Makambo mazali koleka na mokili
Kobotama ya bana
Na mboka nini bana bazali kobotama mingi? Engebene O.N.U., ezali na Rwanda nde basi oyo bazali na eleko ya kobota, bazali na bana 8,5 na mwayene. Na nsima, elandi Malawi (7,6), Côte d’Ivoire (7,4) mpe Ouganda (7,3). Mwayene ya bana nyonso na mokili mobimba ezali 3,3; kasi, ezali bobele na 1,9 na mikili ya bozwi. Likambo ya kokamwa, ezali na Italie, mboka oyo ezalaki kala na motuya monene ya kobota bana, nde tozali kokuta motuya moleki moke (1,3). Na Italie, ntango ya kozala na bana misato, minei to koleka kati na libota, ezali lisusu te. Ya solo, eleko oyo bafandi ya Italie bazalaki kolanda malako ya Lingomba Katolike mpo na oyo etali myango ya kokangisa kobota esili koleka.
SIDA na Côte d’Ivoire
Koleka mikóló 10 % kati na bafandi ya Côte d’Ivoire bazali na mikrobe oyo epesaka SIDA, yango esali ete mboka wana oyo ezali na bafandi soko bamilió 13 ezala moko kati na bitúká kati na mokili oyo ezwami na bokɔnɔ yango. Minganga bazali kokanisa ete SIDA nde ezali ntina ya liboso ya kufa ya bilenge ya Abidjan mpe bamonisi na sikisiki ete bokɔnɔ wana bosili sikawa kozwa pene na bafandi nyonso ya teritware wana. Boyangeli ya France eyebisaki polele ete ekobimisa mosolo mpo na kobundisa SIDA na Côte d’Ivoire. Nzokande, minganga misusu mpe ba ministres ya France bazali kofunda bakompanyi oyo esalaka nkisi na mokili mobimba mpo ete bazali kosala makasi te mpo na kosalisa mikili ya bobólá ete bábundisa SIDA. Zulunalo Le Monde ekomaki ete politiki oyo basáli nkisi bazali kosalela mpo na oyo etali ntalo ya nkisi ezali kosala ete bankisi oyo ebundisaka mikrobe ya SIDA ezala mpasi mpo na kozwa yango na Afrika.
Kokufa mpe zemi
“Na mikili ya bobólá, zemi ezali moko na bantina ya liboso oyo ezali koyeisa kufa epai na basi oyo bazali naino na eleko ya kobota,” ndenge tozali kotánga yango na lapólo ya 1992 oyo epesamaki na Fond des Nations unies mpo na kosalisa bato. Na 1992, kati na mikili ya bobólá, na mwayene, mokolo na mokolo, basi 1 359 bazali kokufa na ntina na mikakatano miuti na zemi to na ntango ya kobota. Nzokande, lapólo yango emonisi na sikisiki ete, mwayene wana ezali bobele ya basi 11 na mikili ya bozwi. Wana motuya ya bakufi kati na mikili misusu ya bozwi ezali ya 1 kati na 6 000 mpe ya 1 kati na 9 000, motuya yango ezali ya 1 kati na 20 na mikili ya bobólá. F.N.U.A.P., emonisi ete mituya wana milakisi “bokeseni monene oyo ezali kati na mikili ya bozwi mpe oyo ya bobólá.”
Bokundoli ya engumba moko elobelami na Biblia
Zulunalo Figaro emonisi ete etuluku moko ya bakundoli ya biloko ya kala ya Japon esili komona bitika ya moko na bingumba mitano ya Biblia oyo ebéngami Afeke. Na boumeli ya bambula bato na mayele bamekaki, kasi balóngaki te, na komonisa boyokani bozali kati na engumba wana ya kala mpe Afriq (to Fiq), mboka moke oyo ezali na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 5 na Ɛ́sti ya libéké ya Galilai. Nzokande, engebene Hiroshi Kanaseki, mokundoli ya biloko ya kala, bokundoli ya eteni ya efelo ya Ein Guev, mpembeni ya libéké ya Galilai, emonisi ete efelo wana ezalaki kala na Afeke. Engumba oyo etángami na Biblia na 1 Mikonji 20:26 ete ezali esika oyo mokonzi ya Sulia Ben-Hadad II alóngaki te liboso ya mampinga ya Yisraele ya mokonzi Akaba.
Mangomba ya Hongrie bandimi libungá na bango
Soko milió moko na ndambo ya Bayuda babomamaki na Hongrie na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Nini ezalaki ezaleli ya Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba na eleko wana ya nsɔ́mɔ? Engebene mokanda oyo ekomamaki na bateolojié ya Eglise luthérienne, Eglise baptiste mpe lingomba ya Katolike, mangomba wana mazali “koyoka mawa lokola basalaki makasi te mpo na kobatela Bayuda oyo bazalaki banamboka.” Bateolojié balobi kati na Süddeutsche Zeitung, ete kokakatana na bango ezali “mbuma ya momeseno ya koyina Bayuda oyo mangomba mazalaka na yango mpe na boyokani na bango ya penepene elongo na bakonzi.”
Lotómo ya koboya kozongisama makila
“Bato ya maladi bazali na lotómo ya koboya kozongisama makila.” Ezali na motó ya likambo wana nde zulunalo Mainichi Daily News emonisaki makanisi mapesamaki na etuluku moko ya bato na mayele ya Komité oyo etalelaka makambo ya lopitalo mpe bandako ya kobotisa na engumba Tokyo. Atako mapitalo minene ya biteyelo minene bandimaki lotómo oyo bato ya maladi bazali na yango ya koboya kozongisama makila, nzokande oyo ezali mbala na yango ya liboso ete endimama na bakonzi ya engumba Tokyo. Lapólo ezali kosɛnga na mapitalo ya Tokyo ete bámemya likanisi ya babɛli oyo bazali mikóló, oyo balingi ete básalisama kozanga kozongisama makila, ata soki minganga bámoni malamu ete esengeli kozongisa makila. Zulunalo yango eyebisi ete: “Mpo na oyo etali mobɛli oyo ayei na lopitalo kozanga koyeba lisusu makambo, kasi nde azali na mokanda na ye oyo emonisi ete alingi bázongisa ye makila te, monganga asengeli kotosa likanisi ya moto yango. Bakotosa mpe likanisi ya bana oyo bakokisi mibu ya kotánga na eteyelo ya katikati lokola nde bazalaki mikóló.” Nzokande, lapólo emonisi ete mpo na oyo etali kosalisa bilenge oyo bakokisi naino mibu 15 te, ezali minganga nde bazali na lotómo ya kozwa ekateli ya nsuka, kasi baboti te.
Kozanga kosolola
“Na mwayene, babalani ya Allemagne balekisaka miniti 10 te na mokolo moko mpo na kosolola,” ezali maloba tozali kotánga na zulunalo Nassauische Neue Presse. Mingi kati na bango bazalaka na ntango mingi te ya kosilisa mikakatano na bango. Epai mosusu, bapesi-toli na makambo na mabala bamoni ete bilenge oyo babalani sikawa bayebi te lolenge ya kosilisa mikakatano na bango. Bolɛmbu motindo wana ezali moko na makambo oyo mapesaka nzela na kokabwana; mabala mibale kati na mabala mitano mazali kokóma na mbula minei te. Zulunalo eyebisi makanisi ya Rosemarie Briendl, oyo azali bongo mopesi-toli: “Mpo na koloba solo, ndakisa oyo tosengeli kolanda mpo na kosilisa matáta ezali te.” Lisoló yango ebakisi ete: “Na bongo, bato bazali mingi na momeseno ya kosilisa mikakatano na bango ya libala na kokabwanáká.”
Bana oyo batɛmɛlaka masɛnginya
Nini epesaka nzela na bana mosusu ete bátɛmɛla masɛnginya makasi oyo euti na bopusi ya mokili ya lelo? Mpo na koyeba yango, balukiluki ya Eteyelo monene Loyola na Chicago bayekolaki bana 400 oyo bazalaki na mibu kobanda 9 kino 13, oyo bauti na bisika bikeseni. Zulunalo American Health eyebisi ete epai na ndambo ya baoyo bazalaki kolónga mbala na mbala mikakatano ya makasi, balukiluki balobelaki mingi makambo misato. Ya liboso, bazalaki kokakatana te mpo na kosɛnga lisalisi, na komonisáká makambo oyo mazali kotungisa bango mpe koluka lisungi na mayoki epai na mokóló moko (mbala mingi epai na tata to mama na bango, atako yango esalemaka ntango nyonso te). Ya mibale, bazalaki pene na kondima misala na bango mpe bazalaki kosala milende na komema baninga na bango ete bámekola te ezaleli moko ya likámá. Ya misato, bazalaki kosalela bantango ya kimya to ya kominanola mpo na kolɛmbisa nkanda na bango. Epai mosusu, balukiluki bamonisaki mimeseno misato oyo ezalaki epekiseli mpo na komiyokanisa na makambo ya makasi: kosala mobulu; ezaleli ya komisalela mabe, lokola kosalela bilangwiseli; kokima mikakatano.
“Bomoi ya kozala yo moko”
“Kozala yo moko ezali kolengola mingi bato ya Canada,” ezali maloba mauti na zulunalo Toronto Star. Lapólo moko oyo ebimisamaki na 1992 na lisangá moko oyo epesaka mitángo eyebisi ete: “Lelo oyo, mingi babendami na bomoi ya kozala yo moko.” Kobanda 1981 kino 1991, mposa ya kozala na bomoi yo moko ekólaki na 43 % epai na minzemba, na 16 % epai na baoyo babomá mabala mpe na 18 % epai na mibali mpe basi oyo bakufelá babalani na bango. Bobele na eleko moko wana, zulunalo Toronto Star, eyebisi ete “motuya ya mabala ya bonkɔ́kɔ . . . ekólaki na 110 %.” Mabota oyo matikali bobele na moboti moko ezali bongo na 20 % na mabota oyo mazali na Canada. Atako bosepeli wana ya bomoi ya kozala yo moko, motuya ya bana oyo bazali kobotama ebakisami mingi uta mibu 14.
Kozanga mpɔngi
“Bato oyo bazali kozanga mpɔngi bakoki kotambola, koyoka mpe komona lokola bato nyonso. Nzokande, bolukiluki emonisi ete makoki na bango ya kokanisa, makoki na bango ya kozwa bikateli mpe bokɛngi na bango ezali kolɛmba,” ezali maloba oyo tozali kotánga kati na zulunalo Veja. Mpe etángi bato na mayele oyo bazali kolobela makámá oyo mautaka na kozanga mpɔngi. Bolukiluki moko oyo esalemaki na monganga Denis Martinez, mokambi ya lisangá ya Brésil oyo etalelaka makambo ya mpɔngi, emonisi ete “makámá 20 % oyo ezali kozwama na mosala euti na kozanga kolala lokola esengeli.” Monganga Martinez akebisi baoyo balalaka mingi te, “na ndakisa, baoyo basalaka misala misato, . . . ete bazali bobele kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ na ntina na mosala.”
Misá mpo na banyama
Na mikolo oyo, bakonzi ya lingomba ya Italie bazali kopesa likebi mingi na banyama. Lisangá ya ba Franciscains efundaki kala mingi te ba Jésuites ete bazali “bapɛngwi” mpe “banguna ya biloko bizalisami” mpamba te balobaki ete banyama bazali na “likoki te ya kolinga.” Mario Canciani, oyo azali bongo Cardinal ya lingomba Katolike alimbolaki, likambo yango na maloba oyo: “Lingomba [Katolike] ezali komibanzabanza mpo na bikelamu nyonso ya bomoi.” Na yango, engebene zulunalo La Republica, bandimi ya Loma uta kala bakoki kosɛnga beneditu mpo na “bibwɛlɛ na bango.” Kolobeláká momeseno motindo wana, zulunalo elimboli ete “nyau, mbwa, tsakú, simbiliki mpe nyama nyonso oyo abongi kozwa beneditu akoki koyangana [na misá] elongo na baoyo tokoki kobénga kozanga nkáka ete baklisto.”
Esambiselo ya mikili ya Mpótó elóngisi Batatoli ya Grèce
Na mokolo mwa 25 Máí 1993, Batatoli ya Yehova bazwaki elónga monene na Esambiselo ya mikili ya Mpótó oyo ekɔtelaka ntómo ya bato, kuna na engumba Strasbourg. Likambo lizalaki kosambisama litalelaki Motatoli moko ya mibu 83, Minos Kokkinakis, oyo afundamaki ete azali kobuka mobeko mopekisi kobongwanisa bato na lingomba mosusu, mpe bautaki kokatela ye sanza minei ya bolɔ́kɔ, na mokolo mwa 20 Mársi 1986, na tribinali moko ya engumba Lasithi [na esanga ya Kelete). Nzokande, Esambiselo ya mikili ya Mpótó ekweisaki ekateli wana, bazuzi motoba bakweisaki yango mpe misato nde bandimaki yango. Uta mbula mingi, Leta ya Grèce, na bopusi ya Lingomba Ortodoxe ya Grèce, etyaki na bolɔ́kɔ bankóto ya Batatoli ya Yehova, kofundáká bango ete bazali kobuka mobeko ya kobongwanisa bato na lingomba mosusu. Na yango, Esambiselo ya mikili ya Mpótó etalelaki ete Leta ya Grèce etosaki te ntómo ya M. Kokkinakis ndenge epesameli bato nyonso na búku Convention européenne. Batatoli koleka 26 000 na mokili ya Grèce bazali kolikya ete ekateli oyo ekotya nsuka na monyoko oyo Leta azali konyokola bango mpe ekopesa bango nzela na kokokisa na kimya nyonso mosala na bango ya kosakola engebene mibeko.