Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 5 nk. 10-11
  • Moko ya biloko ya kokamwa!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moko ya biloko ya kokamwa!
  • Lamuká!—2016
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Diamá ezalaka na ntalo mingi?
    Lamuká!—1997
Lamuká!—2016
g16 No. 5 nk. 10-11

Moko ya biloko ya kokamwa!

Atɔmɛ ya Carbone

Buku moko (Nature’s Building Blocks) elobi boye: “Eloko moko te ezali na ntina mingi na bomoi na biso koleka carbone.” Lokola ekeseni mpenza na biloko mosusu, ezalaka na likoki ya kosangana yango na yango mpe na ba-éléments chimiques mingi mosusu mpo na kosala bamilio ya biloko mikemike oyo bato ya mayele bazali kokoba komona ya sika to bazali kosalela yango mpo na kobimisa oyo ekokani na yango.

Ndenge bandakisa oyo ezali awa emonisi, baatɔmɛ ya carbone ekoki kosangana mpe kosala biloko oyo ezali lokola bashɛni, bapiramide, basɛrklɛ, bapapye mpe batiyo. Eloko babengi carbone ekamwisaka mpenza!

DIAMA

Diama

Baatɔmɛ ya carbone esalaka bapiramide oyo babengi tétraèdre, mpe ekómisaka yango makasi, yango nde esalaka ete diama ezala eloko oyo eleki makasi na biloko oyo toyebi. Diama ya solosolo ezalaka kaka molekile moko ya baatɔmɛ ya carbone.

GRAPHITE

Krɛyɔ

Baatɔmɛ ya carbone oyo ekangani makasi mpenza etandanaka moko nsima ya mosusu mpe ekoki koleka moko likoló ya mosusu lokola bapapye oyo batye na molɔngɔ. Mpo na yango nde graphite ezalaka mafuta ya malamu oyo batyaka na bibende mpe yango nde eloko ya libosoliboso basalelaka bakrɛyo.a

GRAPHÈNE

Mondelo ya krɛyɔ

Ezali molɔngɔ moko ya baatɔmɛ ya carbone oyo ebongisamá lokola monyama. Graphène ezalaka makasi mingi koleka ebende. Mwa mokɔlɔtɔ ya krɛyo ezalaka na molɔngɔ moko to ebele ya graphène.

FULLERÈNE

Fullèrene

Bamolekile ya carbone oyo ezalaka polele na kati ezalaka lokola bale ya mikemike mpe batiyo oyo babengaka nanotubes. Bazwaka mezire na yango na nanomètre to mɛtrɛ moko kabolá na miliare moko.

BIKELAMU YA BOMOI

Baselile oyo ezalaka na carbone

Baselile mingi oyo ezalaka na milona, banyama mpe bato esalemá na carbone​—tokutaka yango na sukali, mafuta mpe na ba-acides aminés.

“Bizaleli na ye [Nzambe] oyo emonanaka te . . . emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.”​—Baroma 1:20.

a Talá lisolo “Quelqu’un aurait-il un crayon ?” na Lamuká! ya 07/2007, na Français.

Monzoto

Carbone​—Eloko moko oyo ebongisamá malamumalamu na minzoto

Soki mbuma misato oyo ezalaka na kati ya eloko babengi hélium esangani nde carbone esalemaka, mpe bato ya siansi balobi ete yango esalemaka na kati ya minzoto oyo babengaka les géantes rouges. Kasi mpo hélium esangana, esɛngaka makambo mosusu esalema na bosikisiki mpenza. Paul Davies, moto moko ya fiziki akomaki boye: “Soki babongoli ata mwa moke kaka [mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́], ata moke mpenza, molɔ́ngɔ́ ekozala te, bomoi ekozala te, moto moko mpe te akozala.” Tokoki koloba nini mpo na bosikisiki ya ndenge wana? Basusu balobaka ebimaki kaka boye. Kasi bamosusu bamonaka ete ezali na Mokeli moko ya bwanya nde abongisá makambo bongo. Likanisi oyo wapi omoni ete ebongi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto