Nkomá ya batángi
Mituna oyo bilenge batunaka: Matɔ́ndi mingi mpo na masoló “Nazali kokóla malamu?” mpe “Mpo na nini nazali kokóla mbángumbángu?” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1993 mpe ya Yanuáli-Marsí 1994). Nazali na mibu 11, mpe bato mosusu balobaka ete nazali moke mingi koleka baninga oyo tozali na bango mbula moko. Masoló wana ezalaki mpenza malamu mingi.
J.R.P., Allemagne
Nazali na mibu 11, mpe bazali kosɛka ngai mingi na ntina na bolai na ngai. Matɔ́ndi mingi ndenge bomonisi ngai ete nazali bobele ngai moko te moto oyo azali bongo mpe ete nazali na ngai malamu; nazali bobele kokóla noki koleka basusu. Masoló wana masalisaki ngai mpenza.
E.Q., Angleterre
Mposo Kati na lisoló na bino “Bato na mposo ndenge nyonso bakofanda mokolo mosusu kati na bomoko?” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1993), bolobelaki makambo matali kozanga koyokana na ntina na mposo. Kasi mpo na nini bokosuka wana? Likambo ya kozanga kosepela na bato mosusu ezali likambo tobotámá na yango, boye te? Kanisá naino makanisi mabe oyo ezalaka kati na bato bakosalaka misala mikeseni, kati na bato bafandi na bingumba mpe baoyo bafandi na mboka mike, kati na bilenge mpe mibangé. Lelo oyo likoló na matáta na makambo ya politiki nde bakómi kolobela mingi makanisi mabe oyo bato bazali na yango likoló na mposo mosusu.
B.G., Allemagne
Atako mitindo mosusu ya makanisi mabe likoló na bato mosusu ezali komonana mingi, nzokande makanisi mabe na ntina na mposo mpe ekólo nde ezali koyeisa mingi bampasi, bokesene mpe bokabwani. Na bongo, tomonaki malamu kotya likebi mingimingi na likambo yango oyo engali na mikolo oyo.—Bakomi.
Nalingi bobele kotɔ́ndɔ bino mpo na lisoló kitoko oyo ete “Bato na mposo ndenge nyonso bakofanda mokolo mosusu kati na bomoko? (Lamuká! ya Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1993) Matɔ́ndi mingi na ndenge bolobelaki likambo wana ya mpasi na lolenge ya malamu. Elobelami na lolenge moko ya mayele, nzokande, bozali kokweisa ezaleli mabe wana ya kowelana na ntina na mposo
D.G., Etats-Unis
Makambo mazali koleka na mokili Nakomeli bino mpo na koyebisa bino ete bozali solo kosala mosala monene. Eteni oyo ete “Makambo mazali koleka na mokili” ezali lisalisi monene wana nasengeli kokoma lapólo mokusé ya bansango mpo na eteyelo.
J.W., Etats-Unis
Nazali na mibu 14, mpe natángaka mbala na mbala Lamuká! Nasepelaka na masoló nyonso. Nzokande, moko oyo nalingi kotɔnda bino mingi mpo na yango ezali bongo “Makambo mazali koleka na mokili.” Nayekoli makambo mingi na eteni wana. Ezali yango nde tozali kolobela ntango nyonso na eteyelo. Nazali mpe kosepela ndenge bozali kopesa makanisi na bino moko te na makambo yango. Ntina wana ezali pɛpɛlɛ mpo na koyebisa makambo yango epai na basusu kozanga nkaká.
T.M., Etats-Unis