Ebikisaki bomoi na ye
Lisolo oyo ebimaki na Lamuká ya 22 Desɛmbɛ 1999 (ebimeli ya Lifalanse), ezalaki na motó ya likambo ete “Kokanga bato na makasi: Ezali likama na mokili mobimba.” William Terrell alobaki ete lisolo oyo ebimaki na Lamuká! wana ebikisaki bomoi na ye.
MWA moke nsima ya ngonga ya zomi, na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano, mwa 10 Marsi 2000, Joseph Palczynski akangaki William Terrell na makasi na ndako na ye, alakisaki ye mondoki mpe amemaki ye. Masolo ya Lamuká! oyo Terrell alobi ete alandaki toli na yango na boumeli ya mpasi oyo amonaki, epesaki toli oyo euti na bato oyo bayebi malamu nini esengeli kosala soki bakangi yo na makasi:
“Esengeli kolanda oyo balobi; kozala na motó makasi te. Bakangami banyokwamaka mingi soki bazali koboya kotosa, mpe bazalaka na likama monene ete báboma bango to mpe bátya bango pembeni mpo na kopesa bango etumbu ya makasi.
“Kobangabanga te. Yebá ete bato mingi oyo babandi bakangaka na makasi babikaka.”
“Soki likoki ezali, bósolola mwa moke mpe meká kosala boyokani na bango. Soki babandi oyo bakangi yo bamoni ete ozali moto malamu, mbala mosusu bakoki kosala yo mabe te to koboma yo te.”
“Monisá bango na bokonde nyonso bamposa na yo.”
“Boyokani kati na mokangami mpe oyo akangi ye ekoki kobatela mokangami. Buku moko oyo ezali na motó na likambo ete Momeseno ya bato ya mobulu (na Lingelesi) epesi ndimbola ete: ‘Ntango moto oyo bakangi mpe bandi oyo akangi ye bayebani, balinganaka. Likambo yango emonisi ete soki mwa ntango eleki, bandi yango akoki lisusu mpenza te kosala mabe na moto oyo ye akangi.’”
William Terrell, Motatoli ya Yehova oyo azali na mbula 53, asalaki nyonso oyo ekoki na ye mpo na kolanda toli wana na boumeli ya ngonga 14 oyo bakangaki ye, oyo mingi na yango bazalaki kolakisa ye mondoki. Makambo nyonso ebandaki ntango Palczynski abɛtaki na ekuke ya Terrell, na mboka moko moke, na balabala Interstate Highway 95 (I-95), epai motuka oyo Palczynski ayibaki esilaki esansi.
Nsima ya koyoka likambo oyo Palczynski azalaki na yango, Terrell asepelaki kosalisa ye. Palczynski asɛngaki mai mpe asɛngaki ete bámema ye na Baltimore, na etúká ya Maryland, na États-Unis. Terrell ayanolaki ete akozwa bibongiseli mpo ete bámema ye tii na Fredericksburg (engumba moko ya Virginie) epai akoki kozwa bisi mpo na kolanda mobembo na ye. Ntango Terrell ayaki na mai, amoni kaka balakisi ye mondoki. Palczynski asɛngi Terrell na makasi ete amema ye tii esika akosuka.
Alandi toli
Ntango bazali kokende na balabala I-95, Terrell alandaki makambo Palczynski ayebisaki ye ete atambwisa motuka na lombangu oyo alingaki mpe atambwisa te na lolenge oyo ekoki kobenda likebi ya bato. Kozanga kobanga, Terrell abandaki kosolola na Palczynski, ye azalaki na mbula 31, amonisaki komibanzabanza ya solo mpo na ye mpo azali moto mpe na makambo oyo esali ete bákutana. Palczynski ayebisaki ye ete, esili koleka mikolo misato, akendeki kotala makango na ye Tracy, oyo aboya ye. Abomaki baninga mibale ya Tracy na mondoki mpe mobali moko oyo afandaka pene na makango na ye mpo balingaki kopekisa ye komema Tracy. Mwa moke na nsima, Tracy akimaki.
Na butu ya mokolo oyo elandaki, Palczynski alingaki kobɔtɔla motuka moko, kasi ntango abɛtaki masasi, lisasi moko ezwaki mwana ya mbula mibale mpe ebukaki ye mbanga. Lisasi mosusu ezwaki motuka oyo Jennifer Lyn McDonel azalaki kotambwisa mpe na mawa nyonso, akufaki mpe oyo ya misato eyaki kopanza mbeto oyo bazalaki kolalisa mwana na bango ya mbula moko na motuka. Nzokande mwana azalaki na mbeto yango te. Na ntango makambo wana esalemaki, Jennifer na mobali na ye, Thomas bazalaki kokende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova epai bango nyonso bazalaki na masolo ya kosala na likita wana na mpokwa. Sarah Francis, mama ya Jennifer, alobi ete: “Ezali mokolo kaka moko oyo bazangaki komema mwana yango na Ndako ya Bokonzi. [Mbɛlɛ], tolingaki tólela bango mibale.”
Lokola Terrell azalaki kosolola na boboto nyonso na Palczynski, moto oyo akangaki ye, ayebisaki ye ete azalaki na mposa ya kosala moto moko mabe te, kasi alingaki Tracy mingi mpe alingi ete bázala esika moko. Terrell alimbolaki ete: “Nayebisaki ye ete azali na likoki te ya kobongola makambo oyo esili koleka, kasi azali na likoki ya kobongola makambo mpo na mikolo oyo ezali koya, mpe nalendisaki ye akende komipesa epai ya bapolisi. Nayebisaki ye ete nakokende kotala ye na bolɔkɔ mpo na koyekola na ye Biblia.” Toyaki koyoka na nsima ete, kobanda asilisaki eteyelo ya katikati na mobu 1987, Palczynski, kolongola sanza zomi, alekisa bomoi na ye mobimba to na bolɔkɔ to na lopitalo esika basalisaka maladi ya motó, to mpe babimisi ye kasi bazali kokɛngɛla ye.
Lokola azali nkulutu oyo aumeli mingi na lisangá ya boklisto, Terrell asalelaki mayele mpo na kokitisa motema ya elenge wana oyo atungisamaki na kotángeláká ye bandakisa ya solo mpenza oyo euti na Biblia. Abɛtɛlaki ye lisolo ya mobali moko malamu, Davidi, mokonzi ya Yisalaele, oyo alulaki mwasi ya Uliya, moko ya basoda na ye. Ntango mwasi wana azwaki zemi, Davidi asalaki mayele mabe mpo ete Uliya akufa na etumba. Ntango bamonisaki ye masumu na ye na mayele mpenza, Davidi abongolaki mpenza motema mpe Nzambe andimaki ye lisusu.—2 Samwele 11:2–12:14.
Terrell asalaki boyokani na moto oyo azalaki kokima, na kobengáká ye Joby, nkombo oyo baninga na ye babengaka ye. Ntango batɛlɛmaki na magazini moko, Palczynski atindaki Terrell asomba biloko ya kolya mpe televizyo ya kotambolaka na yango, mpe alobaki na ye ete nakoboma bato ebele soki kaka omeki koyebisa bango makambo na ngai. Lokola bandi yango oyo akangaki ye azalaki mpenza na makanisi malamu te, Terrell andimaki makambo nyonso oyo ye alobaki. Nsukansuka, nsima ya kotala emisyo moko ya makambo etali bato oyo Palczynski abomaki, na ngonga ya 11, Palczynski ayambaki Terrell mpe alimwaki na malɛmbɛ na mwa kartye moko pene na Baltimore.
Pɔsɔ moko na nsima, bakangaki Palczynski na ndako moko esika akangaki bato. Babengaki Terrell, moto oyo mobali yango oyo azalaki kokima ayebisaki makambo na ye, mpo akoka kosolola na ye. Atako bongo, masolo yango ebongaki te, mpe na mokolo ya 22 Marsi, bapolisi babomaki Palczynski ntango babɛtaki masasi ebele na ndako yango. Moto mosusu azokaki te.
Na nsima Terrell azwaki bazulunalo 600 ya nimero ya Lamuká! oyo amonisaki ete ebikisaki bomoi na ye. Akabolaki bazulunalo yango epai na bato mosusu. Terrell azali kosepela mpo ete azali na momeseno ya kotángaka makambo nyonso ya kitoko oyo zulunalo Lamuká! ekomaka. Tozali kolikya ete ekozala mpe bongo mpo na yo.
[Elilingi na lokasa 26]
William Terrell