Tozali na bomoi mpo na biso moko lisusu te’
LISOLO YA JACK JOHANSSON
Soda moko ya ekólo Malawi, na Afrika, alobaki na ngai ete natɛlɛma na pembeni ya ebale liboso ya miinda ya motuka Land Rover. Ntango soda yango atyaki mondoki na ye na lipeka mpo abɛta, Lloyd Likhwide apotaki mbangu mpe atɛlɛmaki liboso na ngai. Abondelaki soda yango ete: “Bomá ngai! Bomá ngai na esika na ye! Mopaya oyo asali eloko te!” Mpo na nini moto ya Afrika azalaki pene ya kopesa bomoi na ye mpo na ngai mondele? Tiká nayebisa bino ndenge nakómaki misionere na Afrika esili koleka mibu 40.
NA 1942, ntango nazalaki bobele na mibu libwa, mama na ngai akufaki. Atikaki tata na bana mitano. Nazalaki mwana ya nsuka. Nsima ya sanza minei, tata na ngai akufaki na mai. Ye azalaki moko ya Batatoli ya Yehova ya liboso na ekólo Finlande. Maja, yaya na biso ya liboso ya mwasi, abɔkɔlaki biso, mpe tosalaki milende ya kobatela fɛrmɛ na biso. Maja azwaki mpe mokumba ya kotambwisa biso na makambo ya elimo. Mbula moko nsima ya liwa ya tata, ye na ndeko na ngai mosusu ya mobali bamipesaki epai na Yehova Nzambe mpe bazwaki batisimo. Nsima ya mbula moko, ngai mpe nazwaki batisimo, nazalaki na mibu 11.
Ekateli moko monene
Na 1951, ntango nasilisaki kelasi na ngai ya makambo matali mombongo, nabandaki kosala na kompanyi ya Ford Motor na ekólo Finlande. Nsima ya sanza motoba, mokɛngɛli motamboli moko oyo akɔmela mpenza asɛngaki ngai likambo moko oyo nakanisaki yango te. Abyangaki ngai na liyangani mpo nasala lisukulu oyo ezalaki kolobela mapamboli ya babongisi-nzela, to mosala ya kosakola ya ntango nyonso. Namonaki ete nakokoka te mpamba te nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi na mosala ya mosuni mpe namonaki ete nakozala na likoki te ya kolobela lisolo yango na komindimisa mpenza. Nabondelaki Yehova na likambo yango. Namonaki ete baklisto basengeli ‘kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te kasi mpo na ye oyo akufeli bango.’ Na yango, nazwaki ekateli ya kobongola makambo ya bomoi na ngai mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela.—2 Bakolinti 5:15.
Mokonzi na ngai ya mosala alakaki ngai ete akomatisa lifuti na ngai ya nsuka ya sanza mbala mibale soki nakolinga kotikala na mosala. Na nsima, ntango amonaki ete nazwaki mpenza ekateli ya kolongwa, alobaki ete: “Ozwi ekateli moko malamu. Ngai nalekisi bomoi na ngai mobimba na kati ya biro oyo, mpe nazali komituna bato boni nasili mpenza kosalisa?” Na yango, na sanza ya Mai 1952, nakómaki mobongisi-nzela. Nsima ya mwa basanza, nakokaki kosala lisukulu na ngai oyo ezali kolobela mosala ya mobongisi-nzela na komindimisa mpenza.
Nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mwa basanza, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ ya sanza motoba mpo na etɛlɛmɛlo na ngai ya boklisto ya koboya kokɔta na mosala ya soda. Nakɔtaki bolɔkɔ elongo na bilenge Batatoli mosusu na esanga Hästö-Busö, na golfɛ ya Finlande. Tozalaki kobénga esanga yango Gileadi ya moke, mpamba te tosalaki ebongiseli moko mpo na koyekola Biblia mingi. Nzokande, mokano na ngai ezalaki ya kokɔta na Gileadi ya solosolo, Eteyelo ya la Société Watch Tower oyo ezalaki pene na South Lansing, na etúká ya New York.
Wana nazalaki naino na bolɔkɔ na esanga yango, nazwaki mokanda ya biro ya la Société Watch Tower na Finlande, oyo ezalaki kobyanga ngai mpo na kosala mosala ya mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova. Ntango nabimaki na bolɔkɔ, nasengelaki kokende noki kotala masangá ya etúká ya Finlande epai balobaka lokota ya Suédois. Na ntango wana, nazalaki bobele na mibu 20 mpe nazalaki komiyoka ete nakoki na mosala yango te. Kasi natyaki elikya na Yehova. (Bafilipi 4:13) Batatoli ya masangá oyo nazalaki kokende kotala bazalaki na boboto mpenza. Bazalaki kotyola ngai soko moke te ete nazali “elenge.”—Yilimia 1:7.
Na mobu oyo elandaki, wana nazalaki kotala lisangá moko, nakutanaki na Linda, autaki na Etats-Unis mpe ayaki kolekisa bopemi na Finlande. Ntango azongaki na États-Unis, akolaki noki na elimo mpe azwaki batisimo. Tobalanaki na Yuni 1957. Na nsima, na Sɛtɛmbɛ 1958, babyangaki biso na kelasi ya mbala ya 32 na Eteyelo ya Gileadi. Ntango tozwaki mapolomi na biso na sanza ya Febwali oyo elandaki, batindaki biso na Nyassaland, oyo ezali sikawa Malawi, na sudi-ɛsti ya Afrika.
Mosala na biso ya kosakola na Afrika
Tosepelaki mingi kosakola elongo na bandeko na biso ya Afrika, oyo, na ntango wana bazalaki 14 000 na Nyassaland. Na bantango mosusu, tozalaki kotambola na motuka Land Rover, mpe tozalaki komema biloko na biso nyonso oyo tozalaki na yango mposa. Tozalaki kofanda na bamboka oyo bato na yango bamonaki naino mindele te, mpe bazalaki koyamba biso ntango nyonso malamu. Soki tokómi, bato ya mboka mobimba bazalaki koya nokinoki kotala biso. Nsima ya kopesa biso mbote na bonkonde mpenza, bazalaki kofanda kimya na mabelé mpe kotala biso.
Mbala mingi, na boboto nyonso, bato ya bamboka bazalaki kotongela biso mwa ndako moko ya moke mpo na kolala. Bazalaki kotonga ndako yango na mabelé mpe na nkasa ya nzete. Ezalaki kokoka bobele na mbeto moko. Na butu, soki tolali, ngombolo (hyènes) izalaki koleka pene ya mitó na biso mpe kosala makɛlɛlɛ makasi mpenza. Kasi, Batatoli ya Nyassaland bazalaki pene na kokutana na makambo ya nsɔmɔ koleka nyama ya zamba.
Likambo ya bolingi-ekólo
Na Afrika mobimba, bibongiseli bizalaki kosalema mpo na kozwa lipanda. Na Nyassaland, moto nyonso asengelaki kozala kati na parti politiki bobele moko oyo ezalaki na ekólo yango. Na mbalakaka, etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki ekómaki likambo oyo ezali kobenda likebi na ekólo mobimba. Na ntango wana nazalaki kosala lokola mokɛngɛli-mokitani na biro ya filiale wana Malcolm Vigo azalaki na mobembo. Nasɛngaki nakutana na Dr. Hastings Kamuzu Banda, ministre-mokonzi ya guvernema ya Nyassaland. Ngai na bankulutu mosusu mibale tolimbolelaki ye etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki, mpe likita yango esukaki malamu. Atako bongo, nsima ya sanza moko, na Febwali 1964, ndeko Elaton Mwachande azalaki moto ya liboso ya kokutana na minyoko—etuluku moko ya bato ya nkanda babomaki ye na makonga. Batatoli mosusu ya mboka yango basengelaki kokima.
Totindaki telegrame epai ya Dr. Banda, tosɛngaki na ye ete, lokola azali mokonzi ameka kosilisa mobulu yango. Noki mpenza, babéngaki ngai na telefone ete nakende komimonisa na biro ya ministre-mokonzi. Nakendeki elongo na Harold Guy, oyo azalaki mpe misionere, mpe Alexander Mafambana, Motatoli mwana-mboka Malawi kotala Dr. Banda. Baministre mibale ya guvernema mpe bazalaki wana.
Bobele ntango tokómi mpe tofandi, Dr. Banda, kozanga koloba ata liloba moko, abandi koningisa lokasa ya telegrame pembeni ya motó na ye. Na nsima, alobi ete: “Mr. Johansson, olingi koloba nini na kotindáká telegrame motindo oyo?” Tolimbolelaki ye lisusu etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki, mpe nabakisaki ete: “Sikawa, lokola babomi Elaton Mwachande, bobele yo nde okoki kosalisa biso.” Emonanaki ete maloba yango masepelisaki Dr. Banda, mpe akitisaki nkanda na ye.
Nzokande, ministre moko oyo azalaki wana alobaki ete Batatoli ya Yehova ya mboka moko ya zamba mosika bazali kotosa bakonzi ya mboka yango te. Ministre mosusu afundaki Batatoli ya mboka mosusu ya zamba ete bafingaki Dr. Banda. Kasi, moko te kati na bango atángaki ata nkombo ya Motatoli moko oyo asalaki makambo motindo wana. Tolimbolelaki bango ete Batatoli ya Yehova bateyamaka ntango nyonso ete basengeli kotosa bakonzi ya guvernema. Likambo ya mawa, milende na biso ya kolongola makanisi mabe oyo bazalaki na yango mpo na Batatoli milongaki te. Dr. Banda mpe baministre na ye baboyaki koyoka biso.
Bomoi na biso ezalaki na likama
Na 1964, ekólo Nyassaland ezwaki lipanda mpe na nsima ekómaki République du Malawi. Mosala na biso ya kosakola ezalaki kosalema mwa malamu, kasi motungisi ezalaki se kokola. Na boumeli ya ntango wana, Batatoli oyo bazalaki na etúká ya sudi bayebisaki biso na telefone ete botomboki ebimi kuna. Tomonaki ete ezali malamu tótinda moto moko noki kuna mpo na koyeba ndenge Batatoli bazali mpe mpo na kolendisa bango. Nayebaki bamboka yango ya zamba malamu mpamba te nasalaki mibembo kuna mbala na mbala, mpe Linda azalaki kondima ete nasala mibembo yango. Nzokande, na mbala oyo, abondelaki ngai ete nakende elongo na elenge Lloyd Likhwide, Motatoli ya ekólo Malawi. Nsukansuka, nandimaki mpe nakanisaki ete ‘soki yango esepelisi ye, tokokende.’
Bayebisaki biso ete tosengeli kokatisa ebale moko na masuwa liboso ete couvre-feu ebanda na 6:00 ya mpokwa. Tosalaki nyonso oyo ekokaki na biso mpo na kokóma na ngonga, kasi toumelaki mpamba te nzela ezalaki mabe. Nsima, toyaki koyoka ete bapesi etinda ya koboma moto nyonso oyo bakokuta na ngambo wana ya ebale na nsima ya 6:00 ya mpokwa. Ntango tokómaki na ebale, tomonaki masuwa yango esilaki kokatisa ebale. Ndeko Likhwide abelelaki yango mpo ezonga kozwa biso. Masuwa yango ezongaki, kasi soda moko oyo azalaki na kati agangaki ete: “Nasengeli koboma mondele!”
Liboso, namonaki yango lokola mangungu mpamba, kasi ntango masuwa ebɛlɛmaki, soda yango alobaki na ngai ete nakende liboso ya miinda ya motuka. Ezalaki na ntango wana nde moninga na ngai mwanamboka ya Afrika akɔtelaki ngai na kobondeláká soda yango ete aboma ye na esika na ngai. Emonanaki ete maloba yango ebɛtaki motema ya soda yango mpe na mbala moko akitisaki mondoki. Nakanisaki maloba ya Yesu oyo: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Oyo nde esengo nazalaki na yango mpo ete nayokaki toli ya Linda mpe nakendeki elongo na ndeko Likhwide!
Mokolo oyo elandaki, nzela ya kozonga na engumba Blantyre etondaki na bilenge mibali oyo bazalaki kosɛnga na ndeko Likhwide ete alakisa bango kalati na ye ya parti politiki. Likambo ya kosala ezalaki bobele moko—koleka na katikati na bango na lombangu mpenza! Natambwisaki motuka na lombangu mpe na makɛlɛlɛ makasi mpo na kobangisa bango bátikela biso nzela. Soki etuluku ya bilenge wana bakangaki ndeko Likhwide, mbɛlɛ abikaki te. Ntango tokómaki na biro ya filiale, tozalaki kolɛnga na nsɔmɔ, kasi tozalaki na botɔndi epai na Yehova ndenge abatelaki biso.
Bakɔti bolɔkɔ mpo na kondima na bango
Bapekisaki mosala na biso ya kosakola na Malawi na Ɔkɔtɔbɛ 1967. Na ntango wana Batatoli bazalaki soko 18 000 na ekólo yango. Nsima ya pɔsɔ mibale, toyokaki nsango ete Batatoli 3 000 bakɔtaki bolɔkɔ na Lilongwe, mboka-mokonzi ya ekólo Malawi. Tozwaki ekateli ya kokende kuna na butu yango, ata mpo na kolendisa bango. Engumba yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 300. Totondisaki Land Rover na mikanda ya la Société Watch Tower mpe na lisalisi ya Yehova tolekaki basoda oyo bazalaki nzelanzela kozanga ete bátuna biso mikanda ya Leta to bátala biloko tomemaki. Nzelanzela, na lisangá mokomoko, tozalaki kotika bakartɔ ya bilei ya elimo oyo ebongaki mpenza na ntango wana.
Na ntɔngɔ, tokómaki na bolɔkɔ epai bandeko bakangamaki. Oyo nde likambo ya mawa! Mbula ebɛtaki butu mobimba, mpe batyaki bandeko na biso libándá, na kati ya lopango moko. Bapɔlaki nzoto mobimba mpe basusu bazalaki komeka kokaukisa malangiti na bango likoló ya lobala (clôture). Tosololaki na basusu na madusu ya bantaka ya banzete ya lobala yango.
Basambisaki bango na midi, mpe etuluku moko ya baoyo bamibéngaki Batatoli basambisaki bango mpe batyaki bango pembeni. Tomekaki kolobana na bango na bikela ya miso, kasi bilongi na bango bizalaki komonisa ata liyoki moko te. Bango nyonso wana bawanganaki kondima na bango, yango elɛmbisaki biso nzoto mpenza! Nzokande, nayokaki na nsima ete Batatoli ya mboka wana bayebaki ata moto moko te kati na bato ya etuluku wana oyo bawanganaki kondima na bango. Emonanaki ete ezalaki bobele mayele mabe oyo basalaki mpo na kolɛmbisa Batatoli ya solosolo.
Bobele na ntango yango, liyebisi moko ekómelaki biso emonisaki ete tosengeli kotika ekólo Malawi. Babɔtɔlaki biro ya filiale na biso na engumba Blantyre, mpe bapesaki bamisionere ngonga 24 mpo na kotika ekólo. Likambo ya kokamwa, ntango tokómaki na ndako, tokutaki polisi moko mpe afungolelaki biso ekuke! Na nsima ya nzanga oyo elandaki, polisi mosusu ayaki mpe akangaki biso. Na mawa nyonso, akendeki kotika biso na libándá ya mpɛpɔ.
Totikaki ekólo Malawi mokolo ya 8 Novɛmbɛ 1967, koyebáká ete bandeko na biso kuna batikali kati na komekama makasi. Toyokelaki bango mawa mingi. Mingi kati na bango bakufaki; basusu banyokwamaki makasi; basusu babungisaki misala, bandako mpe biloko na bango. Atako bongo, pene na bango nyonso batikalaki sembo.
Mosala ya kosakola na bateritware mosusu
Atako mikakatano ezalaki, likanisi ya kotika mosala ya misionere ekómelaki biso ata moke te. Nzokande, tondimaki kokende na teritware ya sika—na ekólo Kenya, mboka ya bazamba mpe ya bato ndenge na ndenge. Linda asepelaki mingi na etuluka ya Bamasai. Na ntango wana, moto moko te kati na Bamasai akómaki Motatoli ya Yehova. Kasi, mokolo moko Linda akutanaki na Dorcas, mwasi moko, ye Momasai, mpe abandaki koyekola na ye Biblia.
Dorcas ayaki koyeba ete mpo na kosepelisa Nzambe, asengelaki kokomisa libala na ye na Leta. Kasi tata ya bana aboyaki. Na bongo, bakabwanaki mpe Dorcas akómaki kobɔkɔla bana na ye mibale ye moko. Mobali yango asilikaki makasi mpo na Batatoli ya Yehova, kasi azalaki koyoka mawa ndenge akabwanaki na libota na ye. Nsukansuka, na toli ya Dorcas, mobali yango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Abongisaki bomoi na ye, akómaki Motatoli mpe abalaki Dorcas. Dorcas akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mobali na ye mpe mwana na bango ya liboso bazali sikawa bankulutu na lisangá.
Na 1973, na mbalakaka mpenza, mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na ekólo Kenya, mpe biso tosengelaki kotika ekólo. Bobele na nsima ya mwa basanza, epekiseli yango elongolamaki. Kasi biso tosilaki kotindama na teritware mosusu—na Congo-Brazzaville. Tokómaki kuna na Aprili 1974. Nsima ya mbula soko misato, bafundaki biso bamisionere ete tozali banɔ́ngi, mpe mosala na biso ya kosakola epekisamaki. Lisusu, nsima ya kobomama ya prezida ya ekólo yango, bitumba ebimaki na Brazzaville. Batindaki bamisionere mosusu nyonso na bikólo mosusu, kasi basɛngaki na biso ete tótikala naino wana soki likoki ezali. Na boumeli ya bapɔsɔ, tozalaki kolala kozanga koyeba soki tokolamuka. Kasi, tozalaki kolala malamu, kotyáká elikya na libateli ya Yehova. Mwa basanza oyo tolekisaki biso moko na biro ya Batatoli ya Yehova etyaki mpenza kondima na biso na komekama, kasi ezalaki mpe elendiseli oyo tozwaki naino te na mosala na biso ya misionere.
Na Aprili 1977, tosengelaki kotika Brazzaville. Na nsima, tozwaki libaku moko oyo tokanisaki te—tosengelaki kokende na ekólo Iran mpo na kofungola biro ya Batatoli ya Yehova. Mokakatano na biso ya liboso ezalaki koyekola lokota ya Farsi, lokota ya Baperse. Wana tozalaki naino kobunda koyekola lokota yango, na makita, tosengelaki bobele kopesa biyano ya mikuse, lokola oyo bana mike bapesaka! Na 1978, botomboki ebimaki na Iran. Totikalaki wana na kati ya bitumba makasi mpenza, kasi na sanza ya Yuli 1980, babenganaki bamisionere nyonso.
Teritware na biso ya mitano ezalaki bongo Afrika ya Ntei, na Zaïre, oyo lelo ekómi République démocratique du Congo. Tosalaki kuna na boumeli ya mbula 15, ntango mosusu tolekisaki yango na epekiseli. Ntango tokómaki, Batatoli bazalaki soko 22 000 na ekólo yango—sikawa baleki 100 000!
Tozongi na teritware na biso ya liboso
Na mokolo ya 12 Augusto 1993, epekiseli ya mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova elongolamaki na ekólo Malawi. Nsima ya mbula mibale, batindaki ngai na Linda epai tobandaki—na Malawi, ekólo kitoko mpe ya boninga oyo eyebani lokola Motema Nsai ya Afrika. Uta Yanuali 1996, tozali kosepela kosakola na kati ya bato ya esengo mpe ya boboto na ekólo Malawi. Tozali na esengo mingi ya kosalela lisusu Yehova elongo na bandeko na biso ya sembo na ekólo Malawi, oyo mingi kati na bango bayiki mpiko na minyoko na boumeli ya mbula 30. Bandeko na biso banamboka ya Afrika bazali mpenza liziba ya kolendisama mpo na biso mpe tolingaka bango mingi. Na ntembe te, bamitambwisi na boyokani na maloba ya ntoma Paulo oyo elobi: “Ekoki na biso kokɔta na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolɔzi mingi.” (Misala 14:22) Batatoli soko 41 000 na ekólo Malawi bazali sikawa kosakola nsango malamu mpe kosala mayangani na bonsomi nyonso.
Tozwi matomba mingi na bateritware na biso nyonso. Ngai na Linda tozwi liteya ete komekama nyonso, ezala ya mpasi ndenge nini, ekoki kosembola biso mpo na kosala malamu, soki tobateli ‘esengo mpo na Yehova.’ (Nehemia 8:10) Nazalaki komona mabe mbala nyonso oyo tosengelaki kotika teritware moko oyo tomesanaki na yango mpo na kokenda na teritware mosusu. Kasi ezalela ya Linda ya komimesenisa na teritware nyonso—mingimingi kondima makasi oyo azali na yango epai na Yehova—esalisi ngai mingi, mpe epesi ngai likoki ya kosepela na lipamboli ya kozala na “mwasi malamu.”—Masese 18:22, NW.
Oyo nde bomoi ya esengo tozali na yango! Mbala na mbala topesaka Yehova matɔndi na ndenge abateli biso. (Baloma 8:31) Esili koleka mbula 40 ntango nasalaki lisukulu oyo ezalaki kolobela matomba ya mosala ya kosakola ntango nyonso. Tozali na esengo ete ‘tomeki Yehova mpe [tomoni] malamu na ye.’ (Nzembo 34:8; Malaki 3:10) Tomindimisi ete ‘kozala na bomoi mpo na biso moko lisusu te’ ezali lolenge ya bomoi ya malamu koleka.
[Karte/Elilingi na lokasa 21]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bikólo oyo tosali mosala ya kosakola
Iran
République du Congo
République démocratique du Congo
Kenya
Malawi
[Elilingi na lokasa 21]
Na mobembo na biso na Malawi, na nzela ya Cape Town, Afrika ya Sudi
[Elilingi na lokasa 23]
Ntango bakangaki biso mpe babenganaki biso na Malawi
[Elilingi na lokasa 25]
Dorcas, Momasai, elongo na mobali na ye