Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Octobre lok. 32
  • “Nalingi koyeba makambo mosusu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nalingi koyeba makambo mosusu”
  • Lamuká!—1994
Lamuká!—1994
g94 Octobre lok. 32

“Nalingi koyeba makambo mosusu”

MOBALI moko afandi na Etats-Unis, autaki kokoma maloba oyo mazwami awa na likoló, kati na nkomá oyo atindelaki babimisi ya zulunalo oyo. Alobi ete:

“Atako nazali ‘mosambeli’ te engebene mitinda miyebani na bato banso, kasi nandimaka ntango nyonso ete bomoi ekoki te kosuka bobele na makambo oyo tozali komona mpe koyoka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Nazali ntango nyonso kobendama na makambo ya elimo atako nazali na lingomba ya sikisiki te.

“Nzokande, eleki kala mingi te, nauti kokutana na makambo na mpasi mingi, mpe namonaki ngai moko ete nazalaki na makasi te ya kolónga yango. Mabanzo na ntina na libota mpe mpo na mosala eingisaki ngai kati na mpasi monene oyo naoka naino te liboso. . . .

“Likambo ya kokamwa, wana ezalaki ngai komitungisa, namonaki moko na mikanda na bino kati na esika bakotɛkaka biloko. Lolenge oyo bozali kolobela Tata Mosantu ezali mpenza kolendisa, mpe nalingi koyeba makambo mosusu, kasi nayebi te epai nasengeli kotuna.

“Nakotɔ́ndɔ bino mingi mpo na lolenge nyonso bokokoka kosalisa ngai mpo na koyeba Batatoli ya Yehova mpe bindimeli na bango. Lokola nalobaki yango, nakamwaki ntango namonaki moko na mikanda na bino wana ezalaki ngai na makambo na mpasi mingi​—ekoki kozala elembo ya litambwisi liuti na Nzambe.”

Batindelaki mobali yango búku oyo ekomonisa bindimeli ya Batatoli ya Yehova bizwami kati na Biblia mpe ezali na motó na likambo ete: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Soki olingi kozwa búku oyo to soki olingi ete moto aya kolakisa yo Biblia na ndako, tuná Batatoli ya Yehova ya mboka oyo yo ofandi to tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah” B.P. 634 Limete, Kinshasa, to na adresi ebongi na yo kati na oyo ezwami na lokasa 5. 

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto