kozanga kokoka. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato yango bazalaki kokende epai na Salomo ete asunga bango mpo na kosilisa mikakatano na bango. (1 Mik. 3:16-28) Na boumeli ya ntango nyonso oyo akataki makambo ndenge na ndenge, abimisaki masese oyo makokanaki na ezalela ya makambo mingi ya bomoi oyo ezalaki kobima mokolo na mokolo. Baoyo bazalaki na mposa ya koyokanisa bomoi na bango na mokano ya Nzambe bazalaki kopesa motuya monene na maloba wana ya mokuse kasi ya kobenda likebi.

3. Lolenge nini mokanda ya Masese esangisamaki?

3 Lisoló limonisi te ete Salomo akomaki mokanda ya Masese. Nzokande, elobi ete ‘alobaki’ masese, mpe ete “alukaki mpe abongisaki masese mingi,” yango emonisi ete azalaki na mposa ya kobatela masese mpo ete esalelama na mikolo mizalaki koya nsima. (1 Mik. 4:32; Mos. 12:9) Na eleko ya Davidi mpe ya Salomo, bakomeli bazalaki kati na molɔngɔ́ ya bankumu ya ndako ya mokonzi. (2 Sam. 20:25; 2 Mik. 12:10) Toyebi te soki bakomeli wana nde bakomaki mpe basangisaki masese na ye, nzokande maloba ya bakonzi minene lokola ye mazalaki kotalelama na motuya monene mpe masengelaki bongo kokomama. Bato mingi mpenza bandimaka ete mokanda yango ezali bongo búku oyo esangisamaki uta na babúku mosusu.

4. (a) Mokanda ya Masese ekabolami mpenzampenza na lolenge nini? (b) Nani akomaki eteni monene ya masese?

4 Mokanda ya Masese mokoki kokabolama na biteni mitano. Ezali bongo: (1) Mikapo 1-9, ebandi na maloba oyo ete: “Masese na Salomo, mwana na Davidi”; (2) Mikapo 10-24, ebéngami “Masese na Salomo”; (3) Mikapo 25-29, ebandi na maloba oyo ete: “Oyo mpe izali masese na Salomo, oyo bato na Hizikiya, mokonzi na Yuda bakomaki lisusu”; (4) Mokapo 30, ebandi na lolenge boye ete: “Maloba na Agulu, mwana na Yake”; mpe (5) Mokapo 31, oyo ezali na “Maloba na mokonzi Lemuele, lisakoli na nguya oyo mama na ye alakisaki ye.” Eteni monene ya Masese ezalaki bongo ya Salomo. Makambo ya sikisiki mayebisami te na ntina na bomoi ya Agulu mpe ya Lemuele. Basusu balobaka ete Lemuele ekokaki mbala mosusu kozala nkombo mosusu ya Salomo.

5. Ntango nini mokanda ya Masese mokomamaki mpe motyamaki búku moko?

5 Ntango nini mokanda ya Masese mokomamaki mpe motyamaki na búku moko? Na ntembe te, eteni monene ekomamaki na boumeli ya boyangeli ya Salomo (1037-998 L.T.B.) liboso ete apɛngwa. Lokola makambo ya sikisiki mayebisami te na ntina na bomoi ya Agulu mpe ya Lemuele, tokoki te koyeba soki masese na bango makomamaki ntango nini. Lokola liboke moko esangisamaki na boumeli ya boyangeli ya Hizikiya (745-717 L.T.B.), kosangisama ya nsuka ekokaki te kosalema liboso ya boyangeli na ye. Biteni mibale ya nsuka biyanganisamaki mpe na nsé ya litambwisi ya Mokonzi Hizikiya? Eyano na motuna oyo ezwami kati na maloba ya polele na nsé ya lokasa, eyebisami na ntina na Masese 31:31 kati na New World Translation of the Holy Scriptures—With References: “Bibimeli mosusu ya makomi ya Liebele ezali komonisa trigrami, to balɛ́tɛlɛ misato, Chehth, Zaʹyin, Qohph (חזק) oyo ezalaki bongo sinyatire ya Mokonzi Hizikiya kati na kopi oyo bakomeli na ye bakomaki mpo na komonisa ete mosala yango mokómaki kino na nsuka na yango.”

6. Lisese ezali nini, mpe mpo na nini ebéngeli ya mokanda yango na Liebele ebongi mpenza?

6 Kati na ba Biblia ya Liebele mokanda yango mobéngamaki liboso engebene maloba ya ebandeli oyo mazwami kati na mokanda yango, mish·lehʹ, oyo elimboli bongo “masese.” Mish·lehʹ ezali na boíké, esalemi uta na liloba ya Liebele ma·shalʹ, oyo bato mingi bakanisaka ete euti na liloba oyo elimboli mpenza “kozala lokola” to “kokokanisama.” Nkombo yango ezali komonisa polele lolenge ya maloba oyo mazwami kati na mokanda, mpamba te masese mazali maloba mokuse oyo masalelaka mingimingi bokokanisi mpe masalemi mpo na kopusa moyoki ete akanisa. Lokola masese mazalaka mokuse, yango esalaka ete bato bálanda yango kozanga nkaká mpe esepelisa bango, mpe na lolenge wana mazalaka na mpasi te mpo na koteyama, koyekolama, mpe kokundolama. Likanisi na yango litikalaka libela.

7. Likambo nini tosengeli koyeba na ntina na lolenge ya kokoma oyo esalelami kati na mokanda ya Masese?

7 Lolenge ya elobeli oyo ezwami kati na mokanda yango ezali mpenza kosepelisa. Ezali lolenge ya elobeli ya ntɔ́ki ya Liebele. Motindo oyo makambo malobelami kati na mokanda yango ezali bongo ntɔ́ki ya kokokanisa makambo. Lolenge yango ya kolobela makambo esalaka te ete ebéngeli ya maloba ya nsuka ya milɔngɔ́ to bavɛrsɛ́ na yango eyokamaka lolenge moko. Kolandana ya milɔngɔ́ ezali komonisa makanisi makokanisami. Bonzengá mpe nguya ya kolakisama na yango ezwami kati na lolenge wana ya kolandisa makanisi. Makanisi makoki kokokana to kokesana, kasi nguya ya bokokanisi ekoki bongo koyeisa likanisi monene, mpe kosala ete ndimbola na yango eyebana malamu. Ndakisa ya bokokanisi oyo ezali na boyokani ezwami kati na Masese 11:25; 16:18; mpe 18:15, mpe bandakisa ya bokokanisi oyo ezali na bokeseni ezali mingi koleka kati na Masese 10:7, 30; 12:25; 13:25 mpe 15:8. Lolenge mosusu ya kolobela makanisi ezwami mpenza na nsuka ya mokanda yango. (Mas. 31:10-31) Kuna, vɛrsɛ́ 22 ebongisami na lolenge boye ete na Liebele vɛrsɛ́ mokomoko ezali kobanda na lɛ́tɛlɛ moko ya alfabé ya Liebele, lolenge yango ebéngami acrostiche, oyo esalelami mpe kati na mokanda ya Nzembo. Bonzengá na yango eleki makomi nyonso ya kala.

8. Lolenge nini kosalelama ya mokanda ya Masese epai na baklisto ya ekeke ya liboso endimisi bosolo na yango?

8 Bosolo ya mokanda ya Masese emonisami mpe na lolenge baklisto ya liboso bazalaki kosalela yango mingi mpo na kotya mibeko ya komitambwisa. Emonani ete Yakobo ayebaki malamu mokanda ya Masese mpo asalelaki malako na yango ya moboko kati na batoli kitoko oyo apesaki na ntina na etamboli ya boklisto. (Kokanisá Masese 14:29; 17:27 na Yakobo 1:19, 20; Masese 3:34 na Yakobo 4:6; Masese 27:1 na Yakobo 4:13, 14.) Maloba oyo mauti mbala moko na Masese mazwami kati na mikapo oyo: Baloma 12:20—Masese 25:21, 22; Baebele 12:5, 6—Masese 3:11, 12; 2 Petelo 2:22—Masese 26:11.

9. Lolenge nini mokanda ya Masese ezali na boyokani na mikanda mosusu ya Biblia?

9 Lisusu, mokanda ya Masese emonisi ete ezali na boyokani na mikanda mosusu ya Biblia, ezali mpe bongo eteni moko ya “Makomami nyonso.” Soki tokokanisi yango na Mibeko ya Mose, na mateya ya Yesu, mpe na makomi ya bayekoli mpe ya bantoma ya Yesu, tokomona ete ezali mpenza na bomoko ya makanisi. (Talá Masese 10:16—1 Bakolinti 15:58 mpe Bagalatia 6:8, 9; Masese 12:25—Matai 6:25; Masese 20:20—Exode 20:12 mpe Matai 15:4.) Mokanda ya Masese ezali na bomoko ya makanisi elongo na bakomi ya mikanda mosusu ya Biblia ata ntango ezali kolobela kobongisama ya mabelé mpo ete ezala efandelo ya bato.​—Mas. 3:19, 20; Gen. 1:6, 7; Yobo 38:4-11; Nz. 104:5-9.

10, 11. Nini oyo emonisi lisusu ete mokanda yango mopemami na Nzambe?

10 Bosikisiki na yango na makambo ya siansi ezali mpe elembeteli ete mokanda yango mopemamaki na Nzambe, ata wana lisese ezali kolobela chimie, zébi ya monganga, to malako ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Masese 25:20 ezali kolobela lolenge mai ya ngaí esalaka. Masese 31:4, 5 ezali na boyokani na bokundoli ya siansi na mikolo na biso, ete masanga makasi elembisaka mayele ya moto. Minganga mingi mpe bato oyo bayekolaka biloko ya kolya bandimi ete mafuta ya nzoi ezali malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, yango ezali kokundwela biso lisese oyo elobi ete: “Mwana na ngai, liya mafuta na nzoi zambi ezali malamu.” (Mas. 24:13) Makambo oyo masili komonana na mikolo na biso kati na zébi ya monganga oyo ebéngami psychosomatique ezwamaki uta kala kati na Masese. “Motema na kosepela ekosalaka malamu lokola nkisi.”​—17:22; 15:17.

11 Ya solo, mokanda ya Masese ezali mpenza kolobela mposa nyonso mpe bizalela nyonso ya makambo ya bato, yango epusaki nganga-mayele moko na koloba ete: “Ezali na likambo moko te etali bomoi ya bato, oyo ezangi lilako ebongi na yango, ezali te na bopusi moko ya malamu to ya mabe oyo ezangi kolendisama to kosembolama. Kati na mokanda yango mobimba, lisosoli ya moto etyami nokinoki na boyokani na Nzambe, . . . mpe moto azali kotambola lokola nde azali liboso ya Mozalisi to Mosambisi na ye . . . Lolenge nyonso ya bato emonisami kati na mokanda oyo ya kala; mpe atako ekomamaki esili koleka mbula nkóto misato, ezali ntango nyonso na boyokani na lolenge ya bomoto, lokola nde ekomami nsima na mokanda na kotalela lolenge ya bomoi ya bato na mikolo na biso.”​—Dictionary of the Bible ya Smith, 1890, Vol. III, lokasa 2616.

MAKAMBO MAZALI KATI NA MASESE

12. (a) Maloba nini ya ntɔ́ki makangisami masali eteni ya liboso ya mokanda ya Masese? (b) Ezali koteya nini na ntina na mayele mpe etamboli ya moto? (c) Lolenge nini Masese 1:7 epesi motó na likambo ya mokanda yango mobimba?

12 Eteni ya liboso (1:1–9:18). Yango ezali bongo maloba ya ntɔ́ki ekangisami na mosusu mpe esalemi na maloba mikuse lokola ete ezalaki maloba oyo tata azalaki koyebisa epai na mwana na ye, kolobeláká ntina oyo mayele masengeli kotambwisa motema na biso, to bomoto na biso mobimba, mpe ete tosengeli kozala na bokonzi likoló na bamposa na biso. Ezali kopesa mateya na ntina na motuya ya kozala na mayele mpe mapamboli na yango: esengo, nsáí, kimya, mpe bomoi. (1:33; 3:13-18; 8:32-35) Ezali kokesenisa yango na bozangi mayele mpe matomba mabe na yango: mpasi mpe na nsuka na yango liwa. (1:28-32; 7:24-27; 8:36) Na kotaleláká ebele ya makambo mazangi ndelo oyo bato bakutanaka na yango kati na bomoi, ezali kopesa biso libaku ya koyekola malamu etamboli ya moto mpe matomba oyo akoki kozwa mpo na etamboli yango lelo mpe na mikolo mizali koya. Maloba oyo mazwami kati na Masese 1:7 (NW) mapesi motó na likambo ya mokanda mobimba: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi.” Tosengeli kotalela Yehova kati na makambo na biso nyonso. Mokanda yango mozali kozongela mbala na mbala ete tosengeli soko moke te kobosana mibeko na Nzambe, tosengeli kokangama na malako na ye, mpe tosengeli kotika yango te.

13. Yebisá makambo minene oyo matongi eteni ya liboso ya mokanda ya Masese.

13 Makambo minene oyo matongi eteni oyo ya liboso ezali bongo mayele makoki mpenza kopesa litomba, boyebi, bobángi Yehova, disipilini, mpe bososoli. Makebisi mapesami na ntina na baninga mabe, kobwaka disipilini ya Yehova, mpe na ntina na kosala pite na basi bapaya. (1:10-19; 3:11, 12; 5:3-14; 7:1-27) Mbala mibale, mayele elobelami ete ezali na bisika nyonso, na yango ekoki kozwama, ezali mosika te. (1:20, 21; 8:1-11) Elobelami lokola moto mpe ezali kobenda likebi ya bato oyo bazangi mayele, ezali kútu kopesa mwa bingɛngiseli na ntina na bozalisi ya mabelé. (1:22-33; 8:4-36) Oyo nde mokanda ya motuya mingi! Eteni oyo esukisi na motó na likambo ezwami na ebandeli ya mokanda yango, ete “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya mayele.” (9:10, NW) Uta na ebandeli kino na nsuka, eteni yango ezali kolendisa biso ete tóbosana Yehova te kati na banzela na biso nyonso, ete tosengeli mpe kokangama na bosembo na ye, yango ezali nzela ya bomoi mpe ekoki kobatela biso liboso na makambo mingi ya mabe.

14. Bokokanisi nini ya makambo oyo makeseni ezali komonisa polele ete mateya mazwami kati na mokanda ya Masese mabongi kosalelama?

14 Eteni ya mibale (10:1–24:34). Eteni oyo ezali komonisa maponi mingi, malako makeseni oyo mazali kosalela mayele kati na makambo minene ya bomoi. Na koteyáká biso lolenge malamu ya kosalela yango, mokano na yango ezali bongo ya kopesa biso bolamu mingi mpe bomoi moko kitoko. Botɛmɛli kati na makambo oyo makeseni ezali kosala ete mateya yango másosolama polele kati na makanisi na biso. Talá mwa ndambo ya mitó na makambo oyo elobelami bobele kati na mikapo 10, 11, mpe Mas. 12:

bolingo etɛmɛli koyina

mayele etɛmɛli bolema

kolongobana etɛmɛli kokosa

bosembo etɛmɛli matɔ́ngi

solo etɛmɛli lokuta

elimo ya bokabi etɛmɛli moimi

etingya etɛmɛli goigoi

kotambola na bosembo etɛmɛli nzela mabe

toli malamu etɛmɛli kozanga litambwisi ya malamu

mwasi malamu atɛmɛli mwasi na nsɔ́ni

boyengebene etɛmɛli mabe

komikitisa etɛmɛli lolendo

Na kotaleláká molɔngɔ́ ya makambo oyo engebene bomoi ya mokolo na mokolo esengeli kondimisa biso ete Masese ezali mokanda oyo etondi na batoli oyo ebongi mpenza kosalelama!

15. Pesá mwa bandakisa ya makambo makeseni oyo makómelaka bato mpe malobelami kati na mokanda ya Masese.

15 Ndambo mosusu ya eteni oyo (13:1–24:34) ezali kokóba kokundwela biso mitindá ya Yehova mpo ete tókóma na bososoli. Makambo ndenge na ndenge oyo bato bakutanaka na yango na bomoi oyo elobelami awa ezali komonisa biso ete makambo oyo mazwami kati na mokanda yango mataleli mitindo mingi mpenza. Ezali mpenza litomba koleka mpo na biso ete tókoka kozwa bolamu na batoli ya Biblia likoló na makambo lokola komikumisa, komitombola, kokokisa maloba na yo, bososoli, boninga, kosembola mpe kobɔkɔla bana, lolenge moto atalelaka oyo ezali sembo, kozala na ezaleli ya kosilika noki te, kosalisa baoyo bazali na mpasi, kobuba, libondeli, koyokisama nsɔ́ni, kosepela na biloko oyo bizali mpenza na ntina na bomoi, lolendo, matomba mazwami na nzela ya mabe, kanyaka, koswana, komipekisa, komitangola, kokanga monɔkɔ, koponapona, kowelana, komikitisa, bomengo, libateli ya tata mpe mama, masanga oyo elangwisaka, koyiba, bizaleli ya mwasi, makabo, kodefa, kodefisa, boboto, kotyela moto motema, bandelo ya mabelé, kosala libota, elulela, komanyola, mpe boninga ya solo. Oyo nde ebele ya batoli oyo esengeli kotambwisa biso na lolenge lobongi kati na makambo ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo! Mpo na basusu, makambo mosusu oyo mauti kolobelama makómi komonana lokola ete mazangi ntina, kasi tosili komona ete Biblia etalelaka bamposa na biso na bopɔtu te, ata kati na makambo oyo emonani lokola ete ezali ya mikemike mpenza. Mpo na yango, mokanda ya Masese ezali na motuya monene koleka.

16. Toli nini ya kolendisa epesami kati na eteni ya misato ya Masese?

16 Eteni ya misato (25:1–29:27). Batoli ya kolendisa epesami likoló na makambo lokola lokumu, motema pɛtɛɛ, bonguna, lolenge ya kosala liboso na bato oyo bazali bazoba, masɛki, kolɛngɔla, zúwa, mpasi oyo moninga ayokisi yo, nkanda, kotɔ́nga, kokokisa mikumba na yo, kosɛnga litomba ya mosolo, koyambola masumu, makambo oyo mabimaka mpo na boyangeli mabe, komilakisa, matomba ya boyangeli ya boyengebene, botomboki ya bana, lolenge ya kotalela basaleli, bososoli, mpe lolenge ya komonela makambo.

17. (a) “Nsango ya kilo” nini Agulu apesi? (b) Alobeli biloko nini minei bikeseni?

17 Eteni ya minei (30:1-33). Oyo ezali “[nsango ya bozito, NW]” oyo elobami ete ezali ya Agulu. Nsima ya kondima na komikitisa nyonso ete azali moto oyo azangi ntina, mokomi alobi ete moto azali na likoki te ya kosala mabelé mpe biloko oyo bizali kati na yango. Alobi ete Liloba ya Nzambe ezali pɛto mpe alobi ete Nzambe azali nguba. Asɛngi na Yehova ete apɛngola lokuta mosika na ye mpe apesa ye bozwi te mpe bobolá te. Alobi na ntina na libota oyo elakelaka baboti na bango mabe ete bazali libota na mbindo, na lolendo mpe na lokoso. Amonisi biloko minei oyo bilobaka te ete “Ekoki!”, mpe biloko minei oyo bizali mpasi mpo na kososola yango. (30:15, 16) Alobeli mpe ezaleli ya kozanga nsɔ́ni oyo mwasi moko ya pite amonisi na kolukáká komilóngisa. Na nsima, alobi ete ezali na biloko minei oyo mabelé makoki kosimba yango te, biloko minei ya mike oyo ezali na mayele kasi ezangi lisosoli, mpe biloko minei etambolaka elongo na lolenge kitoko mpenza. Na kosaleláká bokokani na lolenge ya mayele, mokomi akebisi biso na ntina na likambo oyo ete “kobɛtabɛta na nkanda ekobimisa etumba.”​—30:33.

18. Mokonzi Lemuele alobi nini na ntina na (a) mwasi mabe mpe na ntina na (b) mwasi malamu?

18 Eteni ya mitano (31:1-31). Oyo ezali “[nsango ya bozito, NW]” mosusu mokonzi Lemuele apesaki. Ekomami na lolenge mibale. Eteni ya liboso ezali kolobela libebi oyo moto akoki kozwa soki abali mwasi mabe, ezali kokebisa ete masanga makasi makoki kobebisa bososoli na biso mpe ezali kosɛnga ete makambo makatama na bosembo nyonso. Ekomeli ya acrostiche oyo ezali na eteni ya mibale esalelami mpo na kolobela mwasi malamu. Ezali kolobela na mozindo motuya na ye, komonisáká ete mobali na ye atyelaka ye motema mpe azali na litomba monene mpo na mobali na ye. Azali mwasi oyo azali makasi na mosala, alamukaka na mpɔngi ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, asombaka biloko bisombelá te, amonisaka boboto epai na babólá, amonaka makambo na mosika mpe alobaka na mayele nyonso. Azalaka mpe na bokɛngi, bana na ye bamemyaka ye, mpe mobali na ye akumisaka ye. Likoló na nyonso, abangaka Yehova.

LITOMBA NA YANGO

19. Lolenge nini mokanda ya Masese yango moko ezali komonisa litomba na yango?

19 Litomba ya mokanda ya Masese emonisami na bavɛrsɛ́ na yango ya liboso: “Mpo na koyeba mayele mpe kolakisama mpe kososola maloba na boyebi. Ɛɛ, kolakisama na mayele mpe boyengebene mpe kosambisa na sembo mpe kokata na solo; kopesa mayele epai na elema, boyebi mpe toli epai na elenge.” (1:2-4) Na boyokani na mokano oyo, mokanda yango ezali kolobela mingi boyebi, mayele, mpe bososoli, mokomoko na yango ezali na litomba na lolenge na yango.

20. Mokanda ya Masese elobi nini na ntina na boyebi?

20 (1) Boyebi ezali eloko oyo moto azalaka na mposa na yango makasi, mpamba te ezali malamu te ete moto akwea mpo na kozanga boyebi. Moto akoki te kozwa boyebi ya sikisiki soki azangi kobanga Yehova, mpo ete boyebi ebandaka na bobángi. Tosengeli kolinga mingi boyebi koleka wolo. Mpo na nini? Bayengebene babikisamaka na lisalisi ya boyebi; ebatelaka biso ete tómikɔtisa na lisumu te. Tosengeli mpenza kozala na mposa ya koluka yango, ya kozwa yango! Ezali na motuya mpenza. Na yango, “kitisá litoi na yo mpe yokamela maloba na bato na mayele, tyá motema na yo na boyebi na ngai.”​—22:17; 1:7; 8:10; 11:9; 18:15; 19:2; 20:15.

21. Mateya mauti na Nzambe malobi nini na ntina na mayele?

21 (2) Mayele, likoki ya kosalela malamu boyebi mpo na kosanzola Yehova, “ezali likambo na liboso.” Luká kozwa yango. Eutaka epai na Yehova. Mayele oyo mapesaka bomoi ebandaka na koyeba mpe na kobanga Yehova Nzambe—yango sɛkɛlɛ́ monene mpo na kozwa mayele. Na yango, bangá Yehova, kasi moto te. Mayele elobelami lokola moto, ezali konganga, kolendisáká bato nyonso ete básembola banzela na bango. Mayele engangi makasi kati na balabála. Yehova abyangi baoyo nyonso bazangi mayele mpe baoyo na mitema makasi ete bámileisa na limpa ya mayele. Na bongo, na bobángi ya Yehova, bakozala na esengo ata soki bazali na biloko mingi te. Mayele ememaka mapamboli mingi; makambo oyo yango ebimisaka ezalaka na matomba mingi. Mayele mpe boyebi—ezali makambo ya ntina mingi oyo ekoki kopesa moto makoki ya kokanisa malamu, oyo ekoki kobikisa biso. Lokola mafuta ya nzoi epesaka litomba mpe epesaka nsáí, bobele bongo mayele. Ezali na motuya koleka wolo; ezali nzeté ya bomoi. Bato bazangi mayele babikaka te, mpamba te mayele ekobatelaka bomoi; yango elimboli bomoi.​—4:7; 1:7, 20-23; 2:6, 7, 10, 11; 3:13-18, 21-26; 8:1-36; 9:1-6, 10; 10:8; 13:14; 15:16, 24; 16:16, 20-24; 24:13, 14.

22. Libateli nini tokoki kozwa kati na bososoli?

22 (3) Longola boyebi mpe mayele, bososoli mpe ezali na ntina mingi; na yango, “ekozwa yo biloko nyonso, zwá mpe bososoli.” Bososoli ezali likoki ya komona biloko oyo bisangisi eloko moko; elimboli bongo likoki ya kokesenisa makambo, na kotaleláká ntango nyonso Nzambe, mpamba te moto akoki te kotyela bososoli na ye moko motema. Moto oyo azali kotɛmɛla Yehova akoki soko moke te kozala na bososoli! Mpo ete tózwa bososoli, tosengeli kosala makasi mpo na koluka yango lokola bakolukaka biloko ya motuya bibombami. Mpo na kososola, tosengeli kozala na boyebi. Ye oyo azali kosala bolukiluki mpo na kozwa boyebi akozwa mbano, mpe mayele mazali liboso na ye. Akobatelama liboso na ebele ya mitambo oyo mizali kati na mokili oyo; na ndakisa, ekoki kobatela ye liboso na ebele ya bato mabe oyo bakoki koluka kotyela ye motambo ete atambola elongo na bango na nzela ya molili. Tosengeli kozongisa matɔ́ndi epai na Yehova—eutelo ya boyebi oyo epesaka bomoi, mayele, mpe bososoli!—4:7; 2:3, 4; 3:5; 15:14; 17:24; 19:8; 21:30.

23. Toli nini ya mayele ekolobelama na nsima?

23 Na boyokani na mokano oyo mpo yango mokanda ya Masese mokomamaki, mokanda yango mozali komonisa ebele ya batoli ya mayele mpe epemami na Nzambe mpo na kosunga biso ete tózwa bososoli mpe tóbatela mitema na biso, “mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana.” (4:23) Talá kosangisama ya mokanda ya batoli kitoko oyo elandi elobelami kati na yango.    

24. Nini elobami na ntina na bato mabe mpe na ntina na bayengebene?

24 Bokeseni kati na bato mabe mpe bayengebene: Moto mabe akokangama kati na nzela na ye ezangi sembo, mpe biloko na ye ya motuya bikobatela ye te na mokolo na nkanda. Moyengebene azali kati na nzela ya bomoi mpe Yehova akopesa ye mbano.​—2:21, 22; 10:6, 7, 9, 24, 25, 27-32; 11:3-7, 18-21, 23, 30, 31; 12:2, 3, 7, 28; 13:6, 9; 14:2, 11; 15:3, 8, 29; 29:16.

25. Lolenge nini mokanda ya Masese ezali kokebisa biso na ntina na pite?

25 Ntina ya kozala na etamboli ya pɛto: Salomo azali ntango nyonso kokebisa biso na ntina na etamboli ya mbindo. Bato na ekobo bakozwa etumbu mpe bakotyolama, mpe nsɔ́ni na bango ekolongolama te. “Mai mayibami” makoki kozala elɛngi mpo na elenge, kasi mwasi na pite azali kokita kino kufa mpe akomema ye oyo akwei na mabɔkɔ na ye. Yehova asambisaka baoyo bamipesi na pite.​—2:16-19; 5:1-23; 6:20-35; 7:4-27; 9:13-18; 22:14; 23:27, 28.

26. Nini elobami na ntina na ezaleli ya komipekisa?

26 Ntina na komipekisa: Kolangwa masanga mpe kolunda epekisami. Baoyo bandimami na Nzambe basengeli kozala na bokatikati na kolya mpe na komela. (20:1; 21:17; 23:21, 29-35; 25:16; 31:4, 5) Baoyo basilikaka noki te bazali na bososoli mingi mpe bazali na mpiko koleka bato na nguya oyo bakoki kobɔtɔla engumba. (14:17, 29; 15:1, 18; 16:32; 19:11; 25:15, 28; 29:11, 22) Ezaleli ya komipekisa ezali mpe na ntina mpo na kopɛngola bilulela mpe zúwa, oyo ezali bongo kopola kati na mikuwa.​—14:30; 24:1; 27:4; 28:22.

27. (a) Kosalela maloba na lolenge mabe ezali nini? (b) Mpo na nini kosalela bibebu mpe lolemo na biso na lolenge ya mayele ezali likambo ya ntina mingi?

27 Koloba na mayele mpe na bolema: Moto azangi sembo, motɔ́ngi, motatoli na makambo na lokuta, mpe bato na makambo na bongolabongola bakomonisama polele, mpamba te bayinami na Yehova. (4:24; 6:16-19; 11:13; 12:17, 22; 14:5, 25; 17:4; 19:5, 9; 20:17; 24:28; 25:18) Monɔkɔ oyo ebimisaka makambo malamu ezali liziba ya bomoi, kasi monɔkɔ ya elema ekomema ye na libebi. “Kufa mpe bomoi izali na nguya ya lolemo; baoyo balingi yango bakolya mbuma na yango.” (18:21) Matɔ́ngi, maloba ya lokuta, maloba ya kolengola ya bokosi, mpe maloba malobami kozanga kokanisa liboso makweisami. Koloba solo, kokumisa Nzambe ezali nzela ya mayele.​—10:11, 13, 14; 12:13, 14, 18, 19; 13:3; 14:3; 16:27-30; 17:27, 28; 18:6-8, 20; 26:28; 29:20; 31:26.

28. Lolendo ememaka mpasi nini, kasi litomba nini lizwamaka na komikitisa nyonso?

28 Bolema ya lolendo mpe ntina ya komikitisa: Moto na lolendo amitombolaka na etɛlɛmɛlo oyo ekoki na ye te, na yango alóngaka te. Yehova ayini bato na lolendo, kasi apesaka mayele, nkembo, bozwi, mpe bomoi epai na bato na komikitisa.​—3:7; 11:2; 12:9; 13:10; 15:33; 16:5, 18, 19; 18:12; 21:4; 22:4; 26:12; 28:25, 26; 29:23.

29. Lolenge nini tosengeli kotalela ezaleli ya gɔigɔi, mpe molende ezali na ntina nini?

29 Molende, kasi gɔigɔi te: Makambo mingi malobami na ntina na moto na gɔigɔi. Asengeli kokende epai na nsɛlɛlɛ mpo na kozwa liteya mpe kokóma na mayele. Ɛɛ, kasi moto na molende—akozwa bomengo!—1:32; 6:6-11; 10:4, 5, 26; 12:24; 13:4; 15:19; 18:9; 19:15, 24; 20:4, 13; 21:25, 26; 22:13; 24:30-34; 26:13-16; 31:24, 25.

30. Lolenge nini mokanda ya Masese elobeli makasi boninga malamu?

30 Baninga ya sembo: Ezali bolema kosangana elongo na baoyo babangaka Yehova te, elongo na bato mabe to bazoba, bato na nkanda, elongo na bato na sɔngisɔngi, to elongo na balundi. Tosengeli nde kozala baninga na bato na mayele, mpe tokokóma na mayele mingi.​—1:10-19; 4:14-19; 13:20; 14:7; 20:19; 22:24, 25; 28:7.

31. Toli malamu nini epesami na ntina na mpamela?

31 Ntina ya kopamelama mpe ya kosembolama: “[Yehova] akopamela ye oyo alingaka,” mpe baoyo batyaka likebi na disipilini yango bazali kati na nzela oyo ezali komema na nkembo mpe na bomoi. Ye oyo aboyaka mpamela akoyokisama nsɔ́ni.​—3:11, 12; 10:17; 12:1; 13:18; 15:5, 31-33; 17:10; 19:25; 29:1.

32. Elendiseli nini malamu epesami na ntina na mwasi malamu?

32 Toli mpo na kozala mwasi malamu: Mbala na mbala mokanda ya Masese ezali kokebisa na ntina na mwasi oyo aswanaka mpe oyo asalaka makambo na bololé. Mwasi ya mayele, mwasi ya makoki oyo abangaka Nzambe, epai na ye motema-boboto ezali nde mobeko likoló na lolemo na ye; ye oyo azwi mwasi motindo wana azwi bongo likabo ya ngɔlu euti na Yehova.​—12:4; 18:22; 19:13, 14; 21:9, 19; 27:15, 16; 31:10-31.

33. Toli nini ya ntina mingi epesami na ntina na kobɔkɔla bana?

33 Kobɔkɔla bana: Teyá bango mibeko ya Nzambe mokolo na mokolo mpo ete “bábosana te.” Uta na bomwana mpenza, bɔkɔlá bango kati na kolakisama ya Yehova. Koboya fimbo te wana esengeli kosalela yango; lokola elembo ya bolingo, fimbo mpe mpamela epesaka elenge mobali mayele. Baoyo babɔkɔlaka bana na nzela ya Nzambe bakozala na bana ya mayele oyo bakopesa esengo mpe nsáí mingi epai na tata mpe epai na mama.​—4:1-9; 13:24; 17:21; 22:6, 15; 23:13, 14, 22, 24, 25; 29:15, 17.

34. Kokamata mokumba ya kosunga basusu ezali na litomba nini?

34 Mokumba ya kosunga basusu: Yango elobelami makasi kati na mokanda ya Masese. Bato na mayele basengeli kopalanganisa boyebi mpo na litomba ya basusu. Tosengeli mpe kozala na ezaleli ya kokaba na komonisáká boboto epai na baoyo bazali na makoki mingi te, mpe na kosaláká bongo, tozali mpenza kodefisa Yehova, ye oyo apesi biso ndanga ete akofuta yango.​—11:24-26; 15:7; 19:17; 24:11, 12; 28:27.

35. Na kolobeláká mikakatano na biso na mozindo mpenza, mokanda ya Masese epesi biso toli nini?

35 Kotya motema epai na Yehova: Mokanda ya Masese ezali kolobela mikakatano na biso na mozindo mpenza, wana ezali kopesa biso toli ete tótya elikya na biso mobimba epai na Nzambe. Tosengeli kotalela Yehova na makambo na biso nyonso. Moto akoki komityela mikano, kasi Yehova asengeli kotambolisa ye. Nkombo ya Yehova ezali linɔ́ngi makasi, kati na yango bayengebene bakimaka mpe bazwaka libateli. Tyá elikya epai na Yehova mpe talelá Liloba na ye mpo na kozwa litambwisi.​—3:1, 5, 6; 16:1-9; 18:10; 20:22; 28:25, 26; 30:5, 6.

36. Mpo na nini tokoki koloba ete mokanda ya Masese esilá ngala te, ebongi kosalelama, mpe ezali na litomba?

36 Tozali mpenza kozwa litomba mpo na komiteya mpe komipesa disipilini biso moko mpe kopesa basusu disipilini na nzela ya mokanda ya Masese! Eloko moko te oyo etali boyokani kati na bato ezangi kolobelama. Ezali na moto oyo amitángolaka na baninga na ye basambeli ya Nzambe? (18:1) Ye oyo azali kokokisa mikumba minene akataka makambo kozanga kotalela ngámbo nyonso mibale? (18:17) Ezali na moto oyo asalaka masɛki koleka ndelo? (26:18, 19) Moto moko azali na ezaleli ya koponapona? (28:21) Moto na mombongo kati na magazini na ye, mosáli bilanga kati na bilanga na ye, mobali mpe mwasi kati na libala mpe mwana—bango nyonso bazwi batoli ya ntina mingi. Baboti bazwi lisungi mpo ete bákoka komonisa epai na bana na bango ebele ya mitambo oyo mityami na nzela ya bilenge. Bato na mayele bakoki koteya baoyo bazali na mayele mingi te. Mokanda ya Masese ezali na ntina mingi ata epai wapi tozali kofanda; mateya mpe batoli oyo ezwami kati na mokanda yango esilaka ngala te. Molakisi moko ya États-Unis, William Lyon Phelps, alobaki ete: “Mokanda ya Masese ezali mpenza na makambo ya sika koleka zulunalo oyo ebimi lelo na ntɔ́ngɔ́.”a Mokanda ya Masese ebongi na mikolo na biso, ebongi kosalelama, mpe ezali na litomba mpo na koteya, mpamba te epemamaki na Nzambe.

37. Lolenge nini mokanda ya Masese ezali na boyokani na mateya ya Salomo Monene?

37 Lokola ezali na litomba mpo na kotya makambo na molɔngɔ́, mokanda ya Masese oyo mingi na yango elobamaki na Salomo, ezali kopusa bato ete bámibalola epai na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yesu Klisto asalaki mpe bongo, ye oyo abéngami “oyo aleki Salomo” kati na Matai 12:42.

38. Lolenge nini mokanda ya Masese ezali kobakisela biso bosepeli na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe mitindá na yango ya sembo?

38 Tokoki kozala na botɔ́ndi mingi mpamba te Yehova aponi Ye oyo azali na mayele mpenza ete azala Mombóto ya Bokonzi! Kiti na ye ya bokonzi ezali oyo “ekokokisama na boyengebene,” mpo na boyangeli ya kimya mpe ya nkembo mingi koleka ata oyo ya Mokonzi Salomo. Na ntina na boyangeli ya Bokonzi wana, ekolobama ete: “Boboto mpe bosembo ikobatela mokonzi; kiti na bokonzi na ye ekokisami na boboto.” Yango ekobandisa boyangeli ya sembo ya seko mpo na bato, oyo na ntina na yango mokanda ya Masese elobi lisusu ete: “Mokonzi oyo asambisi babólá na sembo, kiti na ye ya bokonzi ekokokisama seko.” Na yango, toyei kososola na esengo nyonso ete mokanda ya Masese esuki te bobele na kongɛngisa nzela na biso mpo na kozwa boyebi, mayele, mpe bososoli, mpe oyo ezali komema na bomoi ya seko, kasi, oyo ezali lisusu ntina mingi koleka, ezali kokembisa Yehova lokola Liziba ya mayele ya solo, oyo mapesami na nzela ya Yesu Klisto, Mosangoli ya libula ya Bokonzi. Mokanda ya Masese ezali kobakisela biso bosepeli mingi na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe mitindá ya sembo oyo na nzela na yango Bokonzi ezali koyangela sikawa.​—Mas. 25:5; 16:12; 20:28; 29:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Treasury of the Christian Faith, 1949, ebimisami na Stuber mpe Clark, lokasa 48.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto