Ndenge ya kosalela buku “Ndenge ya kosolola”
Mpo na kosalisa bato báyeba Biblia, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu Kristo ná bantoma na ye. Ntango Yesu azalaki koyanola na mituna, azalaki kotánga Liloba ya Nzambe mpe ntango mosusu azalaki kosalela bandakisa oyo ekokaki kosalisa bato ya mitema sembo oyo bazalaki koyoka ye bándima makambo oyo Biblia elobi. (Mat. 12:1-12) Ntango ntoma Paulo azalaki koteya, azalaki ‘kosalela Makomami mpo na kosolola na bato, azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi.’ (Mis. 17:2, 3) Makambo oyo ezali na buku oyo ekoki kosalisa yo olanda ndakisa na bango.
Na esika ya kolobela makambo nyonso ya lisolo mokomoko, buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami ezali kolobela nde mituna oyo bato batunaka mingi.
Ntina ya buku oyo ezali te mpo na kotinda basakoli “bándimisaka” bato oyo bamemyaka solo te “makambo na makasi.” Kasi, ezali kopesa nde makanisi ya malamu oyo okoki kosalela mpo na kosolola na bato oyo bakosepela koyoka yo. Bato mosusu batunaka mituna mpo bazali mpenza na mposa ya biyano oyo ebongi. Basusu, ntango ozali kosolola na bango, balobelaka makambo oyo bango bandimaka mpe basalaka yango na molende. Kasi, bato yango bazali mpenza na mposa ya koyoka likanisi mosusu? Soki ezali bongo, okoki koyebisa bango oyo Biblia elobi, na elikya ete makambo yango ekosimba mpenza mitema na bango, soki balingi solo.
Ndenge nini okoki kozwa makambo oyo ozali na mposa na yango na kati ya buku oyo? Mbala mingi, okoki kozwa yango mbala moko soki ofungoli na motó ya likambo ya lisolo oyo bozali kolobela. Na motó ya likambo mokomoko, okomona mbala moko mituna ya minene; ekomamá na makomi ya moindo makasi, ebandi mwa libándá. Soki ozwi likambo oyo ozali koluka noki te, talá Index oyo ezali na nsuka ya buku.
Komibongisa liboso ya kosolola na moto ezali na ntina mingi. Ata soki omeseni naino na biteni mosusu ya buku oyo te, okoki kosalela yango malamu. Ndenge nini? Soki omoni motuna oyo eyokani moke na likambo oyo olingi kolobela, talá mitó nyonso ya makambo mike oyo ezali na nse na yango. Mitó ya makambo mike yango ezali na italike na makomi ya moindo makasi. Soki oyebi lisolo yango mwa moke, mbala mosusu ekosɛnga kaka kozongela mwa mitó ya makambo mike yango to kobwaka mwa liso na mwa makanisi oyo ezali na nse na yango, mpo ezali kolobela makanisi oyo okoki kosalela mpo na kosolola na bato. Kokakatana te kolimbola makanisi yango na maloba na yo moko.
Ozali na mposa ya makambo mosusu, na ndakisa bavɛrsɛ oyo ezali mpenza kolobela likambo oyo ozali koluka, ndenge ya kolimbola yango, bandakisa oyo okoki kosalela mpo omonisa polele ntina ya makambo oyo Biblia elobeli mpe bongo na bongo? Soki bongo, okoki komonisa moto oyo ozali kosolola na ye makambo yango na buku oyo mpe kotánga elongo na ye eyano ya motuna na ye. Ata soki omibongisaki te, okoki kosalela buku oyo mpo na kopesa eyano oyo ebongi. Buku oyo ezali na makambo nyonso oyo osengeli na yango, mpe ekomami na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya sikisiki.
Kobosana te ete buku oyo ezali Biblia te, kasi makambo oyo ezali na kati euti na Biblia. Biblia nde Liloba ya Nzambe. Soki maloba oyo otángi euti mbala moko na vɛrsɛ ya Biblia, yebisá moto yango ete maloba yango euti na Biblia. Soki azali na Biblia na ye moko, sɛngá ye azwa yango mpe aluka vɛrsɛ yango, wana akomona ete makambo oyo ozali koyebisa ye ezali na Biblia na ye moko. Soki Biblia oyo bato mingi bazali na yango ebongoli likambo moko ya ntina ndenge mosusu na kati ya vɛrsɛ moko boye, buku oyo ezali kobenda likebi na likambo yango mpe emonisi ndenge yango ebongolami na Babiblia mosusu mpo moto ye moko amona bokeseni.
Ndenge ntoma Paulo asalaki ntango alobelaki etumbelo oyo bakomá likoló na yango ete “Epai ya Nzambe oyo ayebani te” mpe ndenge atángaki makambo mosusu oyo eyebanaki malamu ntango asakwelaki bato ya Atene (Mis. 17:22-28), buku oyo mpe etángi mwa moke masolo ya mokili, baansiklopedi, babuku mosusu ya makambo ya losambo, mpe badiksionɛrɛ oyo elimbolaka maloba ya Biblia. Buku oyo esuki kaka te na kolobela ndenge mimeseno ya lokuta ya mangomba ebandá, ndenge bindimeli mosusu epalanganá mpe ndimbola ya maloba ya Ebre ná Grɛki, kasi ezali mpe komonisa ntina oyo etángi maloba yango. Atako bongo, ezali kobenda likebi ya bato nde na Biblia, esika solo euti mpenza.
Lisusu, mpo na kosalisa biso tósolola na bato solo ya Biblia, na buku oyo okokuta masolo mingi na eteni oyo elobi “Ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola,” mpe makanisi mosusu na eteni oyo elobi “Ndenge ya koloba soki moto abimisi ntembe.” Na nsuka ya biteni mosusu ya minene oyo elobeli bindimeli, balobeli makambo mosusu ya bindimeli yango oyo ‘ebimisaka ntembe.’ Ezali na ntina te kokanga biyano yango na motó, kasi ekozala malamu oluka koyeba ntina oyo basakoli mosusu bamonaki ete biyano yango ebongi; na nsima lobá yango na maloba na yo moko.
Buku oyo ekosalisa yo oyeba ndenge ya kosolola na bato na Biblia mpe kosalela yango malamu mpo na kosalisa basusu báyekola “makambo minene ya Nzambe.”—Mis. 2:11.