Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 11/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Équateur
  • Japon
  • Zimbabwe
  • Australie
  • Sida: Lolenge ya koluka kosilisa yango
    Lamuká!—1999
  • Sida epalangani na Afrika
    Lamuká!—2003
Lamuká!—2014
g 11/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Équateur

Eteni ya zamba ya Amazonie

Na 2007, ekólo Équateur elobelaki mokano oyo ezwaki ya kobatela 10 000 mɛtrɛ-kare ya bazamba ya Amazonie oyo bato babebisi naino te na esika ya kotimolaka mabulu kuna mpo na kozwa petrole. Basundolaki mokano yango mpo bikólo ya mokili mobimba esungaki bango na mbongo te mpo mokano yango ekokisama. Eteni yango ya bazamba ya Amazonie ezali moko ya bisika na mokili epai bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi ezalaka mingi.

Japon

Monganga oyo asimbi sashɛ ya makila

Zulunalo moko (The Japan News) elobi ete ezalaka mpasi minganga bámona mikrobe nyonso na makila oyo basalaka baekzame mpo na kozongisa bato. Zulunalo yango elobaki mpe ete na 2013, tata moko ya mbula soki 60 azwaki maladi ya sida na makila oyo bazongisaki ye. Soki makila oyo bato bapesaka ezali na mikrobe ya sida, mikrobe yango emonanaka na baekzame kaka nsima ya mwa basanza.

Zimbabwe

Mobali oyo mine ekatá ye lokolo na Zimbabwe

Atako eleki sikoyo mbula 30 banda barebɛlɛ ya Zimbabwe batiká kobunda pembenipembeni ya ndelo ya ekólo na bango ná ekoló Mozambique, bamine oyo bakundákundá ezali kokoba koboma mpe kokata bato makolo. Ebongiseli moko (Comité International de la Croix Rouge) elobi ete “kobanda 1980, bamine yango ebomaki bato koleka 1 500, bibwele 120 000 mpe ekataki bato 2 000 makolo na ngámbo ya ekólo Zimbabwe.”

Australie

Mbwa oyo ezali na katikati ya mwasi ná mobali oyo balingi koboma libala

Ankɛtɛ moko emonisi ete likambo ya kowela banyama oyo babɔkɔlaka na ndako ekómi lisusu makasi epai ya balongani oyo bazali koboma mabala. Na biloko oyo bawelanaka mpo na kokabola, banyama oyo babɔkɔlaka eyei nsima ya lopango to ndako, mbongo mpe biloko mosusu ya moto ye moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto