Mosika te, mokili mozangi bitumba
TÁNGÁ lisusu esakweli ya Biblia ezwami kati na Yisaya oyo elobi ete: “Bakotula mipanga na bango ete mízala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Yebá ete engebene maloba yango, baoyo bazali kotula mipanga na bango ete mízala bikateli na matiti ezali bongo ‘mabota mingi’ oyo bazali kotambola na nzela ya Nzambe. (Yisaya 2:2-4) Na maloba mosusu, bato yango bazali kosambela Yehova Nzambe mpe bazali kotosa mibeko na ye. Bato yango ezali banani?
Esengeli kozala bato ya mikili ndenge na ndenge oyo basili kobwaka bobele bibundeli te, kasi balongoli kati na makanisi mpe kati na mitema na bango bizaleli mpe mayoki oyo ezali kopesa nzela na bokabwani mpe bitumba. (Baloma 12:2) Na esika ete báboma bazalani na bango, bazali kolinga bango. (Matai 22:36-39) Basilá kolobela yo na ntina na bato motindo wana?
Mbala mosusu osila koyoka ete Batatoli ya Yehova bazali bongo lisangá moko ya bato na mokili mobimba oyo baboyaka kozwa bibundeli mpo na koboma bazalani na bango. Kanisá naino mwa moke: soki bato nyonso bazalaki kosala bongo, mbɛlɛ mabelé mobimba masila kozwa kimya mpe libateli te?
Ya solo, bato nyonso basalaka lolenge wana te. Likambo oyo mokonzi Salomo alobaki esili koleka mibu 3 000 ezali ntango nyonso solo: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso misalami na nsé na moi. Mpe talá, mpisoli na banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.”—Mosakoli 4:1.
Libyangi epai na baninga ya kimya
Mokolo mosusu mokili ekozanga bitumba? Ɛɛ. Kimya ekoya na nzela ya milende ya bato? Te. Ekouta na kobongwana ya bato mingi na lingomba ya solo? Ezali mpe bongo te. Nzembo, mokanda ya Biblia elobi ete: “Yaká kotala misala na [Yehova] . . . Ye akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”—Nzembo 46:8, 9.
Ndenge nini Yehova akosala makambo nyonso wana? Mokanda ya Masese eyanoli boye: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe [baoyo batyolaka mibeko ya Nzambe] bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.”—Masese 2:21, 22.
Soki uta kala Nzambe amikɔtisi te na makambo ya bato, ezali mingimingi mpo na kopesa na bato libaku ya koyeba banzela na ye mpe na nsima kolanda yango. Ntoma Petelo akomaki ete: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Na yango, basaleli ya Nzambe basungaka bazalani na bango na bolingo nyonso ete báyeba Yehova. Lokola Yisaya alobaki yango, bazali kosala libyangi oyo ete: “Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova], . . . ete alakisa biso nzela na ye.”—Yisaya 2:3.
“Mikolo ya nsuka”
Mokapo wana ya Yisaya ezalaki mpe kosakola ete koteyama ya bato kati na nzela ya kimya ekosalema “na mikolo ya nsuka.” (Yisaya 2:2) Tozali kobika na eleko yango. Likambo ya kokamwa, eleko yango ezali komonana na bitumba ya ekeke oyo.
Ntango bayekoli na ye batunaki ye makambo oyo makomonisa nsuka ya biloko ya ntango oyo, Yesu alobaki ete: “Mokili ekoningana mingi, mpe na esika na esika malali mabe na nzala ekozala.” (Luka 21:11; Matai 24:3) Alobaki lisusu ete: “‘Nde soko bokoyoka mpo na bitumba, na kotomboka, banga te, mpo ete ekoki na makambo oyo kokóma liboso, kasi nsuka ekozala noki te.’ Na nsima alobaki na bango ete ‘Libota moko ekotɛmɛla libota mosusu, bokonzi moko ekotɛmɛla bokonzi mosusu.’”—Luka 21:9, 10.
Ya solo, bato bazalaki kobunda uta kalakala, kasi ekeke na biso esili komona bitumba mibale ya mokili mobimba mpe engebene mitángo misusu, bankáma ya bitumba ya mike. Ezali kopesa nsɔ́mɔ na likanisi oyo ete bitumba esili koboma bamilió ya bato na ekeke ya 20. Zulunalo World Watch emonisi ete na boumeli ya bambula 2 000 oyo ezalaki liboso ya ekeke na biso, esengelaki na mwayene mibu 50 mpo ete bitumba eboma milió moko ya bato, nzokande, na ekeke na biso, ekoki kosalema bobele na mobu moko.
Mokili mozangi bitumba
Bitumba ya nsɔ́mɔ oyo esalemi na ekeke na biso, bakisá mpe makambo mosusu mingi oyo masakolamaki na Biblia, ezali komonisa ete tozali pene na mokili ya sika oyo Nzambe akotya. Mobulu na mokili ekotika esika na “mabelé ya sika” kati na yango kimya mpe boyengebene ekofuluka. (2 Petelo 3:13, NW) Liloba ya Nzambe elobi boye: “Basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili. Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”—Nzembo 37:9, 11.
Lelo kati na mokili, bamilió ya bato bazali koluka mokili mozangi bitumba. Nzambe akokokisa mpenza elaka na ye ya kosala mokili motindo wana, ezali yango nde emonisamaki na ntango ya kala na moko ya basakoli na Ye ete: “Emononeli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
Na yango, zalá na mayele mpo na kotya elikya na yo epai na Nzambe mpe okomona kokokisama ya elaka na ye: “Nzambe ye moko akozala elongo na [bato na ye]. Mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, liwa ekozala lisusu te; ná kolela, ná konganga, ná mpasi ekozala lisusu te. Makambo ya kala masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4, NW.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Makambo oyo Biblia elaki mpo na mokili yango ya sika:
Kobomana ezali te, mobulu te, makambo mabe mpe te
“[Nzambe] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”—Nzembo 46:9.
“Basáli na mabe bakosuka . . . Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te.”—Nzembo 37:9, 10.
Kimya epai na bato ya mokili mobimba
“Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobyangama ete . . . Nkolo na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te.”—Yisaya 9:6, 7.
Paladiso na mabelé mobimba
Yesu alobaki ete: “Okozala na ngai elongo na paladiso.”—Luka 23:43.
“Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Lisangá ya bandeko na mokili mobimba basangani kati na bolingo
“Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Lisekwa ya balingami na biso
“Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye [ya Yesu] mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29.
Maladi ekozala lisusu te, bobange te, liwa mpe te
“Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, ná kolela, ná konganga, ná mpasi lisusu mpe te. Makambo na kala masili koleka.”—Emoniseli 21:4, NW.