Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Janvier nk. 15-16
  • Lipaso ya kozanga kozongisa moto makila—Matomba na yango ekómi koyebana mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lipaso ya kozanga kozongisa moto makila—Matomba na yango ekómi koyebana mingi
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali malamu mpe ezali na likama te
  • “Ntalo ya malamu”
  • Wapi lolenge eleki malamu oyo minganga bakoki kosalisa moto?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa makila?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Lamuká!—1999
g99 Janvier nk. 15-16

Lipaso ya kozanga kozongisa moto makila—Matomba na yango ekómi koyebana mingi

NA 1996, Lisangani ya minganga oyo bapasolaka bato na Angleterre (Royal College of Surgeons of England) ebimisaki mwa buku moko oyo ezali na motó na likambo ete Mitinda ya mosala malamu mpe ya kondima kosala Motatoli ya Yehova lipaso (na Lingelesi). Kati na mwa buku yango, minganga bapesi likanisi oyo: “Mpo ete kozongisa moto makila ezali na makama, soki likoki ezali, ekozala malamu kosalela myango mosusu oyo ebongi mpo na kosalisa moto ya maladi.”

Zulunalo AHA NEWS, oyo ebimisami na American Hospital Association, elobelaki mpe ntina oyo matomba ya lipaso ya kozanga kozongisa moto makila ekómi koyebana mingi. Zulunalo yango elobaki ete: “Likambo oyo ezalaki na ebandeli bobele endimeli ya lingomba, ekoli kino kokóma liponi ya minganga mpe mwango moko ya matomba mpenza. Kosalisa mpe kopasola kozanga kozongisa makila, mwango oyo elendisami mingi na bindimeli ya Batatoli ya Yehova, ezali lisusu kotalela bobele mposa ya elimo ya lingomba moko te, kasi ekómi liponi ya minganga mingi na ntango ya lipaso na ekólo mobimba.”

Ntina oyo minganga mingi bazali kolendisa lipaso ya kozanga kozongisa makila elobelamaki na 1997 kati na siplema moko ya zulunalo Time. Lisolo yango elobaki ete: “Ezali bobele mpo na kobanga kozwa sida te.” Lisolo yango elobelaki mingimingi mosala oyo esalemaki na Eteyelo ya bolukiluki mpo na kosalisa mpe kopasola kozanga kozongisa makila, na engumba Englewood, na etúká ya New Jersey (Englewood Hospital’s New Jersey Institute for the Advancement of Bloodless Medicine and Surgery).

Zulunalo Time elobi ete: “Lopitalo yango ezali na esika ya liboso kati na mapitalo koleka 50 na États-Unis oyo bazali kosala lipaso kozanga kozongisa makila. Lokola minganga na mapitalo yango baboyi kosalela makila oyo moto nyonso akopesa, bazali komonisa mitindo ndenge na ndenge ya kosala lipaso oyo na momeseno esɛngaka kozongisa makila. Bazali mpe komonisa myango oyo esalaka ete moto abungisa makila te.”

Ezali malamu mpe ezali na likama te

Maloba ya ebandeli ya zulunalo Time etángaki likambo oyo ekómelaki Henry Jackson, oyo makila ezalaki kobima ye na kati ya nzoto (hémorragie interne) mpe yango ekitisaki ye makila 90 % mpe ekitisaki hémoglobine na ye na gramɛ 1,7 na desilitele moko, yango ezali mpenza likama mpo na moto ya maladi. Lokola lopitalo oyo akɔtaki na New Jersey eboyaki kosalisa ye kozanga kozongisa makila, bakendaki na Jackson na lopitalo ya Englewood.

Na litambwisi ya Dr. Aryeh Shander na lopitalo ya Englewood, bapesaki Jackson “bankisi mingi oyo epesaka fer mpe vitamini mingi, mpe nkisi ‘mingi’ oyo ebotisaka makila na nzoto (érythropoïetine synthétique), mpe esalaka ete mafuta ya mikuwa ekolisa ba globules rouges. Na nsuka, bazongisaki ye mai oyo esengelaki kotambwisa makila oyo atikalaki na yango.”

Zulunalo Time elobi ete nsima ya mwa mikolo, “lopitalo oyo eboyaki kosalisa Jackson kozanga kozongisa makila ebéngaki na telefone mpo na kotuna soki akufi. Na esengo nyonso, Shander ayebisaki bango ete, ‘Azali na bomoi, akómi malamu, mpe alingi kobima na lopitalo mpe kozongela misala na ye.’”

Na mokolo ya 28 Novɛmbɛ 1997, Dr. Edwin Deitch, mokambi ya ebongiseli ya kosala lipaso kozanga kozongisa makila na University Hospital, Newark, na New Jersey, alekaki na televizyo mpo na koyanola na mituna. Alimbolaki lolenge bolukiluki ya kosala lipaso kozanga kozongisa makila ekolaki: “Batatoli ya Yehova . . . basali milende mingi mpo na kozwa minganga oyo bakondima kosala lipaso kozanga kozongisa makila. Matomba mosusu ya bolukiluki yango emonisaki ete bamiyokaki malamu [koleka] bato oyo bandimaki kozongisama makila.”

Dr. Deitch abakisaki ete: “Makila ekoki kolɛmbisa nguya ya nzoto oyo ebundaka na makɔnɔ mpe ekoki kopɔlisa mpota ya lipaso; ekoki kokolisa likama ya kozwa kanser. Na bongo, ata soki makila ezalaki na ntina na bantango mosusu, emonani ete ebimisaka mikakatano.” Mpo na lipaso oyo esalemi kozonga kozongisa makila, Dr. Deitch alobi ete: “Mwango yango epesaka nzela ete moto ya maladi amiyoka malamu noki, epɛngolaka mikakatano mingi, mpe [yango] esɛngaka kofuta mbongo mingi te. Ezali mpenza na matomba mingi.”

Na yango, zulunalo Time elobaki ete, “bato mingi bakómi kosɛnga kosalisama na myango mosusu ya malamu mpe ya matomba koleka na esika ya kondima kozongisama makila.” Zulunalo yango ekomaki mpe ete: “Engebene lapolo mosusu oyo epesami, bato 25 likoló na monkama na États-Unis bazongisaki bango makila, kasi yango emonanaki ete esengelaki te. Emonani mpe ete bato ya maladi bazali kolinga lisusu te kozongisama hémogobline mingi na nzoto lokola ezalaki kala, mpe ete nzoto ya bilenge ezalaka na nguya ya kokolisa makila. . . . [Shander] amindimisi ete kozanga kozongisama makila ezali liponi malamu oyo bato mingi bakómi kolinga yango koleka.”

Atako kozwa maladi nsima ya kozongisama makila ezali likama oyo eleki monene, kasi makama mosusu ezali. Dr. Shander alobi ete: “Makila oyo babombi na malili, ezali na likoki ya komema oxygène te lolenge moko na makila oyo ezali naino na molunge ya nzoto. Tozali bobele na ebandeli ya koyeba oyo esalemaka mpenza ntango tozongisaka moto makila.”

“Ntalo ya malamu”

Zulunalo Time esukisi ete: “Na nsuka, esengeli kolobela ntalo: mpo na kozongisa moto makila na mbala moko, esengeli kofuta soko dolare 500, kozanga kotánga mbongo ya bankisi mosusu, mbongo ya mbula mobimba ekoki kokóma dolare miliare moko to miliare mibale, motuya ya mbongo oyo eleki mpenza mbongo moto akofuta soki asalisamaki na myango mosusu.” Emonani ete mpo na ntalo makasi ya kozongisa moto makila nde bato bakómi sikawa kosepela na lipaso ya kozanga kozongisama makila.

Sharon Vernon, mokambi ya Lopitalo mpo na kosalisa mpe kosala lipaso kozanga kozongisa makila (Center for Bloodless Medicine and Surgery), na St. Vincent Charity Hospital, na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, alobi boye na ntina na kosalisa kozanga kozongisa moto makila: “Ezali kokola mpamba te minganga bakómi komona ete na kotalela mbongo oyo ezali kosɛnga, kosalisa kozanga kosalela makila ezali na ntalo ya malamu na mokili ya lelo oyo mbongo ekómi mpasi. Makambo oyo masalemi mazali komonisa ete ata bakompanyi ya assurance oyo ezali kosala elongo na biso te ezali kotindela biso bato ya maladi mpamba te bakompanyi yango ezali kobungisa mbongo mingi te.”

Ya solo, lipaso ya kozanga kozongisa makila ekómi koyebana mingi na minganga mpamba te ezali na matomba mingi.

[Etanda na lokasa 16]

Bikateli oyo esambiselo euti kozwa

Na Novɛmbɛ mpe Desɛmbɛ 1997, na etúká ya Illinois, na États-Unis, esambiselo ezwaki bikateli mibale ya ntina mpenza. Na ekateli ya liboso, bafutaki Mary Jones, Motatoli ya Yehova, dolare 150 000 mpamba te, na 1993, bazongisaki ye maboke mibale ya makila na makasi. Yango ezali mbongo oyo eleki mingi na kotalela mbongo nyonso oyo bafutá Motatoli mpo na mbeba oyo esalemi na kozongisa ye makila na makasi.

Bakamataki ekateli ya mibale mpo na Darlene Brown, azali mpe Motatoli ya Yehova. Bazongisaki ye makila na makasi ntango azalaki na zemi ya sanza mwambe na pɔsɔ mibale. Mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1997, esambiselo monene ya etúká ya Illinois elimbolaki ekateli na yango mpe elobaki ete “kozongisa makila ezali mwango oyo ezali na mikakatano mpe ezali kobebisa makoki ya nzoto ya mokóló.” Esambiseli yango elobaki na mokuse na ntina na ekateli na yango ete “na mobeko ya Etúká na biso, . . . esengeli te kosɛngisa mwasi oyo azali na zemi ete andima mwango moko ya kosalisama na monganga oyo ekoki kozala likama mpo na ye.”

Mokolo ya 9 Febwali 1998, Esambiseli monene ya engumba Tokyo ekweisaki ekateli oyo esambiselo moko ya nse ezwaki likoló na monganga moko ete azalaki na lotomo ya kozongisa Misae Takeda makila na ntango ya lipaso oyo esalemaki na 1992. Esambiselo monene elobaki ete “esengeli kotosa lotomo ya moto ya maladi ya kopona lolenge akosalisama. Lokola azongisaki ye makila, abukaki mpenza mobeko.” Bafutaki Misae Takeda yen 550 000 (dolare 4 200).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto