Biblia elobi nini?
Ntango nini moto akoki kosalela makasi mpo na komibatela?
OLALI na kati ya butu mpe na mbala moko makɛlɛlɛ elamusi yo. Oyoki lokola moto moko azali kotambola. Moyibi moko akɔteli yo na ndako. Motema na yo ezali kobɛta makasi mpe omituni soki osengeli kosala nini.
Likambo ya ndenge wana ekoki kokómela moto nyonso. Mobulu mpe koboma bato ekómi kosalema bisika nyonso na mokili. Lokola bato bazali kobanga ete likambo ya mabe ekómela bango, mingi bazali kosomba mandoki to koyekola masano lokola karate to judo mpo na komibatela. Kutu, na mikili mosusu, Leta abimisi mibeko oyo epesi bato ndingisa ya kobɛta moto ata mpe koboma ye mpo na komibatela. Kasi, Biblia elobi nini? Moto akoki nde kosalela makasi mpo na komibatela to kobatela libota na ye?
Nzambe ayini mobulu
Biblia eboyi mobulu mpe bato oyo balingaka mobulu. Davidi, mokomi ya nzembo, alobaki boye na ntina na Yehova Nzambe: ‘Molimo na ye eyini ye oyo alingi mobulu.’ (Nzembo 11:5) Nzambe akatelaki bikólo mingi ya kala, ata mpe libota na ye moko, bitumbu mpo na makambo ya mobulu mpe koboma bato. (Yoele 3:19; Mika 6:12; Nahumu 3:1) Na Mibeko oyo epesamaki epai ya Bayisalaele, ata koboma moto na nko te ezalaki likambo ya lisɛki te.—Deteronome 22:8.
Biblia elendisi bato báboya matata na basusu mpe bálandaka kimya. Mbala mingi, bitumba ebandaka kaka na koswana. Biblia elobi boye: “Soki koni ezali lisusu té, móto ekufaka; soki bato ya songi-songi bazali té, koswana esilaka.” (Batoli 26:20, Bible na lingala ya lelo oyo) Mbala mingi, kozala kimya epekisaka nkanda mpe mobulu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”—Baloma 12:18.
Ntango batumoli yo
Ata soki ozali kolanda kimya, elingi koloba te ete bato mosusu bakoki kosala yo mabe te. Banda na ntango ya kala, basambeli ya sembo ya Nzambe bakutanaka na makambo ya mabe oyo bato mosusu basalaka bango. (Genese 4:8; Yobo 1:14, 15, 17) Soki moyibi moko oyo azali na mondoki abimeli yo, osengeli kosala nini? Yesu apesaki toli oyo: “Bótɛmɛla te ye oyo azali moto mabe.” (Matai 5:39) Alobaki mpe boye: “Moto oyo abɔtɔli elamba na yo ya likoló, koboya te kopesa ye ata elamba ya nse.” (Luka 6:29) Yesu alendisaki te kosalela mandoki mpo na kobatela biloko na biso. Ntango akutani na moyibi oyo azali na mandoki, moto oyo azali na bwanya akoboya te kopesa biloko na ye ya motuya. Na ntembe te, bomoi ezali na motuya mingi koleka biloko ya mokili!
Kasi, ezali boni soki moto mabe alingi koboma yo? Mobeko moko oyo Nzambe apesaki Yisalaele ekoki kosalisa biso tózwa eyano. Soki moto akangi moyibi na moi mpe abomi ye, moto yango akotángama ete azali mobomi. Na ntembe te, ezalaki bongo mpamba te moyibi azalaki kozwa etumbu ya liwa te mpe soki ayibi na moi, bakoyeba elongi na ye mpe bazuzi bakokatela ye etumbu. Nzokande, soki moto abomi moyibi na butu, akokaki kozwa etumbu te, mpo mbala mosusu ekokaki kozala mpasi mpo amona likambo oyo moyibi azali kosala to ayeba makanisi oyo azali na yango. Nkolo-ndako akokaki koloba ete lokola libota na ye ekómi na likama, asengeli kobatela yango.—Exode 22:2, 3.
Na yango, Biblia emonisi ete moto akoki kosalela makasi mpo na komibatela to kobatela libota na ye. Akoki kokimisa nzoto, kokanga moto oyo alingi kosala ye mabe, ata mpe kotindika ye na makasi. Akosala makambo yango na makanisi ya kopekisa moto yango mpo asala ye mabe te. Na ntango yango, soki mosali-mabe azoki, abukani to mpe akufi, ekozala te ete babomi ye na nko.
Libateli oyo eleki
Tomoni polele ete ezali na bantango oyo moto akoki kosalela makasi mpo na komibatela. Moto nyonso azali na lotomo ya komibatela mpe kobatela libota na ye ntango moto mosusu alingi kosala bango mabe to koboma bango. Soki likoki ya kokima ezali te, Biblia epekisi te kosalela makasi mpo na komibatela. Atako bongo, eleki malamu koboya kozala na bisika to kosala makambo oyo ekoki kosala ete okutana na bato ya mobulu.—Masese 16:32.
Biblia elendisi biso ‘tóluka kimya mpe tólanda yango’ na makambo nyonso ya bomoi na biso. (1 Petelo 3:11) Yango ezali mayele oyo ebongi mpo esalisaka moto azala na bomoi ya kimya.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Mpo na nini tosengeli koboya mobulu?—Nzembo 11:5.
◼ Bwanya esengeli kotinda biso tósala nini ntango balingi kobɔtɔla biso biloko?—Masese 16:32; Luka 12:15.
◼ Ezaleli nini ekoki kobikisa biso na likama?—Baloma 12:18.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Biblia emonisi ete moto akoki kosalela makasi mpo na komibatela to kobatela libota na ye