Ndenge nini bakokaki kosala likambo ya boye?
LOLENGE nini bato balóngisaki mombongo ya baombo? Bakomi na Lisoló ya bato balobi polele ete kino na ekeke ya zomi na mwambe, bato mingi te bazalaki komituna mpo na mombongo ya baombo soki ezali malamu to soki ezali mabe. Búku Ebandeli mpe nsuka ya mombongo ya baindo (na Lingelesi) ekomi: “Na ntango Christophe Colomb amonaki mpo na mbala ya liboso mikili oyo abéngaki yango ete Inde epai ya Wɛ́sti, ezala ata Eklezia, ezala mikanda mindimami na yango, eloko moko te ekokaki komonisa epai na baoyo balingaki kokóma ba colons ete kosalisa bato mosala na makasi ekokaki kotalelama lokola likambo mabe, atako mwa moke mpenza kati na basango baimaimaki . . . Eloko moko te emonisaki ete kosalelama ya baombo, lokola yango endimamaki na Mpótó mobimba, ekokaki kotyamela ntembe mokolo mosusu.”
Nsima wana mombongo ya kokende kotekisa baombo na ngambo mosusu ya Mai Monene Atlantique ekólaki mingi, bakonzi ya mangomba mingi basalelaki makanisi ya losambo mpo na kokɔtela mombongo yango. Mokanda Boombo na Amerika (na Lingelesi) elobi ete: “Bapastɛ́rɛ ya Protestá [na Amerika] bazalaki bato ya liboso mpo na kotalela mombongo ya baombo . . . Likanisi oyo basalelaki mingi mpe balongaki na yango malamu ezalaki mbala mosusu oyo ete yango ezalaki ebongiseli ya Nzambe mpo na bapakano wana ete báyeba mapamboli ya losambo ya boklisto.”
Kasi monyokoli ya mabe oyo banyokolaki baombo ezalaki kosɛnga likanisi mosusu koleka likambo litali kozwa “mapamboli ya boklisto.” Bankolo ya baombo; bakisá bakomi mosusu mpe bafilozofe ya Mpótó balukaki komilóngisa na kolobáká ete baindo bazalaki lolenge moko te na mindɛlɛ. Edward Long, molóni ya bilanga oyo akomaki búku History of Jamaica (Lisoló ya Jamaïque), alobaki: “Ntango tokanisi na mozindo na ntina na lolenge ya bato yango, mpe bokeseni na bango na bato mosusu, ezali polele ete bazali mpenza bato te, boye te?” Matomba mabe ya makanisi lolenge wana mamonisamaki na maloba ya moyangeli moko ya Martinique: “Nandimisami mpenza ete tosengeli kosalela baindo lokola tokosalelaka banyama.”
Na nsuka, mikakatano ya nkita mpe komibanzabanza mpo na bato epesaki nzela mpo na kotya nsuka na mombongo ya kotekisa baombo na ngambo mosusu ya Mai monene Atlantique. Uta na ebandeli, Baafrika baboyaki boombo mpe na nsuka ya ekeke ya zomi na mwambe, botomboki emonanaki mingi. Bankolo ya baombo bakómaki kobanga. Babandaki mpe komituna soki eleki malamu te kofuta basáli na nsuka ya sanza na esika ya kobatela baombo.
Bobele na ntango yango, makanisi ya bizaleli malamu, ya losambo mpe ya bomoto mpo na kotɛmɛla boombo eyokamaki mingi na Mpótó mpe na Amerika. Bibongiseli mpo na kosukisa boombo bikómaki makasi. Atako mobeko ya kosukisa mombongo ya boombo ebimisamaki na mikili mingi uta 1807, bopusi ya boombo ezalaki naino.
Filime moko ya televizyó, Baafrika: libula ya bipai misato (na Lingelesi), epesaki maloba na bana ya Afrika: “Liboso na ntango ya boombo, tozalaki kofanda na . . . Afrika. Na nsima, bapaya bayaki mpe bakamataki bato mosusu kati na biso. Lelo oyo, topanzani mingi na boye ete bakitani ya Afrika bazali bipai binso na mokili.” Kokuta bamilió ya bakitani baindo na Amerika ya Nɔ́rdi mpe ya Súdi, na bisanga ya Caraïbes mpe na Mpótó ezali elembo ya polele ete bankoko na bango batekisamaki lokola baombo.
Kino sikawa bato bazali kolukaluka nani mpenza abongi kopamelama mpo na mombongo ya baombo oyo bakatisaki Mai monene Atlantique. Basil Davidson, nganga-mayele mpo na lisoló ya Afrika, kati na búku na ye Ndenge Baafrika batekisamaki lokola baombo (na Lingelesi) akomi boye: “Afrika mpe Mpóto esanganaki nyonso mibale na mabe yango.”
“Tiká bokonzi na yo eya”
Likambo ya baindo oyo batekisamaki mpo na kozala baombo eteyi biso eloko moko—na ntina na bokonzi ya bato. Moto moko na mayele akomaki: “Ngai nasosolaki minyoko nyonso misalami na nsé na moí,—mpe talá! mpisoli na banyokwami mpe moto mpo na kobɔndisa bango azali te. Epai na banyokoli na bango nguya ezali.”—Mosakoli 4:1, Rotherham.
Likambo ya mawa, maloba oyo, makomamaki kala mpenza liboso ete mombongo ya baombo ebanda, mazali solo kino lelo. Banyokwami mpe banyokoli bazali kino lelo elongo na biso, mpe kati na mikili misusu boombo ezali naino. Kasi, baklisto bayebi ete mosika te, na nzela ya Bokonzi na ye, Yehova “akobikisa mobola oyo akonganga mpo na lisungi mpe monyokwami mpe ye oyo azali na mosungi te.” (Nzembo 72:12, NW) Mpo na ntina oyo mpe bantina mosusu, bazali kokóba kobondela Nzambe ete: “Tiká bokonzi na yo eya.”—Matai 6:10.