Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 6/15 lok. 16
  • Makambo etali mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali mabele
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Australie
  • Esobe ya Sahara
  • Mokili
  • Mitó ya makambo
    Lamuká!—2023
  • Mopɛpɛ
    Lamuká!—2023
  • Ndenge nini moto azali kobebisa mabele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Lamuká!—2015
g 6/15 lok. 16
Esobe ya Sahara

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali mabele

Atako mabele ebimisaka mopɛpɛ ya kitoko, bilei ya malamu mpe mai ya kitoko, bato bazali kokoba kobebisa mabele. Bato ya siansi bazali kosala ndenge nyonso mpo na kobatela mabele.

Australie

Balobaka ete ebele ya mai (500 000 kilomɛtrɛ kibe) oyo ezali na mungwa moke mpenza ezalaka na nse mpenza ya mbu. Vincent oyo ayekolaka makambo ya mai na iniversite ya Flinders, na engumba Adélaïde, alobi boye: “Nivo ya mai ya mbu ezalaki na nse mpenza koleka ndenge ezali lelo oyo,” yango wana bokula ezalaki monene mingi. Na ntango wana, mai ya mbula ezalaki “kotondisa esika oyo mai efandaka na nse ya mabele (nappe aquifère) oyo ezalaka lelo na nse ya mbu.” Bato ya siansi bazali na elikya ete nsima ya mikolo, mai yango oyo ebombami na nse ya mbu ekosalisa bato koleka milio 700 oyo bazalaka na likoki mpenza te ya kozwa mai ya pɛto.

Esobe ya Sahara

Balolenge ya banyama minene oyo ezalaki na esobe ya Sahara, ndambo na yango elimwá to ebungisá eteni monene (99%) ya esika oyo yango efandaka. Makambo ekómi bongo mpo na mikakatano oyo ezali na etúká yango mpe mpo babomi-nyama bakómi mingi. Atako bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi oyo ezalaka na bisobe ezalaka mpe na bazamba, bato ya mayele balobi ete “soki bato ya siansi batyelaka bikelamu ya esobe likebi mpenza te ezali mpo basungaka bango te na mbongo.” Yango nde ntina oyo bato oyo babatelaka mabele bazali na mokakatano ya kokipe bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali na likama, oyo efandaka na esobe.

Mokili

Ekoki kozala ete na bato 8 oyo bakufaki na 2012, moko na bango akufaki mpo na kobeba ya mopɛpɛ. OMS emonisi ete “lelo oyo na mokili mobimba, kobeba ya mopɛpɛ ezali likama moko eleki makama nyonso mpo na sante ya bato.”

KANISÁ NAINO: Mpo na nini bato yango oyo bazali kosala mosala makasi ndenge wana na mikano ya malamu bazali kokoka te kosukisa likambo ya kobebisa mabele?​—Yirimia 10:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto