Pastɛ́rɛ moko akumisi Batatoli ya Yehova
Euti na mokomani na biso na Australie
NA 1991, kati na etúká Nouvelle-Galles ya Súdi, na Australie, Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na Condobolin ezikaki. Na nsima ya mwa bapɔ́sɔ, pastɛ́rɛ moko ya Protestá ya mboka wana amonisaki mawa na ye kati na mokanda na ye motali makambo ya parwasi “mpo na kobeba ya esika wana ya losambo.” Mokanda na ye elandaki na maloba oyo:
“Atako bokeseni ezali kati na losambo na biso mpe oyo ya bango, uta bambula mingi, nakumisaka bango mingi mpo na makambo oyo mamonanaka na misala na bango ya losambo oyo namonaka ete ezali malamu mpo na bango moko.” Bamoko ya makambo yango ezali nini?
Ya liboso: “Bamibanzabanzaka mingi mpo na koteya solo. Bayanganaka mbala mibale to misato pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na mokano yango.” Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali lingomba epai kuna batángaka, bateyaka mpe basakolaka. Bayanganaka mbala misato pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.
Ya mibale: “Bango . . . bakendeke mbala na mbala kotala bato epai na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu. . . . Balobelaka mingimingi ete baoyo bazali komitánga ete bazali na lingomba te bazali ‘etuluku’ ya misato kati na Australie (bato 3 841 000). Batatoli ya Yehova basukaka te bobele na kobomba kondima na bango mpo na bango moko, kasi balingaka kolobela yango epai na basusu.” Batatoli ya Yehova bayebi ete basengeli kokokisa Matai 24:14 mpe Malako 13:10 na kosakoláká nsango malamu.
Ya misato: “Bakɔngɔlaka mosolo te na kotambwisáká sáni liboso ya bato. Mosolo na bango moutaka epai na bango moko.” Biblia elobi ete ‘bojui na lisombi tɛ, bopɛsa na lifuti tɛ’ mpe ‘esɛngɔ na kopɛsa eleki esɛngɔ na kojua.’ Na bongo, Batatoli ya Yehova bakɔngɔlaka mosolo te. Kɛ́si mpo na makabo ya bolingo malamu ezalaka kati na bandako na bango ya makita.—Matai 10:8; Misala 20:35.
Likambo ya nsuka oyo pastɛ́rɛ alobelaki ezalaki nini? “Batongaka bandako na bango ya losambo na boumeli ya mwa ntango moke mpe na mosolo mokoki. . . . Bokoki kokende na Gum Bend Lake Road . . . mpe bokomona lolenge Batatoli ya Yehova ya mboka wana bazali kotonga Ndako ya Bokonzi ya sika. Bakanisi ete mosala wana mokosila nsima na mikolo misato.” Lisusu, toli nini pastɛ́rɛ apesaki epai na bato ya parwasi na ye?
“Nazali kosɛnga na bino ete bótánga lisusu nokinoki makambo minei oyo nauti kolobela bino mpe bómituna ndenge nini yango ekoki kosalisa bino na kososola na misala ya polele ya kondima na bino. . . . Na makanisi na ngai, soki tokokanisi yango na Batatoli ya Yehova na makambo minei wana baparwasi ya boklisto, ezala ya Protestá to mosusu, ekomonana lokola ete ekufa.”
Soki okosepela kotala Ndako ya Bokonzi moko mpe komona yo moko lolenge Batatoli ya Yehova basambelaka Nzambe mpe koyeba nini ezali bindimeli na bango, kokakatana te na kokende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali penepene na esika ofandi, to komelá biso mpo na kozwa adresi.
[Elilingi na lokasa 31]
Ndako ya Bokonzi na Condobolin, Nouvelle-Galles ya Súdi