Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre nk. 11-14
  • Mpo na nini Diamá ezalaka na ntalo mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Diamá ezalaka na ntalo mingi?
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobembo na Anvers
  • Kopalola diamá
  • Motuya ya diamá
  • Okoki kokola na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tozali kosepela na lisangá na Jéhovah awa na mabelé?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Lamuká!—1997
g97 Octobre nk. 11-14

Mpo na nini Diamá ezalaka na ntalo mingi?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ESPAGNE

NA BANTANGO mosusu kitoko ezali likambo ya koluka mpo na kozwa yango. Na bantango mosusu esengeli kosala yango. Nzokande, diamá balukaka yango mpe bakómisaka yango kitoko.

Wana epalolami naino te, na ntembe te, diamá ezali eloko moko kitoko oyo ezwami kati na biloko bizalisami. Mpo na bokangami mpe molungé makasi oyo ezalaka na kati ya mabelé, mabanga oyo ebéngami carbone ebongwanaka mokemoke na makɛ́lɛ wana oyo ezali kongɛnga makasi. Kasi mabanga yango mbala mingi ezalaka mpasi mpo na kozwa yango. Mabulu mosusu ya minene mpenza oyo bato batimoli​—na Australie, na Sibérie mpe na Afrique du Sud​—ezalaki mpo na koluka mabanga yango ya motuya. Mpo na kozwa mwa diamá oyo ezali bobele na bozito ya kará 32 (soko grami 6), esengeli kotimola mpe konyongela bankámá ya batɔni ya mabelé!

Wana diamá ezwami, basali na diamá basengeli kopalola yango na likebi mpenza mpo na kobimisa kitoko na yango oyo ebombanaka liboso ya kosala lompɛtɛ ya mosapi to mpe sɛnɛti ya nkingo.

Na momeseno, milende mpe makoki nyonso oyo bato bamonisaka mpo na eloko yango, ezali na litomba. Kasi basi mingi​—mpe mibali mingi​—bamonaka ete ata soki ezali na ntalo mingi, yango ezali na ntina, mingimingi soki diamá ekopesama lokola likabo epai na mwasi to mobandami lokola elembo ya bolingo oyo ekoumela libela. Kitoko ya diamá mpe bolingo mpo na yango esali ete ezala likɛ́lɛ lileki makɛ́lɛ nyonso na ntalo na mokili.a

Mobembo na Anvers

Wana nasalaki mobembo na Belgique, na Anvers, engumba oyo bomengo na yango euti mingi mpenza na diamá, nakómaki kosepela mingi na mabanga yango oyo makeseni na mabanga mosusu nyonso. Namitunaki ete: ‘Nini esalaka ete diamá ebenda likebi? Sɛkɛlɛ́ na yango ezali nini?’

Mpo na kozwa biyano na mituna yango, nasololaki na Dirk Loots oyo libota na ye bazali kosala mombongo ya diamá kobanda na ntango ya bankɔkɔ na ye. Alobaki ete: “Tobéngaka Anvers ete moninga ya motema ya diamá mpamba te engumba yango ezali moko ya bingumba minene ya mombongo ya diamá na mokili. Na bongo, osili kokóma na esika moko ya ntina mpo na koyeba sɛkɛlɛ́ ya basali ya diamá.”

Liboso mpenza, alakisaki ngai mwa diamá ya mikemike oyo epalolami naino te oyo autaki kosomba. Atako ezalaki na motuya ya dolare 350 000, ezalaki mpenza komonana kitoko te​—ezalaki komonana lokola biteni ya mbɛ́lɛ́ oyo epasuki. Kasi na kotaláká yango malamumalamu emonisaki kongɛnga ya kati oyo ezali komonisa kitoko oyo mosali na diamá akoki kobimisa. Nabandaki kososola mpo na nini ebendaka likebi.

Dirk ayambolaki ete: “Na bantango mosusu, soki namoni diamá moko monene oyo epalolami naino te, motema na ngai ebɛtaka, nasepelaka na yango mingi. Mbala mosusu, nasombaka libanga yango bobele mpo ete nasepeli na yango. Yango ekundwelaka ngai lisese ya Yesu na ntina na moto oyo akutaki mangaliti kitoko, oyo ezalaki kitoko mpenza na boye ete amibongisaki mpo na kotɛka biloko na ye nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosomba mangaliti yango.” Amungamungaki mpe alobaki lisusu ete, “Nasala naino eloko ya boye te, kasi nasengeli kondima ete mabanga mosusu ya kitoko ebendaka likebi, ata ya baoyo kati na biso balekisaka bomoi na bango na kosombáká mpe kotɛkisáká yango. Ya solo, kobongola libanga oyo epalolami naino te na biju (bijoux) ezali mpenza mosala kitoko, kasi ezangi mikakatano te.”

Kopalola diamá

Bayebisaki ngai ete ata libanga ya motuya mingi, ekoki kobebisama na mosali na diamá oyo azangi likebi. Nazalaki komituna soki yango esalemaka mingi. Dirk andimaki ete: “Yango esalemaka. Mpe yango esalemaka te bobele soko libanga lizali kopasolama na biteni mikemike. Ata ntango mosali na diamá azali kopalola yango, soki atuti esika oyo ezali na mbeba, libanga ekoki kobeba. Ntango nyonso totalaka malamumalamu libanga oyo epalolami naino te na litalatála moko oyo ezali kongɛnga (loupe), mpe yango emonisaka bisika oyo ezali na mbeba, kasi likambo ya mawa, ata mwango moko te ezali mpenza ya kokoka.

“Atako kobebisa libanga ezalaka likambo ya mpasi mpo na biso, yango ezali mokakatano bobele moko te. Ntango mosusu kongɛnga ya libanga esilaka nsima ya kopalola yango mpe kopalola mipanzi na yango, na bongo motuya na yango ekitaka. Mpe osengeli kobosana te ete mbala mingi esɛngaka ete tólongola 60 % ya libanga mpo na kobimisa biju ya kitoko koleka.”

Yango emonanaki lokola kobebisa mosolo mingi, kino nayaki kososola nini esɛngaka mpo na mosala ya diamá. Dirk alakisaki ngai diamá moko oyo esalemaki lokola motema, oyo bautaki kosilisa kopalola yango. Atunaki ngai ete: “Omoni lokola ezali kongɛnga?” ‘Mɔ́tɔ’ wana oyo ezali komonana na kati ya libanga euti mpenza na kongɛnga na yango.

“Oyo mosali ya diamá asengeli kosala ezali bongo kopalola yango bipai nyonso na boye ete kongɛnga etikala na kati ya libanga mpe na bongo ekomonana epai ya motali. Mitindo mosusu ya kopalola oyo esalemaka mingi, lokola ya zolɔnganu, emonisaka kongɛnga yango na lolenge malamu mpenza. Kasi ata oyo epalolami lokola motema ya moto, esengeli kobimisa kongɛnga na yango nyonso. Yango ezali ntɔki ya mosali na diamá. Yango wana, kompanyi moko monene ya kosalela diamá emipesi lokola mokano ete ‘kitoko nyonso ya diamá ezali ntɔki ya mosali na yango.’”

Natunaki Dirk ete: “Ndenge nini ozwaka ekateli mpo na kopesa na diamá lolenge oyo olingi?” Alobaki ete: “Tobandaka liboso kotala na likebi mpenza libanga oyo tosombaki. Totalelaka yango na likebi mpenza! Nazali komikundola libanga moko ya monene oyo totalelaki na boumeli ya sanza mobimba liboso ya kozwa ekateli ya nsuka mpo na lolenge esengelaki kopalolama. Mbala mosusu ezalaka mpasi te mpamba te libanga oyo epalolami naino te yango moko emonisaka lolenge ebongi kopalola yango. Na nyonso wana, likambo ya ntina ezalaka ya koyeba lolenge oyo ekosɛnga kopalolama mpo ete kiló na yango ekita mingi te. Kasi, epai mokomoko oyo topalolaka​—diamá moko ezalaka na bipai koleka 50​—esukaka na kobungisa bakiló mosusu.”

Na nsima Dirk asɛngaki na ngai ete natala malamumalamu libanga moko. Asimbisaki ngai litalatála moko oyo batalelaka na yango babiju mpe atunaki ngai ete: “Ozali komona bosɔtɔ likoló na eteni ya loboko ya mobali ya libanga?” Namonaki mwa mikɔlɔtɔ mikemike na kati ya biju, lokola oyo ezalaka likoló ya litalatála oyo epasuki. “Bosɔtɔ motindo wana ekitisaka mpenza motuya ya diamá. Ya solo, tokokaki kolongola yango, kasi yango elingaki kokitisa kiló ya libanga. Soki mbeba yango ezali komonana na miso te, tokoki kotɛkisa libanga yango, kasi na ntalo moke.”

Nalingaki koyeba mpo na nini libanga moke boye ezalaka na motuya mingi. Emonani ete makambo mingi matalelami na ntina na yango.

Dirk alobaki ete, “Balobaka ete ‘diamá epolaka te’​—likambo yango ezalaka mbala mingi solo. Diamá enzulukaka te, mpe kongɛnga na yango elongwaka te. Emonanaka mingimingi te, atako ekozala te lokola ezalaki kala, kasi ezali kitoko​—ntembe ezali te mpo na yango! Kasi mbala mosusu motuya na yango etalelami lisusu mingi na ndenge mokili mobimba etalelaka diamá. Mingimingi na nzela ya piblisité.

Dirk asalaki mwa lisɛki ete, “Mpo na nini basi balingaka babiju ya diamá? Mbala mosusu bakangisaka diamá na lolango. Diamá ezali eloko moko ya ntina, eloko oyo ezali na motuya ntango nyonso, eloko oyo ekokundwela ye bolingo oyo alingi ete eumela libela lokola diamá. Likanisi yango, to mpe likambo yango oyo ezali bobele lisapo, lokola basusu bakoki kobénga yango, elendisami mingi. Na 1995, dolare 180 000 000 ebimisamaki mpo na kosala piblisité na yango, oyo esali ete na mokili mobimba bato bákóba kosomba diamá.”

Motuya ya diamá

Nakanisaki ete: “Motuya ya biju oyo esili kosalema etalelaka bonene na yango.” Dirk azongisaki ete: “Esuki bobele wana te. Batɛki ya diamá balobaka ete motuya ya diamá etalelaka makambo minei: lolenge ya kopalola yango, kiló, lángi, mpe kongɛnga na yango. Likambo mokomoko ezali na bopusi likoló na kitoko na yango​—mpe na bongo na motuya​—ya libanga.

“Tiká tóbanda liboso na lolenge ya kopalola. Kopalolama ya malamu ezalaka mosala ya moyemi malamu. Talá malamu diamá oyo epalolami lokola motema ya moto, oyo okosepela na yango. Ezali lolenge ya kopalola oyo ezali pɛtɛɛ te mpo na koyema, mpe yango ekitisaka mingi kiló ya libanga koleka mitindo mosusu nyonso ya kopalola. Talá lolenge bipai nyonso biyemami na molɔngɔ́ mpo na kobimisa kitoko ya biju. Tokoki koloba ete diamá motindo yango etɛkamaka na ntalo malamu.

“Libosoliboso okamwaki na bonene na yango, mpe na ntembe te lokola ezali monene, ezali libanga ya kará 8. Kará moko ekokani na grami 0,2, na bongo tomekaka motuya ya kará na kotyáká bozito na yango. Na momeseno, soki kará ezali mingi, diamá mpe ezalaka na motuya mingi, kasi motuya na yango mpe etalelaka lángi mpe kongɛnga na yango.

“Diamá ezalaka lolenge mingi mpe na lángi ndenge na ndenge, lokola omonaki yango na esika totyaka mabanga oyo mapalolami naino te. Likambo ya liboso tosalaka ezali ya kopona yango engebene lángi na yango, oyo eleki mpɛmbɛ ezalaka na motuya mingi koleka mosusu. Atako bongo mabanga mingi mazali na oyo tobéngaka ete lángi kitoko, lokola rozɛ, bulé, to ya motane; mpe yango ezalaka na ntalo makasi koleka oyo ya mabanga ya mpɛmbɛ, mpamba te yango emonanaka mpenza te.

“Na nsuka tosengeli kotya libanga na molɔngɔ́ engebene kongɛnga na yango. Soki libanga emonani ete ezangi mbeba, elingi koloba ntango otali kati na yango​—ata na litalatála oyo batalelaka yango​—okomona ata mbeba moko te. Na yango, lolenge ya kopalola, kongɛnga, mpe lángi ya diamá ekoki kozala na ntina ndenge moko lokola kiló na yango na kará. Mpo na kopesa yo ndakisa, na mobu 1995, diamá oyo eleki mosusu nyonso na monene (kará 546, 67) epalolamaki mpe etyamaki esika moko mpo ete bátala yango. Kasi atako ezalaki monene​—ekokani mwa moke na bále ya lisano ya golf​—yango ezali te diamá eleki motuya na mokili mobimba, mpo na kongɛnga na yango moke mpe lángi na yango ya mosaka-pɛɛ ( jaune-brun).”

Liboso ya kolongwa na engumba Anvers, nasololaki na Hans Wins, oyo asili kosala na boumeli ya mibu 50 na kompanyi moko ya diamá. Nalingaki kotuna ye motuna moko ya nsuka, Nini esalaka ete diamá ezala na ntina mingi?

Alobaki ete: “Namonaka te ete diamá ya moke ezalaka kitoko​—ekoki ata kopalolama na masini. Kasi, diamá ya monene esepelisaka ngai. Libanga na libanga ekeseni na mosusu, eloko oyo euti na oyo babéngi carbone nsima ya bopusi mpe molungé makasi oyo ezalaka na kati ya mabelé na boumeli ya bamilió ya bambula. Na kotaleláká libanga, okoki mpenza komona mikɔlɔtɔ oyo mizali komonisa ete ezali kokóla ndenge moko nzeté ekólaka. Mosombi oyo ameseni na mosala yango akoki koyebisa yo mabelé oyo diamá yango euti.

“Mosali ya diamá atalelaka libanga yango lolenge moko moyemi atalelaka mabanga ebéngami marbre. Amonaka kati na makanisi na ye nini akoki kosala. Na makanisi na ye, azali kopalola mpo na kobimisa biju moko kitoko. Nakanisi ete ntango diamá ezwi lolenge na yango ya nsuka na biju, ekopesa esengo motindo moko epai na nkolo na yango.”

Nsima ya kotalela makambo nyonso, likambo oyo ete diamá esepelisaka nkolo na yango nde ezali likambo lileki ntina mpo na mosala ya mosali na diamá.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ntina monene oyo diamá ezalaka na ntalo mingi etalelami na Ebongiseli ya makambo ya mombongo.

[Bililingi na lokasa 14]

Diamá oyo epalolami lokola motema ya moto, ezali na kará 8 (mabanga yango etyamaka na kiló te)

Diamá oyo epalolami lokola ‘poire’

Epalolami lokola “enkɔti ya kardinale”

Bamekaka bozito ya mabanga oyo mapalolami naino te na kará

Koponama ya diamá oyo epalolami naino te engebene lángi na yango

Kotalelama ya bipai na yango mpo na koyeba soki esengeli lisusu kopalolama

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto