“Kobebisama ya biloko bizalisami”
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA IRLANDE
LOKOSO ezali kotya mabelé na likámá. Ezali kosilisa makoki ya mabelé ya kobimisa bilei mpe ebombamelo oyo biso banso tosengeli na yango mpo na kobikela. Ntembe ezali te ete osili koyeba lolenge oyo lokoso ezali kobebisa mabelé, kasi talelá mwa makundoli mosusu.
Kobebisa mabelé
Na 1962, kati na búku na ye Silent Spring, Rachel Carson, apesaki likebisi na ntina na kobebisama ya mabelé na bankisi ya kobatela milóna oyo ebéngami pesticides mpe na bosɔtɔ oyo ezali na ngɛngɛ. Búku The Naked Savage elobi ete: “Bato bazali kobebisa ezingelo mpe efandelo na bango mpenza, wana ezali elembo ya kosilisama ya biloko bizalisami.” Na lokoso nyonso, bato bazali kokóba kobebisa mabelé. Búku World Hunger: Twelve Myths elobi ete: “Kolukáká matomba minene koleka na ntango mokuse mpenza, balóni-bilanga mingi balingaka kosalela mabelé, mai mpe bankisi ya kokólisa milóna na lolenge ya kolekisa ndelo kozanga komibanzabanza ete kosaláká bongo ekoki kobuka mabelé, kobebisa ezingelo mpe kosilisa mai oyo mazwami na nsé ya mabelé.”
Na esika ya kobatela bazámba ya mikili ya molungé—bazámba oyo ezali na ntina mingi mpo na libiki ya mabelé—bato bazali nde kobebisa yango na lombangu mpenza. Bakomi ya búku Far From Paradise—The Story of Man’s Impact on the Environment (1986), balobi ete: “Bazámba kitoko ya mikili ya molungé ekosila pene na nyonso nsima ya mibu ntuku mitano soki lolenge bazali kosalela yango sikawa ebongwani te.”
Babomi-mbisi oyo bazali na makanisi mabongi te bazali kosalela bankisi mpe biloko ya ngɛngɛ mpo na koboma mbisi na bitima—oyo elobelamaki lokola bikokani na “bibale na bazámba minene ya mikili ya molungé” mpo na mitindo ndenge na ndenge ya bikelamo ya bomoi oyo bizali kobombama kuna. Lolenge yango mabe ya koboma mbisi na kosaleláká bankisi ya ngɛngɛ esili “kobebisa mpenza” ebele ya banyama mike na kati ya mai monene.—The Toronto Star.
“Tozali kominyokola biso moko”
Sir Shridath Ramphal, oyo azalaki prezidá ya ebongiseli ebéngami World Conservation Union kobanda 1991 kino 1993, alobeli lolenge yango mabe ya kosalela makoki ya mabelé ete ezali “kobebisama ya biloko bizalisami.” Na lolenge nini ezali mabe? Na kotángáká ndakisa moko, Ramphal akomi ete: “Bibale mingi ya Inde bizali bobele terasé oyo ezali komema mai oyo mauti na bingumba mpe bamboka mpe kobwaka yango na mai monene.” Asukisaki na maloba nini? “Tozali kominyokola biso moko.”
Lokoso esili kokonza bato na boumeli ya bikeke mingi, kasi lelo oyo likámá ya kobebisama ya mabelé esili mpenza kokóla. Mpo na nini? Mpamba te bato bazali sikawa na likoki monene koleka mpo na kobebisa mabelé. Búku Far From Paradise elobi ete: “Bobele na mibu ntuku mitano oyo miuti koleka, toyei kozwa bisaleli ya ngɛngɛ mpo na koboma mpenza bikelamo mosusu ya mabelé na biso. . . . Homo sapiens [na Latin, moto na mayele], lolenge oyo moto amibéngaka na lolendo nyonso, azali ntango mosusu na nguya nyonso oyo esɛngami mpe amipekisaka lisusu te.” Kala mingi te, Greenpeace, ebongiseli oyo etalelaka ezingelo etɔndɔlaki makasi ezalela yango na kolobáká ete: “Moto na ntango na biso asili kokómisa paladiso [mabelé] lokola ekunde . . . mpe sikawa akómi lokola mwa mwana mobali ya nkó . . . oyo azali pene na kobebisa mpenza esika oyo bikelamo ya bomoi bikoki kobatelama.”
Kasi lokoso ezali kotya na likámá bobele makoki ya ntango molai ya mabelé te. Ezali mpe kotya na likámá bolamu mpe libateli ya yo mpe ya libota na yo. Ndenge nini ekoki kolobama bongo? Talelá lisoló lilandi.