Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril nk. 22-24
  • Toyekoli kotyela Nzambe motema na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toyekoli kotyela Nzambe motema na ntango ya mpasi
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobota
  • Mikakatano mosusu
  • Toyekoli kotyela Yehova motema mingi koleka
  • JoAnn abimi na lopitalo
  • Bomoi na biso lelo oyo
  • Boponá ntango ya koyekola Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nasali na eleko moko ya bokoli monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Nasili kobatela kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mama ya nzoto kolɔngɔnɔ, akobota bebe ya nzoto kolɔngɔnɔ
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Avril nk. 22-24

Toyekoli kotyela Nzambe motema na ntango ya mpasi

LISOLO YA ROSIE MAJOR

Nazalaki na zemi ya sanza mitano ya mwana na ngai ya liboso mpe bokilo na ngai ya mwasi amonaki ete makolo na ngai evimbaki mingi. Na mokolo yango ya 15 Marsi 1992, ngai na Joey mobali na ngai toyebaki ata moke te ete likambo oyo ekokómela biso ekotya elikya na biso epai ya Yehova na komekama.

NSIMA ya pɔsɔ moko, monganga oyo asalisaka ngai mpo na maladi ya basi amonaki ete tansyo na ngai emataki mingi. Ntango asɛngaki ngai nakɔta lopitalo mpo na kosalisa ekzamɛ mpe bátalela kolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai, namitungisaki mingi. Ekzamɛ yango emonisaki ete nazali na maladi babengi prééclampsie, mikakatano ya zemi oyo ekoki koboma.a

Na lopitalo, monganga ayebisaki biso ete esengeli bábotisa ngai nokinoki mpo na kobatela bomoi na ngai mpe kobikisa mwana. Ngai na mobali na ngai tokamwaki mingi. Nalobaki na kokamwa ete: “Kasi mwana azali kaka soki na sanza motoba mpamba! Akobika ndenge nini soki abotami sikoyo?” Monganga ayanolaki na boboto mpenza ete: “Nakomeka kozela mwa mikolo. Kasi soki maladi ekómi makasi, tokobimisa mwana.” Nsima ya mikolo zomi na misato, maladi ekómaki makasi mpenza. Monganga abengaki mobali na ngai mpe tozwaki ekateli ya makasi ete nabota.

Kobota

Na butu liboso ya mokolo ya kobota, monganga McNeil, ye asalisaka maladi ya bana, asololaki na biso mpo na kolimbolela biso mikakatano oyo tokokutana na yango soki mwana abotami matsombe​—bɔɔngɔ na ye ekoki kozala na mwa mbeba, mimpululu na ye ekoki kosala malamu te mpo ekɔmeli naino te mpe mikakatano mosusu ebele ekoki komonana. Nabondelaki Nzambe mpo nazwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” mpe nazwa makasi mpo na kondima makambo nyonso oyo ekoya mpe koyikela yango mpiko. (Bafilipi 4:7) Na ntɔngɔ oyo elandaki, basalaki ngai lipaso mpo na kobimisa mwana mpe mwana abotamaki. Mwana yango azalaki kaka na gramɛ 700. Topesaki ye nkombo JoAnn Shelley.

Mikolo mitano na nsima, nazongaki na ndako mabɔkɔ mpamba. Mwana na ngai ya mwasi atikalaki na lopitalo na ndako oyo batalelaka bana oyo bazali na mikakatano mpe azalaki kobundabunda na liwa. Nsima ya pɔsɔ mibale, JoAnn abɛlaki maladi ya mimpululu (pneumonie). Tosepelaki mingi ntango ayokaki malamu, kasi mwa mikolo na nsima abɛlaki maladi ya misɔpɔ mpe batyaki ye na esika oyo batyaka bana oyo bazali na maladi makasi. Nsima ya mikolo motoba, JoAnn akómaki mwa malamu, kutu kilo na ye emataki moke. Tosepelaki mingi mpenza! Kasi esengo na biso ezalaki kaka ya ntango moke. Monganga McNeil ayebisaki biso ete JoAnn azali lisusu na makila te. Apesaki biso likanisi ete atuba JoAnn nkisi oyo babengi érythropoïétine synthétique (EPO) mpo ebakisa makila na ye. Biro ya Batatoli ya Yehova awa na Bahamas esololaki na bandeko ya Biro mpo na makambo matali minganga na Brooklyn, na New York. Nokinoki bayebisaki monganga McNeil ndenge ya kozwa mpe kosalela EPO lelo oyo, mpe abandaki kosalisa mwana na yango.

Mikakatano mosusu

Totungisamaki na boumeli ya bapɔsɔ ebele. JoAnn azalaki kobundana na maladi ya misɔpɔ, azalaki kokangama mpema (apnée), makila ezalaki kokita mpe azalaki na maladi ya mimpululu. Tozalaki kobanga ete moko na maladi yango eboma ye. Kasi JoAnn abandaki kobika mokemoke. Ntango akokisaki sanza misato, azalaki kaka na lopitalo mpe akómaki na kilo moko na gramɛ 400. Kasi mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye, azalaki kopema ye moko kozanga masini ya mpema. Makila na ye emataki malamu. Monganga alobaki ete soki abakisi kaka gramɛ 500, tokozonga na ye na ndako.

Nsima ya pɔsɔ misato, JoAnn abandaki lisusu kokangama mpema mbala na mbala. Baekzamɛ emonisaki ntina na yango te. Azalaki kokangama mpema mbala na mbala mpe ezalaki kosalema ntango nyonso oyo tozalaki kopesa ye biloko ya kolya. Na nsuka, minganga bamonaki ete JoAnn azali na maladi babengi reflux gastro-œsophagien. Nzela ya mongongo na ye ezalaki kokangama te soki asilisi kolya, yango ezalaki kosala ete bilei oyo ezali na libumu na ye ezonga kino na mongongo. Yango nde ezalaki kokanga mpema na ye.

Na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, JoAnn azwaki mikrobe moko na lopitalo na ndako oyo batyaka bana. Bana mingi ya matsombe bazalaki kokufa na mikrobe yango. Lokola alɛmbaki mingi, JoAnn akangamaki mpema na boumeli ya ntango molai koleka ndenge oyo ezalaki kosala ye liboso. Basalaki nyonso mpo azongela kopema kasi elongaki te. Monganga oyo asalisaka bana alingaki kutu koloba ete akufi, kasi na mbala moko, abandaki lisusu kopema; atako bongo abandaki lisusu kokangama mbala na mbala. Batyaki ye lisusu masini ya mpema mpe tondimaki mpenza ete JoAnn akokufa. Kasi abikaki mpe topesaki Yehova matɔndi mingi.

Toyekoli kotyela Yehova motema mingi koleka

Mikakatano oyo tozalaki kokutana na yango liboso JoAnn abotama ezalaki lokola masuwa oyo ezindi pene na libongo mpe bato bakoki kobɛta mai kino kokóma na libongo. Kasi sikoyo ezali lokola tokwei na mai na katikati ya mbu mpe tozali komona ata mokili te. Ntango tokanisaki, tomonaki ete liboso JoAnn abotama, tozalaki komityela motema mingi biso moko. Kasi na mikakatano oyo tokutani na yango na JoAnn, toyebi sikoyo kotyela Yehova motema na mikakatano oyo moto akoki kosilisa te. Toyebi sikoyo kosala lokola Yesu alobaki yango​—mokolo na mokolo ekoki na mpasi na yango. (Matai 6:34) Toyebi sikoyo kotalela Yehova atako, na bantango mosusu, tozalaki koyeba te nini kosɛnga na libondeli. Tozali sikoyo kotɔnda Yehova mpo na bwanya oyo tozwi na Biblia mpe mpo na “nguya oyo eleki nguya ya bato” oyo ezali kosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mpasi makasi.​—2 Bakolinti 4:7, NW.

Na ntango ya mikakatano, ezalaka mpasi mpo nakanga motema. Nazalaki kokanisa kaka JoAnn. Joey, mobali na ngai, asalisaki ngai mingi mpo nazala na bokatikati na elimo. Nazali kotɔnda ye mingi mpo na yango.

JoAnn abimi na lopitalo

JoAnn abandaki kokóma nzoto makasi mokemoke. Mokolo moko, ye moko alongolaki masini ya mpema na monɔkɔ na ye. Monganga McNeil amonaki ete sikoyo JoAnn akoki kokenda na ndako. Tosepelaki mingi mpenza! Tomibongisaki mpo na kokenda na ye na ndako, yango wana toyekolaki ndenge ya koleisa ye na nzela ya sɔndɛ. Tobongisaki bombɔni ya mopɛpɛ, todefaki masini oyo etalaka ndenge mpema esalaka na motema, mpe toyekolaki ndenge ya kozongisa moto mpema. Na nsuka, mokolo ya 30 Ɔkɔtɔbɛ 1992, JoAnn abimaki na lopitalo. Tolekisaki elongo na ye mikolo 212 na lopitalo na ndako oyo batyaka bana oyo bazali na maladi makasi.

Uta ebandeli, bandeko na biso ya mosuni mpe bandeko ya lisangá bamonisaki ete bazali mpenza likabo oyo Yehova apesi biso. Bazalaki koya kobongisa ndako mpe kokata matiti na lopango, kolamba, kosalisa biso tókenda na lopitalo, mpe koya kokɛngɛla JoAnn mpo nakoka kolala mwa moke. Na yango, toyebaki bizaleli na bango ya malamu oyo toyebaki liboso te. Na ndakisa, bandeko mosusu bayebisaki biso makanisi ya elimo oyo esalisaki bango na ntango bakutanaki na mikakatano.

Bomoi na biso lelo oyo

Tosalaka ntango nyonso makasi mpo JoAnn azwa nkisi nyonso oyo ebongi na ebele ya mikakatano oyo azali na yango. Ntango akokisaki sanza 19, monganga ayebisaki biso ete JoAnn azali kobɛla troubles psychomoteurs​—euti na ndenge azalaki koyoka mpasi na motó mingi. Na Sɛtɛmbɛ 1994, basalaki ye lipaso monene mpo na maladi na ye ya reflux gastro-œsophagien. Na 1997, JoAnn abandaki lisusu kokangama mbala na mbala pene na kokufa. Kasi, na lisalisi ya bilei oyo tokómaki kopesa ye, azalaki lisusu kokangama te. Lokola azalaki kobɛlabɛla mingi, JoAnn akoli malamu mpenza te. Kasi azali sikawa na eteyelo moko oyo etángisaka bana ya ndenge wana mpe azali kotánga malamu. Atambolaka te mpe alobaka malamu te, kasi akendaka elongo na biso na makita ya boklisto mpe na mosala ya kosakola ndako na ndako. Emonani ete azali na esengo.

Yehova abɔndisi biso mingi na ntango oyo ya komekama. Tozwi mokano ya kotalela mpe “kosepela na [Yehova]” ntango nyonso ata soki mikakatano oyo toyebaka te ete ekoki kokómela biso ekómeli biso na mbalakaka. (Habakuku 3:17, 18; Mosakoli 9:11) Tozali kozela na esengo nyonso Paladiso na mabele oyo Nzambe alaki, esika JoAnn, mwana na biso ya bolingo, akozala na nzoto ya kokoka.​—Yisaya 33:24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Prééclampsie ekondisaka misisa ya mwasi oyo azali na zemi mpe yango esalaka ete makila eleka malamu te na kati ya nzoto, ezala mpe na kukú (placenta) to epai ya mwana oyo azali na libumu. Atako minganga bayebi esika maladi yango eutaka te, ezali na mwa makambo oyo emonisi ete moto abotamaka na maladi yango.

[Elilingi na lokasa 22]

JoAnn, mwana na biso

[Elilingi na lokasa 24]

Atako azali na mikakatano, JoAnn azali na esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto