Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lingomba ya Batatoli ya Yehova na Turquie ekomami na mikanda ya Leta
  • Internet ezali “kolongola bato nsɔni”
  • Mikuwa ya bato ya kalakala ebimisi mokakatano
  • Mbula mpe malili elekaka mingi na nsuka ya pɔsɔ?
  • Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsango malamu na Internet
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Kosalela Internet​—Kebá na makama!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2007
Lamuká!—2008
g 10/08 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

◼ Na boumeli ya mbula 6 oyo eleki, “bato pene na 100 000 . . . babomamaki na États-Unis.”​—THE NEW YORK TIMES, ÉTATS-UNIS.

◼ Lisangá moko ya bato oyo basololaka na nzela ya Internet mpo na kopesana makanisi elongolaki bankombo ya basangani 29 000 oyo bafundamaki mpo na makambo ya pite. Richard Blumenthal, prokirɛrɛ ya etúká ya Connecticut, alobi boye: “Esengeli kotya mibeko mpamba te motángo ya bato oyo bazali kofundama mpo na makambo ya pite [na Internet] ezali se kobakisama.”​—AGENCE REUTERS, ÉTATS-UNIS.

◼ “Bato ya Chine bazali lisusu na bankombo ya kopesa bana te. . . . Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo mobimba na 2006 emonisi [ete] bato mingi [soki 85%] . . . kati na bato miliare 1,4 ya Chine bazali kaka na bankombo 100.”​—CHINA DAILY, CHINE.

◼ Nsima ya kilomɛtrɛ mokomoko, “bato oyo batambolaka na tukutuku bazali na likama mingi (mbala koleka 32) ya kokufa” na aksida koleka bato oyo batambolaka na mituka.​—UC BERKELEY WELLNESS LETTER, ÉTATS-UNIS.

Lingomba ya Batatoli ya Yehova na Turquie ekomami na mikanda ya Leta

Mokolo ya 31 Yuli 2007, Batatoli ya Yehova ya Turquie bazwaki mokanda oyo emonisaki ete Lingomba na bango ekomami na mikanda ya Leta. Yango epesi bango nzela ya kosomba bisika na bango moko, kofutela bisika ya kosala makita, kozwa makabo, mpe soki esengeli, komema makambo na tribinale mpo na kolongisa ntomo na bango.

Internet ezali “kolongola bato nsɔni”

Na Allemagne, ebongiseli moko oyo esalisaka bato oyo babalá bázwaka makango na nzela ya Internet etindelaki bapanzi-nsango liyebisi ete ekómi na bato 310 000 oyo bazali kosalela site na yango mpe mokolo na mokolo, bato 1 000 bakɔtaka kuna. Ebongiseli yango elobaki mpe ete ezali kosalisa moto nyonso azwa makango kozanga ete bato mosusu báyeba yango. Mokambi na yango moko alobaki boye: “Lokola moto mosusu akoki koyeba te moto oyo akɔtaka na site yango, Internet ezali kolongola bato nsɔni” mpe ezali “kopesa bango nzela ya kosolola polelepolele.” Mokambi mosusu alobaki ete Internet ekosalisa mpo bato mingi oyo babalá bákóma na bamakango.

Mikuwa ya bato ya kalakala ebimisi mokakatano

Mbala mingi bato ya siansi balobaka ete “biteni” ya nsuka ya “evolisyo” elandanaki boye: Homo habilis akómaki Homo erectus, na nsima akómaki Homo sapiens to “moto ndenge azali lelo oyo.” Nzokande, mikuwa ya bato mibale ya kalakala oyo bamoni moko mosika te na mosusu, na Kenya, emonisi ete Homo habilis mpe Homo erectus, oyo bato ya siansi balobaka ete bazali bankɔkɔ ya bato, bazalaki na bomoi na eleko moko. Meave Leakey, moko na bato oyo bakomaki lapolo yango, alobi boye: “Lokola bazalaki na bomoi na eleko moko, koloba ete Homo habilis autaki na Homo erectus ezali solo te.”

Mbula mpe malili elekaka mingi na nsuka ya pɔsɔ?

Na Allemagne, bato mingi bakómi komona lokola nde mbula mpe malili ezalaka mingi na nsuka ya pɔsɔ koleka na mikolo ya mosala. Zulunalo moko (Der Spiegel) elobi ete boyekoli ya mitángo oyo bazwaki na boumeli ya mbula 15 na ndenge oyo mbula ezalaki kobɛta mpe malili ezalaki makasi na bisika ndenge na ndenge ya Allemagne emonisi ete makanisi ya bato yango ekoki kozala solo. Mokolo oyo ezalaka molunge makasi ezali mokolo ya misato, mpe mokolo oyo ezalaka malili makasi ezali mokolo ya pɔsɔ. Na mikolo ya pɔsɔ, mbula ebɛtaka makasi (15%) mpe mbala mingi (10%) koleka na mikolo ya yambo, mikolo oyo mbula ebɛtaka mpenza te. Na mikolo ya mibale, moi elalaka noki te, ebakisaka miniti 15 liboso ekende kolala koleka na mikolo ya pɔsɔ. Bato ya mayele balobi ete mɔtɔ oyo bamasini, mituka, mpe biloko mosusu ebimisaka ekómaka mingi na nsuka ya pɔsɔ; ezongisaka pole ya moi mpe esalaka ete mapata esalema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto