Mailyn akozwa elongi ya sika
MAMA YA MAILYN NDE ABƐTI LISOLO YANGO
Mpo na nini esengeli ete Mailyn, mwana na ngai ya mwasi ya mbula 11, azwa elongi ya sika? Tiká nalimbola.
Mailyn azali mwana na ngai ya mwasi ya mibale. Abotamaki na engumba Holguín, na ekólo Cuba, na mokolo ya 5 Augusto 1992. Ngai, tata na ye mpe yaya na ye, tosepelaki mingi ntango abotamaki. Kasi esengo na biso eumelaki te. Mwa mikolo nsima ya kobotama na ye, nabɛlaki maladi ya kolokoto (varicelle), mpe sanza moko na nsima, Mailyn azwaki mpe maladi yango.
Na ebandeli, emonanaki ete maladi yango ezalaki makasi te; kasi na nsima, eyaki kongala mpe esɛngaki akɔta lopitalo. Minganga basalisaki Mailyn malamu mpenza, kasi makoki ya nzoto na ye ya kobundisa maladi elɛmbaki, yango wana azwaki mikrobe. Namonaki ngámbo moko ya mwa zolo na ye ekómi motane. Minganga balobaki ete ezali mikrobe moko oyo emonanaka mingi te, kasi ezalaka mabe mpenza soki moto azwi yango.
Atako bapesaki ye mbala moko bankisi ya makasi oyo ebomaka mikrobe, nsima ya mwa mikolo, mikrobe wana ebandaki kolya ye elongi. Na ntango oyo minganga bazwaki nkisi ya makasi, mikrobe yango esilaki kolya zolo ya Mailyn pene na nyonso, mbɛbu na ye, bisika mosusu pembenipembeni ya mino na ye mpe mbanga na ye. Lisusu, ngámbo ya liso na ye moko ekómaki mwa bampotampota.
Ntango ngai ná mobali na ngai tomonaki ye, tolelaki. Ndenge nini likambo ya boye ekokaki kokómela mwana na biso ya moke? Mailyn aumelaki mingi na lopitalo, na esika oyo batyaka bato ya maladi makasi, mpe minganga bakanisaki ete akobika te. Mobali na ngai azalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete: “Tyá na makanisi ete akokufa kaka.” Kasi, ntango nazalaki kokɔtisa lobɔkɔ na masini ya molunge (couveuse) epai batyaki Mailyn mpe kosimba mwa lobɔkɔ na ye, azalaki kokanga ngai makasi mpe nayebaki ete akobika. Nayebisaki mobali na ngai ete: “Mwana na biso akokufa te. Kasi ndenge akómi boye, Mailyn akozala na bomoi ya ndenge nini?” Ntɔngɔ nyonso soki tolamuki, tozalaki kondima te ete likambo yango ezali ya solo.
Ntango tozalaki na lopitalo, mwana na biso ya mwasi ya liboso, Maydelis, oyo azalaki na mbula motoba na ntango wana, atikalaki epai ya baboti na ngai. Azalaki kozela na motema likoló komona leki na ye ya mwasi azonga na ndako. Amonaki ntango Mailyn akendaki na lopitalo, azalaki kitoko lokola “mwana popi,” ya miso kitoko ya bule. Kasi ntango Maydelis amonaki leki na ye lisusu, Mailyn azalaki lokola edɔngɔlɔ miso.
‘Mpo na nini mwana na ngai asengeli konyokwama boye?’
Nsima ya sanza moko na ndambo, Mailyn abimaki na lopitalo. Tozongaki na ndako na biso na engumba te mpo tolingaki bato bámona ye te. Tokendaki kofanda na ndako moko ya moke na mboka, pene na ferme ya baboti na ngai.
Na ebandeli, nazalaki komeka komɛlisa Mailyn mabɛlɛ mokemoke na mwa lidusu oyo etikalaki na esika oyo monɔkɔ na ye ezalaki liboso. Azalaki kokoka kobɛnda libɛlɛ ye moko te. Kasi, ntango bampota ebandaki kokauka, mwa lidusu yango ekangamaki. Nakómaki kopesa ye kaka pɔtɔpɔtɔ ya maimai na bibero. Ntango akokisaki mbula moko, tozongaki na Holguín, epai minganga basalaki ye lipaso mbala minei mpo na kofungola mwa lidusu yango.
Nazalaki komituna, ‘Mpo na nini mwana na ngai azali konyokwama mingi boye?’ Nakendaki epai ya banganga-nkisi mpe nasambelaki bikeko na ngai mpo na koluka koyeba ntina ya likambo yango. Kasi nyonso wana ebɔndisaki ngai te. Maloba ya kozokisa ya bandeko mpe baninga na ngai mosusu ezalaki kutu kopesa ngai mpasi mingi koleka. Basusu bazalaki koloba ete: “Nzambe ayebi mpo na nini azali kotika makambo ya boye esalema.” Basusu balobaki na ngai ete: “Ezali etumbu ya Nzambe.” Nazalaki mpe komitungisa mingi ete nakoyebisa Mailyn nini ntango akokola. Mokolo moko, ntango Mailyn azalaki naino mwana moke mpenza, atunaki papa na ye: “Mpo na nini zolo na ngai ezali lokola ya bato nyonso te?” Papa na ye ayebaki te aloba nini mpe abimaki libanda, akendaki kolela. Namekaki kolimbolela ye mpo na nini akómá bongo. Tii lelo, abosanaka te ndenge nazalaki koyebisa ye ete mwa nyama moko ya moke elyaki zolo na ye ná monɔkɔ na ye.
Elikya ezwami
Kaka na ntango oyo mitungisi elekaki ngai motó, nayaki kokanisa ete mwasi moko oyo afandaka pembeni na biso azali Motatoli ya Yehova. Natunaki ye alakisa ngai na Biblia ntina oyo Nzambe atiki nzela ete mwana na ngai ya moke anyokwama mingi bongo. Natunaki mpe ye boye: “Soki maladi oyo ezali mpenza etumbu ya Nzambe mpo na likambo moko oyo ngai nasalá, mpo na nini Mailyn nde asengeli kofuta masumu yango?”
Mwasi wana abandaki koyekola na ngai Biblia, na lisalisi ya buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana Paradis.a Mokemoke, nabandaki koyeba ete esengeli te kopesa Nzambe foti mpo na likambo oyo ekómelaki Mailyn mpe ete amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. (Yakobo 1:13; 1 Petelo 5:7) Nabandaki kosepela na elikya kitoko oyo emonisi ete ntango Bokonzi ya likoló, oyo Yesu Klisto azali mokonzi na yango, ekoyangela mabelé, bampasi ekosila. (Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4) Boyebi wana epesaki ngai makasi mpe etindaki ngai nábanda koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Na ebandeli, mobali na ngai azalaki kosepela mpenza te na mateya ya Biblia oyo nakómaki kolanda. Kasi, apekisaki ngai koyekola Biblia te, mpamba te yango ezalaki kopesa ngai makasi ya koyika mpiko na likambo oyo ekómelaki biso.
Lisalisi na mboka mopaya
Ntango Mailyn azalaki na mbula mibale, monganga moko ya Mexique, oyo asalaka lipaso ya kokómisa moto kitoko, ayokaki nsango na ye mpe abengaki ye mpo asalisa ye ofele. Basalaki ye lipaso ya liboso na mobu 1994. Nafandaki ná Mailyn na Mexique pene na mbula mobimba. Na ebandeli, tozwaki likoki te ya kokutana na Batatoli ya Yehova, yango wana tozalaki kokende na makita ya boklisto te. Yango esalaki ete nalɛmba na elimo. Na nsima, Motatoli moko ya Mexique asololaki na biso, mpe tobandaki kosangana lisusu na baninga na biso bandimi mbala na mbala. Ntango tozongaki na Cuba, nazongelaki boyekoli na ngai ya Biblia mpe nakómaki lisusu makasi na elimo.
Na ntango wana, mobali na ngai azalaki kaka kosepela na Biblia te. Mpo na kopesa ye mposa ya koyekola, nazalaki kosɛnga ye atángelaka ngai bisika mosusu na mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo nakanga ntina na yango malamu. Nsukansuka, yango etindaki ye andima koyekola Biblia, mpo azalaki kobanga noki mibembo mingi mpe ya milai oyo nakómaki kosala na Mexique, ebebisa boyokani na biso ya libota. Akanisaki ete soki tozali biso nyonso kosambela na lingomba moko, yango ekosalisa biso tóyika mpiko na mikolo oyo tozalaka esika moko te. Mpe yango esalisaki biso. Ngai ná mobali na ngai mpe mwana na biso ya mwasi ya liboso, tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova na mobu 1997.
Na mwa mikolo ya liboso oyo tokómaki na Mexique, Mailyn azalaki koloba ete soki mwa nyama wana elyaki ye elongi te, mbɛlɛ tokabwanaka te na papa na ye mpe yaya na ye. Ezalaki kosala motema mpasi kokabwana na libota mikolo ebele bongo. Kasi, nabosanaka te mokolo oyo tokendaki kotala Betele, biro ya Batatoli ya Yehova ya Mexique; yango elendisaki biso mingi. Mailyn azalaki koloba ete alingi te básala ye lisusu lipaso—mpo ezalaki lipaso ya mbala ya mitano na mobembo wana—mpo ete mpota ya lipaso ezalaki kosala ye mpasi mingi liboso ekauka. Kasi, Bandeko mosusu ya Betele bayebisaki ye ete soki akokanga motema mpe akondima ete minganga básala ye lipaso, bakosalela ye fɛti ntango akobima na lopitalo. Yango wana, andimaki básala ye lipaso.
Tótika Mailyn ayebisa biso ndenge ayokaki: “Nasepelaki mingi ntango balobaki ete bakosalela ngai fɛti na Betele. Yango wana, nakangaki motema ntango bazalaki kosala ngai lipaso. Fɛti yango ezalaki kitoko, bandeko ebele ya basi mpe ya mibali bazalaki wana. Bapesaki ngai bakalati mingi oyo nabombaka tii lelo. Lokola balendisaki ngai bongo, nazwaki makasi ya kokanga motema na mapaso oyo basalaki ngai na nsima.”
Akoli mpe azwi lisalisi
Lelo oyo, Mailyn azali na mbula 11, mpe basilá kosala ye lipaso mbala 20 mpo na kozongisa elongi na ye ndenge ezalaki. Atako mapaso oyo basalaki ye esalisi ye mingi, akoki kaka te kofungola monɔkɔ na ye mobimba. Atako bongo, azalaka ntango nyonso na mpiko mpe na elikya. Asepelaka mpe mingi na makambo ya elimo. Ntango akómaki na mbula motoba, akomisaki nkombo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi na lisangá na biso, mpe azwaki batisimo na mokolo ya 27 Aprili 2003. Sikoyo azali koyekola Biblia na bato misato. Mokolo moko, ntango tozalaki na Mexique, asololaki na moto moko oyo andimaki koyekola na ye Biblia. Mailyn abengaki ye na Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpe na makita mosusu ya lisangá, mpe moto yango asepelaki mingi na makita yango.
Ntango Mailyn asakolaka ndako na ndako, bato mosusu batalaka ye na elongi mpe batunaka ye soki aziká mɔtɔ. Soki batuni ye bongo, Mailyn amonisaka bango elikya ya Biblia oyo azali na yango ete Yehova akopesa ye elongi ya sika na Paladiso oyo ezali koya.—Luka 23:43.
Mpasi oyo Mailyn amoná mbala nyonso oyo basalá ye lipaso mpe ndenge bana mosusu basɛkaka ye, ezali ya koloba te. Nini esalisaka ye akanga motema? Mailyn andimi mpenza ete: “Yehova azali moto ya solo mpo na ngai. Apesaka ngai makasi mpe mpiko mpo nakanga motema. Nalingi básala ngai lisusu lipaso te mpo minganga bakoki kosala eloko mosusu te mpo na ngai sikoyo. Bakokoka soki moke te kokómisa ngai ndenge nazalaki ntango nabotamaki. Kasi nayebi ete Yehova akopesa ngai elongi ya sika na mokili ya sika mpe nakozonga lisusu kitoko.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
“Yehova akopesa ngai elongi ya sika na mokili ya sika”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Mokemoke, nabandaki koyeba ete esengeli kopesa Nzambe foti te