Bilenge oyo bapesaka litatoli ya malamu mpenza
Bilenge mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova balobelaka kondima na bango na mpiko mpenza, ezala na kelasi to na mosala ya kosakola, mpe bazwi matomba mingi ndenge bazali kosala bongo. Tótalela bandakisa oyo elandi.a
Kristina alobi boye: “Ntango nazalaki na kelasi ya misato, molakisi na biso pesaki mwana-kelasi mokomoko journal de classe mpo tókomaka makambo na biso ya mokolo na mokolo. Molakisi alobaki ete akotánga yango mpe akokomela biso mwa makambo ntango akozongisa yango. Namonaki malamu nakoma makambo etali lisolo oyo nasengelaki kosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Molakisi akamwaki, yango wana nabengisaki ye na Ndako ya Bokonzi mpo aya koyoka lisolo na ngai. Ayaki ye ná molakisi na ngai ya kelasi ya yambo. Ntango tozongaki na kelasi, molakisi ayebisaki bana-kelasi nyonso ndenge asepelaki mpenza na lisolo na ngai. Yango esepelisaki ngai mingi. Kasi esuki wana te. Soki mbula moko na nsima, nalobelaki likambo yango na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova, mpe molakisi na ngai azalaki mpe na liyangani yango. Na nsima, ngai ná moninga moko oyo azalaki mobongisi-nzela, tokendaki kotala ye mpe tomemelaki ye buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Kutu ayaki mpe na liyangani na biso moko ya etúká!”
Ntango Sydnee azalaki na mbula motoba, azalaki na momeseno ya koyebisa solo ya Liloba ya Nzambe na mpiko mpenza epai ya baninga na ye ya kelasi, na makambo lokola ndenge bato oyo bakufá bazalaka, mpe bokeseni oyo ezali kati na Yesu mpe Nzambe. Mama na ye alobi boye: “Azalaki mpenza mwa ministre moko ya molende mpe azalaki kobanga te.” Na nsuka ya mbula ya yambo ya kelasi, Sydnee ayokaki mawa. Alobaki boye: “Nazali komitungisa mpo na baninga na ngai ya kelasi. Ndenge nini bakoyekola makambo ya Yehova?” Sydnee azalaki na likanisi moko. Na mokolo ya nsuka ya kelasi, apesaki mwana-kelasi mokomoko likabo moko oyo azingaki yango malamu. Ezalaki buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Sydnee akabolaki buku 26, mpe ayebisaki baninga na ye ete bakoki kofungola likabo na bango na ndako esika moko na baboti na bango. Mpo na Sydnee, baninga na ye ya kelasi bazalaki lokola bato oyo bapesá ye mpo asakolelaka bango. Kutu abengaki bango na telefone mpo na koyeba ndenge basepelaki na buku yango. Mwana moko ya mwasi alobaki ete atángaka oyo ya ye buku mpokwa nyonso bango na mama na ye.
Ntango Ellen azalaki na mbuka 15, apesaki molakisi na ye ya istware banimero mingi ya Lamuká! Ellen alobi ete: “Asepelaki na yango mingi, mpe atángaka Lamuká! ekoki sikoyo mbula mibale.” Ellen abakisi ete: “Eumeli mingi te, napesaki ye buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, mpe ayebisaki ngai ete bana na ye mibale ya basi basepelaki na yango mingi mpenza. Yango wana, napesaki ye buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Na nsima, apesaki ngai mwa kalati ya matɔndi. Akomaki ete: ‘Matɔndi mingi mpo na babuku. Ngai ná bana na ngai ya basi tozali kotánga yango mpenza. Ezali esengo mpenza komona elenge oyo azali na kondima makasi mpe na makanisi malamu lokola yo. Likabo moko te ekoki kokokana na oyo ozali na yango, elingi koloba, kondima na yo. Yo oteyi ngai makambo mingi koleka oyo ngai nakokaki koteya yo!’ Likambo oyo esalisi ngai nayeba ndenge bato mingi basepelaka na solo ya Biblia ntango tozali kosala makasi ya kolakisa bango yango.”
Daniel azalaki na mbula motoba ntango abandaki koyekola Biblia na moto moko. Alobi ete: “Tozalaki kokende ná mama koyekola na bato, kasi nazalaki na mposa ngai moko mpe nateya moto.” Daniel aponaki Madame Ratcliff—mwasi moko ya mobange, oyo atikelaki ye mikanda oyo elimbolaka Biblia. Alobaki na ye ete: “Nalingi kolakisa yo mokanda na ngai oyo nalingaka mingi, Mokanda mpo na masolo ya Biblia”; abakisaki ete: “Nalingi mpe kotuna yo soki okosepela ete nayaka pɔsɔ nyonso kotángela yo yango.” Madame Ratcliff andimaki. Laura, mama ya Daniel, alobi boye: “Tozongelaki ye nsima ya mwa bangonga mpe tobandaki koyekola na ye. Daniel mpe Madame Ratcliff bazalaki kotánga baparagrafe moto na moto na ngala na ye, mpe Daniel asɛngaki ye atánga mikapo mosusu oyo aponaki na oyo ezali na nsuka ya lisolo. Nakendaki elongo na Daniel, kasi emonanaki ete Madame Ratcliff azalaki na mposa ya kosolola mpenza kaka na ye!” Na nsima, Daniel ná Madame Ratcliff babandaki koyekola buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Na ntango wana Natalie, leki ya Daniel ya mwasi, ayebaki kotánga mpe akómaki kosangana na bango na boyekoli. Madame Ratcliff azalaki na mituna mingi—mituna mosusu ezalaki ya makasi. Kasi, Daniel ná Natalie basalelaki mwa buku Masolo ya kosolola na Biblia mpe index oyo ezalaka na nsuka ya Biblia mpo na kopesa biyano oyo euti na Makomami. Madame Ratcliff, oyo azalaki Mokatolike bomoi na ye mobimba, asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola. Mokolo moko nsima ya koyekola, alobaki boye: “Soki nabandaki koyekola Biblia banda kala!” Likambo ya mawa, Madame Ratcliff auti kokufa na mikolo oyo eleki, azalaki na mbula 91. Kasi lokola ayekolaki Biblia, ayebaki mateya ya solo ya ntina mingi bakisá mpe elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi na kati ya paladiso awa na mabelé. Daniel azali sikoyo na mbula zomi mpe azali na bato mibale oyo ayekolaka na bango Biblia. Natalie azali sikoyo na mbula mwambe mpe azali koyekola na elenge mwasi moko oyo bazali na ye mbula moko.
Bilenge lokola Kristina, Sydnee, Ellen, Daniel, mpe Natalie, bayokisaka baboti na bango esengo. Likambo eleki ntina, basepelisaka motema ya Yehova, mpe Yehova akobosana ata moke te bolingo oyo bilenge ya ndenge wana bazali komonisa mpo na nkombo na ye.—Masese 27:11; Baebele 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikanda nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 28]
Kristina (na likoló) mpe Sydnee
[Elilingi na lokasa 29]
Daniel ná Natalie
[Elilingi na lokasa 29]
Ellen