Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Avril nk. 11-15
  • Miziki, bilangwiseli mpe masanga​—Yango ezalaki bomoi na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Miziki, bilangwiseli mpe masanga​—Yango ezalaki bomoi na ngai
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbongwana ntango nazalaki kokóla
  • Mosala ya sodá na mokili ya Vietnam
  • Etumba mpo na komesene na bomoi ya basivili
  • Lolenge ya bomoi oyo ezali komema na likámá
  • Mituna mingi, biyano moke
  • Nazongi kofanda na bato ya mboka na ngai
  • Nkombo ya nzambe ebongolá bomoi na ngai!
    Lamuká!—2002
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Avril nk. 11-15

Miziki, bilangwiseli mpe masanga​—Yango ezalaki bomoi na ngai

NAZALI Indien ya Amerika. Tata na ngai oyo auti kokufa eleki mbula 4, azalaki Indien ya libota ya Chippewa oyo lizwami na Esanga ya Sukali na etúká ya Michigan na États-Unis d’Amérique. Mama auti na mabota ya ba Indiens ya Ottawa mpe Ojibwa, oyo mazwami na etúká ya Ontario na Canada. Na bongo, na kotaleláká mboka ya tata na ngai, nazali Indien ya libota ya Chippewa oyo lizwami na engumba ya Sault Sainte Marie. Na ntina na bopusi ya Lingomba ya Katolike mpe ya biteyelo oyo bizalaki na mbola (internat), biso bana tokólaki na lingomba yango mpe tosengelaki bongo koyangana na mísa mokolo nyonso ya lomingo.

Bomwana na ngai na mabelé ya ba Indiens ezalaki bomoi ya esengo mpe ezangi mindɔndɔ. Na bomwana, nazalaki komona lokola ete bileko ya molungé bizalaki milai, kolekáká malɛmbɛmalɛmbɛ kasi bizalaki bileko ya kimya. Tofandaki na esika moko mosika na engumba​—mai ya pɔ́mpi ezalaki te, twalɛti kati na ndako mpe te, nde tozalaki kosukola na libeké to na saani moko ya monene oyo tozalaki kobomba mai. Tozalaki kosakana na libándá ya ndako. Mpunda, ngɔmbɛ mpe banyama mosusu ya mboka izalaki bisaneli na biso. Na ntango wana, nazalaki kolinga ete mokili mobimba ezala bongo mpe mpo na libela.

Mbongwana ntango nazalaki kokóla

Ntango nabandaki kokóla mpe nakendeki kokɔta na eteyelo ya Letá, nazalaki kozonga lisusu mingimingi te kotala baboti. Nabandaki kolekisa ntango mingi na kelasi, na masano mpe na miziki. Lolenge moko na bilenge ya bambula 1960, nazwaki bopusi ya makanisi ya ntango wana. Ntango nalekaki moke mbula 13, nakómaki kosalela bilangwiseli mpe komela masanga ya makasi mokolo na mokolo. Lokola elimo ya botomboki ezalaki kopalangana makasi, na bongo nabwakaki bizaleli malamu nyonso oyo bato bazalaki kotalela na motuya. Nakokaki te kososola mpo na nini bato bazalaki kosalana makambo na nkó.

Bobele na ntango wana, nazwaki lindanda na ngai ya liboso. Etuluku na biso ya babɛti miziki ezalaki bobele na basangani ya libota na ngai. Tata na ngai azalaki mobɛti piano mpe mobini ya mabina lokola rumba kasi rumba ya kotuta makolo makasi; bandeko na ye ya mibali mpe bazalaki kolinga miziki. Na bongo ntango tata mpe bandeko na ye bazalaki kokutana, tozalaki kobɛta miziki mpe bituluku minei ya babalani bazalaki kobina mabina mabéngami jig kino ntɔ́ngɔ́ saa. Nazalaki kolinga bongo. Mosika te, nayekolaki kobɛta lindanda mpe nakɔtaki na etuluku ya babɛti miziki oyo babéngaka rock-and-roll. Tozalaki kobɛta miziki na bileko babongisaka mabina na biteyelo mpe na mabaku mosusu. Yango etindaki biso ete tóbanda kobɛta miziki na bisika bamelaka masanga (bar) mpe na bikala, mpe lokola tomeseneki na bisika wana, nakómaki lisusu komela masanga mingi koleka mpe kosalela ntango nyonso bilangwiseli. Nazalaki kosalela mpenzampenza bilangwiseli oyo babéngaka marijuana mpe amphétamine.

Mosala ya sodá na mokili ya Vietnam

Na ntango nakómaki na mbula 19, nabalaki mpe mosika te mwasi na ngai azwaki zemi. Bobele na mbula wana, bazwaki ngai na mosala ya sodá na unité ya marine américaine. Makambo nyonso wana matungisaki ngai mpenza. Mpo na kolónga bopusi yango, namikómisaki moombo ya masanga mpe ya bilangwiseli, kotingamáká na yango butu na moi.

Batindaki ngai na káa ya kobongisama mpo na balikili na engumba San Diego na etúká ya Californie, mpe na nsima na káa ya mboka Pendleton, bobele na etúká yango, mpe kuna nazwaki kobongisama na unité moko ya ntina ya infanterie. Nabongisamaki na makambo matali kopalanganisa nsango na ntango ya etumba mpe nakómaki opérateur radio. Yango ezalaki na nsuka ya 1969. Nzokande, komekama makasi ezalaki naino liboso na ngai​—mosala ya sodá na Etumba ya Vietnam. Yango wana, mwa basanza nsima ya kosilisa kelasi ya ntéi mpe wana nazalaki bobele na mbula 19, makolo na ngai enyataki mabelé ya lángi motane ya mokili ya Vietnam. Bolingo ya ekólo epusaki ngai mpe ebele na bilenge ba Indiens ya America ete tókɔta na mosala ya sodá, atako etúlúká na biso ezwaki monyokoli mingi mpe totalelamaki lokola bato oyo bazali na ntómo te.

Mokumba na ngai ya liboso na mosala ezalaki na unité ya liboso ya marine américaine, oyo ezalaki kokamba mpɛpo ya libateli na bitumba mpe etyaki káa na yango mosika te na libongo ya Da Nang. Pene na bilenge mibali 50, oyo tozalaki mbula moko, topesamelaki mokumba ya kotambwisa nsango na ntéi ya káa ya basodá. Tozalaki bongo na mokumba ya kobatela etúká oyo ezwamaki longwa na esika ebéngamaki zone neutre, oyo ekabolaki nɔ́rdi ya Vietnam mpe súdi ya Vietnam, kino pene na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 80 na súdi ya libongo ya Da Nang.

Bato oyo bazalaki kokima etumba batondaki na libongo ya Da Nang, mpe basalaki miláko zingazinga na engumba yango. Bandako mpo na bana bitiké mpe ezalaki mingi. Esalaki ngai mpasi mingi na motema na komonáká bana mike, oyo mingi kati na bango bakátáná makolo to mabɔkɔ. Nayokaki mpii na motema na komonáká ebele na bana nyonso wana oyo bazalaki mpenza bilenge basi mpe mibali. Nayaki koyeba noki ntina na likambo wana. Bana yango ya mbula kobanda 11 mpe mwa likoló bautaki nde kobunda na etumba wana! Mwa moke na nsima, nakutanaki na elenge mobali moko, oyo azalaki sodá ya Vietnam, mpe natunaki ye mbula na ye ya kobotama. Azongiselaki ngai ete azali na mbula 14 mpe asilá kobunda bitumba na boumeli ya mbula 3! Yango ekamwisaki ngai mingi. Akundwelaki ngai leki na ngai ya mobali oyo bazalaki mbula moko, kasi bakeseneki mpenza na mikano na bango; oyo ya leki na ngai ezalaki ya kokóma mobɛti monene ya lisano ya base-ball kasi koboma te.

Na boumeli ya mosala na ngai na marine américaine, nabandaki komituna mituna mingi oyo esengelaki mpenza ete nazwa biyano na yango. Mokolo moko na butu, nakendeki na ndakonzambe ya káa na biso. Kuna sángó ya Katolike oyo babéngaka aumônier asalaki lisoló moko oyo litalelaki Yesu, kimya mpe bolingo! Etikalaki moke nalela mpo ete mateya na ye makeseneki mpenza na makambo oyo mazalaki kosalema na mboka wana. Nsima ya mísa, natunaki ye lolenge nini akoki komitánga moklisto mpe bobele na ntango yango kobunda etumba oyo ya Vietnam. Eyano na ye ezalaki nini? “Ɛɛ, nalobi na yo, caporal, wana ezali lolenge na biso ya kobunda mpo na kobatela matomba ya boklisto.” Nabimaki na ndakonzambe mpe nalapaki ete nakolinga lisusu te koyoka makambo ya mangomba.

Ntango mokumba na ngai esilaki, nayebaki ete ezalaki nkɔnzɔ lokola natikalaki na bomoi; kasi nanyokwamaki mingi na makanisi mpe na mayoki. Wana nazalaki komona bato bazali kokufa na etumba mpe koyoka lokito ya mandoki mokolo na mokolo, yango etikaki elembo monene na motema mpe na makanisi na ngai, atako nazalaki naino elenge na ntango wana. Atako mbula 25 esili koleka kobanda etumba yango esilá, kasi nazali komikundola makambo na yango ya nsɔ́mɔ oyo namonaki lokola ete eutaki kosalema lobi.

Etumba mpo na komesene na bomoi ya basivili

Ntango nazongaki na ndako, nazongelaki miziki mpe namipesaki mobimba mpo na yango. Nde bomoi na ngai etondaki na mikakatano​—nasilaki kobala mpe nazalaki na mwana kasi nazalaki sé komela masanga mingi mpe kosalela bilangwiseli mingi mpenza. Nazalaki lisusu koyokana na mwasi na ngai te mpe tosukaki na koboma libala. Yango ezalaki likambo lisalaki ngai mpasi mingi koleka na bomoi na ngai. Nabandaki komitangola na bato mpe koluka mwa kobɔndisama na kotambolatambola, kokende kolɔbɔ mbisi na bisika bizwami mosika lokola na etúká ya Minnesota mpe na likoló ya libeké ya Michigan.

Na 1974, nakendeki kofanda na mboka-mokonzi Nashville, na etúká ya Tennessee, na mokano ya kokóma mobɛti monene ya lindanda mpe moyembi. Nazalaki kobɛta miziki na bikala mingi, kokólisáká ntango nyonso elikya ya kokɔta na molɔngɔ́ ya babɛti minene ya miziki. Kasi ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te​—mpo ete babɛti lindanda ya makoki mpenza bazalaki mingi mpe bango nyonso bazalaki koluka koyebana.

Nzokande, bobele na ntango oyo nalingaki kolónga mpe kosepela na matomba ya kokóma moyembi monene, likambo moko eyaki kobangisa ngai mpenza.

Lolenge ya bomoi oyo ezali komema na likámá

Nakendeki kotala moninga na ngai ya kala oyo tozalaki kosalela bilangwiseli uta ntango molai. Ayaki kofungolela ngai ekuke na revolver na mabɔkɔ. Azalaki na simá (plâtre) na ngambo moko ya nzoto mpe monɔkɔ na ye esalaki lokola kokangama mpo ete mbángá moko ebukanaki. Asalaki makasi mpo na koloba mpe ayebisaki ngai oyo ekómelaki ye. Likambo oyo nayebaki te, nzokande amikɔtisaki na etuluku moko ya bateki bilangwiseli ya engumba Nashville mpe babungisaki kiló mingi ya bilangwiseli oyo babengaka cocaïne. Batekisi minene na bilangwiseli bafundaki ye ete azalaki moyibi. Batindaki bato ya mobulu ete bábɛta ye. Basɛngisaki ye ete azongisa cocaïne to afuta yango na motuya ya mángondo oyo ezalaki ya badolare 20 000. Bazalaki kokanela bobele ye moko te kasi mpe mwasi na mwana na ye. Alobaki na ngai ete ekozala likámá mpo na ngai soki bamoni biso esika moko mpe na bongo nasengelaki kolongwa wana. Nasosolaki oyo ye alingaki koloba mpe nakendeki.

Bokutani wana esalaki ete nakóma kobanga mwa moke mpo na bomoi na ngai. Kozanga koyeba yango, nasilaki komikɔtisa na etuluku ya bato ya mobulu. Na etuluku na biso ya babɛti miziki mpe basaleli na bilangwiseli, pene na bato nyonso oyo nayebaki bazalaki kotambola na revolver. Kútu etikalaki moke nasomba oyo ya ngai mpo na komibatela. Namonaki ete soki nalandi kosala boyokani makasi na babɛti minene ya miziki, bomoi na ngai ekokóma na likámá koleka. Nazwaki bongo likatami ya kolongwa na engumba Nashville mpe kokende na Brésil epai wapi nakanaki koyekola miziki ya Amérique latine.

Mituna mingi, biyano moke

Atako nazalaki na bantina ya koboya mangomba, kasi nazalaki koyoka mposa ya kosambela Nzambe. Nazalaki na mituna oyo nazwaki naino biyano na yango te. Na bongo, nabandaki koluka solo. Nasanganaki na mangomba ndenge na ndenge kasi nasepelaki na yango te. Nazali komikundola lingomba moko oyo nakɔtaki na likita na yango na etúká ya Minnesota. Pastɛrɛ akataki lisoló na ye na mokuse mpo ete ekípe ya motópe ebéngami Minnesota Vikings esengelaki kobɛta mokolo wana. Alendisaki biso nyonso ete tózonga na bandako mpe tósambela mpo ete ekípe ya Vikings ekoka kolónga! Natɛlɛmaki mpe nabimaki. Namitungisaki na makanisi mazangi moboko lokola oyo wana, oyo mazali kokɔtisa Nzambe na makambo ya masano mpamba.

Ntango nazalaki kosala mosala na engumba Duluth na etúká ya Minnesota, moninga moko ayaki na ndako mpe atikelaki ngai ekzamplɛrɛ moko ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Natángaki lisoló na yango oyo lilobelaki ndimbola ya Matai mokapo 24, mpe yango esimbaki motema na ngai. Etindaki ngai namituna ete, ‘Batatoli ya Yehova bazali banani? Yehova azali nani?’ Nazelaki kino 1975 mpo na kozwa biyano na mituna yango. Moninga bobele wana atikelaki ngai Biblia mpe búku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.a

Natángaki búku yango na butu wana. Ntango nasilisaki kotánga mokapo ya liboso, namindimisaki ete nazwaki solo. Ezalaki lokola nde balongolaki ngai elamba ya moyindo na miso. Nasilisaki kotánga búku yango mpe na mokolo elandaki nakendeki epai na bamoko na Batatoli oyo bazalaki bato ya kartyé na ngai mpe nasɛngaki bango boyekoli ya Biblia.

Natikaki mwango na ngai ya kokende mobembo na Brésil mpe nabandaki kosangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Na lisalisi ya Yehova, natikaki na mbala moko kosalela bilangwiseli mpe komela masanga, kosikwamáká bongo na boombo yango ya mbula 12. Nsima na mwa basanza, nakómaki kobima na mosala ya kosakola ndako na ndako.

Nzokande, ezalaki na mokakatano moko oyo nasengelaki kolónga yango. Nazalaki na mosala moko ya sikisiki te, mpe likanisi ya kotosa manáka ezalaki mpenza mpasi mpo na ngai. Sikawa, namonaki ntina ya kondima mikumba, mingi mpenza lokola nalamwisaki makanisi ya bolingo epai na mwana mwasi na nkombo Debi. Nabandaki ye ntango azalaki naino elenge; kasi akendeki kotánga na eteyelo monene mpo na kokóma molakisi, nde ngai nalingaki kokóma mobɛti miziki. Sikawa ye mpe andimaki mateya ya Biblia mpe tokómaki kolingana lisusu makasi mpenza. Tobalanaki na 1976 mpe mwa moke na nsima tozwaki batisimo lokola Batatoli ya Yehova na engumba Sault Sainte Marie oyo ezwami na etúká ya Ontario na Canada. Na boumeli ya ntango, toyaki kobota bana minei​—mibali misato mpe mwasi moko.

Mpo na koleisa libota na ngai, nafungolaki esika moko ya kolakisa bato lolenge ya kobɛta lindanda mpe koyemba miziki ya jazz. Nazalaki mpe kokamba esika moke ya bokɔtisi nzembo na disike (studio d’enregistrement) mpe na mwa bantango nazalaki koyemba na bikala na mpokwa. Likambo ya kokamwa na nyonso wana, nazwaki mabaku ya kozongela kobɛta miziki elongo na babɛti minene. Basɛngaki na ngai mbala misato ete nasalela bisaleli na ngai mpo na kokɔtisa banzembo ya babɛti miziki oyo bayebanaki mingi. Oyo ezalaki mpenza nkɔnzɔ mpo na ngai​—ya solo libaku monene mpo na mbala ya misato na boumeli ya mbula mibale. Lisusu, bapesaki ngai libaku ya kokende mobembo na engumba Los Angeles na etúká ya Californie mpo na kobɛta miziki ya jazz elongo na etuluku moko ya babɛti oyo bayebanaki mingi. Kasi nayebaki ete soki nandimi mabyangami wana, ekosɛnga ete nazongela kosala mibembo ntango nyonso mpe napesa ntango mingi mpo na kobongisa concert ya miziki mpe kolɛngɛlɛ ntango mpo na kokɔtisa nzembo na disike. Nazwaki mwa ntango moke mpo na kotalela mabyangami wana mpe na limemya nyonso naboyaki yango. Namikundolaki bobele bomoi na ngai ya kala mpe namonaki ntina lisusu te ya kozongela bomoi yango ya bilangwiseli, ya masanga mpe ya komitya ntango nyonso na likámá epai na bato ya mobulu. Bomoi na ngai ya sika ya moklisto elongo na mwasi mpe bana na ngai ezalaki na motuya mingi na miso na ngai.

Na boumeli ya mbula mingi, nasalaki mosala ya mobongisi-loláká (ingénieur de son) mpo na baemisyó ya televizyó oyo epesaka mateya na bato, oyo ebéngami Public Broadcasting Service na mokuse PBS. Sikawa nazali kolekisa nsango na mwango ya vidéo kati na ba Indiens ya libota ya Hopi mpe eteyelo monene moko na nɔ́rdi ya etúká ya Arizona.

Nazongi kofanda na bato ya mboka na ngai

Esili koleka mbula 20 uta namipesaki epai na Yehova na nzela ya batisimo. Nasili mpe kolekisa mbula 20 kati na libala ya esengo. Debi, mwasi na ngai, mpe mwana na biso ya liboso ya mobali na nkombo Dylan, oyo azali na mbula 19, mpe mwana na biso ya mwasi na nkombo Leslie, oyo azali na mbula 16, bango nyonso bazali kosala mosala ya ntango nyonso. Dylan azali sikawa kosala na binyateli mikanda mpe na bilanga ya la Société oyo bizwami na mboka Wallkill na etúká ya New York. Bana na biso ya mibali mibale oyo bazali naino bilenge bauti komipesa epai na Yehova mpe kozwa batisimo; ezali bongo Marshall oyo azali na mbula 14 mpe leki na ye Casey oyo azali na mbula 12.

Esili koleka mbula misato, tondimaki libyangami ya kokende kosakola epai kuna mposa ezali mingi; na yango toyaki kofanda na engumba Keams Canyon na etúká ya Arizona mpo na kosala elongo na ba Indiens ya mabota ya Navajo mpe Hopi. Nazali nkulutu na lisangá. Ezali esengo mpenza kofanda lisusu elongo na banamboka ba Indiens ya Amerika. Na ntina na bokeseni monene kati na mimeseno mpe lolenge ya bomoi oyo ezali awa mpe bomoi oyo ezali, na ndakisa, na bamboka zingazinga na bingumba minene, yango esalisi biso ete tókanga mpenza ndimbola ya mosala ya misionere. Totiki ndako na biso ya monene, ya kitoko, mpo na kofanda biso motoba na ndako moke ya komema bipai na bipai, oyo babéngaka caravane. Bomoi ezali mpenza mpasi awa. Bandako mingi ezali na mai ya pɔ́mpi te to na twalɛti ya kati te, bobele twalɛti ya libándá. Na eleko ya malili, mabota mosusu mazali kokende mosika bobele mpo na koluka nkóni mpe makala. Bazali kotóka mai na mabulu oyo Letá asala. Banzela mingi ezali ya mabelé mpe etyami na kálati ya mboka te. Na bomwana na ngai na kartyé wana, nazalaki komitungisa te na makambo motindo wana. Sikawa, ngai na libota na ngai toyebi ete tosengeli kosala mosala makasi bobele mpo na mwa misala ya ntina kati na bomoi ya mokolo na mokolo na ndako.

Atako ba Indiens bazali na ebongiseli ya bango moko ya kosambisa makambo kati na bifandelo na bango, nzokande bazali kokutana na mikakatano oyo mizali kokwela biyangeli mosusu nyonso​—kowelana kati na ba Indiens bango moko, koponapona, bobóla, koyiba mosolo ya Letá mpe ata kobomana kati na basáli mpe batambwisi. Ba Indiens ya Amerika bazali mpe konyokwama na boombo ya masanga, bilangwiseli, kozanga mosala, kobebisama ya bana na bandako, mpe mikakatano ya mabala mpe mabota. Kino lelo, bamoko kati na bango bazali kopesa ngambo epai na mindɛlɛ mpo na ezalela ya mpasi oyo bazali na yango, kasi mindɛlɛ mpe bazali kokutana na minyoko motindo moko. Nzokande, mingi kati na ba Indiens ya Amerika, bazali kosepela na mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazali kopesa bango, atako bazali kozwa bopusi makasi oyo ezali kouta na mabota, na baninga mpe na bazalani kati na bitúlúká na bango. Bazali komona ete boninga elongo na Nzambe ezali na matomba mpe na motuya. Mpo na kokende kosangana na makita ya boklisto mpe kozonga, mingi kati na bango bazali kotambola kilomɛtɛlɛ koleka 120. Tozali na esengo ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe elongo na ba Indiens ya Navajo mpe ya Hopi.

Nazali kozela na motema lúkulúku mokolo oyo boyangeli ya Yehova ‘ekobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé’ mpe ntango bato nyonso oyo bazali kotosa Nzambe bakofanda na kimya mpe na boyokani lokola libota moko oyo lizali na bomoko. Bomoi ekozala mpenza lokola nazalaki kolikya yango ntango nazalaki elenge mobali Indien ya Chippewa na Canada. (Emoniseli 11:18; 21:1-4)​—Lisoló ya Burton McKerchie.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.; sikawa ebimisamaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 13]

Nazalaki koluka biyano na mituna oyo nazalaki komituna mpo na Nzambe

[Bililingi na lokasa 15]

Na likoló: Libota na ngai mpe, na lobɔ́kɔ ya mwasi, moninga moko indien ya Navajo

Na nsé: Ndako na biso ebéngami caravane pene na Ndako ya Bokonzi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto