Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/10 nk. 26-27
  • Okoki kolonga kobɔkɔla bana kaka yo moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kolonga kobɔkɔla bana kaka yo moko
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Mabota oyo mazali na moboti sé moko makoki mpe kolónga!
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Tyáká likebi epai ya baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nakoki kozala na esengo ata soki nazali na moboti kaka moko?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 1/10 nk. 26-27

Okoki kolonga kobɔkɔla bana kaka yo moko

BAZALI koloba ete mabota oyo baboti bazali mibale ekómi ya kotánga. Tózwa ndakisa: Kaka na États-Unis mpamba, bato koleka milio 13 bazali kobɔkɔla bana kaka bango moko; mingi kati na bango bazali basi. Bato ya mayele bamonisi ete bana nyonso ya ekólo yango kabolá na mibale bakolekisa ndambo ya bolenge na bango na libota oyo ezali na moboti kaka moko.

Soki ozali kobɔkɔla bana kaka yo moko, yebá ete bomoi na yo ya libota ekoki kolonga. Meká kosalela makanisi oyo elandi.

◼ Tiká kosalela kaka maloba ya mabe. Biblia elobi boye: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” (Masese 15:15) Ya solo, mbala mosusu bomoi na yo emonani te ete ezali fɛti. Kasi, ndenge vɛrsɛ wana emonisi yango, esengo ezali likambo ya motema kasi te ya makambo oyo ozali kokutana na yango na bomoi. (Masese 17:22) Kokanisa ete bana na yo bakolonga soki moke te na bomoi to ete libota na yo ekobonga lisusu te ekoki kobongisa makambo te. Makanisi ya ndenge wana elɛmbisaka nzoto mpe ekobakisela yo mpasi mpo okokisa mokumba na yo ya moboti.​—Masese 24:10.

Likanisi: Komá maloba nyonso ya mabe oyo osalelaka mpo na kolobela libota na yo, mpe pembeni na yango, komá maloba ya malamu oyo okobanda kosalela na esika ya oyo ya mabe. Na ndakisa, na esika ya “Makambo oyo eleki ngai motó,” komá “Nazali na likoki ya kokokisa mokumba na ngai ya kobɔkɔla bana ngai moko, mpe nakoki kozwa lisalisi oyo nasengeli na yango.”​—Bafilipi 4:13.

◼ Yebá ndenge okosalela mbongo. Mikakatano ya mbongo nde etungisaka baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko, mingimingi basi. Atako bongo, mitungisi ya mbongo ekoki kokita soki oyebi malamu ndenge okosalela mbongo. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Mpo na kokima “likama” na makambo ya mbongo, kozala na programɛ ya malamu mpe kokanisa liboso ezali na ntina.

Likanisi: Komá na papye ndenge oyo okosalela mbongo. Komá mbongo oyo ozali kobimisa na sanza mpe luká koyeba esika mbongo ezali kokende. Talá malamu ndenge oyo ozali kosalela mbongo. Olingaka kozwa banyongo mingi? Osombelaka bana na yo biloko mpo olongola bango mawa ya kozanga moboti mosusu? Soki bana na yo bakómi mwa mikóló, bófanda mpe bókanisa ndenge oyo bokoki kobatela mbongo. Ekosalisa bango báyeba kosalela mbongo. Bakoki kutu kopesa makanisi mosusu ya malamu!

◼ Zalá na kimya na molongani na yo ya kala. Soki bobatelaka bana moto na moto na ngala na ye, koloba mabe mpo na molongani na yo ya kala epai ya mwana, to kosalela mwana mpo ayaka koyebisa yo makambo oyo ezali koleka na bomoi ya molongani na yo ya kala, ezali malamu te.a Eleki malamu koyokana ná molongani na yo ya kala mpo na disiplini to likambo mosusu nyonso oyo etali bolamu ya mwana na bino. Biblia elobi boye: “Bósalaka nyonso oyo bokoki, po bózala na boboto ná bato nyonso”​—ata mpe na molongani na yo ya kala.​—Ba-Romén 12:18, Bible na lingala ya lelo oyo.

Likanisi: Mbala ya nsima oyo bokoyokana te na molongani na yo ya kala na likambo moko, zwá ye lokola moninga ya mosala. Na mosala, okosala nyonso mpo ozala na boboto ná moto nyonso​—ata baoyo osepelaka mpenza na bango te. Salá mpe bongo epai ya molongani na yo kala. Mbala mosusu bino mibale bokoyokana na makambo nyonso te, kasi likambo nyonso esengeli te kopelisa mɔtɔ.​—Luka 12:58.

◼ Zalá ndakisa ya malamu. Omituna boye: ‘Makanisi mpe bizaleli nini nalingi bana na ngai bázala na yango? Ngai moko namonisaka makanisi mpe bizaleli yango na bomoi na ngai?’ Na ndakisa, ozalaka mbala mingi na esengo, atako ozali kobɔkɔla bana kaka yo moko? To yango etindaka yo okanisa ete makambo nyonso ya bomoi na yo ezali mabe? Ozalaka kaka na nkanda mpo na mabe oyo molongani na yo ya kala asalá yo? To okoki kobosana mabe oyo basalá yo, oyo okoki kosala eloko te mpo na yango? (Masese 15:18) Ya solo, makambo yango ezali pɛtɛɛ te, mpe okobongisa yango na ndenge ya kokoka te. Atako bongo, bana na yo bakoki kobanda kotalela bomoi ndenge bamonaka yo otalelaka yango.

Likanisi: Komá na papye bizaleli misato oyo okolinga mwana na yo mokomoko amonisa ntango bakokóma mikóló.b Pembeni ya ezaleli mokomoko, komá oyo okoki kosala sikoyo mpo na kozala ndakisa oyo ekosalisa mwana na yo amonisa ezaleli yango.

◼ Omibatela. Soki moto azali na makambo mingi ya kosala, ezalaka mpasi te abosana kobatela nzoto mpe makanisi na ye. Kokwea na motambo yango te! Kokokisa bamposa na yo ya elimo ezali na ntina mingi! (Matai 5:3) Kobosana te: motuka oyo ezangi esansi ekokende mosika te. Yo mpe okokende mosika te soki ozali kozwa ntango te mpo na “kobakisa esansi.”

Ezali mpe na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kobina na kopumbwapumbwa.” (Mosakoli 3:4) Kominanola ezali kobebisa ntango te. Ekopesa yo makasi oyo ekoki kosalisa yo na mokumba na yo ya kobɔkɔla bana kaka yo moko.

Likanisi: Tuná baboti mosusu oyo babɔkɔlaka bana bango moko ndenge basalaka mpo na komibatela. Wana ozali ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina,’ okoki mpe kolekisaka mwa ntango pɔsɔ na pɔsɔ na kosala eloko moko kaka mpo esepelisaka yo? (Bafilipi 1:10) Komá na papye makambo oyo okolinga kosala mpe ntango oyo okoki kosala yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Ndako oyo ekabwani​—Ndenge koboma libala esalaka bilenge,” na nkasa 18-21 na zulunalo oyo.

b Bizaleli yango mosusu ekoki kozala “limemya,” “kozala makambo makasimakasi te,” mpe “kolimbisa,” oyo tolobelaki na nkasa 6-8 na zulunalo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto