Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
BANDA bomwana, Bill ayebaki ete kosopa zemi ezali lisumu monene; ekeseni te na koboma moto. Kasi, makanisi na ye ebongwanaki na 1975, ntango ye moko akutanaki na likambo yango. Makango na ye Victoria, azwaki zemi, mpe Bill azalaki na likoki te ya kobala mpe kobɔkɔla mwana. Alobi boye: “Naponaki mbala moko nzela mokuse mpe nalobaki na Victoria alongola zemi yango.”
Bato mingi balandaka nzela yango oyo Bill abengi nzela mokuse, mpo na kokima zemi oyo balingi te, to mpe oyo bakanaki te. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 2007 emonisaki ete na 2003, basi soki milio 42 na mokili mobimba balongolaki zemi. Basi yango oyo basopaka zemi, bazalaka ya mposo mpe bikólo nyonso, ya mangomba ndenge na ndenge, bazwi mpe babola, baoyo batángá mpe baoyo batángá te, bilenge mpe mikóló. Soki ozwi zemi oyo okanaki te, okosala nini? Mpo na nini bato mingi baponaka kosopa zemi?
“Namonaki ndenge mosusu ya kosala te”
Mwasi moko ya mbula 35 alobaki boye: “Nautaki konyokwama na zemi mpe nabotaki na mpasi; lisusu, tozalaki na mikakatano ya mbongo mpe mitungisi mingi na libota. Pɔsɔ motoba nsima ya kobota, nakómaki lisusu na zemi. Tozwaki ekateli ya kolongola zemi yango. Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.”
Basi baponaka kosopa zemi mpo na bantina mingi; kati na yango, tokoki kotánga, mikakatano ya mbongo to ntango mobali azali konyokola ye mpe alingi kokata boyokani nyonso na ye. To mpe mwasi ná mobali bakanaki zemi yango te.
Na bantango mosusu, basi baponaka kosopa zemi mpo na kokima nsɔni. Yango nde likambo doktɛrɛ Susan Wicklund alobeli na buku na ye moko (This Common Secret—My Journey as an Abortion Doctor). Elenge mwasi moko oyo ayaki kolongola zemi epai na ye, alobaki boye: “Baboti na ngai basambelaka mingi. . . . Lokola nabali naino te, soki naboti, ekopesa bango nsɔni. Baninga na bango nyonso bakoyeba ete mwana na bango asali lisumu.”
Na yango, doktɛrɛ Wicklund, atunaki ye boye: “Olobi ete ekozala lisumu na miso na bango; kasi, bakanisaka nini na likambo ya kosopa zemi?” Kozanga kokakatana, elenge mwasi yango alobaki ete: “Kosopa zemi? Wana bakolimbisa ngai ata moke te. Kasi, yango eleki malamu mpo bakoyeba te. Soki nalongoli zemi, baninga [ya baboti na ngai] na lingomba bakoyeba yango te.”
Ezala mpo na ntina nini, kozwa ekateli ya kosopa zemi ezalaka pɛtɛɛ te. Mbala mingi esalaka mpasi mingi na motema. Kasi, kosopa zemi nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
Kanisá mpasi oyo yango ekoki kobimisa
Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 2004 epai ya basi 331 ya Russie mpe 217 ya États-Unis oyo balongolaki zemi, emonisaki ete mingi na bango batikalaki na mpasi na motema. Mingi kati na basi yango ya Russie (50 %) mpe mingi koleka kati na baoyo ya États-Unis (80 %), lisosoli na bango ekómaki kotungisama. Epai ya baoyo ya États-Unis, mingi (60 %) bamonaki ete mabe oyo basali ‘ekoki kolimbisama te.’ Lokola lisosoli ya basi mingi oyo balongolaka zemi etungisaka bango—ata ya basi oyo basambelaka te—mpo na nini basi mingi bazali se kolongola zemi?
Mbala mingi, batyaka bango mpanzi likoló mpo bálongola zemi. Baboti, mobali, to baninga bakoki komonisa mwasi ete kolongola zemi nde eleki malamu. Yango ekoki kotinda ye azwa ekateli nokinoki, kozanga koluka koyeba malamumalamu likambo oyo azali kosala. Priscilla Coleman, monganga moko ya maladi ya motó, alobi boye: “Nzokande, nsima ya kozwa ekateli yango mpe kolongola zemi, mwasi akómaka kokanisa likambo oyo asali; mbala mingi yango esalaka ete lisosoli na ye ekóma kotungisama, akómaka koyoka mawa mpe mpasi na motema mpo na likambo oyo asali.”
Mbala mingi, mawa yango eutaka na motuna oyo: Ndenge nalongoli zemi, nabomi nde moto? Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Dakota du sud, emonisaki ete basi mingi oyo balongolaki zemi “bazalaki kokanisa ete balongolaki bango kaka ‘makila’ mpe balobaki ete soki bayebaki solo balingaki kondima te kolongola zemi.”
Nsima ya koyoka ndenge basi 1940 oyo balongolaki zemi bayebisaki ndenge bazalaki “koyoka mpasi makasi na motema” mpo na likambo oyo basalaki, bato oyo bayokaki bango balobaki boye: “Mingi kati na basi yango bayokaka mpasi makasi mpe nkanda ndenge babungisá bana na bango, mpo bakosaki bango ete bana yango bazali bato te.” Balobaki mpe ete ntango mwasi “ayebi ete abomaki nde mwana na ye, likambo yango enyokolaka ye makasi.”
Kasi, likambo ya solo ezali nini? Kosopa zemi, ezali kaka kobimisa makila na libumu ya mwasi? Mwana oyo azali naino na libumu ya mama na ye, azalaka mpenza moto mobimba?
[Etanda/Bililingi na lokasa 4]
KOBOTA TO KOSOPA ZEMI?
Na 2006, ankɛtɛ moko etalelaki bomoi ya basi oyo bazwaki zemi ntango bazalaki naino bilenge. Mingi na bango babotaki, mpe bamosusu balongolaki zemi. Ankɛtɛ yango emonisaki ete: “Na bokeseni na basi oyo balongolaki zemi, baoyo babotaki bazalaki mpenza na mposa te ya lisungi ya minganga oyo basalisaka maladi ya motó, bazalaki na mikakatano mpenza te ya mpɔngi, mpe bazalaki mpenza te komɛla makaya to marijuana.”—Journal of Youth and Adolescence.
Lapolo mosusu elobelaki “baankɛtɛ minei ya minene oyo esalemaki na mokili mobimba.” Baankɛtɛ yango emonisaki nini? “Basi oyo balongolá zemi batungisamaka mingi na maladi ya motó koleka basi oyo balongolá zemi te.”—Report of the South Dakota Task Force to Study Abortion—2005.