Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Janvier nk. 18-23
  • Batatoli ya Yehova na Ekólo Russie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova na Ekólo Russie
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ***
  • ***
  • ***
  • ***
  • ***
  • Bato ya kimya balongisi lokumu na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Basaleli ya Yehova balongi etumba moko molai na tribinale!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bapanzi-nsango na Ekólo Russie Bakumisi Batatoli ya Yehova
    Lamuká!—1998
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Janvier nk. 18-23

Batatoli ya Yehova na Ekólo Russie

Likanisi ya nganga-mayele moko ya Teoloji

NA LOMA, na ekeke ya liboso mikóló ya Bayuda balobaki na ntina na boklisto ete: “Mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” Mikóló yango basalaki nini? Na bonkonde mpenza, bakendaki epai na ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔkɔ mpe balobaki na ye ete: “Tokosepela koyoka makanisi na yo na monɔkɔ na yo.” (Misala 28:22) Bayokamelaki moklisto oyo ayebaki makambo matali boklisto na esika ete báyokamela baoyo bazalaki koloba mabe na ntina na boklisto.

Sergueï Ivanenko, nganga-mayele ya teoloji oyo ayebani mingi na ekólo Russie, asalaki mpe bongo. Atako azalaki kondima makanisi mabe oyo mapalanganaki na ekólo Russie na ntina na Batatoli ya Yehova, azwaki ekateli ya kosolola na telefone na filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ezwami pene na engumba Saint-Pétersbourg, mpo na koyeba makambo na bosikisiki. Andimaki libyangi oyo bapesaki ye mpo na kokende kuna, kotuna mituna, mpe kozwa bandimbola na esika ebongi.

Ntango Mr. Ivanenko akómaki na Ɔkɔtɔ́bɛ 1996, bandako oyo ezalaki kotongama mpo na kofandisa basangani soko 200 ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Russie ezalaki pene na kosila. Na boumeli ya mikolo misato oyo milandaki, bapesaki ye libaku malamu ya kotala misala ya botongi oyo mizalaki kosalema, azalaki kolya na eteni ya ndako ya bolei, mpe akokaki kotuna mituna na mosangani nyonso oyo ye asepelaki kotuna.

Mr. Ivanenko akomaki lisoló na ntina na Batatoli ya Yehova mpe yango ebimisamaki na nimero oyo ebandi na mwa 16 kino 23 Febwáli 1997 kati na zulunalo Moscow News, oyo eyebani mingi na ekólo Russie. Lisoló yango ezalaki na motó na likambo ete: “Tosengeli kobanga Batatoli ya Yehova?” ebimisamaki mpe na ebimeli ya Lingelesi ya zulunalo Moscow News, na pɔ́sɔ ebandi na mwa 20 kino 26 Febwáli. Lokola batángi mingi ya zulunalo Lamuká! basepelaka na mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Russie, tobimisi awa, na ndingisa ya mokomi, makambo mingi ya lisoló yango. Mr. Ivanenko abandaki kolobela makambo oyo ye moko amonaki, oyo makomamaki na makomi ya moindo:

“‘Bato ya mwa eyamba mpamba, bólongwa na Russie!’ Wana ezalaki maloba oyo ekomamaki na bitánda ya basangani ya Parti démocratique liberal de Russie oyo baboyaki ete likita moko ya Batatoli ya Yehova esalema. Natunaki moko ya baoyo bazalaki koboya likita yango ete: ‘Makambo nini bolingaka te na lingomba yango?’ Apesaki ngai zulunalo Megapolis-Express oyo ezalaki na motó na likambo ete, ‘Bokɔnɔ ya kasɛndɛ ya basangani ya lingomba moko epalangani na Kamtchatka.’ Zulunalo yango elobaki ete mpo na kozwa mosolo, Batatoli ya Yehova bazalaki kokɔtisa bandumba mpe kopalanganisa bongo bokɔnɔ ya kasɛndɛ epai na basodá oyo babundaka na mai. Na boboto nyonso natunaki ete: ‘Yo mpe ozali moko kati na bato oyo bazwaki bokɔnɔ yango?’ ‘Ozali kondima likambo yango?’ Azongisaki ete ‘Nandima to nandima te, ezali na ntina te. Likambo ya ntina ezali ete mwa eyamba oyo ya Amerika ezali kobebisa elimo mpe mimeseno ya ekólo Russie, mpe tosengeli kosukisa yango.’”

Nsima ya makambo oyo, Mr. Ivanenko akomaki ye moko boye: “Ekomami na Sergueï Ivanenko, nganga-mayele ya teoloji, docteur na filozofi.”

“Ya solo, bosembo motindo oyo emonanaka mpenza te, kasi ezali solo ete bato mingi na ekólo Russie bazalaka na makanisi malamu te likoló na Batatoli ya Yehova. Bobele kolobela nkombo ya lingomba yango ezali kotinda bato ete báloba mabe na ntina na yango, na ndakisa, bato ya bindimandima, lingomba euti na Amerika, bato ya kondima ya miso molili mpe balandalandaka bakonzi na bango, bato oyo bandimaka ete nsuka ya molɔ́ngɔ́ ekómi pene. Mpo na bato mingi, nkombo ya Batatoli ya Yehova ebangisaka mpe ebendaka likebi.

“Lingomba yango ezali ndenge nini, mpe tosengeli kobanga yango?

“Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, nakendaki na mboka Solnechnoye, na etúká ya Kururtnoye, na Saint-Pétersbourg, epai mosala ya Batatoli ya Yehova etambwisamaka na Russie.

***

“Esika yango ezalaki liboso káa ya bato oyo bazalaki koya kosukola na libongo na eleko ya molungé. Na 1992, ndako oyo ezalaki wana [liboso] ebebisamaki mpenza, mpe bana batikaki kosakana na esika yango, ekómaki esika ya mitomba. Lokola esika yango ebebaki mingi, yango wana batɛkɛlaki Batatoli ektare 7 ya mabelé mpo na kosalela yango. Babongisaki bandako ya kala mpe babandaki kotonga mosusu ya sika, bakisa mpe ndako ya biro ya bitaze minei, [Ndako ya Bokonzi] moko oyo ekoki kokɔtisa bato 500, mpe eteni ya ndako ya bolei. Batatoli ya Yehova bazali mpe kolóna pelouse (mingimingi oyo eutaki na ekólo Finlande) mpe banzeté kitoko ndenge na ndenge. Ekanisami ete mosala yango mokosila na eleko ya molungé ya mbula oyo. Mosala oyo moleki ntina kati na Biro yango ezali bongo kotalela mosala ya kosakola mpe kotinda mikanda na masangá ya Batatoli ya Yehova. Batatoli ya mboka Solnechnoye bazali na bamasini ya konyata mikanda te, na yango, mikanda ya Batatoli ya Russie minyatamaka na ekólo Allemagne, mpe na nsima mitindamaka na Saint-Pétersbourg, epai kuna nde mikabolamaka na bitúká. Bato pene na 190 basalaka na esika yango. Basalaka lokola basali ya bolingo malamu mpe atako bazwaka lifuti te, kasi bamposa na bango ya ntina, lokola esika ya kolala, bilei mpe kosukola bilamba ekokisamaka.

“Mosala mozali kotambwisama na lisangani ya bankulutu 18. Vasily Kalin azali mokambi ya filiale uta 1992. Abotami na engumba Ivano-Frankivsk. Na 1951, ntango azalaki na mbula minei, ye na baboti na ye bakimaki na Sibérie (kobanda 1949 kino 1951 bakonzi banyokolaki mabota soko 5 000 mpo ete bazalaki Batatoli ya Yehova). Azwaki batisimo na 1965 mpe azalaki kofanda na etúká ya Irkoutsk. Azalaki kotambwisa kompanyi moko ya mabaya.

“Longola basali ya bolingo malamu oyo bazali kosala na biro, ezali mpe na basali ya bolingo malamu 200 oyo bazali kosala mosala ya botongi, oyo bauti na Russie, na Finlande, na Suède, na Norvège mpe bazali kofanda na esika ya mosala na Solnechnoye. Mingi kati na bango basɛngaki loi na misala na bango mpo na koya kosala mosala ya botongi. Ezali mpe na Batatoli ya Yehova mingi oyo bauti na Ukraine, na Moldavie, na Allemagne, na États-Unis, na Finlande, na Pologne mpe na bikólo mosusu. (Batatoli ya Yehova baponaponaka mposo te. Baoyo bautaki na Géorgie, na Abkhazie, na Azerbaïdjan mpe na Arménie bazalaki kofanda bango nyonso esika moko, mpe na boumeli ya mbula minei ata matata moke ebimaki te.)

“Bisaleli mpe bamasini mingi eutaki na mikili ya Scandinavie, mpe mingi kati na yango epesamaki lokola makabo na baninga bandimi. Balakisaki ngai masini ya monene oyo ebéngami bulldozer oyo Motatoli moko ya Yehova ya ekólo Suède ayaki na yango na Solnechnoye na 1993. Asalelaki yango ntango nyonso oyo alekisaki kuna, mpe liboso ya kozonga apesaki yango lokola likabo epai na bandeko na ye kati na kondima. Basali na mosala ya botongi balalaka na bandako kitoko. Manáka na bango ya mokolo ezalaka boye: na 7:00 ya ntɔ́ngɔ́​—bolei ya ntɔ́ngɔ́ mpe losambo; basalaka mosala kobanda 8:00 kino 17:00 kati na yango ngonga moko mpo na bolei mpe bopemi ya midi. Mokolo ya pɔ́sɔ basalaka kino ntango ya bolei ya midi, mpe mokolo ya lomingo bapemaka.

“Balyaka malamu mpe mbuma ezangaka te mbala nyonso oyo balyaka. Lingomba yango ezalaka na makambo ya kokila bilei te to koboya kolya biloko mosusu te. Nsima ya mosala, mingi kati na bango bakendaka na esika ya kosukola ebéngami sauna mpe na nsima bafandaka komɛla mwa kɔpɔ mpe koyoka miziki. Balangwi masanga bazalaka te epai ya Batatoli ya Yehova, kasi epekisami te komɛla masanga. Bandimi bapesameli nzela ya komɛla masanga na bokatikati, masanga lokola vino, Cognac, vodka mpe bongo na bongo. Nzokande, Batatoli ya Yehova bamɛlaka makaya te.

***

“Mbala misato na pɔ́sɔ, bazalaka na boyekoli ya Biblia, oyo bayangani mingi bazali bilenge. Nzokande, baoyo bakómaki Batatoli ya Yehova esili koleka mbula 30 to mbula 40 bazali. Pene na mibange nyonso kati na bango balekisaki ntango na bolɔkɔ, na bakáa ya misala makasi mpe basusu bakimaki mboka. Ntango eleko ya monyoko esilaki, minganga, bato ya mibeko, ba ingénieurs, balakisi, bato ya mombongo, mpe banakelasi mingi bakómaki Batatoli ya Yehova.

“Lisangá esalaka ete bato nyonso bámiyoka ete batalelami lolenge moko. Na ndakisa, ata mokambi ya filiale asukolaka basaani na mpokwa soki ekómi ngala na ye. Batatoli ya Yehova babénganaka bankombo na boninga moko na mosusu mpe babakisaka liloba ‘ndeko.’

“Ntango Motatoli moko ya Yehova abuki mobeko na mateya ya Biblia mpe aboi kobongola motema, akozwa etumbu makasi​—akobimisama na lisangá. Moto yango akoki koyangana na makita, kasi bandeko na ye bandimi bakopesa ye lisusu mbote te. Etumbu ya moke ekoki kozala bongo mpamela.

***

“Nalekisaki ntango mingi kotala Batatoli ya Yehova mpamba te nazalaki koluka koyeba likambo oyo ememaka bato ndenge na ndenge kati na lingomba yango. Atako bakeseni na bomoto na bango, na bakelasi batángá mpe na makambo oyo moto na moto alingaka mpe alingaka te, [Batatoli ya Yehova basanganaka te] na mangomba mosusu oyo mazali komibebisa na mokili ya masumu. Basepelaka te na bituluku ya [bato] oyo bazalaka na bibangabanga liboso ya bakonzi, oyo bazalaka na boyokani na bilimu mabe, mpe oyo bamikabolaka na ngámbo mibale: bato ya bozwi epai moko, bato mpamba epai mosusu.

“Batatoli ya Yehova bakeseni na bato mosusu mpo na endimeli makasi oyo bazali na yango ya komitambwisa engebene mitindá ya Biblia. Basalaka milende ya komonisa makambo na bango nyonso na mitindá ya Biblia, to na kotángáká mokapo moko ya Bondeko ya Kala to ya Bondeko ya Sika. Batatoli ya Yehova bandimaka ete bobele Biblia nde ezali kopesa biyano na mituna nyonso. Mpo na Batatoli ya Yehova, Biblia ezali búku ya mibeko oyo mizali kotambwisa bato mpe ezali komonisa makambo nyonso na bosolo.

“Mpo na ntina yango, Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba lokola bato oyo batosaka mibeko na lolenge malamu mpenza mpe mingimingi mpo na ezaleli na bango na makambo matali kofuta mpako. Mbala na mbala, biro ya makambo ya mpako etalelaka bango mpe ekamwaka ntango nyonso na komonáká ete bafutaka mpako na bango malamu. Ya solo, lokola bato mosusu mingi, Batatoli ya Yehova bakoki kozwa bantina ya koboya kofuta mpako, kasi Biblia elobi ete esengeli kozala sembo na kofutáká mpako, mpe mpo na Batatoli ya Yehova Biblia ezali na bokonzi likoló na makambo nyonso oyo basengeli kosala.

“Nzokande, etɛlɛmɛlo na bango ezangi kotɛngatɛnga na ntina na Biblia mbala mingi ebimisaka mikakatano kati na Batatoli ya Yehova mpe baguvernemá. Etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki ezali ntina monene ya mokakatano, mpe yango emonanaka na lolenge baboyaka kosala mosala ya sodá.

“Batatoli ya Yehova basalelaka maloba ya Yesu ndenge yango ekomami, komonisáká ete bayekoli na ye mpe bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te, mpe mpo na ntina yango baboyaka kokɔta na makambo ya politiki mpe na bitumba, ezala esika nini to mpo na nini bitumba yango ezali kosalema. Lokola Batatoli ya Yehova baboyaki koloba ete ‘Heil Hitler’ mpe kokɔta na mampinga ya Hitler, bankóto mingi kati na bandimi yango batindamaki na bakáa ya bakangami ya Banazi, mpe bankóto kati na bango bakufaki. Motatoli ya Yehova mokomoko ya ekólo Allemagne oyo abomamaki mpo na koboya kokɔta na bitumba oyo bisalemaki na Union soviétique, atalelami na bato ya ekólo Russie lokola moto oyo asalaki likambo ya malamu koleka. Nzokande, bato mingi ya Russie bayokelaka Batatoli ya Yehova oyo babomamaki mawa te mpo ete baboyaki kozwa mindóki mpe kokɔta na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, to bayokelaka baoyo bazwaki bitumbu mawa te mpo ete baboyaki kokɔta na mosala ya sodá ntango bitumba bizalaki te. Kasi na makambo yango mibale, Batatoli ya Yehova bazalaki kosala engebene bindimeli ya lingomba na bango kasi mpo na bindimeli ya politiki te.

“Eleki mwa mikolo, likambo motindo yango esalemaki na ekólo Japon, epai kuna banakelasi oyo bazalaki Batatoli ya Yehova baboyaki koyekola masano ya bitumba, koyebáká ete bakoki kolongola bango na eteyelo monene. Na 1996, Esambiselo Monene ya ekólo Japon ekataki likambo yango na kolóngisáká ntómo ya banakelasi yango mpe epesaki bango ndingisa ya kozonga na bakelasi na bango.”

***

“Makambo nini Batatoli ya Yehova bateyaka oyo ezali kotungisa bato ya mayele na mikolo na biso? Oyo eleki makambo nyonso ezali liteya oyo bazali kolendendela na yango ete nsuka ya molɔ́ngɔ́ ekómi pene (basalaka mosala na bango ya bamisionere na balabála mpe na ndako na ndako). Eleki mwa mikolo, bankulutu bapesaki toli na basakoli ete bálobelaka mingimingi te likambo litali ‘nsuka ya molɔ́ngɔ́’ mpe mawa oyo ekokwela bato ya masumu, nzokande bálimbwelaka bayoki na bango ete Yehova azali kopesa bango libaku ya kozwa ‘bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé.’

“Likambo mosusu oyo ezali kotungisa bato ezali lolenge Batatoli ya Yehova baboyaka kosangana na mangomba mosusu. Balobaka ete mangomba ya boklisto esili kowangana Nzambe mpe Biblia, mpe ete mangomba mosusu nyonso mazali kati na libunga oyo ekomemela bango likama. Batatoli ya Yehova bakokanisaka mangomba yango na ‘Babilone, mwasi na pite,’ mpe bandimaka ete likama yango mpe ekokwela mangomba yango. Nimero moko ya ‘Lamuká!’ oyo eutaki kobima elobaki ete nsuka ekómi pene mpo na mangomba ndenge na ndenge, mpe ete lingomba bobele moko oyo ekotikala ezali oyo Batatoli ya Yehova bazali koteya.

“Nzokande, Batatoli ya Yehova bandimaka bonsomi ya lisosoli ya moto na moto.

***

“Mikili mingi misili komonisa bobangi mpo na koyeba soki mateya ya Batatoli ya Yehova ekomemela bato likama to ekomemela bato likama te. Esambiselo monene ya etúká ya Connecticut, na États-Unis (1979) mpe ya Nouvelle-Galles du sud, na ekólo Australie (1972), Esambiselo ya etúká ya Colombie-Britannique, na Canada (1986) mpe bisambiselo mosusu bilobi ete elembeteli ezali te oyo emonisi ete Batatoli ya Yehova bazali komemela bato likama, to bazali likama mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe mayoki ya bato. Cour européenne des Droits de l’Homme (Esambiselo ya mikili ya Mpótó mpo na Ntómo ya Bato) (1993) elóngisaki Batatoli ya Yehova ete bazali na lotómo ya kozwa bonsomi ya lingomba, oyo elongolamaki na ekólo Grèce mpe na ekólo Autriche. Lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali konyokwama kati na mikili 25 . . .

“Batatoli ya Yehova bakoki kotalelama lokola ndakisa mpo na banamboka na ntina na komipesa na bango na solo ya Biblia mpe bolingi na bango na kotɛlɛmáká ngwi na bindimeli na bango. Kasi motuna ezali kotunama: Mboka na biso emilengeli mpo na kopesa bonsomi ya lisosoli epai na bibongiseli oyo bizali kosalela mitindá ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na lolenge lobongi mpe na kozanga kotɛngatɛnga motindo wana?”

Maloba oyo ya nsuka ezali motuna moko ya ntina oyo Mr. Ivanenko atunaki. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo, oyo aponamaki na Klisto mpo na kosala lokola momonisi na ye, ‘akangamaki na bolɔ́kɔ’ nzokande asalaki likambo te. Na yango, Paulo akomelaki baninga na ye bandimi na ntina na milende na ye kati na “mosala na kolobela mpe kotambolisa Nsango Malamu.”​—Bafilipi 1:7; Misala 9:3-16.

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bayambaka moto nyonso oyo alingi kotalela misala na bango malamumalamu, lokola Mr. Ivanenko asalaki. Tondimisami ete soki bato basali bongo, bakomona ete makambo mabe oyo bayebisaka bango mpo na Batatoli ya Yehova mazali lokuta, bobele lokola masoló oyo malobamaki na ntina na baklisto ya liboso ezalaki mpe ya lokuta. Na bokeseni mpenza, Batatoli ya Yehova batosaka ‘mobeko ya sika’ oyo Yesu apesaki na bayekoli na ye ete: “Bólinganaka lokola ngai na nalingi bino.”​—Yoane 13:34, 35.

[Etanda na lokasa 18]

Ebimisamaki mpe na zulunalo Moscow News

(Makambo oyo malandi mabimisamaki na zulunalo Moscow News manyatamaki elongo na lisoló ya Sergueï Ivanenko.)

“Batatoli ya Yehova ya ekólo Russie bazali kati na ebongiseli ya boklisto ya mokili mobimba oyo ezali kosala kati na mikili 233 mpe ezali na basangani milió 5,4. Na makambo ya elimo, Batatoli ya Yehova batambwisamaka na Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo ezali na Brooklyn, na engumba New York. Ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso ebandaki na 1870 na etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia oyo batambwisamaki na Charles Taze Russell, na engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie. Ebongiseli yango ekómaki na ekólo Russie na 1887. Moko kati na Batatoli ya Yehova ya liboso na ekólo Russie ezalaki bongo Semyon Kozlitsky, oyo akimaki longwa na Moscou mpo na kofanda na Sibérie na 1891. Atako monyoko ezalaki, basangani bayikaki mpiko na boye ete na 1956 Batatoli ya Yehova bazalaki 17 000 na Union soviétique. Ezalaki na mobu 1991 nde Batatoli ya Yehova bazwaki bonsomi na ekólo Russie, nsima ya kobimisama ya mobeko ya ‘Bonsomi ya losambo.’ Lelo oyo ezali na masangá koleka 500 mpe basangani ya molende pene na 70 000 oyo bazali na ekólo Russie. Ebongiseli yango ekabolaka bazulunalo ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli’ (oyo ebimisami na nkota 125, mpe baekzamplɛrɛ milió 20) mpe ‘Lamuká!’ (ebimisami na nkota 81, mpe baekzamplɛrɛ milió 18).

[Elilingi na lokasa 19]

Mwa ndambo ya bandako ya filiale na ekólo Russie

[Elilingi na lokasa 20]

Ndako ya Bokonzi esika libota ya Betele liyanganaka mpo na boyekoli ya Biblia

[Bililingi na lokasa 21]

Mabota ya Batatoli bayekolaka mpe basepelaka elongo

[Bililingi na lokasa 22]

Bateyaka basusu boyebi ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto