Nkoma ya batángi
Bangomba ezali na ntina mingi mpo na bomoi awa na mabelé (22 Marsi 2005, na Lifalanse) Ngomba Grand Tetons oyo nakendeki kotala, ezali eloko oyo ekamwisaki ngai mingi koleka na bomoi na ngai. Kasi ntango natángaki ete bangomba ezali na ntima mingi nakamwaki lisusu mingi koleka. Sikoyo, nayebi malamu ntina ya bangomba oyo ezali na mokili mpe nazali na botɔndi mingi mpo na Mozalisi na yango monene.
J. G., États-Unis
Ntango namonaka kitoko ya biloko oyo Yehova akelá, nazangaka maloba mpo na komonisa ndenge namiyokaki. Atako bato bazali kobebisa zamba, mai, ezali naino na bangomba oyo moto akoki kosepela na yango. Nasepelaka koyebisa bato mosusu makambo oyo etikali moke esalema ntango elaka oyo ezali na Nzembo 72:16 ekokokisama.
R. C., États-Unis
Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini nasengeli kosala misala ya mabɔkɔ? (Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2005) Nasalaka na kompanyi moko ya kopakola langi na bandako, oyo tata na ngai atambwisaka, kasi moto moko alobaki na ngai ete na mosala ya ndenge wana, okozala na mposa ya kosalela mayele na yo te. Nzokande, lisolo yango emonisaki ete Yesu mpe Paulo basalaki mosala ya mabɔkɔ. Sikoyo nalendisami na kosala mosala na ngai na esengo mpenza. Nazali na mposa ya kosala makasi nayeba yango malamu mpo nasalela makoki yango na mosala ya kotonga Bandako ya Mayangani mpe Bandako ya Bokonzi.
M. Y., Japon
Lisolo yango elendisaki ngai mpenza! Ekundwelaki ngai lisusu ete likambo ya liboso na bomoi ezali kosalela Yehova Nzambe mpe ete mosala oyo nakopona kosala esengeli kozala na boyokani na likambo wana. Lisolo wana ya kitoko elendisi ngai nasalaka misala ya ndako ata soki batindi ngai te. Likambo eleki ntina, lisolo yango esalisaki ngai nayeba likanisi ya Yehova mpo na misala ya mabɔkɔ.
Y. K., Russie
Bomoi—Kosangisama ya kokamwa ya biteni ndenge na ndenge (22 Yanuali 2005, na Lifalanse) Nazali na mbula 15. Na liteya ya bioloji na kelasi, tozali koyekola oyo babengi métabolisme (mbongwana oyo esalemaka na biloko oyo tolyaka na kati ya nzoto). Ntango namemaki Lamuká! yango na kelasi, molakisi na biso azwaki yango mpo na kolakisa bana-kelasi nyonso makambo yango ndenge ezali wana. Ntango tobimaki kelasi, moto nyonso alingaki kozwa zulunalo yango. Lisolo yango emonisi polele ete Yehova azali na bwanya oyo eleki. Na ntembe te, abongi mpenza kozwa masanzoli. Nazali kozela na motema likoló ntango oyo bikelamu nyonso ya bomoi bakosanzola Yehova!
Y. B., Russie
“Soki báyebaka yango!” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2005) Nazali na mbula 17, mpe nakanisaka mingi kokende epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Ndakisa ya David elendisi ekateli na ngai ya kokende na teritware ya ndenge wana ntango kaka nakosilisa kelasi. Nasɛngi bino bókoba kobimisa bandakisa ya kolendisa ndenge wana. Bilenge lokola ngai bazali na mposa ya bilendiseli mpo na kokende liboso na mosala ya kosakola.
K. O., Pologne
Nazali na mbula 20, mpe natangisaki mpisoli ntango natángaki lisolo yango. Nakanisaki ete, ‘soki nakufi ntango nazali naino elenge, nakoyoka mawa ata moke te mpo nazelaki te mpo na kosalela Yehova na makoki na ngai nyonso!’ Mokano na ngai ezali ete etikali moke nakóma mobongisi-nzela. Nakotya lisolo yango na kadre mpe nakobaka yango na efelo mpo nabosana te ndenge namiyokaki ntango natángaki yango. Matɔndi mingi ndenge bozali kobimisa masolo kitoko ya ndenge wana.
N. N., Japon