Mokanda ya Biblia nimero 14—2 Ntango
Mokomi: Ezela
Esika ya bokomi: Yelusaleme (?)
Nsuka ya bokomi: soko 460 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 1037-537 L.T.B.
1. Ntango nini Ezela asilisaki koyanganisa masoló oyo akomaki kati na mokanda ya Ntango, mpe akomaki yango na mokano nini?
LOKOLA emonani polele ete na ebandeli mokanda ya Ntango ya Liboso mpe ya Mibale ezalaki búku bobele moko, makambo nyonso malobami na mokapo oyo mouti koleka, oyo mataleli moboko ya mokanda yango, moto oyo akomaki yango, ntango oyo yango ekomamaki, lotómo na yango ya kotángama kati na kanɔ́ ya Biblia, mpe bosolo na yango esalelami mpo na mikanda yango nyonso mibale. Engebene bilembeteli oyo bimonisamaki, Ezela asilisaki kokoma mokanda ya Ntango ya Mibale soko na mobu 460 L.T.B., ekoki mpenza kozala na Yelusaleme. Mokano ya Ezela ezalaki ete abatela mikanda ya masoló ya kala oyo ekokaki mbala mosusu kobunga. Na lisalisi ya elimo santu, bakisá mpe makoki na ye lokola mokomi ya makambo ya kala mpe makoki na ye ya koyanganisa mpe ya kopona makambo na bozindo, Ezela azwaki likoki ya kokoma lisoló moko ya sikisiki mpe oyo ekokaki koumela. Makambo oyo ye ayebaki ete masalemaki mpenza kati na lisoló ya bato, abatelaki yango mpo na mikolo mizalaki koya. Ezela asalaki mosala na ye na eleko oyo ebongaki mpenza, mpamba te na eleko yango ezalaki mpenza na ntina ete makomi nyonso ya bulɛɛ na Liebele oyo makomamaki na boumeli ya bikeke máyanganisama.
2. Mpo na nini ntina ezali te ya kobɛta ntembe likoló na bosolo ya mokanda ya Ntango?
2 Bayuda ya eleko ya Ezela bazwaki litomba monene kati na mokanda mopemami ya Ntango, oyo Ezela akomaki. Ekomamaki mpo na koteya bango mpe mpo na kolendisa ezaleli na bango ya koyika mpiko. Bazwaki elikya na nzela ya libɔndisi oyo ezwami kati na Makomami. Bandimaki mokanda ya Ntango lokola eteni moko kati na kanɔ́ ya Biblia. Bayebaki ete yango ebongaki kotyelama motema. Bazalaki na likoki ya kokokanisa yango na makomi mosusu mapemami mpe na ebele ya mikanda ya mokili oyo Ezela azongelaki maloba na yango. Atako batikaki mikanda mipemami te ya mokili ete mibebisama, kasi babatelaki malamu mokanda ya Ntango. Babongoli ya Septante bakɔtisaki mokanda ya Ntango kati na Makomami ya Liebele.
3. Lolenge nini makomami mosusu mamonisi bosolo ya mokanda ya Ntango?
3 Yesu Klisto mpe bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bandimaki yango ete ezali solo mpe ete epemami. Na ntembe te, Yesu azalaki kokanisa na ntina na makambo oyo makomami na 2 Ntango 24:21 wana azalaki kotɔndɔla bafándi ya Yelusaleme ete babomaki basakoli mpe basaleli ya Nzambe, mpe ete babambaki basaleli ya Yehova mabanga. (Mat. 23:35; 5:12; 2 Nta. 36:16) Na ntango Yakobo abéngaki Abalayama ete “moninga na Nzambe,” ekoki kozala ete asalelaki maloba ya Ezela oyo ezwami kati na 2 Ntango 20:7. (Yak. 2:23) Mokanda yango mozali mpe na bisakweli oyo bikokisamaki solo mpenza.—2 Nta. 20:17, 24; 21:14-19; 34:23-28; 36:17-20.
4. Eloko nini emonanaki na bokundoli ya arkeoloji oyo endimisi bosolo ya mokanda ya Ntango ya Mibale?
4 Arkeoloji mpe endimisi bosolo ya mokanda ya Ntango ya Mibale. Na botimoli oyo esalemaki kati na etúká oyo Babilone ya kala ezalaki, balukiluki bakundolaki bitando bisalemi na mabelé, oyo elobeli boyangeli ya Nebukadanesala, moko na bitando yango etángi nkombo ya “Yaukin, mokonzi na mokili ya Yahud,” elingi koloba, “Yoyakini, mokonzi na mokili ya Yuda.”a Yango eyokani malamu na lisoló ya Biblia oyo eyebisi ete Yoyakini amemamaki na boombo na Babilone na boumeli ya mbula nsambo ya boyangeli ya Nebukadanesala.
5. Lisoló oyo lilobelami kati na mokanda ya Ntango ya Mibale eumelaki ntango boni, mpe mpo na nini lisoló ya Yuda elobelami mingi koleka oyo ya bokonzi ya mabota zomi?
5 Lisoló lizwami kati na mokanda ya Ntango ya Mibale lizali koyebisa makambo oyo masalemaki na Yuda na boyangeli ya Salomo oyo ebandaki na mobu 1037 L.T.B., kino na mobu 537 L.T.B., ntango Siruse abimisaki ekateli na ntina na kotongama lisusu ya ndako ya Yehova na Yelusaleme. Na lisoló oyo eumeli mibu 500, bokonzi ya mabota zomi elobelami bobele wana makambo na yango mataleli makambo ya Yuda, mpe kútu kobomama ya bokonzi yango ya nɔ́rdi na 740 L.T.B. elobelami soko moke te. Mpo na nini bongo? Mpamba te nganga Ezela azalaki komibanzabanza liboso mpenza ete losambo ya Yehova etyama na esika oyo ebongi na yango, na ndako ya Nzambe, na Yelusaleme; amibanzabanzaki mpe na ntina na bokonzi ya molɔngɔ́ ya libota ya Davidi, oyo Yehova asalaki na ye boyokani. Na yango, ezali bongo na ntina na bokonzi ya súdi nde Ezela atye likebi na ye mobimba, mpo na kotombola losambo ya solo mpe na kozeláká ete mokonzi abima na Yuda.—Gen. 49:10.
6. Kati na makambo nini Ntango ya Mibale ezali mpenza mokanda ya kolendisa?
6 Ezela azali komona makambo uta na etɛlɛmɛlo moko etombwani mpenza. Kati na mikapo 36 ya Ntango ya Mibale, 9 ya liboso milobeli mingi boyangeli ya Salomo, mpe 6 na yango milobeli bobele kolɛngɛlama mpe kobulisama ya ndako ya Yehova. Lisoló yango lilobeli te kozanga sembo oyo Salomo amonisaki. Na mikapo 27 mosusu, 14 mizali kolobela bakonzi mitano oyo balandaki mpenza ndakisa ya Davidi ya komipesa mobimba na losambo ya Yehova: Asa, Yosafata, Yotama, Hizikiya, mpe Yosiya. Ata kati na mikapo 13 mosusu, Ezela asɛnzɛli ete amonisa makambo ya malamu ya bakonzi ya mabe. Azali ntango nyonso kolobela makasi makambo matali kozongisama mpe kobatelama ya losambo ya solo. Oyo nde mokanda ya kolendisa!
MAKAMBO MAZALI KATI NA NTANGO YA MIBALE
7. Lolenge nini Yehova asalaki mpo ete Salomo akóma na “nkembo monene”?
7 Nkembo ya boyangeli ya Salomo (2 Nta. 1:1–9:31). Na ebandeli ya mokanda ya Ntango ya Mibale, tozali komona ete bokonzi ya Salomo, mwana ya Davidi, ezali kokóma makasi mingi. Yehova azali na ye elongo mpe ‘akembisi ye na nkembo monene.’ Na ntango Salomo atumbi mbeka na Gibona, Yehova abimeli ye na butu, mpe ayebisi ye ete: “Lɔmbá eloko nini ekopesa ngai na yo.” Salomo asɛngi boyebi mpe mayele mpo ete akoka kokamba libota ya Yehova na lolenge lobongi. Lokola lilɔmbɔ na ye ezangi moimi, Nzambe alaki ete akopesa Salomo bobele mayele mpe boyebi te kasi lisusu bomɛngo mpe bozwi mpe lokumu ‘oyo mokonzi moko liboso na ye azalaki pelamoko na yango te mpe mosusu akoya nsima na ye te oyo akozala na yango pelamoko.’ Bozwi ezali mpenza mingi kati na mboka, na boye ete na nsima ya mwa mikolo, Salomo ‘azalisi palata mpe wolo kati na Yelusaleme mingi lokola mabanga.’—2 Nta. 1:1, 7, 12, 15.
8. Lolenge nini mosala ya tempelo ekóbaki, mpe wapi mwa makambo mosusu matali ndako yango?
8 Salomo akamati bato mpo na mosala ya botongi ndako ya Yehova, mpe mokonzi Hilama ya mboka Tulo apesi lisungi na ye na kotindeláká ye mabaya mpe mobali moko oyo azali mosáli ya makoki mingi. Mosala ya botongi ebandi “na elanga [“mbula,” NW] na minei na bokonzi na [Salomo],” mpe eyei kosuka na nsima ya mbula nsambo na ndambo, na 1027 L.T.B. (2 Nta. 3:2) Lingɔ́ngɔ oyo na liboso ya tempelo ezali na bosándá ya mapeko 120 (mɛtɛlɛ 53,4). Makonzí minene mibale masalemi na motako matyami na liboso ya lingɔ́ngɔ, moko ebéngami Yakini, oyo elimboli “Tiká ete [Yehova] apika makasi”; mpe mosusu ebéngami Boaza, oyo emonani ete elimboli “bokasi.” (2 Nta. 3:17) Na bokokanisi, ndako yango ezali moke, ezali na bolai ya mapeko 60 (mɛtɛlɛ 26,7), bosánda ya mapeko 30 (mɛtɛlɛ 13,4), mpe na bonene ya mapeko 20 (mɛtɛlɛ 8,9) kasi bifelo mpe plafó na yango ekembisami na wolo; eteni na yango ya kati mpenza, Esika eleki bosantu, ekembisami malamu mpenza na wolo. Bakeluba mibale ya wolo mpe bazali kati na yango, batyami na ngámbo na ngámbo kati na ndako, mapapu na bango mafungwani matombwani moko likoló na mosusu mpe makutani na katikati.
9. Tángá bisaleli oyo bizwami kati na lopango mpe kati na tempelo.
9 Na kati na lopango ezali na etumbelo moko monene esalemi na motako, ezali na bonene ya mapeko 20 (mɛtɛlɛ kalé 9) mpe na bosánda ya mapeko 10 (mɛtɛlɛ 4,5). Eloko mosusu ya kobenda likebi ezwami kati na lopango yango ezali bongo saani monene, etyelo monene ya mai esalemi na motako efandisami likoló na ngɔmbɛ mibali basalemi na palata oyo mitó na yango etalisami na libándá, misatamisato na ngámbo mokomoko. Saani monene yango ekoki kokɔta “mbata nkɔ́tɔ misato” (lítɛlɛ 66 000) ya mai, epai kuna banganga basukolaka nzoto. (2 Nta. 4:5) Kati na lopango ezali mpe na saani zomi ya mike esalemi na motako etyami likoló na makalo makembisami na motako, mpe mai matyami kati na yango masalelami mpo na kosukola biloko oyo bisalelami na ntango ya kotumba mbeka. Mai yango mautaka na saani monene ya ebendé mpe likalo yango ekoki kokumbama na esika nyonso oyo mai wana esengeli kosalelama. Lisusu, ezali na bityelo ya miinda zomi bisalemi na wolo mpe na bisaleli misusu mingi, ezala ya wolo mpe ya motako, mpo na losambo kati na tempelo.b
10. Likambo nini lisalemi na ntango Sanduku ekɔtisami kati na Esika eleki bosantu?
10 Na nsuka, kotongama ya ndako ya Yehova esilaki na nsima ya mbula nsambo na ndambo. (1 Mik. 6:1, 38) Mokolo ya kobulisama na yango ezali bongo ntango ya komema elembo ya kozala ya Yehova na eteni ya kati mpenza ya ndako wana kitoko. Banganga bamemi “sanduku na kondimana na [Yehova] kati na esika yango na kati na elobelo na ndako, esika eleki bulɛɛ, na nsé na mapapu na bakeluba.” Likambo nini libimi na ntango yango? Wana bayembi Balevi mpe babɛti-miziki basanzoli Yehova mpe batɔ́ndi ye na loyembo bobele moko, lipata lizipi ndako, mpe banganga bakoki te kotɛlɛma wana mpo na kosala mosala na bango mpamba te “nkembo na [Yehova]” etondisi ndako na Nzambe ya solo. (2 Nta. 5:7, 13, 14) Na bongo, Yehova amonisi ete andimi tempelo yango mpe amonisi elembeteli ya kozala na ye na esika yango.
11. Libondeli nini Salomo asali, mpe asɛngi eloko nini?
11 Ebáelo moko ya motako na bosándá ya mɛtɛlɛ 1,3 etongamaki mpo na libaku yango, mpe etyami na lopango ya kati pene na etumbelo monene ya motako. Salomo amati likoló na yango, na bongo ebele ya bato oyo bayangani mpo na molulu ya kobulisama ya tempelo bakoki komona ye. Na nsima ya komona likamwisi oyo elakisi kozala ya Yehova na nzela ya lipata moko ya nkembo, Salomo afukami liboso na bato nyonso mpe asali libondeli moko ya nguya mpo na kotɔ́nda mpe kosanzola Nzambe, kati na yango asɛngi mpe bolimbisi mpe mapamboli na komikitisa nyonso. Na nsuka ya libondeli yango, alɔmbi ete: “Sasaipi, ɛ Nzambe na ngai, tiká ete miso na yo máfungwana mpe matoi na yo máyokamela libondeli likobondelama na esika oyo. Ɛ [Yehova] Nzambe, bongolá mokɔngɔ na yo na elongi na moponami na yo te; kanisá boboto na yo epai na Davidi, moombo na yo.”—2 Nta. 6:40, 42.
12. Lolenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya Salomo, mpe na lolenge nini molulu ya mikolo 15 esuki na esengo?
12 Yehova ayoki libondeli ya Salomo? Nokinoki nsima wana Salomo asilisi kobondela, mɔ́tɔ mokiti uta na makoló mpe mozikisi libonza ya kotumba mpe mbeka, mpe “nkembo na Nzambe” etondisi ndako. Yango epusi bato ete bángumbama mpe bátɔ́nda Yehova, “mpo ete ye azali malamu, boboto na ye ekoumela seko.” (2 Nta. 7:1, 3) Na bongo mbeka moko monene epesami epai na Yehova. Elambo ya kobulisama ya tempelo eumeli pɔ́sɔ mobimba; na nsima Elambo ya kobuka mbuma mpe eumeli pɔ́sɔ mobimba, mpe elandani na sabata ya kozanga kosala mosala. Nsima ya molulu wana ya esengo, ya kolendisa na elimo, oyo eumeli mikolo 15, Salomo azongisi bato epai na bango na esengo mpe na motema motondi na mayoki malamu. (2 Nta. 7:10) Yehova mpe asepeli. Alendisi lisusu kondimana ya Bokonzi epai na Salomo, apesi ye mpe likebisi na ntina na mbuma mabe oyo ekoki kobima mpo na kozanga botosi.
13. (a) Mosala nini ya botongi ekóbi nsima ya kotongama ya tempelo? (b) Lolenge nini mokonzi-mwasi na Seba amonisi mayoki na ye na ntango amoni bokonzi ya Salomo?
13 Salomo akóbi sikawa mosala monene ya botongi kati na etando mobimba ya boyangeli na ye, atongi ndako mpo na ye moko, atongi mpe bingumba makasi, bingumba ya bibombelo, bingumba ya makalo, mpe bingumba ya batamboli-na-mpunda, mpe biloko mosusu oyo ye asepelaki kotonga. Ezali eleko moko ya nkembo mpe ya bolamu mingi mpe ya kimya mpamba te mokonzi mpe bato nyonso ya mboka bazali komibanzabanza mpo na losambo ya Yehova. Ata mokonzi-mwasi ya Seba, uta na mboka na ye oyo ezali na ntáka ya kilomɛtɛlɛ 1 900, ayoki nsango na ntina na bozwi mpe mayele ya Salomo mpe asali mobembo molai mpe ya mpasi mpo ete akende komona na miso na ye moko. Mposa na ye ezangi kokokisama? Soko moke te, mpamba te alobi ete: “Nalingaki kondima maloba na bango te bobele ete ngai moko naya mpe miso na ngai mámona yango. Talá nayebisameli ata mpo na ndambo na mayele na yo monene te! Oleki lokumu lozalaki ngai koyoka mpo na yango. Bato na yo bazali na esengo mpe baombo na yo bazali na esengo baoyo bakotɛlɛmaka liboso na yo ntango nyonso mpe bakoyokaka mayele na yo.” (2 Nta. 9:6, 7) Kati na bakonzi nyonso na mabelé, moko te aleki Salomo na bozwi mpe na mayele. Ayangeli na boumeli ya mbula 40 kati na Yelusaleme.
14. Mpo na nini Yisalaele elongolami nokinoki na nkembo na yango?
14 Boyangeli ya Lehobama mpe ya Abiya (2 Nta. 10:1–13:22). Boyangeli mabe mpe ya bonyokoli ya Lehobama mwana na Salomo epusi mabota zomi ya nɔ́rdi oyo ezali na nsé ya Yelobama ete bátomboka na 997 L.T.B. Nzokande, banganga mpe Balevi ya bikonzi wana mibale bamitye na ngámbo ya Lehobama, batye bosembo na bango kati na kondimana ya Bokonzi na esika ya liboso koleka bolingi-ekólo. Nokinoki, Lehobama asundoli mibeko ya Nzambe, Sisaka mokonzi ya Ezipito ayeisi etumba, akɔti na Yelusaleme mpe apunzi biloko ya motuya kati na ndako ya Yehova. Ezali mpenza likambo ya mawa, bobele mbula 30 nsima ya kotongama na yango, nkembo ya ndako oyo ekembisamaki malamu elongolami! Mpamba te, libota “batambolaki sembo te na miso ya Yehova.” Lehobama abongoli motema na ntango ebongi, na boye ete Yehova abebisi libota yango te.—2 Nta. 12:2, NW.
15. Bitumba nini bibimi na nsima ya liwa ya Lehobama, mpe mpo na nini Yuda aleki Yisalaele?
15 Na nsima ya liwa ya Lehobama, Abiya, moko kati na bana na ye 28, atyami mokonzi. Na boyangeli na ye oyo eumeli mbula misato, Abiya asali bobele mosala ya kobundisa Yisalaele na nɔ́rdi, kotangisáká bongo makila ya bato mingi. Motángo ya basodá ya Yuda, oyo ezali bongo 400 000, ekokɔta mbala mibale kati na motángo ya basodá ya Yelobama, oyo bazali bongo mibali 800 000. Na boumeli ya bitumba minene oyo eyei kobima na nsima, koleka katikati ya motángo ya basodá ya Yisalaele babomami, mpe basambeli nkóto nkámá mitano ya mwana na ngɔmbɛ babomami. Bana na Yuda baleki makasi mpo ete batye motema na bango “likoló na [Yehova] Nzambe na batata na bango.”—2 Nta. 13:18.
16. Lolenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya etingya oyo Asa asali?
16 Asa, mokonzi oyo azalaki kobanga Nzambe (2 Nta. 14:1–16:14). Asa mwana na Abiya azwi bokonzi na esika na tata ye. Asa azali mokɔteli monene ya losambo ya solo. Asali kampanye mpo na kolongola losambo ya bikeko kati na mboka. Kasi, talá! Yuda ekanelami na limpinga monene na motángo ya milió moko ya basodá ya Etiopia. Asa asali libondeli oyo ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na biso, sungá biso zambi tokotalela yo mpe na nkombo na yo toyei liboso na ebele monene oyo.” Yehova ayanoli na kopesáká ye bolóngi monene.—2 Nta. 14:11.
17. Lolenge nini Asa alendisami ete apɛtola losambo ya solo kati na Yuda, kasi apamelami mpo na likambo nini?
17 Elimo ya Yehova epusi Azalia ayebisa Asa ete: “[Yehova] azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, akotika bino.” (2 Nta. 15:2) Asa alendisami makasi na maloba oyo, na bongo asemboli losambo kati na Yuda, mpe libota basali kondimana ete moto nyonso oyo akoluka Yehova te akobomama. Nzokande, na ntango Basa mokonzi ya Yisalaele akangi nzela na Bayisalaele ete bákɔta na Yuda te, Asa asali libungá monene na kozwáká Bene-hadadi, mokonzi ya Sulia mpo na kobundisa Yisalaele, na esika ete aluka lisungi ya Yehova. Mpo na yango Yehova apameli ye. Atako bongo, motema ya Asa “ezalaki na likambo te kino mikolo na ye nyonso.” (2 Nta. 15:17) Akufi na mbula ya 41 ya bokonzi na ye.
18. (a) Lolenge nini Yosafata asali kampanye mpo na losambo ya solo, mpe yango ebimisi matomba nini? (b) Lolenge nini kondimana na ye etikalaki mpenza moke ete emema ye na libebi?
18 Boyangeli malamu ya Yosafata (2 Nta. 17:1–20:37). Yosafata mwana ya Asa akóbi kobundisa losambo ya bikeko mpe abandi kampanye moko monene ya mateya, atindi balakisi ete bátambola kati na bingumba nyonso ya Yuda, mpo na kolakisa mokanda ya Mibeko ya Yehova epai na bato. Na nsima, eleko moko ya bolamu mpe ya kimya eyei, mpe Yosafata akóbi ‘kokemba lisusu mpe lisusu.’ (2 Nta. 17:12) Kasi na nsima, ayei kosala kondimana elongo na Ahaba, mokonzi mabe ya Yisalaele, mpe akei kosunga ye ete abundisa Sulia, oyo nguya na yango ezalaki sé kokóla, aboyi koyokela Mika mosakoli ya Yehova, kasi abiki na liwa na ntango Ahaba abomami kati na etumba na Lamoto-gileadi. Yehu mosakoli ya Yehova apameli Yosafata mpo ete asali boyokani elongo na Ahaba moto mabe. Na nsima, Yosafata aponi basambisi kati na mboka mobimba, mpe apesi bango malako ete bákokisa mikumba na bango kati na bobángi Yehova.
19. Nini emonisi ete etumba oyo Yosafata abundi wana boyangeli na ye ekómi na nsuka ya nkembo na yango, ezali etumba ya Nzambe?
19 Sikawa bokonzi ya Yosafata ekómi na nsuka ya nkembo na yango. Mampinga masangani ya Moaba, ya Amona, mpe ya etúká ya Seili oyo ezali na ngomba mingi, bayei na nguya makasi mpo na kobundisa Yuda. Bayei na nzela ya esobe ya Ene-gɛdi. Bayisalaele bakómi kobanga. Yosafata mpe Yuda mobimba, mpe “na bana mike na bango elongo mpe na basi na bango mpe bana na bango,” batɛlɛmi liboso na Yehova mpe babondeli ye. Elimo ya Yehova eyei likoló na Yahaziele Molevi, ayebisi bato oyo bayangani wana ete: “Yoká bino Bayuda nyonso mpe baoyo bakofandaka na Yelusaleme mpe mokonzi Yosafata. [Yehova] alobi boye epai na bino ete, Bangá te mpe yoká mawa mpo na ebele monene te zambi etumba ezali na bino te kasi na Nzambe. Lobi, kitá kati na bango; . . . [Yehova] akozala na bino elongo.” Kolamukáká na ntɔ́ngɔ́ mpenza, bato na Yuda batamboli na bokambami na bayembi Balevi. Yosafata alendisi bango ete: “Ndimá [Yehova] . . . ; ndimá basakoli na ye mpe bokolónga.” Bayembi bakumisi Yehova na esengo nyonso ete, “boboto na ye ekoumela seko.” (2 Nta. 20:13, 15-17, 20, 21) Yehova amonisi motema-boboto na ye na lolenge ya kokamwisa, atye motambo na nzela ya limpinga oyo ezali kobundisa libota na ye, na boye ete babomani bango na bango. Na esengo nyonso, Bayuda bakómi na esika linɔ́ngi ya mosɛnzɛli etyamaki na esobe, mpe bamoni bobele bibembe. Ya solo, etumba ezali ya Nzambe! Yosafata akóbi kotambola na bosembo nyonso liboso na Yehova kino na nsuka ya boyangeli na ye oyo eumeli mibu 25.
20. Makambo nini ya mpasi mabimi na boumeli ya boyangeli ya Yolama?
20 Biyangeli mabe ya Yolama, ya Ahazia, mpe ya Atalia (2 Nta. 21:1–23:21). Yolama mwana ya Yosafata abandi bokonzi na ye na lolenge mabe na kobomáká bandeko na ye nyonso ya mibali. Nzokande, Yehova abateli ye mpo na kondimana na Ye elongo na Davidi. Edome ebandi kobimisa botomboki. Uta na esika moko boye, Eliya atindi mokanda, kati na yango akebisi Yolama ete Yehova akoyeisa etumbu monene likoló na ndako na ye mpe ete akokufa liwa ya nsɔ́mɔ. (2 Nta. 21:12-15) Esakweli yango ekokisami solo, Bafilisitia mpe Baalaba babundisi mpe bapunzi Yelusaleme, mpe mokonzi akufi na maladi moko ya nsɔ́mɔ na nsɔpɔ́, nsima ya koyangela na boumeli ya mbula mwambe.
21. Makambo nini ya mabe mabimi na ntango Atalia ayangeli Yuda, kasi lolenge nini Yoyada alóngi kozongisa kiti ya bokonzi ya Davidi?
21 Mwana bobele moko ya Yolama oyo atikali na bomoi, Ahazia (Yoahaza), akitani ye, kasi mama na ye Atalia, mwana oyo Ahaba na Yezabele babotaki, asali bopusi mabe likoló na ye. Boyangeli na ye esuki bobele nsima ya mbula moko, mpamba te Yehu apɛtoli ndako ya Ahaba. Na yango, Atalia abomi bana ya mwana na ye mpe abɔtɔli bokonzi. Nzokande, moko na bana ya Ahazia atikali na bomoi. Ezali bongo Yoasa, azali mwana ya mbula moko; Yosabata, tata-mwasi na ye, abombi ye kati na ndako ya Yehova. Atalia ayangeli na boumeli ya mbula motoba, mpe na nsima, mobali ya Yosabata, nganga monene Yoyada, akamati elenge Yoasa na mpiko nyonso mpe abeleli ete ye nde azali mokonzi, lokola moko na “bana na Davidi.” Na ntango Atalia ayei na ndako ya Yehova, apasoli bilamba na ye mpe angangi ete: “Kotomboka! Kotomboka!” Kasi nyonso wana mpamba. Yoyada atindi ete bábwaka ye libándá ya tempelo mpe báboma ye.—2 Nta. 23:3, 13-15.
22. Lolenge nini boyangeli ya Yoasa ebandi malamu kasi esuki mabe?
22 Biyangeli ya Yoasa, ya Amasia, mpe ya Uziya ebandi malamu kasi esuki mabe (2 Nta. 24:1–26:23). Yoasa ayangeli na boumeli ya mbula 40, ntango nyonso oyo Yoyada azali na bomoi, azali na bopusi malamu epai na ye, mpe na bongo, azali kosala malamu. Amibanzibanzi kútu na ntina na ndako ya Yehova mpe abongisi yango. Nzokande, na ntango Yoyada akufi, bankumu ya Yuda bapusi Yoasa ete atika losambo ya Yehova mpe asambela makonzí ya bulɛɛ mpe bikeko. Na ntango elimo ya Yehova epusi Zekalia, mwana ya Yoyada, ete apamela mokonzi, Yoasa atindi ete bábamba mosakoli mabanga mpe báboma ye. Nokinoki na nsima, limpinga moke ya Basulia liyei kobundisa Yuda, atako mibali na Yuda bazali mingi, balóngi te kotɛmɛla banguna na bango, mpamba te “batikaki [Yehova], Nzambe na batata na bango.” (2 Nta. 24:24) Sikawa bobele basaleli ya Yoasa batɛlɛmi mpe babomi ye.
23. Ndakisa nini ya kozanga sembo Amasia alandi yango?
23 Amasia akitani tata na ye Yoasa. Abandi bokonzi na ye ya mibu 29 malamu kasi na nsima, ayei kobungisa ngɔlu ya Yehova mpamba te atɛlɛmisi bikeko ya Edome mpe asambeli yango. Mosakoli ya Yehova apesi ye likebisi oyo ete: “Nzambe akani koboma yo.” (2 Nta. 25:16) Nzokande, Amasia akómi na lolendo mpe abundisi Yisalaele na nɔ́rdi. Liloba ya Nzambe ekokisami, Bayisalaele balóngi ye. Na nsima ya kolóngama, batomboki babimi mpe babomi ye.
24. Lolenge nini makasi ya Uziya ekómi nde bolɛmbu na ye, mpe yango ebimisi mbuma nini?
24 Uziya, mwana ya Amasia, alandi lokolo ya tata na ye. Asali malamu na boumeli ya eteni monene ya boyangeli na ye ya mibu 52, azwi lokumu mingi mpo ete azali mobundi monene, motongi ya manɔ́ngi, mpe mpo ete ‘alingaki mingi mosala ya bilanga.’ (2 Nta. 26:10) Apesi basodá bisaleli mpe masini mingi. Nzokande, makasi na ye makómi nde bolɛmbu na ye. Akómi na lolendo mpe amimoni ete abongi mpo na kosala mosala ya bonganga, akei kotumba mpaka na malasi kati na tempelo ya Yehova. Mpo na yango, Yehova abwakeli ye maladi ya mbala. Na bongo, asengeli kofanda mosika na bato nyonso, mosika na ndako ya Yehova mpe mosika na ndako ya mokonzi, epai kuna mwana na ye Yotama azali kosambisa bato na esika na ye.
25. Mpo na nini Yotama alóngi?
25 Yotama asaleli Yehova (2 Nta. 27:1-9). Na bokeseni na tata na ye, Yotama ‘ayingeli na tempelo ya [Yehova] te.’ Nzokande, ‘asali malamu na miso na [Yehova].’ (2 Nta. 27:2) Na boumeli ya boyangeli na ye ya mibu 16, asali mingi mosala ya botongi mpe alóngi kosilisa botomboki ya Baamona.
26. Makambo nini ya mabe Ahaza asali koleka baoyo nyonso bayangelaki liboso na ye?
26 Ahaza mokonzi mabe (2 Nta. 28:1-27). Ahaza mwana ya Yotama atángami kati na bakonzi 21 ya mabe oyo bayangelaki kati na Yuda. Mabe na ye maleki ndelo, atumbi bana na ye moko lokola mbeka mpo na banzambe ya bapakano. Na yango, Yehova asundoli ye na mabɔkɔ ya mampinga ya Sulia, mpe ya Yisalaele, mpe ya Edome, mpe ya Filisitia. Na boye, Yehova ayokisi Yuda nsɔ́ni mpamba te Ahaza “asalaki yauli epai na Yuda mpo atikaki Yehova.” (2 Nta. 28:19) Mabe ya Ahaza mazali sé koyikana, akei kino kopesa mbeka epai na banzambe ya Sulia mpo ete Basulia baleki ye na makasi na bitumba. Akangi bikuke ya ndako ya Yehova mpe na esika ya losambo ya Yehova atye losambo ya banzambe ya bapakano. Na ntango oyo ebongi mpenza, bokonzi ya Ahaza esuki, nsima ya koyangela na boumeli ya mibu 16.
27. Lolenge nini Hizikiya amonisi molende mpo na losambo ya Yehova?
27 Hizikiya mokonzi na sembo (2 Nta. 29:1–32:33). Hizikiya, mwana na Ahaza, ayangeli na boumeli ya mbula 29 na Yelusaleme. Likambo ya liboso asali ezali bongo ya kofungola bikuke ya ndako ya Yehova mpe kobongisa yango. Na nsima, ayanganisi banganga mpe Balevi mpe apesi bango malako ete bápɛtola tempelo mpe basantisa yango mpo na mosala ya Yehova. Asakoli ete alingi kosala kondimana elongo na Yehova ete alongola nkanda na Ye. Losambo ya Yehova ezongisami na lolenge malamu mpenza.
28. Elambo nini ya monene Hizikiya asali kati na Yelusaleme, mpe lolenge nini bato bamonisi esengo na bango?
28 Bakani kosala elambo monene ya Elekeli, kasi lokola na sanza ya liboso ntango ya kolɛngɛla yango ezali te, basali yango na sanza ya mibale ya boyangeli ya Hizikiya, mpamba te yango eyokani mpe na Mibeko. (2 Nta. 30:2, 3; Mit. 9:10, 11) Kati na molulu yango, mokonzi abyangi bobele Yuda te, kasi abyangi mpe Yisalaele; atako bato mosusu ya Efelaima, ya Manase, mpe ya Zebuluna batyoli libyangi yango, basusu bamikitisi mpe bayei na Yelusaleme mpo na koyangana elongo na Yuda mobimba. Na nsima ya Elekeli, basali Elambo ya Mikate mizangi mfulu. Oyo nde elambo ya esengo oyo eumeli mikolo nsambo! Ezali mpenza ya kolendisa na boye ete bakani kobakisa mikolo mosusu nsambo mpo na elambo. ‘Esengo monene ezali na Yelusaleme zambi longwa na mikolo na Salomo, mwana na Davidi, mokonzi na Yisalaele, likambo ya lolenge oyo ezalaki te.’ (2 Nta. 30:26) Na nsima ya kozongisama lisusu malamu na elimo, libota lisali kampanye moko monene mpo na kolongola losambo ya bikeko na Yuda mpe na Yisalaele, wana Hizikiya, na ngámbo na ye, azongisi ebongiseli ya kopesa makabo mpo na Balevi mpe mpo na misala ya tempelo.
29. Mbano nini Yehova apesi Hizikiya mpo ete atyaki elikya mobimba epai na Ye?
29 Na nsima, Senakeliba mokonzi ya Asulia abundisi Yuda mpe akaneli Yelusaleme. Hizikiya abangi te, abongisi bisika makasi ya engumba, mpe atɛmɛli makaneli ya banguna. Na kotyáká motema na ye mobimba epai na Yehova, akóbi kosɛnga lisungi na nzela ya libondeli. Na lolenge ya kobenda likebi, Yehova ayanoli na libondeli na ye oyo emonisi kondima. Na nsima ‘atindi anzelu oyo abomi bilombe na nguya mpe batambolisi mpe mikóló kati na molako na mokonzi na Asulia.’ (2 Nta. 32:21) Senakeliba azongi na nsɔ́ni. Ata banzambe na ye bakoki kosalisa ye te, mpamba te na nsima, bana na ye moko babomi ye wana ezali ye liboso na etumbelo ya banzambe yango. (2 Mik. 19:7) Na lolenge ya kokamwisa, Yehova ayeisi bomoi ya Hizikiya molai, mpe akómi na bozwi mpe nkembo mingi, bato nyonso na Yuda bapesi ye lokumu na ntango akufi.
30. (a) Ndakisa nini ya mabe Manase amonisi yango, mpe nini emonani na nsima ya kobongwana na ye? (b) Makambo nini masalemi na boumeli ya boyangeli mokuse ya Amona?
30 Manase mpe Amona bayangeli na lolenge mabe (2 Nta. 33:1-25). Manase, mwana ya Hizikiya alandi mabe ya nkɔ́kɔ na ye Ahaza, alongoli malamu nyonso oyo Hizikiya asalaki na boumeli ya boyengeli na ye. Atongi bisika na likoló, atɛlɛmisi makonzí ya bulɛɛ, mpe atumbi bana na ye mbeka mpo na banzambe ya lokuta. Na nsuka, Yehova apusi mokonzi ya Asulia ete atɛmɛla Yuda, mpe Manase amemami na boombo na Babilone. Kuna, abongoli motema na mabe na ye. Na ntango Yehova amoniseli ye motema mawa na kozongisáká ye na bokonzi na ye, asali molende ete alongola losambo ya bademó mpe azongisa losambo ya solo. Nzokande, na ntango Manase akufi na nsima ya boyangeli na ye ya molai, oyo eumelaki mibu 55, mwana na ye Amona akitani na kiti ya bokonzi mpe asali mabe mingi, kotomboláká lisusu losambo ya lokuta. Na nsima ya mbula mibale, basaleli na ye moko babomi ye.
31. Makambo nini ya kobenda likebi masalemi na boumeli ya boyangeli ya mpiko ya Yosiya?
31 Boyangeli ya mpiko ya Yosiya (2 Nta. 34:1–35:27). Elenge Yosiya, mwana na Amona, ameki na mpiko nyonso kozongisa losambo ya solo. Abuki bitumbelo ya Baala mpe bikeko, mpe abongisi ndako ya Yehova, epai kuna, na ntembe te, kopi ya liboso mpenza ya “mokanda na Mobeko na [Yehova]” emonani. (2 Nta. 34:14) Nzokande, moyengebene Yosiya ayoki ete mawa monene ekoya na mboka mpo na mabe oyo masilaki kosalema liboso, kasi yango ekosalema na eleko na ye te. Na mbula ya 18 ya boyangeli na ye, alɛngɛli molulu monene ya Elekeli. Na nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 31, Yosiya akufi wana azali koluka, kasi na mpamba, kopekisa limpinga ya Ezipito ete eleka na nzela ya mboka na ye te, wana bazali kokende na Pelata.
32. Lolenge nini biyangeli minei ya nsuka ekambi Yuda kino na libebi na yango monene?
32 Yoahaza, Yoyakimi, Yoyakini, Sidikiya, mpe libebi ya Yelusaleme (2 Nta. 36:1-23). Mabe ya bakonzi minei ya nsuka na Yuda ememi libota nokinoki na kobɛbisama mpenza. Yoahaza, mwana na Yosiya, ayangeli bobele na boumeli ya sanza misato, Falo Neko Moezipito nde alongoli ye. Eliakimi, ndeko na ye ya mobali, oyo nkombo na ye ebongolami ete Yoyakimi, akamati esika na ye, mpe na boumeli ya boyangeli na ye Yuda ezwami na nsé ya boyangeli ya nguya ya sika ya mokili mobimba, Babilone. (2 Mik. 24:1) Ntango Yoyakimi atomboki, Nebukadanesala ayei na Yelusaleme na 618 L.T.B. mpo na kopesa ye etumbu, kasi Yoyakimi akufi bobele na mobu yango, nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 11. Mwana na ye Yoyakini, oyo azali na mibu 18 ya kobotama, akamati esika na ye. Nsima ya koyangela bobele na boumeli ya sanza misato, Yoyakini akwei na mabɔkɔ ya Nebukadanesala mpe amemami na boombo na Babilone. Sikawa Nebukadanesala atye mwana ya misato ya Yosiya, Sidikiya, nɔkɔ ya Yoyakini, na kiti ya bokonzi. Sidikiya ayangeli na lolenge ya mabe na boumeli ya mbula 11, koboyáká ‘komikitisa liboso na mosakoli Yilimia, ye oyo alobaki na monɔkɔ na [Yehova].’ (2 Nta. 36:12) Kozanga boyengebene oyo banganga mpe bato nyonso bapalanganisi yango mingi ebebisi ndako ya Yehova.
33. (a) Lolenge nini mbula 70 ya libebi ebandi “mpo na kokokisa liloba na [Yehova]”? (b) Ekateli nini ya ntina mingi ekomami kati na vɛrsɛ́ mibale ya nsuka ya mokanda ya Ntango ya Mibale?
33 Na nsuka, Sidikiya atombokeli ekanganeli ya Babilone, mpe na mbala oyo Nebukadanesala amonisi motema mawa soko moke te. Nkanda ya Yehova eyei makasi mpenza, mpe eloko moko te ekoki kokitisa yango. Yelusaleme ekwei, tempelo na yango epunzami mpe etumbami, mpe bato oyo babiki na nsima ya kozingelama oyo eumeli sanza 18 bamemami lokola baombo na Babilone. Yuda etikali mpamba. Na yango, bobele na mobu 607 L.T.B., libebi libandi, “mpo na kokokisa liloba na [Yehova] na monɔkɔ na Yilimia . . . kino ekokaki bilanga [“mbula,” NW] ntuku nsambo.” (2 Nta. 36:21) Mokanda ya Ntango elobeli te makambo oyo masalemi na boumeli ya mibu pene na 70 wana, kasi bobele na vɛrsɛ́ na yango mibale ya nsuka 2 Nta. 36:22, 23 nde elobeli ekateli oyo Siruse abimisi na mobu 537. Baombo Bayuda basengeli kosikolama! Yelusaleme esengeli kotɛlɛma lisusu.
LITOMBA NA YANGO
34. Na lolenge oyo aponaki masoló na ye, Ezela alobelaki mingi makambo nini, mpe yango ezalaki na ntina nini mpo na libota?
34 Mokanda ya Ntango ya Mibale eyei kobakisa litatoli na yango ya nguya likoló na oyo batatoli mosusu mpe bapesaki na ntina na eleko oyo ebandaki na mobu 1037 mpe esukaki na mobu 537 L.T.B., oyo na boumeli na yango makambo mingi ya minene masalemaki. Lisusu, ezali koyebisa makambo ya ntina mingi oyo mazwami te kati na masoló mosusu ya kanɔ́ ya Biblia, na ndakisa, 2 Ntango mikapo 19, 20, mpe 2 Nta. 29 kino 31. Na lolenge oyo Ezela aponaki masoló na ye, alobeli makasi makambo ya ntina mingi mpe oyo ebongwanaki te kati na lisoló ya libota, na ndakisa bonganga mpe misala na yango, tempelo, mpe kondimana ya Bokonzi. Yango ezalaki na litomba mingi mpo na koyanganisa libota esika moko kati na elikya ya Masiya mpe ya Bokonzi na ye.
35. Makambo nini ya ntina mamonisami kati na bavɛrsɛ́ ya nsuka ya mokanda ya Ntango ya Mibale?
35 Bavɛrsɛ́ ya nsuka ya Ntango ya Mibale (36:17-23) ezali kopesa elembeteli monene ya kokokisama ya esakweli ya Yilimia 25:12 mpe, ezali lisusu komonisa ete mibu 70 na mobimba mpenza esengeli kotángama kobanda na ntango oyo Yuda etikalaki mpenza mpamba kino na ntango losambo ya Yehova ezongisamaki lisusu na Yelusaleme na 537 L.T.B. Na bongo, kosundolama yango ebandaki na 607 L.T.B.c—Yil. 29:10; 2 Mik. 25:1-26; Ezl. 3:1-6.
36. (a) Likebisi nini ya nguya lizwami kati na mokanda ya Ntango ya Mibale? (b) Lolenge nini mokanda yango ezali kolendisa elikya na biso na ntina na Bokonzi?
36 Mokanda ya Ntango ya Mibale ezali na likebisi ya nguya mpo na baoyo bazali kotambola kati na kondima ya boklisto. Bakonzi mingi ya Yuda babandaki malamu kasi na nsima bakweaki na nzela mabe. Lisoló oyo lizali komonisa na nguya nyonso ete mpo na kolónga, tosengeli bobele kozala sembo epai na Yehova! Tosengeli kokebisama ete tózala te ‘kati na baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.’ (Ebe. 10:39) Ata Hizikiya mokonzi ya sembo mpe akómaki na lolendo na ntango azongelaki kolɔngɔ́nɔ́ na ye ya nzoto, mpe ezalaki bobele mpo ete amikitisaki nokinoki, yango wana Yehova akweiselaki ye nkanda na ye te. Mokanda ya Ntango ya Mibale ezali kokumisa bizaleli ya kokamwa ya Yehova mpe ezali kotombola nkombo na ye mpe lotómo na ye ya kozala mokonzi. Na mobimba na yango, lisoló limonisi ntina ya komipesa mobimba epai na Yehova. Mpo ete elobeli mingi molɔngɔ́ ya libota ya bokonzi na Yuda, ezali kolendisa elikya na biso ya komona kotombolama ya losambo ya solo na nsé ya Bokonzi ya seko ya Yesu Klisto, “mwana na Davidi,” mosembwi.—Mat. 1:1; Mis. 15:16, 17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 147.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 750-751; Vol. 2, nkasa 1076-1078.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 463; Vol. 2, lokasa 326.