Engebene Biblia
Esengeli kokumisa bakufi?
“LIKANISI MOKO OYO EKƆTELÁ BATO MINGI EPUSAKA BANGO BÁTALELA EBEMBE YA MOTO NA LIMEMYA OYO BAMONISAKA YANGO TE NA EBEMBE YA NYAMA.”—ENCYCLOPÆDIA BRITANNICA.
BATO mingi bakumisaka na ndenge na bango balingami na bango oyo bakufi. Bakomaka nsango ya liwa na bazulunalo, mpe bakumisaka bango na banzembo. Na mikili mosusu, milulu ndenge na ndenge ya losambo mpe ya bonkɔkɔ esalamaka mingi mpo na kokumisa ebembe. Milulu yango ekoki koumela mikolo mingi, bapɔsɔ mingi, to basanza mingi. Biteyelo, mabándá ya mpɛpɔ, babalabala, mpe bingumba, bapesá yango bankombo ya bato minene oyo bakufá. Bato batongá bamonima mpe batyá mikolo ya bopemi mpo na kokanisa bilombe ya bikólo na bango oyo bakufá.
Nzokande, soki totaleli Liloba ya Nzambe, bakufi bayebi ata lokumu moko te oyo bazali kopesa bango. (Yobo 14:10, 21; Nzembo 49:17) Bakufi bazali na bomoi bobele kati na makanisi ya bato oyo bazali kokanisa bango. Biblia elobi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Makomami ezali kopesa elikya ete lisekwa ekosalema na mikolo mizali koya. (Yoane 5:28, 29; 11:25) Kasi lokola ntango yango ekómi naino te, bakufi bayebi eloko te. Bakómi bobele mputulu mpamba.—Genese 3:19; Yobo 34:15.
Lokola likanisi ya Biblia ezali polele mpo na ezalela ya bakufi, ezali na ntina ete bákumisa bango? Baklisto basengeli kolanda mimeseno ya bonkɔkɔ oyo etali milulu ya kokumisa ebembe mpe ya bokundi balingami na bango?
Milulu oyo euti na makanisi ya lokuta
Milulu mingi ya kokumisa ebembe euti mpenza na mateya ya losambo oyo eyokani na Biblia te. Buku Encyclopædia Britannica elobi ete milulu mosusu esalemaka mpo na “kobatela bakufi na motungisi ya bademo; mbala mosusu ntina ya milulu ezalaka mpo na kobatela bato oyo batikali ete moto oyo akufi atungisa bango te to amemela bango likama ya liwa te.” Mimeseno nyonso wana oyo euti na likanisi ya lokuta, mpe elobi ete bakufi bazali na bomoi na mokili moko boye oyo emonanaka te, eyokani soko moke te na mateya ya Biblia.—Mosakoli 9:10.
Bato mingi basambelaka bato na bango oyo bakufá. Losambo yango etaleli mpe kopesa makabo mpe kobondela bankɔkɔ. Bato oyo basalaka milulu motindo wana bamonaka yango lokola losambo te, kasi lokola lolenge moko ya kokumisa to kopesa limemya na bakufi. Atako bongo, lolenge wana ya kokumisa bankɔkɔ oyo bakufá ezali losambo mpe eyokani soko moke te na mateya ya Biblia. Yesu Klisto alobaki ete: “Okokumbamela [Yehova] Nzambe na yo, mpe okosalela bobele ye.”—Luka 4:8.
Likanisi ya bokatikati
Kopesa lokumu mpe limemya na bakufi ezalaka ntango nyonso na boyokani na mateya ya losambo ya lokuta te. Na ndakisa, lisolo moko ya Biblia ezali kolobela ndenge bakumisaki mokonzi ya sembo Hizikiya nsima ya liwa na ye. Libota ya Nzambe “bakundaki ye na ebutelo na epai na nkunda na bana na Davidi. Mpe Yuda mobimba mpe bafandi na Yelusaleme bakumisaki ye na kufa na ye.” (2 Ntango 32:33) Ndakisa mosusu ezali ya Yesu. Biblia elobi ete bayekoli na ye “bakamati ebembe na Yesu mpe bazingeli yango na molikani mpe na malasi elongo [lokola] na motindo na kokunda na Bayuda.”—Yoane 19:40.
Makomami ezali kolobela mimeseno mosusu mingi oyo bato balandaki mpo na kobongisa ebembe mpe lolenge ya kokunda. Mimeseno yango ezalaki losambo ya bankɔkɔ te, ezalaki mpe endimeli ya lokuta te oyo elobaka ete bakufi bakobaka kosala mabe to malamu na bato oyo bazali na bomoi. Kasi, bato oyo bazalaki kolela mowei bamonisaki limemya mozindo mpo na molingami na bango oyo akufi. Biblia ezali kopekisa limemya motindo wana te, lokola yango euti na mayoki ya bomoto. Kasi Biblia ezali kondima te makɛlɛlɛ makasi oyo bato basalaka na ntango ya milulu ya bokundi. Nzokande, Biblia ezali mpe kolendisa baklisto te ete bátyola liwa ya molingami na bango to bámonisa mawa te.
Mpo na yango, ntango bakendaka na esika ya matánga to na molulu ya bokundi balingami na bango, Batatoli ya Yehova bamonisaka limemya mpe lokumu oyo ebongi na moto oyo akufi. (Mosakoli 7:2) Soki esɛngi kotya bafololo na ebembe, milulu ya bokundi, mpe mimeseno mosusu ya mboka, baklisto bakebaka mpenza mpo na kopɛngola makambo oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Na yango, kozala na bososoli mpe na bokatikati ezali na ntina. Buku moko (Encyclopædia of Religion and Ethics) elobi ete: “Ntina ya molulu ebongwanaka na bileko ekeseni, na boye, ntina na yango ndenge ekómi ekoki kokesana mpenza na oyo ezalaki na ebandeli, mpe ndimbola oyo bato bakoki kopesa ekoki kozala na boyokani te na oyo ezalaki na ebandeli.”a
Ezali mabe kokumisa bakufi?
Kozala na bokatikati ebongi mpe mpo na likambo ya kokumisa moto oyo akufi. Na milulu ya bokundi, Batatoli ya Yehova basalaka milende ya kobɔndisa baoyo bazwi matánga. (2 Bakolinti 1:3-5) Na ntango ya bokundi ebembe ekoki kozala na molobi moko to na balobi mingi. Kasi ekozala malamu te kosala molɔngɔ ya bato oyo bazali koleka moko nsima na mosusu mpo na kokumisa mowei mpo na makambo minene asalaki. Nzokande, molulu ya bokundi ezali libaku ya kokumisa bizaleli malamu ya Nzambe, bakisa mpe boboto oyo amonisi mpo na kopesa biso elikya ya lisekwa.
Nzokande, yango elimboli te ete ekozala mabe kolobela bizaleli malamu ya mowei na ntango ya molulu ya bokundi. (Kokanisá na 2 Samwele 1:17-27.) Soki moto oyo akufi azalaki sembo epai na Nzambe kino liwa, akómi ndakisa malamu ya komekola. (Baebele 6:12) Ezali malamu komanyola na bomoi ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki sembo. Kolobela makanisi yango ya malamu elongo na bato mosusu na ntango ya milulu ya bokundi elendisaka mpe etikaka suvenire ya malamu ya moto oyo akufi.
Baklisto ya solo basambelaka bakufi te. Bamikɔtisaka te na milulu oyo ezali na boyokani te na bindimeli ya Biblia. Nzokande, basaleli ya Nzambe babwakaka mpe ezaleli ya kolekisa ndelo oyo emonisaka ete lokola bakufi bazali bobele mputulu mpamba, mimeseno nyonso ya milulu ya bokundi ezali na ntina te mpe na litomba te. Balelaka mpe bakanisaka bakufi na bango. Kasi mpasi mpe mawa na bango ebɔndisamaka na bindimeli ya Biblia oyo ezali komonisa ete bakufi bazali komona mpasi te mpe ete elikya ya lisekwa ezali.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1991, na lokasa 31, epesi toli oyo: “Moklisto ya solo akomituna motuna oyo: Na kobateláká mimeseno mosusu, nazali komonisa ete namikɔtisi na bindimeli mosusu to misala oyo mizali kotɛmɛla Makomami? Eleko mpe esika ekoki kosala bopusi na eyano. Momeseno moko (to ekembiseli moko) ekokaki kozala na ndimbola moko na kati na lingomba ya lokuta esili koleka bankóto ya bambula, to mpe ekoki kozala na yango lelo kati na mboka moko ya mosika. Kasi kozanga kolekisa ntango na yo kati na bolukiluki molai, omituna motuna oyo: ‘Likanisi nini bazali kosalela sikawa epai ngai nafandi?’—Talá 1 Bakolinti 10:25-29.”
[Elilingi na lokasa 10]
Molulu ya bokundi mpo na kokumisa Gustav II, mokonzi ya ekólo Suède, nsima ya liwa na ye na 1632
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Bildersaal deutscher Geschichte