Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/07 nk. 13-17
  • Nalingaki miziki, bomoi mpe Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalingaki miziki, bomoi mpe Biblia
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakufi miso
  • Natongi ndako
  • Etuluku ya babɛti-piololo
  • Ntembe mpe makambo ya sika
  • Mbongwana monene
  • Nalukaki koyeba solo
  • Ekateli makasi ya koyeba solo
  • Makambo nyonso ekómi polele
  • Tosangani na mosala ya Nzambe
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nazali kopesa Yehova eloko oyo ebongi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 10/07 nk. 13-17

Nalingaki miziki, bomoi mpe Biblia

Lisolo ya Boris N. Gulashevsky

Kanisá naino moto moko ya bambula soki 65 oyo akufá miso mpe abɛlá maladi ya motema mbala mibale. Na mpisoli na miso, azali kotɔnda Nzambe ndenge asalisi ye ayeba mateya ya solo. Wana likambo oyo ekómelaki ngai esili koleka mbula 11.

NABOTAMAKI na 1930, na Tsyboulev, mboka moko oyo ezwami na etúká ya Tcherkassy na ekólo Ukraine. Na 1937, ntango bato ya Staline bazalaki kokanga bato oyo bazalaki kotɛmɛla bokonzi na ye, bakangaki mpe tata mpo bamonaki ete azali “monguna ya Leta.” Babɔtɔlaki ndako na biso mpe bato mingi oyo toyebanaki na bango bapesaki biso mokɔngɔ. Mosika te, bakangaki mpe mingi kati na bango. Na ntango wana, bato mingi bazalaki lisusu kotyelana motema te, bazalaki kofundafundana mpe bazalaki kobanga.

Ntango tata akokisaki sanza mibale na bolɔkɔ, leki na ngai ya mwasi Lena abotamaki. Ngai, mama, Lena ná yaya na ngai ya mobali Nikolai tolekisaki eleko wana ya mpiɔ na ndako moko moke oyo ezalaki na maninisa te, ata mpe lituká ya mɔtɔ ezalaki te. Na nsima, tokendeki kofanda epai ya nkɔkɔ ya mobali. Ngai ná Nikolai tozalaki kobatela ndako yango, kokata nkoni mpe kobongisa biloko oyo ebebi. Nazalaki kosepela na misala ya mabɔkɔ. Nazalaki kosala basapato mpe mosala ya mabaya. Lokola nazalaki mpe kolinga miziki mingi, nasalaki lolenge moko ya gitare ya libaya oyo babengi balalaïka mpe nayekolaki kobɛta yango. Na nsima, nayekolaki mpe kobɛta gitare oyo eyebani mingi mpe gitare mosusu babengi mandoline.

Ntango nazalaki naino na mbula mitano, nazwaki batisimo na Lingomba ya Katolike. Kasi, lokola nakangaki naino ntina ya mateya mpe mimeseno ya lingomba yango te, namonaki ete makanisi ya bato oyo bandimaka Nzambe te ezali malamu. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nakɔtaki na ebongiseli moko ya bilenge Bakoministe (Komsomol) mpe ntango tozalaki kozwa libaku ya kosolola na bato oyo bandimaka Nzambe, ngai ná baninga na ngai mosusu tozalaki koluka kondimisa bango ete Nzambe azali te.

Nakufi miso

Na 1941, nsima ya etumba ya liboso kati na Allemagne ná Union soviétique, mboka na biso ezalaki ntango nyonso na bitumba na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na mokolo ya 16 Marsi 1944, ntango babwakaki babɔmbi, nazokaki mpe miso na ngai ekufaki. Longola mpasi na nzoto, nakómaki komiyokela mawa mpe nabungisaki elikya.

Ntango bitumba elekaki na ngámbo ya wɛsti mpe babenganaki bato ya Allemagne, nakómaki kotambola na elanga mpe koyoka nzembo ya bandɛkɛ. Lokola mama azalaki koyokela ngai mawa, azalaki kopesa ngai masanga mpe bato ya mboka bazalaki kobenga ngai na bafɛti na bango mpo na nabɛtaka miziki. Nazalaki komɛla makaya mpe masanga mpo na kokitisa mawa na ngai. Eumelaki te, namonaki ete momeseno yango ekosilisa mikakatano na ngai te.

Mama leki azalaki molakisi mpe ntango ayokaki nsango ya biteyelo ya bato bakufá miso, ayebisaki mama akomisa ngai na moko ya biteyelo yango. Na 1946, nakɔtaki kelasi na mboka oyo eyebani lelo na nkombo Kamianets-Podil’s’ki, mpe nabandaki kotánga na molende. Nayekolaki kotánga mpe kokoma na ekomeli ya bato bakufá miso (Braille). Nakobaki mpe koyekola miziki, nazalaki kolekisa ntango mingi mpo na koyekola lolenge moko ya lindanda babengi concertina. Lokola mokambi-molandi ya eteyelo amonaki milende oyo nazalaki kosala, apesaki ngai nzela nabɛtaka lindanda na ye. Nayekolaki mpe kobɛta piano.

Natongi ndako

Na 1948, nabalaki molakisi moko na eteyelo yango oyo azalaki kosunga ngai na kotánga kelasi. Mobali na ye akufaki na bitumba mpe atikaki ye na bana mibale ya basi. Ntango nasilisaki kelasi, nakómaki kofanda epai na ye. Nazalaki kosala nyonso mpo nazala mobali mpe tata ya malamu; tozalaki kobikela na mosala ya kobɛta miziki oyo nazalaki kosala. Na nsima, na 1952, tobotaki mwana moko ya mobali.

Nazwaki bibongiseli mpo natongela libota na ngai ndako. Nafutaki bato mbongo mpo bátongela ngai moboko mpe bifelo ya libándá, kasi biloko mosusu nyonso nasalaki yango ngai moko. Lokola nazalaki komona te, nazalaki kosimbasimba biloko mpe kokanisa ndenge nakoki kosalela yango. Nazalaki naino kosimbasimba libaya na mabɔkɔ mpe kokanisa ndenge ezali. Na nsima, nakokaki kosala na yango biloko ndenge na ndenge, ata mpe bisaleli. Nazalaki kosomba bisaleli ya bibende na izini. Nasalaki lituká moko ya babiliki, bakiti mpe mesa, mpe misala mosusu.

Etuluku ya babɛti-piololo

Nakobaki koyekola kobɛta miziki mpe nakómaki mobɛti monene. Nsima ya koyekola bibɛtɛli ya miziki ndenge na ndenge, nayekolaki mpe kobɛta piololo. Mokolo moko, nabongisaki piololo moko ya moke oyo esalemi na bambu. Na nsima, nayekolaki kosala oyo ya ngai moko. Na ntango wana, bato oyo bayebi malamu bibɛtɛli ya miziki bazalaki koloba ete ezali mpasi kosala piololo oyo ekoki kobimisa mongongo ya monene, mpamba te ekosɛnga ete piololo yango ezala monene; nzokande, piololo ya monene ebimisaka mongongo oyo ezali na nse mingi. Yango wana, etuluku ya babɛti-piololo ezalaki te.

Atako bongo, nasalaki piololo mpe natyelaki yango eloko moko mpo ebɛtaka makasi. Yango emonisaki ete piololo oyo ezali kobimisa mongongo ya monene mpe ezali kobɛta na volimi ya makasi ekoki kosalema. Mokemoke, nasalaki bapiololo ndenge na ndenge oyo ekoki kobimisa mingongo kitoko soki babɛti yango esika moko.

Bituluku ya babɛti-miziki oyo nasalaki liboso, bazalaki kosalela bibɛtɛli ya miziki ya bonkɔkɔ. Nazalaki na etuluku mosusu ya babɛti-miziki oyo bango nyonso bakufá miso. Na nsima, na 1960, nasalaki etuluku mosusu ya babɛti-miziki oyo bazalaki kobɛta kaka piololo; na Union soviétique mobimba, mpe nakanisi ata na mokili mobimba, etuluku mosusu ya bongo ezalaki te.

Ntembe mpe makambo ya sika

Na 1960, babongiselaki ngai bibɛtɛli ya miziki epai ya moto moko oyo ayebaki mosala yango malamu. Moto yango abandaki kosolola na ngai makambo ya Nzambe. Lokola na momeseno, napesaki ye bilembeteli mpo na komonisa ete Nzambe azali te. Alobaki na ngai nayoka naino makambo oyo azali kotánga na Biblia. Lokola natángá naino Biblia te, nandimaki koyoka ye.

Lisolo ya Yakobo oyo asalaki makasi mpo na koleisa libota na ye, esimbaki mpenza motema na ngai. Natangisaki mpisoli ntango nayokaki lisolo ya bandeko ya Yozefe ndenge batɛkaki ye na boombo, mikakatano oyo akutanaki na yango mpe ndenge alimbisaki bango. (Genese, mokapo 37, 39-45) Nasepelaki mpe mingi na Lilako Lileki Malamu oyo esɛngi ete tósalela basusu ndenge tolingi básalela biso. (Matai 7:12) Nyonso wana esalisaki ngai namesana na Biblia mpe nakómaki kolinga yango mingi.

Nakómaki koyangana na Lingomba ya Baptiste ná moninga wana oyo abongiselaki ngai bibɛtɛli ya miziki mpe bapesaki ngai Biblia “Testama ya Sika” na ekomeli ya bato bakufá miso (Braille). Nabandaki kotánga yango na likebi mpenza. Kasi, namonaki ete makambo oyo nazalaki kotánga na Biblia wana ekesanaki mpenza na mateya ya Lingomba ya Baptiste. Na ndakisa, ndenge Biblia emonisi yango, Nzambe ná Yesu bazali bato mibale oyo bakeseni mpe Nzambe aleki Yesu. (Matai 3:16, 17; Yoane 14:28; Misala 2:32) Kasi, bandimi ya Lingomba ya Baptiste balobaka ete Nzambe ná Yesu bakokani mpe bango nyonso bazali na kati ya Bosato. Natángaki mbala na mbala Biblia “Testama ya Sika” oyo bapesaki ngai, nazalaki kosimbasimba liloba mokomoko na misapi mpe nandimaki mpenza ete liteya yango ezali na Biblia te.

Libongoli ya Biblia oyo tozalaki na yango esalelaki liloba “lifelo.” Nazalaki kokanisa ndenge lifelo yango ekoki kozala, mpamba te bandimi ya Lingomba ya Baptiste bazalaki koteya ete lifelo ezali esika oyo bato banyokwamaka na mɔtɔ seko na seko. Epesaki ngai mawa mingi. Lokola Biblia elobi ete Nzambe azali bolingo, nandimaki te ete akoki kobongisa esika ya ndenge wana. (1 Yoane 4:8) Mokemoke, nakómaki na ntembe makasi na liteya ya lifelo mpe mateya mosusu ya Lingomba ya Baptiste.

Mbongwana monene

Na 1968, bana ya mwasi na ngai basilaki kobala mpe babotaki bana. Na ntango yango, ngai ná mwasi na ngai tozalaki koyokana lisusu te. Soki nakanisi bantango wana, nayokaka mawa mpamba te biso nyonso mibale tozangaki mpenza bolingo mpe motema molai. Tobomaki libala mpe na nsima nabalaki mbala mibale, kasi mabala yango mpe ekufaki.

Na 1981, nalongwaki na Kamianets-Podil’s’ki, esika nafandaki mbula 35, mpe nakendaki kofanda na engumba Iochkar-Ola, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 600 na ɛsti ya Moscou. Kuna, nakobaki kokolisa mosala na ngai ya miziki. Nazalaki mpe na etuluku moko ya babɛti-miziki 45 oyo bazalaki kobɛta bapiololo ndenge na ndenge. Kati na bapiololo yango, mosusu oyo ezalaki kobɛta na mongongo likoló ezalaki na bolai ya santimɛtrɛ 20 mpe bonene pene na santimɛtrɛ 1, mpe mosusu ya mongongo monene ezalaki na bolai koleka mɛtrɛ 3 mpe bonene ya santimɛtrɛ 20. Bazalaki kolekisa miziki na biso na radio mpe na televizyo mpe tobɛtaki miziki yango na Union soviétique mobimba.

Na 1986, tosalaki mamekani ya babɛti-miziki oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge ya Union soviétique. Nazwaki diplome mpe medayi ya lokumu, mpamba te nakómaki mpenza mobɛti-monene ya piololo. Nsima ya bambula, babimiselaki ngai filme moko (Solo pour chalumeau, ou le conte de fées d’un musicien). Zulunalo moko (Mariiskaya Pravda) elobaki boye: “Boris Nikolaievich Gulashevsky oyo alobelami mingi na filme yango, azwaki diplome ya ntina mingi, mpamba te azalaki moto ya liboso oyo asalaki etuluku ya babɛti-piololo oyo ekokani na mosusu te na ekólo mobimba ya Russie.”

Nalukaki koyeba solo

Ntango nakendeki kofanda na Iochkar-Ola, nakomisaki nkombo na bibliotɛkɛ moko oyo ezalaki na babuku mingi ya bato bakufá miso mpo nasalaka bolukiluki. Nayebaki malamu mateya ya Lingomba ya Katolike, ya Bapantekotiste mpe Bametodiste. Nazalaki mpe koyangana na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Kasi, nakamwaki mingi mpo bazalaki koteya kaka makambo oyo nayokaki na Lingomba ya Baptiste, mateya oyo nayebaki ete ezali na Biblia te.

Alexander Men, sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse akomaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yawe. Alobaki mpe ete na ntango ya kala Bayuda bazalaki na losambo ya pɛto, kasi na nsima ebebisamaki na mateya ya bapakano mpe na losambo ya bikeko. Makambo oyo akomaki ebendaki mpenza likebi na ngai mpe epesaki ngai lisusu mposa ya koluka koyeba solo.

Ekateli makasi ya koyeba solo

Mwasi moko na nkombo Liza, azalaki mobɛti-miziki na moko ya bituluku na ngai. Amonaka malamu te mpe ayebani lokola moto oyo amonaka te. Tobalanaki na 1990, ye mpe akómaki kosepela mingi na makambo ya elimo. Kaka na mbula wana, nakendeki kotala mama ná leki na ngai ya mwasi Lena; bazalaki kofanda na engumba Baranovitch, na Biélorussie oyo ezalaki na Union soviétique na ntango wana. Mama alobaki na ngai nayangana na Lingomba ya Katolike mpe nakulaki kominyo na lingomba yango. Ezalaki eleko ya mbongwana na makambo ya politiki mpe ya nkita na Union soviétique. Na lisolo na ye, sango alobelaki mingi mbongwana yango. Awa mpe, namonaki ete naino nazwi te makambo oyo nazalaki koluka.

Na 1994, nabɛlaki maladi ya motema mbala mibale mpe maladi yango ekómaki mpenza makasi. Kaka na mbula wana, mama akufaki. Atako nakutanaki na makambo nyonso wana, nakobaki kotánga Biblia. Natángaki “Testama ya Sika” mbala 25 mpe na nsima, nazalaki kotánga lisusu te mbala boni nazongelaki yango. Kasi, nakobaki kotánga yango mpe nakómaki na mituna mingi ya kotuna. Emonanaki polele ete nasengelaki na lisalisi mpo nakanga ntina ya solo ya Biblia.

Makambo nyonso ekómi polele

Na 1996, Batatoli ya Yehova bayaki kotala ngai na engumba Iochkar-Ola. Nazalaki ekɛngɛ, mpamba te bazulunalo ezalaki koloba mpo na bango ete bazali mwa lingomba moko mabe. Kasi, na nsima nakanisaki mpe namonaki ete bakoki te kosala ngai mabe. Motuna na ngai ya liboso ezalaki ya koyeba soki bakanisaka nini mpo na liteya ya Bosato. Bapesaki ngai eyano ete liloba Bosato mpe liteya yango ezali na Biblia te. Nasepelaki koyoka bango, mpamba te ngai mpe nazalaki kokanisa kaka bongo.

Nasepelaki mingi ntango natángaki Exode 6:3 na libongoli ya sinode na monɔkɔ ya Russe mpe namonaki ete basaleli Yehova, nkombo ya Nzambe. Nakamwaki mpenza ndenge mangomba ezali kokosa bato mpe kobombela bango nkombo wana; nzokande, Batatoli bazali komema nkombo ya Mozalisi mpe komonisa yango epai ya bato mosusu.​—Yisaya 43:10.

Natunaki Batatoli mituna mingi. Na ndakisa, natunaki boye: “Mpo na nini Biblia ezali kolobela lifelo? Mpo na nini libongoli ya sinode oyo eyebani mingi na ekólo Russie elobi ete mabelé ekozikisama na mɔtɔ?” Nazalaki na mituna mingi, kasi lokola nazalaki kozwa biyano na Biblia, namonaki ete nazwi lingomba oyo nazalaki koluka uta bambula mingi. Na mpisoli ya esengo na miso, nafukamaki mpe natɔndaki Nzambe.

Eumelaki te, Batatoli bakómaki komema ngai na makita na bango mpe nakamwaki mpenza ndenge bayangani bazalaki kolanda na likebi mpe ndenge bankasa ya Babiblia na bango ezalaki kosala mwa makɛlɛlɛ ntango molobi azali kosala lisolo. Soki molobi atángi vɛrsɛ moko, moto na moto azalaki koluka yango na Biblia na ye. Naino namoná likambo ya boye te. Na makita yango, Batatoli bayembaki loyembo moko oyo maloba na yango euti na Yisaya 35:5. Loyembo yango ebandaki na maloba oyo: “Mokufi miso akomona.”

Nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mbala minei na pɔsɔ mpe ezalaki kosepelisa ngai mingi. Eumelaki te, nayebaki ntina oyo Nzambe apesi nzela na mobulu mpe bitumba mpe bibongiseli oyo azwi mpo na kosilisa makambo oyo bampasi yango ebimisi. Nasepelaki mingimingi ndenge Nzambe ya bolingo alaki ete na nzela ya Bokonzi na ye, akokokisa mokano na ye mpo na bato ya botosi, elingi koloba akopesa bango bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Genese 1:28; Yisaya 65:17-25; Emoniseli 21:1-5) Boyebi na ngai ya solo ya Biblia ezalaki se kobakisama mpe na mokolo ya 16 Novɛmbɛ 1997, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe.

Tosangani na mosala ya Nzambe

Mwa moke nsima ya batisimo na ngai, Liza abandaki mpe koyekola Biblia. Atako abɛlaki maladi oyo ebomaki ye nzoto, aumelaki te kokola na elimo mpe azwaki batisimo na 1998. Esɛngaki bámema ye na esika ya kozwa batisimo, kasi azalaki na ekateli makasi ya kosalela Nzambe na molimo na ye mobimba. Tofutaki monganga moko mpo abendabendaka ye nzoto mpe Liza ye moko azalaki kosala ngalasisi. Na nsima, ayokaki nzoto malamu. Sikoyo, asukaka kaka te na koyangana na makita nyonso, kasi akendaka mpe kosakola ndako na ndako mpe asalaka mibembo na bateritware ya mosika mpo na kosakola nsango malamu.

Mbala nyonso oyo nalingaka kobima na mosala ya kosakola, nabondelaka Nzambe apesa ngai mpiko. Na nsima, nazwaka nzete na ngai oyo natambolaka na yango mpe nalandaka nzela oyo nayebi malamu tii nakokóma na esika oyo babisi etɛlɛmaka. Soki nayoki makɛlɛlɛ ya makolo ya bato, nabandaka kosolola na bango masolo ya Biblia. Soki namati na bisi, nafandaka esika moko na katikati mpe nabandaka kosolola na bato masolo ya Biblia mpe kokabola mikanda. Soki moto moko asepeli na nsango malamu, napesaka ye nimero na ngai ya telefone, ngai mpe nazwaka ya ye.

Eumeli te, nazwaki libaku ya kosolola na profɛsɛrɛ moko ya miziki na lopitalo oyo basalisaka bato oyo baumeli na maladi na nzoto. Bwanya ya Biblia ekamwisaki ye. Ntango moto yango azongaki na ndako, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kaka na lopitalo yango, nakutanaki na mokonzi ya izini moko ya mboka wana, oyo mwana na ye akufá miso. Nayebisaki ye elikya oyo nazali na yango, asepelaki na nsango malamu mpe apesaki matɔndi mpo na solo ya Biblia oyo ayokaki.

Banda nazwá batisimo, nasalisi bato mwambe oyo bakómi baninga basakoli ya Bokonzi mpe nayekoli Biblia na ebele ya bato mosusu. Yehova azali kokoba kosalisa ngai ná mwasi na ngai mingi na nzela ya bandeko. Batángelaka biso mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na nsima, topesanaka makanisi. Bakɔtiselaka mpe biso masolo ya mayangani mpe ya lisangá na kasɛti. Makambo nyonso wana esalisaka biso tókɔtisa solo ya Biblia na mitema na biso mpe tóyebisa yango epai ya bato mosusu. Lisangá ekómi ‘lisalisi oyo ezali kopesa biso makasi.’​—Bakolose 4:11.

Nalekisaki mbula mingi na miziki mpe sikoyo nasepelaka mingi koyemba Banzembo ya Bokonzi. Nakangá na motó nzembo mingi ya buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, na monɔkɔ ya Russe. Nandimi ete Yehova asalisi ngai nabima na molili ya elimo na mokili oyo mabe. Yango wana, natyaka ntembe te ete mokolo mosusu akosalisa ngai namona lisusu.

[Elilingi na lokasa 13]

Nazali kobɛta piololo ya mongongo monene

[Elilingi na lokasa 14]

Nazali kobɛta lindanda, na 1960

[Elilingi na lokasa 14]

Etuluku moko ya babɛti-piololo

[Elilingi na lokasa 17]

Ngai ná Liza lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto