Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier lok. 32
  • “Likaya, ozali kopesa ngai mposa ya kosanza”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Likaya, ozali kopesa ngai mposa ya kosanza”
  • Lamuká!—1995
Lamuká!—1995
g95 Janvier lok. 32

“Likaya, ozali kopesa ngai mposa ya kosanza”

Esili koleka bambula, bibongiseli ya Californie mpo na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ezali kosala piblisité mingi mpo na botɛmɛli komela makaya. Mayebisi mokuse mpe ya sikisiki etondi likoló ya bitánda kati na etúká mobimba. Talá mwa bamoko ya mayebisi yango: “Bameli ya makaya bazali bameli na bilangwiseli. Bakompanyi oyo ezali kobimisa makaya ezali bapesi na yango. Likaya ozali kopesa ngai mposa ya kosanza.” “Na mbula oyo, milinga ya likaya ekoboma bato 50 000 oyo bamelaka yango te. Likaya ozali kopesa ngai mposa ya kosanza.” Etánda mosusu elobi na nsé ya elembo ya pakɛ́ ya likaya ete: “Kosomba sikawa. Kofuta na nsima.” Solo mpenza; okofuta na kobungisáká bomoi na yo. Liyebisi mosusu na lokótá Espagnol elobi: “Me muero por fumar.” Oyo ekoki mpenza kolimbola “Nazali na mposa makasi ya komela likaya” to, “Nazali kokufa mpo na komela likaya.” Fɔtɔ́-ndambo ya mikuwa ya motó ekangami na ndambo ya elongi emonisi yango polele.

Mwango mosusu ya kolɛngola oyo mosalelami na mikili misusu mpo na kopekisa bato komela likaya mpe bilangwiseli: ezali likaya oyo ebéngami “Liwa.” Likoló na pakɛ́ ya lángi moindo batya motó ya moto akufá elongo na maloba oyo: “Likaya ekómisaka moto moombo mpe elɛmbisaka moto. Soki omelaka likaya te, kobanda komela yango te. Soki omelaka, tiká.”

Ezali mpasi mpo na koyeba soki mayebisi wana ya kozokisa mazali na bopusi likoló na bameli ya makaya to ezali na bopusi likoló na bango te. Nzokande, na bambula motoba oyo euti koleka, “komela likaya ekiti na 27 % kati na Californie, bokiti ya mbala soko misato koleka mwayene ya ekólo mobimba.” (The Washington Post National Weekly Edition) Ekoki mpe kozala ete mayebisi wana ezali na bopusi ya kolɛngola likoló na baoyo balingaki komipesa na momeseno wana mabe. Kozanga ntembe, baoyo bazali komitánga ete bazali baklisto, basengeli kobwaka likambo wana ya mbindo mpe ya moimi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Balingami, awa ejali biso na bilaka oyo, tomipɛtɔla mpenja na mbindo yɔnsɔ na njoto mpe na [elimo, NW] mpe tokokisa ejaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔmɔ na [Nzambe, NW].”​—2 Bakɔlinti 7:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto