Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 nk. 4-5
  • Tokoki kotyela moto motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki kotyela moto motema?
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitinda ya malamu koleka na oyo etali etamboli
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Koyiba na ekzamɛ ezali mabe?
    Lamuká!—2003
  • Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 1/11 nk. 4-5

Tokoki kotyela moto motema?

Bato bazalaki komona ete azali monganga oyo azwi nkisi ya kosilisa mpasi. Nzokande, na boumeli ya mbula koleka zomi, banda na 1996, monganga yango oyo ayebi makambo ya anesthésie, akosaki na makambo etali bolukiluki oyo abimisaki na bazulunalo minene ya minganga.

ZULUNALO moko (Anesthesiology News) ezongelaki maloba ya Doktɛrɛ Steven Shafer oyo alobaki ete: “Nazali koyeba te ntina oyo moto akoki kosala likambo ya ndenge wana.”

Nini ekoki kotinda moto ya mayele oyo bato bapesaka limemya ndenge wana akosa bazalani na ye? Tótalela bantina minei oyo ekoki kotinda moto asala yango.

● Lokoso. Na lapolo ya zulunalo moko (New York Times), Doktɛrɛ Jerome Kassirer, oyo azalaki kala mokomi ya zulunalo moko ya minganga (The New England Journal of Medicine), alobaki boye: “Soki bato ya mayele oyo basalaka bolukiluki bayebi ete mbongo na bango ezali kouta mingimingi na bakompanyi [oyo esalaka nkisi], basalaka makasi mpo makambo oyo bakobimisa nsima ya bolukiluki na bango esepelisa bakompanyi yango.”

● Kolonga kaka ata ndenge nini. Na Allemagne, eyebani ete bana-kelasi oyo bayekolaka makambo ya siansi bapesaka balakisi kanyaka ya bankóto ya badolare mpo ‘bazwa’ titre ya Doktɛrɛ, mpamba te na ekólo yango, titre wana emonisaka ete moto alongi na bomoi. Zulunalo moko (The New York Times) elobelaki ankɛtɛ moko oyo emonisaki ete bana-kelasi mingi oyo basalaka ndenge wana balobaki ete “bakolanda bizaleli ya malamu” nsima ya kolonga na bomoi.

● Ndakisa ya kolanda ezali te. Na oyo etali bana-kelasi ya ntei, zulunalo moko (The New York Times) ezongelaki maloba ya molakisi moko oyo alobaki ete: “Tokoki koloba ete babungisá mitinda ya bizaleli malamu oyo ekoki kotambwisa bango . . . Mbala mosusu malamu tóloba ete balakisi ná bapesi-toli na bango mpe bato mosusu nyonso basalisá bango ata mokolo moko te báluka libosoliboso kozala na mitinda ya bizaleli malamu oyo bakolanda.”

● Misala oyo eyokani te na mitinda ya bizaleli malamu. Na ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bana-kelasi soki 30 000, bana mingi (98%) bandimaki ete kozala sembo ezali na ntina mingi mpo na kozala na boyokani malamu na bato. Nzokande, kati na bana-kelasi 10, bana 8 bandimaki ete bakosaki baboti na bango, mpe mingi (64%) bandimaki ete bayibaki biyano na ekzamɛ ya mbula eleki.

Mitinda ya malamu koleka na oyo etali etamboli

Ndenge etanda wana emonisi yango, emonani ete bato bakelamá mpo na kotyelana motema. Atako bongo, Biblia emonisi solo ete “mposa ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye.” (Ebandeli 8:21) Ndenge nini okoki kobundisa mposa wana mpe kotɛmɛla ezaleli ya kozanga kolongobana oyo epalangani na mokili lelo? Mitinda ya Biblia oyo elandi ekoki kosalisa yo:

● “Kokana te kosala moninga na yo likambo moko ya mabe, wana afandi, amiyoki na kimya, pene na yo.”​—Masese 3:29.

Bolingo mpo na bazalani na biso etindaka biso tóluka bolamu na bango, kasi tókosa bango te. Etinda yango ekoki kosilisa makambo mingi ya mabe oyo bato basalaka na lokoso mpo na kobuba baninga, na ndakisa kotɛka nkisi ya mabe, ndenge tolobelaki yango na lisolo ya liboso.

● “Mbɛbu oyo elobaka solo ekopikama mpo na libela, kasi lolemo ya lokuta ekozala kaka mpo na mwa ntango.”​—Masese 12:19.

Bato mingi lelo bakanisaka ete bato ya sembo bazangaka makambo mingi. Kasi omituna boye: ‘Nini ezali na motuya mingi​—kozwa mbano ya mbala moko to kozwa matomba oyo ekoumela libela, na ndakisa kopesa nzoto kilo?’ Mwana-kelasi oyo ayibi biyano na ekzamɛ akoki kokosa basusu ete azali na mayele mingi mpe ayebi makambo mingi, kasi akosala nini soki azwi mosala?

● “Moyengebene azali kotambola na ezaleli na ye ya kozanga mbeba. Esengo na bana na ye nsima na ye.”​—Masese 20:7.

Soki ozali moboti, ‘tambolá na ezaleli na yo ya kozanga mbeba’ mpo opesa bana na yo ndakisa malamu. Yebisá bango ndenge kozala sembo esalisaka yo. Ntango bana bazali komona moboti azali kotambola na ezaleli ya kozanga mbeba, bango mpe bakolinga kozala na etamboli oyo ebongi.​—Masese 22:6.

Mitinda ya Biblia oyo touti kolobela esalisaka mpenza? Ezali na bato oyo babongi kotyelama motema lelo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Zulunalo Le Figaro elobi ete bato mingi mpenza ya France “bazali kokanisa ete bato minene​—na makambo ya politiki, ya nkita, na makambo etali bomoi ya bato, to na masano—​bazalaka sembo te, mpe bango moko bamonaka te ntina ya kozala sembo.”

[Etanda na lokasa 5]

TOKELAMÁ MPO NA KOTYELANA MOTEMA?

Michael Kosfeld, profesɛrɛ moko ya gestion na iniversite ya Francfort, na Allemagne, asalaki baankɛtɛ oyo etindaki ye aloba ete “moto akelamá na mposa ya kotyela basusu motema.” Kosfeld amonaki ete ntango bato mibale bazali na boyokani, bɔɔngɔ ebimisaka hormone babengi ocytocine, oyo etindaka moto atyela basusu motema. Kosfeld alobi boye: “Kutu, ezali moko na makambo oyo ekesenisaka moto na bikelamu mosusu. Ntango kotyelana motema ezali te, tokoki koloba ete tozali lisusu bato te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto