Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/10 nk. 22-25
  • Bandakisa ya mabota ya malamu—Eteni ya mibale

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya mabota ya malamu—Eteni ya mibale
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Koyoka makebisi esalisaki bango
    Lamuká!—2006
  • “Nasili kobatela kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Lamuká!—2010
g 1/10 nk. 22-25

Bandakisa ya mabota ya malamu​—Eteni ya mibale

Ndenge tomonisaki yango na lisolo “Bandakisa ya mabota ya malamu​—Eteni 1,” mitinda ya Biblia ekoki kosalisa libota ezala makasi na ntango ya mikakatano.a Yehova Nzambe apesi baoyo batosaka mitinda na ye elaka oyo: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”​—Nzembo 32:8.

Ntango bozali na mikakatano ya mbongo. Mikakatano ya mbongo ebimisaka matata mingi na libala. Kasi mitinda ya Biblia ekoki kosalisa mabota bátalela makambo etali mbongo na ndenge ebongi. Yesu alobaki boye: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino mpo na oyo bokolya to oyo bokomɛla, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata. . . . Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.”​—Matai 6:25, 32.

Na lokasa 23, Issachar, na États-Unis, alobeli ndenge ye ná libota na ye basalaki ntango bakutanaki na mikakatano ya mbongo ntango ndako na bango ebebisamaki na mopɛpɛ makasi oyo babengaki Katrina.

Ntango maladi ebɛti moto moko ya libota. Tokoki koloba ete bato nyonso babɛlaka. Mbala mingi, maladi yango eumelaka te mpe esilaka noki. Bongo soki moto moko ya libota abɛli maladi oyo ezali kosila te? Biblia elobi ete Yehova akoki kosunga baoyo bazali na mbeto ya maladi. (Nzembo 41:1-3) Ndenge nini libota ekoki kozala nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kosala yango?

Na lokasa 24, Hajime, mobali moko na Japon, alobeli ndenge ye ná bana na ye ya basi basalaka elongo mpo na kosunga mwasi na ye, Noriko, oyo bazwaki na maladi moko ya mabe.

Ntango mwana akufi. Liwa ya mwana ezali moko ya makambo ya mpasi mingi oyo libota ekoki kozwa. Yehova alaki kopangwisa mpisoli ya mawa oyo tobimisaka ntango mwana akufi. (Emoniseli 21:1-4) Ata sikoyo, abɔndisaka baoyo mwana na bango akufi.​—Nzembo 147:3.

Na lokasa 25, Fernando ná Dilma, na États-Unis, balobeli ndenge Biblia epesaki bango makasi ntango bebe na bango ya mwasi akufaki.

Biblia esalisaka mpenza mabota oyo ezali na mikakatano, ndenge masolo oyo elandi emonisi yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá nkasa 14-17 ya zulunalo oyo.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Ntango bozali na mikakatano ya mbongo

Lisolo ya Issachar Nichols, États-Unis

“Mopɛpɛ makasi oyo babengaki Katrina ebebisaki ndako na biso mpe etikaki kaka fondasyo. Eteyelo epai nazalaki kotangisa ezindaki na mai sanza mobimba ná ndambo.”

NA ELEKO ya molunge ya 2005, ngai ná mwasi na ngai Michelle, elongo na Sydney, mwana na biso ya mwasi ya mbula mibale, tofandaki na engumba Bay Saint Louis, na etúká ya Mississippi, na États-Unis. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, ngai ná Michelle tozalaki na mokano ya komipesa mingi na mosala ya kosakola. Nazalaki molakisi na eteyelo oyo balakisaka bato misala mpe eteyelo yango ezalaki mosika te, na Nouvelle-Orléans, na etúká ya Louisiane. Nazalaki kotángisa mikolo misato na pɔsɔ mpe na mikolo oyo etikali, nazalaki kolekisa ntango mingi mpo na koteya basusu Biblia. Tozalaki kosepela na programɛ na biso. Nde nsango eyaki ete mopɛpɛ makasi Katrina ezali koya. Tozwaki bibongiseli mpo na kolongwa wana nokinoki.

Ntango mopɛpɛ elekaki, ndako na biso na Bay Saint Louis mpe eteyelo epai nazalaki kotángisa na Nouvelle-Orléans, ebebaki. Mbongo na biso ya assurance mpe lisungi ya Leta esalisaki biso tózwa ndako, kasi ezalaki mpasi mpo nazwa mosala ya malamu. Longola yango, mai oyo ebebaki epesaki mwasi na ngai maladi. Nzoto na ye ezalaki na makasi lisusu te ya kobundisa maladi, mpe mpo na yango, abɛlaki maladi oyo babengi virus du Nil mpo ngungi eswaki ye. Na ntango yango, mbongo ya kofuta assurance mpe ntalo ya biloko emataki.

Mpo tómesana na bomoi na biso ya sika, toyekolaki kobimisaka mbongo na mayele, ata mpo na biloko oyo tosengeli na yango. Esɛngaki nandima misala kozanga koponapona mingi.

Nandimi ete kobungisa biloko na biso nyonso ezalaki pɛtɛɛ te mpo na biso. Kasi, tozalaki na esengo ndenge tozalaki naino na bomoi. Mpe nyonso wana emonisaki ete biloko ya mosuni ezalaka na motuya monene te. Kutu, etindaki biso tókanisa lisusu maloba ya Yesu oyo: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15.

Tomonaki mpe ete atako toyokaki mpasi ndenge tobungisaki biloko na biso, bato mosusu babungisaki biloko mingi koleka​—basusu kutu bomoi na bango. Yango wana, mbala moko nsima ya likama wana, nakendaki kopesa mabɔkɔ na bisika oyo bazalaki kosunga bato, mpe nazalaki kobɔndisa bato mosusu oyo bakutanaki na likama.

Na ntango ya mikakatano wana, Nzembo 102:17 ezalaki kobɔndisa biso mingi. Elobi ete Yehova Nzambe “akobaluka mpenza mpo na koyoka libondeli ya baoyo biloko na bango nyonso epunzami, mpe akotyola libondeli na bango te.” Libota na biso mobimba, toyokaki ete azalaki kosunga biso!

[Etanda na lokasa 23]

Nsima ya mipɛpɛ makasi Katrina mpe Rita kobɛta pembeni ya golfe du Mexique na 2005, na mbala moko Batatoli ya Yehova basalaki bisika 13 epai bazalaki kokabolela bato biloko, bandako libwa ya kobomba biloko, mpe bisika minei ya kobomba esansi. Batatoli soki 17 000 ya États-Unis mpe ya mikili mosusu 13 bayaki kosalisa basusu. Babongisaki bandako ebele mpenza.

[Etanda na lokasa 24]

Ntango maladi ebɛti moto moko ya libota

Lisolo ya Hajime Ito, Japon

“Kolamba ezalaki likambo tozalaki kosepela mingi kosala yango elongo, tii ntango Noriko abɛlaki. Lelo akokaka te kolya to komɛla na monɔkɔ na ye; akokaka ata koloba te. Afandaka kaka na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe apemaka na lisalisi ya aparɛyi moko.”

NA SANZA ya Mai 2006, mwasi na ngai Noriko akómaki koloba na mpasi. Na eleko ya molunge ya mbula yango, akómaki na mokakatano mpo na kolya mpe komɛla. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bazwaki ye na maladi oyo babengi sclérose latérale amyotrophique (SLA); maladi yango esimbaka mokemoke baselile ya ba-nerf ya bɔɔngɔ mpe ya mai ya mokuwa ya mokɔngɔ. Nsima ya sanza minei mpamba, bomoi na biso ebongwanaki na makambo nyonso. Kasi, wana ezalaki naino kaka ebandeli ya mikakatano na ye.

Nsima ya mwa ntango, lolemo ya Noriko mpe lobɔkɔ na ye ya mobali ekómaki paralize. Basalaki ye lipaso moko babengi gastrostomie mpo na kosalisa ye alyaka na nzela ya sɔndɛ, mpe na nsima basalaki ye trachéotomie; na lipaso yango bafungolaki nkingo mpo na kolekisaka mpema​—mpo na yango, akokaki koloba lisusu te. Nayebi ete yango ezalaki kopesa Noriko mpasi mingi, mpo azalaki mwasi moko alingá kosala misala. Tozali Batatoli ya Yehova, mpe Noriko ná bana na biso ya basi bamipesaki mobimba na mosala ya kosakola. Lelo oyo, Noriko apemaka kaka na lisalisi ya aparɛyi moko mpe mbala mingi alalaka kaka na mbeto.

Kasi, yango epekisaka Noriko te! Na ndakisa, ayanganaka na makita ya bokristo na kiti ya bibɔsɔnɔ, mpe azalaka na aparɛyi oyo esalisaka ye apema. Matoi na ye ekufá; yango wana na makita, mwana na biso ya mwasi akomelaka ye makambo mineneminene na papye mpo akoka kolanda programɛ. Atako Noriko atiká mosala ya kosakolaka ntango nyonso, akomelaka bato mikanda mpo na koteya bango nsango ya Biblia oyo epesaka elikya, asalelaka baprogramɛ oyo totyá na ordinatɛrɛ na biso mpo na ye.​—2 Petro 3:13; Emoniseli 21:1-4.

Libota esalaka na bomoko mpo na kosalisa Noriko. Bana na ngai mibale ya basi bazwá misala mosusu mpo etikelaka bango ntango ya kosala misala mingi na ndako. Biso nyonso misato tokabolaka ebele ya misala ya ndako oyo Noriko azalaki kosala.

Mikolo mosusu na ntɔngɔ soki nazali kotala Noriko, namonaka lokola alɛmbi. Nalobaka na nse ya motema ete, ‘Nakosepela koyebisa ye ete lelo apema.’ Kasi, Noriko alingaka koyebisa basusu nsango ya Biblia. Soki kaka nabandi kobongisela ye ordinatɛrɛ, Noriko akómaka na esengo! Ntango azali kokoma, akómaka makasi. Nakómá komona ntina ya ‘kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’​—1 Bakorinti 15:58.

Lisolo ya Jason Stuart oyo azali na maladi ya SLA, oyo ebimaki na Lamuká! ya Yanuali 2006 (na Lifalanse), esalisaki Noriko mingi mpo akómaka mawamawa te. Kutu, ntango bato ya lopitalo bazalaki komituna ntina oyo azalaki na esengo ndenge wana, Noriko ayebisaki bango lisolo yango, mpe tokabolaki Lamuká! yango epai ya bato ya lopitalo. Mwasi na ngai azwaka makasi mingi na ndenge ayebisaka basusu bindimeli na ye.

Banda ngai ná Noriko tobalaná, eleki mbula 30, kasi na mbula misato oyo euti koleka, nakómaki kosepela na makambo na ye mosusu oyo liboso nazalaki komona yango mpamba. Nazali na esengo ndenge nabalaki ye!

[Etanda/​Bililingi na lokasa 25]

Ntango mwana akufi

Lisolo ya Fernando ná Dilma Freitas, États-Unis

“Mpasi ya kobungisa mwana na liwa ezali likambo oyo moto akoki koyeba kolimbola te. Ezali na mpasi mosusu te oyo eleki yango.”

MWANA na biso ya mwasi, oyo topesaki nkombo Precious, akufaki na mokolo ya 16 Aprili 2006. Asalaki kaka mikolo zomi. Ntango zemi ekómaki ya sanza misato, minganga bamonaki ete motema ya mwana na biso oyo azalaki naino na libumu ezalaki malamu te. Ntango akómaki pene ya kobotama, emonanaki polele ete mwana yango akoumela te nsima ya mbotama, soki akufi na libumu te. Ezalaki mpasi mpo tóndima yango. Tozalaki na bana misato oyo bazali nzoto malamu. Tokokaki kondima te ete bebe na biso akokufa.

Ntango Precious abotamaki, monganga moko oyo ayebi malamu bamaladi ya baselile, amonaki ete bebe na biso azali na maladi moko oyo ezalaka mingi te oyo ebengami trisomie 18, oyo ezwaka kaka bebe soki moko kati na babebe 5 000. Emonanaki polele ete akoumela na bomoi te. Toyokaki mpasi mingi mpo tokokaki kosala mpenza eloko te. Likambo moko oyo tokokaki kosala ezalaki kaka kozala elongo na ye na mwa ntango mokuse ya bomoi na ye. Yango nde tosalaki.

Tosepelaka mingi na mikolo zomi oyo tolekisaki ná Precious. Na mikolo yango, biso ná bana na biso misato ya basi tomesanaki na ye. Tozalaki komema ye, koloba na ye, koyamba ye, kopesa ye babizi, mpe kokanga ye bafɔtɔ ebele mpenza. Kutu, tozalaki koloba soki akokanaki mingi na nani na libota. Monganga oyo amonaki maladi ya Precious azalaki koya kotala biso mokolo nyonso na lopitalo. Alelaki na biso mpe ayebisaki biso ete ezali kosala ye mawa. Akangaki kutu Precious fɔtɔ ntango azalaki kosolola na biso, mpo abosana ye te. Apesaki biso fɔtɔ moko.

Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tondimaka mpenza ete, ndenge Biblia eteyaka, Nzambe akozongisa paradiso awa na mabele mpe ete azali na mposa makasi ya kozongisa na bomoi bato nyonso oyo bakufá​—ata mpe babebe, na ndakisa Precious. (Yobo 14:14, 15; Yoane 5:28, 29) Tozali kozela mokolo oyo tokomona ye mpe tokoyamba ye lisusu. Mbala nyonso oyo toyokaka liloba “paradiso,” elikya wana epesaka mitema na biso esengo! Liboso ntango yango ekoka, tozali kobɔndisama na ndenge toyebi ete Precious azali na makanisi ya Nzambe mpe ete azali konyokwama lisusu te.​—Mosakoli 9:5, 10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto