Makambo mazali koleka na mokili
Esanga ya bana oyo bazangi televizyó
Sainte-Hélène ezali esanga moke oyo ezwami pene na nsuka ya ntáká oyo ekaboli Afrika ya Wɛ́sti mpe Amerika ya Súdi. Ezali na esengo na boye ete bana na yango bazali “kati na bana oyo baleki kozala na bokatikati kati na mokili,” ndenge emonisi yango zulunalo Times ya Londres, na kotángáká lisoló moko ya Support for Learning, zulunalo moko ya pedagozi oyo esalemaka mingi. Mokomi ya lisoló yango, molakisi Tony Charlton amonaki ete bobele 3,4 % ya bilenge ya bisanga oyo bazali na mibu 9 kino mibu 12 nde bazalaki na mobulungano monene ya bizaleli; motuya moleki moke oyo momonani naino esika mosusu te kati na libota ya bato,” lokola emonisi yango zulunalo Times. Ndimbola nini ekoki kopesama mpo na yango? Mbala mosusu ezali mpo na lolenge kitoko ya mateya oyo mapesami epai na bana mpe likoki ya pɛtɛɛ oyo epesami mpo na kozwa mateya yango. Kasi, Tony Charlton akani kosala bolukiluki likoló na ntina mosusu oyo ekoki kozala. Eleki kala mingi te, liboso ya kotya bisaleli ya satellite mpo na mwa ntango moke, esanga ezalaki kozwa televizyó te. Engebene makanisi oyo mamonisami, na bambula misato, mabota 1 300 kati na mabota 1 500 ya esanga bakozwa televizyó. Tony Charlton akobanda mosika te boyekoli likoló na mbongwana oyo emonani epai na bana nyonso ya Sainte-Hélène.
Ngalasisi ya bɔɔngɔ́
DAK Magazin, zulunalo ya Allemagne, oyo etalelaka makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ekomaki ete: “Bɔɔngɔ́ oyo ezangi makoki ya kosimba makambo eutaka mingi mpenza na bozangi ya ngalasisi ya malamu; kasi eutaka te na likambo oyo ete yango etángama se bongo.” Lokola misisa oyo misalelamaka te mikolɛmbaka, bobele bongo bɔɔngɔ́ oyo elendisamaka te elɛmbaka mpe ekangaka makambo mingi te. Likambo yango litali bobele baoyo bapusami na bambula? Te! Zulunalo yango elobi ete: “Lokola makambo mayeisamaka mbala mingi pɛtɛɛ mpo na biso, boye likoki ya kokanisa lisalemaka bobele likolólikoló,” bilenge mpe bakoki kozwa bolɛmbu na bɔɔngɔ́ na bango soki bazali te kobatela yango ete etonda na makambo. Ndenge nini kopɛngola kokóma na bolɛmbu yango? Zulunalo ezali kotinda na kosala mwa lolenge ya ngalasisi ya bɔɔngɔ́ esalemi na masano ya komeka makoki ya kokanisa, lokola sámbóle ya mituya mpe ya balɛ́tɛlɛ mpo na kofungola makanisi mpe bɔɔngɔ́. “Lisano libéngami mots croisés likoki mpe kosalisa.”
Afrika ebebisami na SIDA
Engebene mitángo ya O.M.S. (Lisangá likotalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto), kati na milió koleka 15 ya bato oyo bazali na mikrobe ya SIDA na mokili mobimba, koleka bato milió 10 bazali na Afrika, yango esali ete Afrika ezala mokili oyo moleki kozwama na bokɔnɔ yango. Molakisi Nathan Clumek akokanisaki myango oyo mityami sikawa mpo na kobundisa bokɔnɔ ya SIDA na “mwa bifelo mike bitongami na zɛlo liboso ya mingala oyo mitondi na mai oyo mauti na miluka mizangi kotalelama.” Na mituna-lisoló oyo asalaki na zulunalo Monde, molakisi Clumek alobi ete bakonzi ya mikili ya Afrika bazali naino koyeba te likámá oyo SIDA ekobimisa na mokili ya Afrika. Na 1987, ntango molakisi Clumek amonisaki ete bato 10 % na Afrika bazalaki na SIDA, bato mingi balobaki ete alekisaki ndelo. Nzokande, lelo oyo bazali koloba bato kobanda na 20 % kino na 40 % na Afrika bakozwama na bokɔnɔ mabe wana.
Mimekano mpe likaya
Wana masano mabéngami Grands Prix de Formule 1 ezalaki kosalema lokola na momeseno na Mpótó, bakambi bamibaloli lelo oyo epai na mikili ya Azia, lokola Japon mpe Chine. Mpo na nini bongo? Mpo na bopusi likoló na mokili ya kala ya kobongisama ya makambo matali piblisité mpo na likaya. Lifuti monene lokola esungami na bakompanyi ya minene ya makaya, bapiblisité likoló na makaya emonisami polele, ezali komonana likoló na mituka. Engebene zulunalo Asahi Evening News ya Japon, moko ya bakompanyi yango “ebombaka bamilió mingi ya mosolo mobengami yens na mbula mobimba mpo na kopesa na bituluku mibale.” Na Mpótó, bapiblisité motindo wana elongolami to bazipi yango. Kala mingi te, Grand Prix ya France elingaki kosalema te na ntina na epekiseli oyo ezali koboya bapiblisité ya makaya. Mikili ya Azia, epai kuna bato soko 60 % bamelaka makaya, etalelami sikawa lokola bisika ya malamu mpo na kosala piblisité ya makaya likoló na mituka ya mimekano.
Bilenge basi bana-na-mísa
Kino lelo, bakonzi mosusu ya mangomba bapesaki nzela na basángó ete bilenge basi básungaka bango na boumeli ya mísa. Kati na mokanda moko oyo endimamaki na pápa Jean Paul II mpe oyo etindamaki epai na bapresidá ya mayangani ya baepiskɔ́pɔ ya mokili mobimba, Lisangá mpo na kosambela Nzambe mpe disipilini ya basakramɛntu epesi na episkɔ́pɔ moko na moko lotómo ya kopesa nzela ya kosalela bilenge basi lokola bana-na-mísa. Engebene zulunalo Corriere della Sera, ntango basakolaki likambo yango, mpe mpo na “kobebisa mwa elikya moke oyo basi bazalaki na yango,” molobeli ya Vatican Joaquin Navarro Valls, amonisaki nokinoki ete ebongiseli wana ezali kobongola soko moke te etɛlɛmɛlo ya lingomba likoló na bokúli bonganga ya basi. Na bongo, mpo na nini lingomba ezwi meko oyo ete bilenge basi bázalaka bana-na-mísa? Franco Ferrarotti, moyekoli na makambo ya bato alobi ete: “Yango ezali kokamwisa ngai te. Lingomba ezali lisusu kozwa basángó mingi te, mpe emonani ete ezali lisusu kozwa te bilenge mibali mingi oyo bakoki kosala lokola bana-na-mísa.”
Lingomba ya mikube
Engebene zulunalo Indian Express ya Bombay, Inde ezali na mikube koleka milió moko. Kati na bango, bobele 2 % nde babotamaki bongo. Basusu balongolaki bango mbuma ya mibali. Engebene zulunalo Express, bilenge mibali ya nzoto kitoko balɛngolamaka to bayibaka bango mpo na kotya bango na moko ya bisika babongisaka mikube oyo ezwami na Inde. Kuna, batyami kati na molulu moko na boumeli na yango babombelaka bango “kobongisama ya mokonzi” mpe nsuka na yango ezali kolongolama ya bambuma na bango ya mibali. Na nsima, mokube moko ya mokóló akozwa mokube ya sika elongo na ye mpo na kosala boyokani ya “mama na mwana.” Mikube yango bazwaka bankombo ya basi mpe kobanda ntango wana bakómaka na etamboli mpe na elateli lokola basi. Mingi kati na mikube babongisami na lingomba oyo ezali na nzambe na yango moko. Kati na Inde mobimba, ezali na batempelo mingi oyo kati na yango, na fɛ́ti moko ya mobu, mikube bakumisamaka lokola banzambe.
Mimeseno malamu ya mpɔngi
“Kozanga mpɔngi ekoki komonana mpo na bato mingi ete ezali na matomba, kasi kopimela nzoto bangonga ya mpɔngi ezali komonana mpenza ete ezali na matomba te,” lokola emonisi yango Exame, zulunalo moko ya Brésil. Rubens Reimão, monganga ya makambo matali misisa, alobi ete: “Nzoto ekobosana te bangonga ya mpɔngi oyo moto asengeli kopesa yango. Nkutu, ekomikundwela yango mpe na pwasa nyonso ekosɛnga yango na lolenge ya bolɛmbu na bɔɔngɔ́, mikakatano mpo na kotɛlɛmisa makanisi esika moko mpe lomɔngi mpo na kokanisa.” Mpo na kopɛngola mikakatano mizangi ntina, “esengeli kokanisa to koluka myango ya kosilisa makambo ya mosala bobele ntango ozali na mosala,” esɛngi yango Monganga Reimão. Engebene Exame, kosala ngalasisi mbala na mbala, mwa miziki ya kimya, minda oyo mizali kongɛnga makasi te mpe makanisi mabongi epesaka kominanola mpe mpɔngi.
“Lolenge ya kosangisa nzoto oyo ebatelaka”: kasi ezali mpenza kobatela basi te
Atako bapiblisité esalemi mpo na “lolenge ya kosangisa nzoto oyo ebatelaka” mpe kosalelama ya kapɔti mpo na kopɛngola bokɔnɔ ya SIDA, minganga babandi kobeta ntembe na oyo etali motuya mpenza ya mwango yango. Lisoló moko ya makambo matali minganga oyo ebimaki na zulunalo Le Figaro elimbolaki ete soki kapɔti ezali kopesa mwa libateli mpo na mibali, kasi ezali mpenza bongo te mpo na basi, mpamba te moto oyo azwi bokɔnɔ yango akoki kobebisa epai ya libándá ya kapɔti. Lisusu, likámá ya kopesamela bokɔnɔ ezalaka mingi epai na basi na ntango bamonaka sanza mpe soki eboteli ya mwasi ezoki. Na makanisi ya bolukiluki moko, emonani uta sikawa ete kapɔti ezali kopesa epai na basi kobatelama oyo ezali na nsé ya 69 % mpo na SIDA. Na kotalela kokita ya motángo yango, monganga moko atunaki motuna oyo molandi: “Tokoloba boni mpo na mpɛpɔ moko oyo, na boumeli ya mbula mobimba, ezali bobele na libaku malamu ya 69 % mpo ete ezwa likámá te?”
Ntina ya barulo ya nkasa ya twalɛti
Kino bisaleli ya sika bikozwama, pene na batambwisi pene na nyonso ya bingbunduka ya Italie bazali na mwango bobele moko ya koyebisa likambo moko ya lombangu na bakonzi ya nzela ya engbunduka: kokɔtisa nkomá kati na rulo ya lokasa ya twalɛti mpe kobwaka yango longwa na engunduka wana ezali kotambola na gare ya liboso na elikya ete moto moko akolɔkɔta yango mpe akomema nsango. Mwango yango, “oyo eumeli mpe lokola nzela ya engbunduka yango moko” elakami na mitindá ya Leta. “Mwango yango emekami mpe endimami ezali naino malamu,” lokola elobi yango mokambi moko ya nzela ya bingbunduka na Italie, oyo, atako bongo andimaki ete “kosolola longwa na engbunduka ntango ezali kotambola ezali mokakatano monene.” Soki moto moko ya mobembo azali na maladi, kozala ya liboke moko oyo lizali na biloko mabe, kokɔta ya bato mabe to moyibi, “batambwisi bakoki kosala eloko moko te,” lokola ekomi yango zulunalo Corriere della Sera, mpamba te bazali na lotómo te ya kosala likambo. Mpo na kosilisa mokakatano yango ya kosolola, banzela ya bingbunduka ya Italie ezali kokana kotya na mikolo mizali koya mwango ya telefone ya komema oyo ekozalaka na kati.