Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 nk. 28-29
  • Osengeli kobanga bakufi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kobanga bakufi?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakufi bayebaka makambo?
  • Lokuta monene
  • Bankɔkɔ na biso bazali wapi?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Tokokóma ndenge nini soki tokufi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Elikya kitoko mpo na molimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 10/09 nk. 28-29

Biblia elobi nini?

Osengeli kobanga bakufi?

Bato ya ekólo Annang, na Nigeria bakanisaka ete soki mowei akundami na lokumu mpe na limemya te, molimo na ye ekosala bato ya bomoi mabe, ata mpe koboma bato ya libota na ye. Bato mosusu ya Chine bakanisaka ete soki balandi malamu te milulu ya kokunda ebembe, molimo ya mowei ekosala bato oyo batikali na bomoi mabe, ata mpe koboma bamosusu.

NA BISIKA mingi, bato bakanisaka ete ntango moto akufi eloko moko​—molimo, elimo—​ebimaka na nzoto na ye mpo na kokoba kozala na bomoi esika mosusu. Bato mingi mpe bakanisaka ete molimo to elimo yango ekoki kosala bato ya libota ya mowei to baninga na ye mabe.

Kasi, ezali mpenza na eloko moko oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa ya moto? “Eloko” yango ekoki kosala bato ya bomoi mabe? Biblia elobi nini?

Bakufi bayebaka makambo?

Biblia elobi ete bakufi “bayebi ata eloko moko te.” Elobi mpe ete bakufi “bazangi makasi kati na liwa.” (Mosakoli 9:5; Yisaya 26:14) Mpo na Adama, moto ya liboso, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.”​—Ebandeli 2:7.

Simbá ete Nzambe akelaki Adama, molimo, elingi koloba moto ya bomoi. Biblia emonisi ete Adama azwaki te molimo oyo ekokaki kozala na bomoi na libándá ya nzoto na ye. Na yango, ntango Adama asalaki lisumu, akufaki. Akómaki ‘molimo oyo akufi.’ (Mitángo 6:6) Biblia elobi mpe ete “molimo oyo esali lisumu​—yango nde ekokufa.” (Ezekiele 18:4) Biso nyonso tozwá lisumu, to kozanga kokoka epai ya Adama, moto ya liboso. Yango wana, ntango moto akufi molimo nde ekufaka.​—Baroma 5:12.

Ntango Biblia elobelaka bakufi, esalelaka te maloba ya mindondo, kasi esalelaka maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango, na ndakisa ‘kolala na kati ya liwa.’ (Nzembo 13:3) Mokolo moko, Yesu alobaki mpo na elenge mwasi moko ya mbula 12 oyo akufaki ete: “Akufi te kasi alali nde mpɔngi.” Bato “babandaki kosɛka ye na lityo, mpo bayebaki ete akufi.” Kasi, Biblia elobi ete Yesu alamwisaki elenge yango na mpɔngi ya liwa.​—Luka 8:51-54.

Ezalaki mpe bongo ntango Lazare akufaki. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete azali kokende kotala Lazare “mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Bayekoli bayebaki te soki Yesu alingaki koloba nini, yango wana “Yesu alobaki na bango polelepolele ete: ‘Lazare akufi.’” Ntoma Paulo mpe alobaki mpo na bato mosusu oyo “bazali kolala na kati ya liwa” ete na ntango oyo Nzambe abongisi, bato yango bakozonga na bomoi.​—Yoane 11:11-14; 1 Batesaloniki 4:13-15.

Likambo ya kokamwa, Biblia eteyi na esika moko te ete molimo ekobaka kozala na bomoi ntango moto akufi. Yango wana, ntina ya kobanga bakufi ezali te. Kasi, liteya yango eutá wapi? Mpe nini etindaka bato bákanisa ete bato oyo bakufá bakoki kosala bato ya bomoi mabe?

Lokuta monene

Mangomba ya lokuta eteyaka ete ntango moto akufi akobaka kozala na bomoi. Na ebandeli, bato mingi na mokili bazalaki kondima liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Mpo na yango, ntango mokonzi moko akufi, na ndakisa Farao na Ezipito, bazalaki mpe koboma baombo na ye mpo bákoba kosalela ye.

Bato mingi banyokwamaka na oyo bango bakanisaka ete ezali milimo, to bilimo ya bakufi. Bandimaka mpenza ete mitungisi yango eutaka na milimo ya bandeko mpe baninga na bango mosusu oyo bakufá, oyo bazali na nkanda. Kasi, ndenge Makomami emonisi yango polele, makanisi wana ezali solo te. Bikelamu mabe ya elimo, oyo babengi bademo, nde basalaka makambo wana; basepelaka konyokola mpe kobangisa bato.​—Luka 9:37-43; Baefese 6:11, 12.

Makomami elobi mpo na Satana ete azali “tata ya lokuta,” oyo “azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.” Ye ná bademo na ye bazali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Yoane 8:44; 2 Bakorinti 11:14; Emoniseli 12:9) Satana nde abandisá lokuta wana mpo na konyokola bato ya bomoi.

Nzokande, bato oyo bandimaka Biblia bakosamaka te na lokuta ya ndenge wana. Bayebi ete Satana akosaka bato bándima ete bakufi bakoki kosolola na bato ya bomoi. Nzokande, Biblia elobi boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Ya solo, Liloba ya Nzambe ezali na solo oyo ezali kosikola bato, ezali kosalisa bango báyeba solo na ntina na bakufi!​—Yoane 8:32.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Bakufi bayebaka makambo?​—Mosakoli 9:5; Yisaya 26:14.

◼ Nini etindaka bato mingi bákanisa ete eloko moko ya nzoto ya moto ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa?​—Yoane 8:44.

◼ Epai wapi tokoki koyeba solo na ntina na bakufi?​—Yoane 8:32; 17:17.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]

Bikelamu mabe ya elimo nde batungisaka bato, kasi bakufi te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto