Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 nk. 6-9
  • Ntina oyo toboyaki kosopa zemi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo toboyaki kosopa zemi
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kanisá malamu liboso ya kozwa ekateli
  • Ndimá yango
  • Kobanga bato ezali mabe
  • Boninga na Nzambe epesaka makasi
  • Bayokaka mawa te
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Kolongola zemi
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 10/09 nk. 6-9

Ntina oyo toboyaki kosopa zemi

VICTORIA, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, ayebisaki makango na ye Bill ete akolongola zemi te. Alobi boye: “Nayebaki ete bomoi mobimba ezali na libumu na ngai. Lokola namonaki ete soki nakangami kaka na Bill akosunga ngai te na zemi na ngai, natikaki ye.”

Kasi, na nsima, Bill abongolaki makanisi mpe asɛngaki Victoria bábalana. Kobɔkɔla mwana ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango. Victoria alobi boye: “Tozalaki na mbongo te, bilamba moke, mpe tozalaki kokelela na nyonso. Bill azalaki na mwa mosala moko boye ya lifuta moke, mpe tozalaki kofutela mwa ndako moko ya mbongo moke, kasi toyikaki kaka mpiko.”

Bato mosusu bakutanaki mpe na makambo ya mpasi mpo na zemi oyo bakanaki te. Kasi, bango mpe baboyaki kolongola yango. Nini esalisaki bango bákangama na ekateli ya koboya kolongola zemi mpe báyika mpiko na mikakatano ya kobɔkɔla mwana oyo bakanaki te to oyo balingaki te? Ezali mpo balandaki bwanya ya Biblia.

Kanisá malamu liboso ya kozwa ekateli

Biblia elobi boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.”​—Masese 21:5.

Mpo na Connie, oyo azalaki na bana misato mpe moko azalaki ebɔsɔnɔ, likanisi ya kobota mwana mosusu elɛmbisaki ye mpenza. Alobi boye: “Tozalaki na mposa ya moto mosusu te ya koleisa. Na yango, tomonaki malamu tólongola zemi yango.” Kasi, na esika awela kosala yango, asololaki naino na Kay, moninga na ye moko ya mosala. Kay, asalisaki ye ayeba ete moto mobimba azali na libumu na ye, mpe yango ebongolaki makanisi na ye.

Kasi, Connie azalaki na mposa ya lisungi mpo na komibongisa. Lokola Connie azalaki na mama-kulutu moko na mboka yango, Kay ayebisaki ye akutana na ye. Ntango akutanaki na mama-kulutu na ye, andimaki kosalisa ye. Lisusu, mobali ya Connie abakisaki mosala mosusu, mpe bakendaki kofutela na ndako moko ya ntalo moke. Na ndenge yango, bamibongisaki mpo na kobɔkɔla mwana na bango.

Kay asalisaki mpe Connie akutana na bibongiseli oyo esalisaka basi oyo bazali na zemi oyo bakanaki te. Na bamboka mingi, bibongiseli ya ndenge wana ezalaka. Okoki kokutana na bango na nzela ya internet to koluka banimero ya telefone na bango. Koluka lisalisi esɛngaka milende, kasi “myango ya moto ya etingya” nde esalisaka mpo na kolonga.

Ndimá yango

Biblia elobi boye: “Moto nyonso ya bwanya, miso na ye ezali na motó na ye; kasi zoba azali kotambola na molili mpenza.”​—Mosakoli 2:14.

Mwasi ya bwanya akangaka miso te na makambo oyo ezali liboso na ye, na maloba mosusu, ‘atambolaka na molili’ te. Asalelaka ‘miso ya motó na ye’ oyo esalisaka ye akanisa malamu. Yango esalisaka ye ayeba makama oyo bikateli na ye ekoki kobimisa. Na yango, na bokeseni na mwasi oyo akangi miso na makambo oyo ezali kosalema na libumu na ye, mwasi ya bwanya azalaka na mawa na motema mpe abatelaka mwana oyo azali na libumu na ye.

Na lisalisi ya échographie, Stephanie, elenge mwasi moko oyo azalaki kokana kolongola zemi, amonaki mwana ya sanza mibale oyo azalaki na libumu na ye. Alobi boye: “Nalelaki mpe namitunaki, mpo na nini nalingi koboma moto?”

Denise, elenge mwasi mosusu oyo azwaki zemi kozanga kobala, amonaki mpe ete moto mobimba azali na libumu na ye. Ntango makango na ye apesaki ye mbongo mpe alobaki na ye “alongola zemi yango,” Denise alobaki na ye boye: “Nalongola zemi? Nakoki kosala yango te!” Aboyaki koboma mwana na ye.

Kobanga bato ezali mabe

Soki olingi kolongola zemi mpo bato mosusu bazali kotya yo mpanzi likoló, ekozala malamu okanisa lisese oyo ya Biblia: “Kolɛnga liboso ya bato, yango nde etyaka motambo, kasi ye oyo azali kotyela Yehova motema akobatelama.”​—Masese 29:25.

Na mbula zomi na nsambo, ntango kaka alingaki kobanda kelasi na iniversite, Monica azwaki zemi. Mama na bango oyo akufelá mobali, mpe azalaki kobɔkɔla bana mitano kaka ye moko, asilaki mpenza mayele. Alingaki ete mwana na ye ayekola mosala moko mpo alongwa na bobola. Mpo na yango, mama ya Monica alobaki na ye alongola zemi yango. Monica alobi boye: “Ntango monganga atunaki ngai soki nalingi kolongola zemi, nayebisaki ye, ‘Te!’”

Lokola amonaki ete Monica abebisi bomoi na ye, mpe lokola mama yango aboyaki komema mokumba mosusu, abenganaki Monica na ndako. Monica ekendaki kofanda epai ya mama-kulutu na ye. Nsima ya mwa bapɔsɔ, mama na ye azongisaki makanisi nsima mpe atikaki ye azonga na ndako ná zemi na ye. Mama ya Monica asalisaki ye na kobɔkɔla bebe na ye, Leon, mpe alingaki nkɔkɔ na ye mingi.

Robin, mwasi moko ya libala alingaki kolongola zemi mpo na ntina mosusu. Alobi boye: “Ntango nabandaki zemi, monganga apesaki ngai nkisi mpo na maladi ya ngei, kozanga koyeba ete nazali na zemi. Ayebisaki ngai ete mwana na ngai akobotama na mbeba makasi na bɔɔngɔ.” Na yango, monganga asɛngaki ye alongola zemi yango. Robin alobi boye: “Nayebisaki ye likanisi ya Biblia na ntina na bomoi. Nayebisaki ye ete nakoki kolongola zemi te.”

Atako makambo oyo monganga alobaki ezalaki ya solo, bomoi ya Robin ezalaki na likama te.a Robin alobi boye: “Ntango mwana na ngai abotamaki mpe minganga batalaki ye, bamonaki ete bɔɔngɔ na ye ebebaki nyonso te. Ezalaki kosala mwa malamu. Lelo oyo, azali na mbula 15 mpe azali koyekola kotánga malamu. Nalingaka ye mingi, mpe natɔndaka Yehova mbala mingi mokolo na mokolo mpo na ye.”

Boninga na Nzambe epesaka makasi

Biblia elobi boye: “Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.”​—Nzembo 25:14.

Bato mingi baboyaka kolongola zemi mpo batalelaka makanisi ya Mozalisi na likambo yango. Balukaka libosoliboso kozala baninga ya Nzambe mpe kosala makambo oyo esepelisaka ye. Yango nde likambo esalisaki Victoria, oyo tolobelaki liboso. Alobi boye: “Nandimaki mpenza ete Nzambe nde apesaka bomoi, mpe nazali na lotomo te ya kolongola bomoi oyo ye apesi.”

Ntango Victoria abandaki koyekola Biblia na molende, boninga na ye na Nzambe ekómaki makasi. Alobi boye: “Ekateli ya koboya koboma mwana na ngai, esalisaki ngai namiyoka pene na Nzambe mpe naluka kosepelisa ye na bomoi na ngai mobimba. Ntango nazalaki kobondela ye mpo asunga ngai, makambo nyonso ezalaki kotambola malamu.”

Boninga na Nzambe, liziba ya bomoi, etindaka biso tózala na limemya makasi mpo na bomoi oyo ezali na libumu. (Nzembo 36:9) Lisusu, Nzambe akoki kopesa nguya “oyo eleki makasi” mpo na kosalisa mwasi mpe libota na ye bálonga mikakatano ya zemi oyo bakanaki te. (2 Bakorinti 4:7) Soki bazongisi makanisi nsima, baoyo bamemyaki likanisi ya Nzambe mpo na bomoi bayokaka ndenge nini mpo na ekateli oyo bazwaki?

Bayokaka mawa te

Lisosoli na bango etungisamaka te, bazalaka mpe na mawa te, bamonaka mpe te ete bazangi eloko moko. Na nsima, bamonaka ete “mbuma ya libumu” ezali lipamboli mpenza, kasi libabe te! (Nzembo 127:3) Connie, oyo tolobelaki liboso, amonaki yango ngonga mibale mpamba nsima ya kobota! Na esengo nyonso, abengaki Kay, moninga na ye ya mosala, mpe ayebisaki ye esengo oyo azalaki na yango ya kobɔkɔla bebe na ye. Na esengo nyonso, Connie abakisaki boye: “Ezali ya solo mpenza ete Nzambe apambolaka baoyo basepelisaka ye.”

Mpo na nini kotosa likanisi ya Nzambe na ndenge ya kotalela bomoi ezali na litomba? Mpo lokola azali liziba ya bomoi, Nzambe atyá mibeko mpe malako na ye na Biblia “mpo na bolamu na [biso].”​—Kolimbola Mibeko 10:13.

Mpo na Victoria mpe Bill, oyo tobelaki na ebandeli ya lisolo oyo mpe na ebandeli ya lisolo ya liboso, ekateli oyo bazwaki ya koboya kolongola zemi ebongolaki bomoi na bango. Balobi boye: “Tozalaki komipesa mpenza na komɛla makaya mpe soki tokobaki, tokokaki kokufa. Kasi, lokola tomemyaki bomoi ya mwana na biso oyo azalaki na libumu, yango esalisaki biso tótika komɛla makaya mpe tókanisa bomoi na biso moko. Na lisalisi ya Batatoli ya Yehova, tobongolaki bomoi na biso.”

Lelo oyo Lance, mwana na bango, azali na mbula soki 34 mpe akokisi mbula koleka 12 bandá abalá. Lance alobi boye: “Banda bomwana, baboti na ngai bateyaki ngai nazwaka bikateli na kolanda mitinda ya Biblia. Yango ememeli ngai, mwasi na ngai mpe mwana na biso matomba mingi oyo tokokaki kozala na yango te soki tozalaki kolanda toli ya Biblia te.” Tata ya Lance, oyo liboso alingaki ete Victoria alongola zemi, alobi boye: “Toyokaka nsɔmɔ soki tokanisi ete tolingaki kozanga mwana na biso.”

Tótalela lisusu ndakisa ya Monica, oyo aboyaki kolongola zemi atako mama na ye atyaki ye mpanzi likoló. Alobi boye: “Pɔsɔ mibale nsima ya kobota, nakutanaki na Batatoli ya Yehova mpe nayekolaki ndenge ya koyokanisa bomoi na ngai na mitinda ya Nzambe. Nabandaki koteya mwana na ngai, Leon, ntina ya kotosa Nzambe, mpe akómaki kolinga Nzambe mingi. Lelo oyo, Leon azali mokɛngɛli-motamboli.”

Mpo na likambo oyo mama na ye asalaki, Leon alobi boye: “Koyeba ete mama alingaki ngai mingi mpe aboyaki koboma ngai atako batyaki ye mpanzi likoló, etindi ngai naluka kosalela bomoi na ngai na ndenge ya malamu koleka, mpo na komonisa botɔndi na ngai epai ya Nzambe mpo na likabo ya bomoi oyo apesá ngai.”

Bato mingi oyo bayekoli likanisi ya Nzambe na ntina na bomoi bazalaka na mawa te mpo na ekateli oyo bazwaki ya kobatela bomoi ya mwana na bango, mwana oyo batalelaka na motuya lelo oyo. Bakoki koloba na esengo nyonso ete “tolongolaki zemi te!”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki na ntango ya kobota esɛngi kopona kobikisa mama to mwana, mwasi ná mobali nde basengeli kozwa ekateli yango. Kasi, na mikili mingi, makambo ya ndenge wana emonanaka lisusu mpenza te mpo mayele ya minganga ekoli.

[Elilingi na lokasa 7]

Ntango Stephanie amonaki na échographie, mwana ya sanza mibale oyo azalaki na libumu na ye, azwaki ekateli ya malamu

(Biso nde tobakisi mokɔlɔtɔ wana)

[Elilingi na lokasa 8]

Victoria ná Lance

[Elilingi na lokasa 8]

Victoria ná Bill lelo oyo, elongo na Lance ná libota na ye

[Elilingi na lokasa 9]

Monica ná mwana na ye Leon bazali na esengo mingi na ndenge Monica aboyaki koboma ye ntango azalaki na libumu, eleki lelo mbula 36

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto