YURUMÍ: Nyama moko ya kokamwisa
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ARGENTINE
NA MOLILI oyo ezalaka na ndako na bango na kati ya mabelé, bakómi na yikiyiki mpo bayoki makɛlɛlɛ ya monguna oyo azali koya kobunda na bango. Basoda na bango bayei mbangu, na mindoki, na esika oyo etumba ebimi, kasi bakokoka ata moke te. Mbala moko, eteni monene ya efelo oyo ezalaki kokabola bango na monguna ekwei, ebomi mingi na bango. Lokola efelo ekwei, kongɛnga makasi ekɔti na ndako mpe bazali komona lisusu malamu te, mpe monguna akɔteli bango.
Tozali nde kolobela etumba na engumba moko na ntango ya Baloma? To likambo moko balakisaki na filme ya bitumba? Mpenza te! Tozali kolobela nde ndenge yurumí ekɔtelaka nyamankɛkɛ—ndenge bango moko bamonaka likambo yango. Nzokande, na miso ya yurumí, molei monene ya nsɛlɛlɛ, wana ezali kaka lindɔngɛ moko kati na ebele mosusu oyo akopanza mokolo wana.
Bomoi ya yurumí
Atako banyama oyo elyaka banyamankɛkɛ (insectes) ezali mitindo mingi, tokolobela mingi mpenza nde molei monene ya nyamankɛkɛ. Na minɔkɔ mosusu eyebani lokola urse ya nsɛlɛlɛ, ekoki kozala ete bapesá yango nkombo wana mpo etambolaka malɛmbɛ mpe etɛlɛmaka na makolo mibale soki elingi kobunda. Lisusu, kaka ndenge urse esalaka, yurumí mpe “ekangaka” monguna oyo ayei kobundisa yango na mabɔkɔ na yango ya makasi.
Na nɔrdi-ɛsti ya Argentine mpe na bikólo oyo ezali pembeni na yango, babengaka nyama yango yurumí, na monɔkɔ ya Guarani, nkombo yango elimboli “monɔkɔ moke.” Nkombo wana ebongi mpenza na nyama yango mpo monɔkɔ na yango ezali kaka mwa ludusu ya moke mpenza, atako mbanga na yango ezali molai ndenge moko na motó na yango. Kutu, soki omoni yurumí, eloko ya liboso ekobenda likebi na yo ezali nde monɔkɔ na yango, oyo ezali molai lokola tiyo. Yurumí ezalaka mpe na mokila ya molai oyo etondi na nsuki, mpe ntango mosusu etɛlɛmisaka yango likoló. Lokola nzoto na yango ezali na nsuki ebele mpe nsuki yango ezalaka milai na mokila, emonanaka lokola ezali nyama monene, nzokande ezali mpenza monene te. Atako emonanaka monene na miso, yurumí ekoki kozala monene kaka lokola mbwa oyo babengaka berger allemand. Yurumí oyo ekoli mpenza ekómaka na kilo 25. Kasi molai na yango ekoki kokóma mɛtrɛ 1,80 kobanda na monɔkɔ na yango tii na nsuka ya mokila na yango.
Yurumí ezalaka mingi yango moko; etambolatambolaka mingimingi na bisobe ya Amerika ya Sudi. Soki balobeli eteni wana ya mokili, mbala mingi okokanisa bazamba minene ya bamboka ya molunge mpe banzete minene. Kasi, okoki mpe kokuta bitando minene ya patatalu, bisobe ná mwa banzete ya mbila mpe banzete mosusu ya nzubɛnzubɛ. Mabelé yango, oyo etondi na bilei oyo eutaka na nkasa mpe na matiti oyo ezali kopɔla, ezali esika malamu mpo na ndɔngɛ. Kuna, ndɔngɛ yango esalelaka mabelé, esangani na nsɔi na yango mpo na kotonga mandɔngɛ ya makasi mpenza. Mandongɛ yango ekoki kokóma molai koleka mɛtrɛ mibale.
Na esika oyo ezali na ebele ya nyamankɛkɛ, okokuta yurumí—oyo mosala na yango ezali ya kolya nyamankɛkɛ. Yango wana, bato ya siansi babengaka yango Myrmecophaga tridactyla, libosoliboso mpo na biloko oyo elyaka (molei ya nsɛlɛlɛ), na nsima mpo misapi misato kati na misapi minei ya makolo na yango ya liboso ezalaka na manzaka ya makasi oyo ebangisaka, lokola mbɛli oyo egumbaná. Buku moko (Enciclopedia Salvat de la fauna) elimboli boye: “Manzaka wana esalisaka yango, ezala mpo na koluka biloko ya kolya to mpo na komibatela. Soki ezali na likama, yurumí esalelaka manzaka na yango lokola makonga oyo epeli makasi, ekoki kozokisa mabe mpenza, ekoki ata kokimisa nyama babengi jaguar.”
Yurumí elyaka ndenge nini?
Yurumí ezalaka na mino te. Kasi, yango ezali mpenza likambo te mpo ezali na ndenge mingi ya kokamwa oyo ezwaka biloko ya kolya. Ya liboso, zolo na yango eyokaka solo mosika mpenza, mbala 40 koleka oyo ya moto; zolo nde esalisaka yango eyeba esika bilei na yango ezali. Lisusu, yurumí esalelaka mabɔkɔ na yango, oyo ezali na manzaka milai santimɛtrɛ zomi, mpo na kotimola mabelé, koluka nyamankɛkɛ, mpɔsɛ to maki. Nsima ya kotimola bongo, ekɔtisaka lolemo na yango ya molai, oyo ekoki kokóma santimɛtrɛ 50, na madusu ya mozindo na mabelé mpo na koluka nsɛlɛlɛ.
Yurumí ezalaka na lolemo oyo ebimisaka nsɔi mingi; yango wana lolemo na yango ezalaka mosɛlu mpe ezalaka lokola kɔle. Ezali na lolemo yango nde ekangaka nsɛlɛlɛ ná ndɔngɛ mpe ekɔtisaka yango na monɔkɔ na yango. Kasi, esukaka kaka te na komɛla bilei na yango. Nsima ya komɛla, esengeli likundu enika bilei yango mpo eleisa nzoto. Likambo ya kokamwa, likundu na yango ezali makasi mpe enikaka nyamankɛkɛ malamu.
Yurumí ekolimwa?
Atako okoki kokuta yurumí na bisika mingi na Amerika ya Ntei mpe na Amerika ya Sudi, nyama yango ezalaka mpenza ebele te. Ntango mosusu ezali mpo ebotanaka mingi te. Yurumí ya mwasi ebotaka bobele mwana moko nsima ya zemi oyo eumelaka soki mikolo 190. Mama amemaka mwana na ye na mokɔngɔ tii mbula mobimba ekokoka. Moto moko ya Argentine oyo ayekolaka bikelamu ya bomoi alobelaki motindo ya kokamwa ya likambo yango: “Namonaki yurumí moko ya mwasi ememi mwana na ye na mokɔngɔ, eutaki kobota mwana yango eumelaki naino mikolo mingi te. Mwa ekelamu wana ya moke ezalaki kutu komonana te na mokɔngɔ ya mama na yango; nalandelaki ndenge ebatamaki malamu mpenza na mokɔngɔ ya mama na yango; etyaki mwa nzela ya moindo ya mokɔngɔ na yango na likoló mpenza ya nzela ya moindo ya mokɔngɔ ya mama na yango. Na ndenge wana, bandɛkɛ bakomona yango te mpo na kolya yango.”
Yurumí ezali na ntina mingi na bisika oyo yango efandaka. Na mokolo moko, yurumí moko elyaka bankóto ya nsɛlɛlɛ mpe ya ndɔngɛ. Soki yurumí ezalaki kolya nyamankɛkɛ ndenge wana te, mbɛlɛ yango elingaki kokóma ebele mpenza mpe kozala likama mpo na bato. Atako bongo, mosala ya yurumí ezali lisusu kokokisama te. Mpo na nini?
Ezali mawa komona ete yurumí ezali kosila mokemoke mpo bato bazali kosilisa yango. Bato mosusu babomaka yurumí kaka mpamba ndenge wana; basusu babomaka yango mpo balobaka ete nyama yango ememelaka bato libabe. Kasi, basusu bakangaka yango mpo na kotɛka yango epai ya bato oyo babombaka banyama oyo elingi kosila na mokili, mpe nyama yango oyo elyaka nsɛlɛlɛ esukaka to na mwa ndako ya bibende, to na bisika oyo babombaka biloko ya kala, wana bakaukisi yango. Yurumí ekoya nde kokɔta na molɔngɔ ya bikelamu oyo ezali kosila na mokili? Tokoyeba yango nsima ya bambula. Sikoyo, bato bazali kosala makasi mpo na kobatela nyama kitoko wana, oyo ezali kati na mitindo ndenge na ndenge ya bikelamu ya bomoi.
[Elilingi na lokasa 19]
Ezali koluka bilei oyo elingaka mingi—ndɔngɛ
[Elilingi na lokasa 19]
Mwana ya “yurumí” na mokɔngɔ ya mama na yango
[Elilingi na lokasa 19]
Lolemo ya “yurumí” ezali kokamwisa, ezali santimɛtrɛ 50
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kenneth W. Fink/Bruce Coleman Inc.