Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Janvier nk. 22-24
  • Kosalelama ya nguya ya mopɛpɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalelama ya nguya ya mopɛpɛ
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba mpo na ezingelo
  • Mwa mbeba na yango
  • Kondimisama?
  • Mokonzi oyo akoki kopekisa mbonge mpe mopɛpɛ
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Moto oyo asalaki biloko nyonso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Lamuká!—1996
g96 Janvier nk. 22-24

Kosalelama ya nguya ya mopɛpɛ

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA PAYS-BAS

BILÍSI bizali kobaluka ntango nyonso. Bizali kobaluka malɛmbɛmalɛmbɛ, mbala na mbala, lokola mabɔkɔ ya mobeti-mai monene oyo azali kobunda na mwembe makasi kozanga kopusana. Nzokande, bilísi yango bizali koningana mpo na mwembe. Mwembe yango ezali bongo mopɛpɛ. Bobele lokito mpe makɛlɛlɛ ya bilísi nde ekoki koyokama. Yango ebéngami tirbine (turbine, na lifalansé) esaleli oyo ebongolaka mopɛpɛ na lontiliki.

Na bisika oyo mopɛpɛ ebetaka na mikili lokola Danemark, France, Allemagne, Pays-Bas mpe États-unis, tirbine mingi ya mopɛpɛ ebongisaka bitando ya matiti. Na États-unis, Californie ezali na yango koleka 16 000. Na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 50 na ɛ́sti ya San Francisco, na lobwaku ya Altamont, tirbine 7 000 etyami likoló na ngomba ezali kobaluka ntango nyonso. Balobaka ete tirbine nyonso ya Californie ekoki kopesa lontiliki na bisaleli ya ndako na San Francisco mpe na Washington, D.C.

Danemark, mokili oyo mozingami na mai monene, ezali mpe esika kitoko mpo na kosalela mopɛpɛ; kuna tirbine 3 600 esili kotyama. Na 1991, Pays-Bas ezalaki bobele na tirbine 300, kasi bitúká oyo epai kuna mopɛpɛ ebetaka mingi bindimi kokólisa motuya na yango na 3 000. Na Angleterre mpe basáli ya tirbine bazali kokana kokokisa mpe motuya motindo wana.

Ya solo, kosalela nguya ya mopɛpɛ ezali likanisi ya sika te. Tókanisa naino mpo na masuwa oyo mazalaki kotambwisama na mopɛpɛ kati na mai monene liboso ya kosalelama ya motɛ́lɛ. Masini ya konikisa biloko oyo ezalaki kotambwisama na mopɛpɛ esalelamaki na boumeli ya bikeke mingi mpo na kobenda mai, konikisa masangu to mbuma mosusu mpe kokata banzeté. Minimá soko 900 ya tirbine wana ezali kino lelo na Pays-Bas. Mingi kati na yango ezali naino kobenda mai, esalaka ata ntango lontiliki ekei.

Poul de la Cour, molakisi na mboka Danemark azalaki moto ya liboso oyo amekaki kosalela mopɛpɛ mpo na kobongola yango lontiliki; yango esili koleka mibu monkama. Masini moke oyo ye asalaki ezali nkɔ́kɔ ya tirbine oyo tozali na yango na mikolo na biso. Nzokande, na ekeke ya 20, bato bamonaki ete biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ na nsé ya mabelé (combustibles fossiles) bizalaki malamu koleka mpo na kosalelama mpe epesaki lontiliki mingi koleka. Na ebandeli, biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ motindo wana bizalaki na ntalo mingi te mpe bizalaki mingi; na yango, lontiliki ya mopɛpɛ ezalaki lisusu kosalelama te. Na 1973 ntango pitɔlɔ́ ezalaki lisusu komonana te, babandaki sikawa kosalela lisusu lontiliki yango.

Matomba mpo na ezingelo

Kobunga ya pitɔlɔ́ epusaki bato ya mayele ete bákoka kobanza na oyo ekoki kokómela bato ntango biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ bikosila. Nguya ya mopɛpɛ ekómaki kobenda likebi mingi. Mopɛpɛ ezali lontiliki oyo ekoki kosila te. Ya solo, ezongaka ntango nyonso, lokola Biblia elobeli yango: “Ekozingazinga epai na epai mpe mopɛpɛ ekozongaka na bikendelo na yango.” (Mosakoli 1:6) Nguya ya mopɛpɛ ezalaka malamu mpo na ezingelo koleka lontiliki ya nsé ya mabelé, oyo epesaka nzela na biloko mosusu ya kobangisa lokola mbula ya asidɛ́ mpe ekoki kokólisa effet de serre. Nguya ya mopɛpɛ ebimisaka substances chimiques ata moko te.

Mpe atako mopɛpɛ ezali lolenge ya lontiliki oyo eleki gaze te, charbon to pitɔlɔ́, kasi ezali mpe na matomba ya kokamwisa. Na ndakisa, tirbine oyo ezali kobaluka malɛmbɛmalɛmbɛ na mopɛpɛ ya bakilomɛ́tɛlɛ zomi na ngonga. Na mbalakaka, mopɛpɛ eyei makasi, emati mbala mibale na bakilomɛtɛlɛ 20 na ngonga. Lontiliki boni tirbine ezali kobimisa sikawa? Ekoli mbala mibale? Te. Zulunalo New Scientist elimboli ete: “Lontiliki ya mopɛpɛ ekokani na lombangu ya mopɛpɛ mbala misato.” Na bongo, soki mopɛpɛ eyei makasi mbala mibale, epesaka nguya ya lontiliki mbala mwambe! Ata mwa kokólisama moke ya lombangu ya mopɛpɛ ekoki kopesa nzela na kokólisama makasi ya lontiliki na tirbine. Mpo na kozwa matomba na loi physique wana, lokola babéngaka yango, na momeseno, tirbine etyamaka likoló ya ngomba, epai kuna mopɛpɛ ebetaka makasi.

Likambo mosusu ya kosepelisa mpo na nguya ya mopɛpɛ ezali mwango na yango ya kotyama mosika. Masini ya konikisa biloko oyo ezali kosala na mopɛpɛ etyaka eutelo na yango ya lontiliki pene na esika mosaleli na yango azali. Ezalaka mpasi te mpo na kotya mpe kolongola tirbine. Mopɛpɛ ekimaka te, bamemaka yango te, basombaka mpe yango te. Yango elakisi ete ezalaka mpasi te mpo na kokabola nguya na yango, koleka ya pitɔlɔ́ oyo ekongolami naino te, oyo esengeli komemama na masuwa minene. Makámá oyo mautaka na masuwa wana mabimisi mikakatano ya kobebisama ya ezingelo mbala na mbala​—lokola na Alaska na 1989. Tirbine ya mopɛpɛ ezalaka na matomba mabe motindo wana te.

Mwa mbeba na yango

Yango elingi koloba te ete nguya ya mopɛpɛ ezali bongo mwango oyo mobongisaka makambo nyonso matali lontiliki mpo na bato. Mokakatano na yango ya ntina ezali mpo na kozanga koyebana ya kobeta ya mopɛpɛ. Ekoki kobongola ntango nyonso epai yango ezali kouta. Bato na mayele bazali koluka myango uta kala mpo na kosilisa mokakatano oyo. Na yango, na bambula ya 1920, ingénieur Georges Darrieus, mofandi na mboka France abimisaki tirbine ya mopɛpɛ na ákisi ya kokekama. Emonanaka lokola motute ya monene mpe esalaka bipai binso oyo mopɛpɛ ekoki kouta. Mitindo ndenge na ndenge ya masini wana ezali kosalelama lelo. Nzokande, mopɛpɛ ekoki kokata nyonso na mbala moko. Epai mosusu, mopɛpɛ makasi mpe ya mbalakaka ekoki mpe kobebisa bilísi ya tirbine.

Likambo ya kokamwisa, mikakatano mosusu miuti na tirbine ya mopɛpɛ ezali mpo na ezingelo. Nzokande, tekiníki ya tirbine ya lelo ekeseni mpenza na oyo ya kobenda likebi ya bambula eleki. Oyo ya minene koleka ezalaka na bamɛ́tɛlɛ 100, ya mwa bongo na bongo ezalaka na bamɛ́tɛlɛ 40. Bato moke pamba nde bakoki kotalela yango lokola ete ezali kitoko. Ya solo, manɔ́ngi mosusu ya radió mazalaka milai, kasi bilísi ya tirbine ebendaka likebi mingi koleka.

Ezali mpe na likambo litali makɛlɛlɛ. Bato mosusu baboyaka kotyama ya tirbine zingazinga na bango mpo na makɛlɛlɛ oyo yango esalaka. Nzokande, likambo ya kosepelisa, bolukiluki moko oyo esalemaki na Cornwall, na Angleterre emonisi ete makɛlɛlɛ oyo eutaka na tirbine ya mwa bongo na bongo ekokani na oyo ya motuka oyo ezali kotambola na bakilomɛ́tɛlɛ 60 na ngonga mpe eleki na ntáká ya bamɛ́tɛlɛ 7 longwa na esika ozali. Yango eyokanaka mingi engebene ntáká. Moto oyo azali mosika na mɛ́tɛlɛ 300 akoyoka makɛlɛlɛ te koleka soki azalaki kati na bibliotɛ́kɛ. Lisusu, mopɛpɛ oyo etambwisaka tirbine ekangisaka mpe makɛlɛlɛ. Nzokande, soki tirbine ezali soki bankáma na esika moko​—to soko bankóto lokola na lobwaku ya Altamont, na Californie,​—makelɛlɛ makoki kozala mokakatano monene.

Mokakatano mosusu mozali mpo na ndɛkɛ. Ebongiseli moko oyo ebatelaka bikelamu na Pays-Bas eutaki kopekisa kotya tirbine na bisika ndɛkɛ ilyaka mpe itongaka bazumbu na yango​—soki molili ezali to na ntango ya londende, ikoki kokangama na bilísi ya tirbine. Engebene makanisi oyo balukiluki bapesaki, esika ya tirbine 260 na Pays-Bas ekoki koboma ndɛkɛ kino 100 000 na mbula moko. Nzokande, bolukiluki mosusu emonisi ete tirbine ya mopɛpɛ ezali bobele na likámá moke mpo na bomoi ya ndɛkɛ.

Kondimisama?

Atako mpo na mikakatano yango, emonani polele ete lontiliki ya mopɛpɛ ekoki kopesa lisungi monene mpo na kokitisa kosalema ya biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ oyo bizali na nsé ya mabelé. Kati na búku na ye Wind Energy Systems, molakisi Gary L. Johnson ya Eteyelo monene Kansas, na États-unis, alimboli ete lontiliki ya mopɛpɛ ekoki kosalelama elongo na lontiliki eleki koyebana. Kosaleláká yango motindo wana, alobi ete: “Tirbine ya mopɛpɛ ekoki kozala litomba na ntango ya bozangi makasi ya biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ oyo bizali na nsé ya mabelé.”

Mosika te, moto akozala mbala mosusu na mposa ya litomba yango. Bapanzi-nsango mbala mingi bazali kolobela bolukiluki ya biloko oyo bipelaka mɔ́tɔ oyo ezangi nsuka. Na kosaleláká charbon, pitɔlɔ́ mpe gaze, moto azali bobele kosilisa yango te, kasi azali mpe kobebisa efandelo na ye! Na ntango yango, mopɛpɛ ezali kobeta​—ya pɛto, esilaka te mpe eyebani naino nyonso te.

[Elilingi na lokasa 23]

Bankóto ya tirbine ya mopɛpɛ ezali kopesa lontiliki na mikili mingi

[Elilingi na lokasa 24]

Bankáma ya minimá ya kobenda likebi motindo oyo ezali kino lelo na Pays-Bas

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto