Masolo ya kosolola na Biblia
1. Armagedone
A. Etumba ya Nzambe mpo na kosilisa mabe
Mabota eyanganisami na Armagedone. Em 16:14, 16
Nzambe akobunda, akosalela Mwana na ye ná baanzelu. 2Te 1:6-9; Em 19:11-16
Tokoki kobika. Sef 2:2, 3; Em 7:14
B. Emonisi te ete Nzambe azangi bolingo
Mokili ebebi mingi mpenza. 2Ti 3:1-5
Nzambe azali na motema molai, kasi mpo na bosembo akokanga mabɔkɔ te. 2Pe 3:9, 15; Lk 18:7, 8
Esengeli kolongola bato mabe mpo bayengebene bázala malamu. Mas 21:18; Em 11:18
2. Basakoli ya lokuta
A. Esakolamaki ete basakoli ya lokuta bakoya; bazalaki mpe na mikolo ya bantoma
Ndenge oyo tokoki koyeba basakoli ya lokuta. Mib 18:20-22; Lk 6:26
Esakolamaki ete bakoya; bakoyebana na mbuma. Mt 24:23-26; 7:15-23
3. Batatoli ya Yehova
A. Ebandeli ya Batatoli ya Yehova
Yehova amonisi banani bazali mpenza batatoli na ye. Yis 43:10-12; Yir 15:16
Molɔngɔ ya batatoli ya sembo ebandi na Abele. Ebr 11:4, 39; 12:1
Yesu azalaki motatoli ya sembo mpe ya solo. Yn 18:37; Em 1:5; 3:14
4. Batisimo
A. Bakristo basengeli kozwa batisimo
Yesu apesaki ndakisa. Mt 3:13-15; Ebr 10:7
Ezali elembo ya komiboya to ya komipesa. Mt 16:24; 1Pe 3:21
Ezali bobele mpo na baoyo bakoli mpe bakoki koteya bango. Mt 28:19, 20; Mis 2:41
Esengeli kozindisa moto mobimba na mai. Mis 8:38, 39; Yn 3:23
B. Elongolaka masumu te
Yesu abatisamaki te mpo masumu na ye elongwa. 1Pe 2:22; 3:18
Makila ya Yesu nde elongolaka masumu. 1Yn 1:7
5. Biblia
A. Liloba ya Nzambe ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe
Elimo ya Nzambe etambwisaki bato bákoma yango. 2Pe 1:20, 21
Ezali na bisakweli: Da 8:5, 6, 20-22; Lk 21:5, 6, 20-22; Yis 45:1-4
Biblia mobimba ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba. 2Ti 3:16, 17; Ro 15:4
B. Ebongi mpenza mpo na kotambwisa bato na mikolo na biso
Kotya likebi na mitinda ya Biblia te ezali likama. Ro 1:28-32
Bwanya ya bato ekoki kozwa esika ya Biblia te. 1Ko 1:21, 25; 1Ti 6:20
Ebatelaka moto liboso ya monguna monene. Ef 6:11, 12, 17
Etambwisaka moto na nzela ya malamu. Nz 119:105; 2Pe 1:19; Mas 3:5, 6
C. Ekomami mpo na bato ya bikólo nyonso mpe ya mposo nyonso
Biblia ebandaki kokomama na mikili ya Azia. Kob 17:14; 24:12, 16; 34:27
Nzambe apesaki yango bobele mpo na bato ya Mpoto te. Ro 10:11-13; Ga 3:28
Nzambe andimaka bato ya ndenge nyonso. Mis 10:34, 35; Ro 5:18; Em 7:9, 10
6. Bililingi
A. Kosalela bililingi ná bikeko na losambo ezali kotyola Nzambe
Tokoki kosala elilingi ya Nzambe te. 1Yn 4:12; Yis 40:18; 46:5; Mis 17:29
Bayebisi bakristo bákeba na bililingi. 1Ko 10:14; 1Yn 5:21
Esengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo. Yn 4:24
B. Kosambela bililingi ezalaki likama mpo na ekólo ya Yisraele
Bapekisaki Bayuda kosambela bililingi. Kob 20:4, 5
Eyokaka te, elobaka mpe te; baoyo basalaka yango bakokóma lokola yango. Nz 115:4-8
Ezalaki motambo mpe ememaki na libebi. Nz 106:36, 40-42; Yir 22:8, 9
C. Kosambela “ndenge olingi” epekisami
Nzambe aboyaki ete moto asambela ye “ndenge alingi.” Yis 42:8
Bobele Nzambe nde azali “Moyoki ya libondeli.” Nz. 65:1, 2
7. Biyenga ya mangomba, fɛti ya mokolo ya kobotama
A. Bakristo ya liboso bazalaki kosala fɛti ya mokolo ya kobotama mpe Noele te
Basambeli ya solo te nde bazalaki kosala fɛti yango. Eb 40:20; Mt 14:6
Tosengeli kokanisa bobele mokolo ya liwa ya Yesu. Lk 22:19, 20; 1Ko 11:25, 26
Ezali malamu te kosala bafɛti ya lokoso. Ro 13:13; Ga 5:21; 1Pe 4:3
8. Bokonzi
A. Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosalela bato
Ekokokisa mokano ya Nzambe. Mt 6:9, 10; Nz 45:6; Em 4:11
Ezali boyangeli moko oyo ezali na mokonzi mpe na mibeko. Yis 9:6, 7; 2:3; Nz 72:1, 8
Ekoboma bato mabe, mpe ekoyangela mabele mobimba. Da 2:44; Nz 72:8
Ekozala boyangeli ya mbula 1 000 mpo na kobikisa bato mpe kozongisa Paradiso. Em 21:2-4; 20:6
B. Ebandi koyangela, ntango banguna ya Kristo bazali naino
Nsima ya kosekwa, Kristo asengelaki kozela ntango molai. Nz 110:1; Ebr 10:12, 13
Azwi nguya mpe abundisi Satana. Nz 110:2; Em 12:7-9; Lk 10:18
Nsima ya kotyama ya Bokonzi, mawa na mabele. Em 12:10, 12
Yikiyiki oyo ezali sikoyo emonisi ete oyo ezali ntango ya komitya na ngámbo ya Bokonzi. Em 11:15-18
C. Ezali ‘na kati ya mitema’ te, ekotyama mpe na makasi ya bato te
Bokonzi ezali na likoló, kasi na mabele te. 2Ti 4:18; 1Ko 15:50; Nz 11:4
Ezali ‘na kati ya mitema’ te; Yesu azalaki nde kolobela Bafarisai. Lk 17:20, 21
Ezali ya mokili oyo te. Yn 18:36; Lk 4:5-8; Da 2:44
Biyangeli, malako ya mokili oyo ekozala lisusu te. Da 2:44
9. Bomoi
A. Bato ya botosi nde bakozwa bomoi ya seko
Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te, alaki bomoi. Tit 1:2; Yn 10:27, 28
Bato oyo bazali na kondima nde bakozwa bomoi ya seko. Yn 11:25, 26
Liwa ekosila nyɛɛ. 1Ko 15:26; Em 21:4; 20:14; Yis 25:8
B. Baoyo bazali nzoto ya Kristo nde bakozwa bomoi na likoló
Nzambe aponaka bato yango ndenge ye moko alingi. Mt 20:23; 1Ko 12:18
Bobele bato 144 000 nde bazwami awa na mabele. Em 14:1, 4; 7:2-4; 5:9, 10
Ata Yoane Mobatisi akozala na Bokonzi ya likoló te. Mt 11:11
C. Bato oyo motángo na bango eyebani te, “bampate mosusu,” bazwi elaka ya bomoi awa na mabele
Bobele bato moke nde bakozala na likoló elongo na Yesu. Em 14:1, 4; 7:2-4
“Bampate mosusu” bazali bandeko ya Kristo te. Yn 10:16; Mt 25:32, 40
Ebele ya bato bazali koyanganisama sikoyo mpo bázala na bomoi awa na mabele. Em 7:9, 15-17
Bato mosusu bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele. Em 20:12; 21:4
10. Bosato (Trinité)
A. Nzambe, Tata, azali moto bobele moko, oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba
Nzambe azali bato misato te. Mib 6:4; Mal 2:10; Mr 10:18; Ro 3:29, 30
Mwana azalisamaki; Nzambe ye mei azalaki liboso. Em 3:14; Kol 1:15; Yis 44:6
Nzambe azali mokonzi ya molɔ́ngɔ́ libela na libela. Flp 2:5, 6; Da 4:35
Nzambe asengeli kokumisama na bikelamu nyonso. Flp 2:10, 11
B. Mwana azali na nse ya Tata, ezala liboso mpe nsima ya koya na mabele
Mwana azalaki na botosi banda na likoló, Tata moto atindaki ye. Yn 8:42; 12:49
Azalaki na botosi awa na mabele, Tata aleki ye. Yn 14:28; 5:19; Ebr 5:8
Azwi lokumu mingi na likoló, kasi amikitisaki. Flp 2:9; 1Ko 15:28; Mt 20:23
Yehova mokonzi ya Kristo mpe Nzambe na ye. 1Ko 11:3; Yn 20:17; Em 1:6
C. Bomoko ya Nzambe ná Kristo
Ntango nyonso bazalaka na boyokani na makambo nyonso. Yn 8:28, 29; 14:10
Bomoko na bango ezali lokola oyo ya mobali ná mwasi na ye. Yn 10:30; Mt 19:4-6
Bandimi nyonso basengeli kozala na bomoko yango. Yn 17:20-22; 1Ko 1:10
Losambo ya Yehova ezali moko, na nzela ya Kristo mpo na libela. Yn 4:23, 24
D. Elimo santu ya Nzambe ezali nguya na ye
Ezali nguya, kasi moto te. Mt 3:16; Yn 20:22; Mis 2:4, 17, 33
Ezali te moto moko oyo azali na likoló elongo na Nzambe ná Kristo. Mis 7:55, 56; Em 7:10
Ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa mikano na ye. Nz 104:30; 1Ko 12:4-11
Baoyo bazali kosalela Nzambe bazwaka yango mpe batambwisamaka na yango. 1Ko 2:12, 13; Ga 5:16
11. Botɛmɛli, minyoko
A. Mpo na nini bakristo bakutanaka na botɛmɛli
Bayinaki Yesu, asakolaki ete botɛmɛli ekozala. Yn 15:18-20; Mt 10:22
Kokangama na mitinda ya sembo ezali kokweisa mokili. 1Pe 4:1, 4, 12, 13
Satana, nzambe ya makambo ya ntango oyo, azali kotɛmɛla Bokonzi. 2Ko 4:4; 1Pe 5:8
Mokristo abangaka te, Nzambe asungaka ye. Ro 8:38, 39; Yk 4:8
B. Mwasi akotikela mobali na ye nzela te ete akabola ye na Nzambe
Basili kokebisa mwasi; bato mosusu bakoki koyebisa mobali na ye makambo ya lokuta. Mt 10:34-38; Mis 28:22
Mwasi asengeli kotalela Nzambe mpe Kristo. Yn 6:68; 17:3
Soki azali sembo, akoki mpe kobikisa mobali na ye. 1Ko 7:16; 1Pe 3:1-6
Mobali azali mokonzi, kasi na likambo ya losambo asengeli kopesa mitindo te. 1Ko 11:3; Mis 5:29
C. Mobali akotikela mwasi na ye nzela te ete apekisa ye kosalela Nzambe
Asengeli kolinga mwasi na ye mpe libota na ye, mposa na ye ezali ete bázwa bomoi. 1Ko 7:16
Ye nde azwaka bikateli, akokisaka bamposa na bango. 1Ko 11:3; 1Ti 5:8
Nzambe alingaka mobali oyo akangami na solo. Yk 1:12; 5:10, 11
Kobuka mibeko ya Nzambe mpo na koluka kimya ebebisaka boyokani na Ye. Ebr 10:38
Akokamba libota na ye na bolamu ya mokili ya sika. Em 21:3, 4
12. Bozalisi
A. Eyokani na siansi ya solo; ekweisi evolisyo
Siansi endimi ete biloko nyonso ezalisamaki na molɔngɔ. Eb 1:11, 12, 21, 24, 25
Mobeko ya Nzambe oyo elobi ete eloko na eloko ezali na “motindo” na yango ezali solo. Eb 1:11, 12; Yk 3:12
B. Mikolo ya bozalisi ezali mikolo ya ngonga 24 te
“Mokolo” ekoki kolimbola bobele eleko moko boye. Eb 2:4
Na miso ya Nzambe, mokolo ekoki kozala eleko moko molai. Nz 90:4; 2Pe 3:8
13. Eglize
A. Eglize ya elimo, etongami likoló ya Kristo
Nzambe afandaka te na batempelo oyo bato basali. Mis 17:24, 25; 7:48
Eglize ya solo ezali tempelo ya elimo oyo esalemi na mabanga ya bomoi. 1Pe 2:5, 6
Kristo, libanga ya litumu; bantoma, mabanga mosusu ya moboko. Ef 2:20
Esengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo. Yn 4:24
B. Eglize etongami likoló ya Petro te
Yesu alobaki te ete eglize etongami likoló ya Petro. Mt 16:18
“Libanga” ezali nde Yesu. 1Ko 10:4
Petro amonisaki ete Yesu azali moboko. 1Pe 2:4, 6-8; Mis 4:8-12
14. Ekaniseli, misa
A. Ekaniseli ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo
Esalemaka mbala moko na mbula na dati ya Elekeli. Lk 22:1, 17-20; Kob 12:14
Esalemaka mpo na kokanisa liwa oyo Kristo akufaki mpo azala mbeka. 1Ko 11:26; Mt 26:28
Baoyo bazali na elikya ya kokende likoló nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli. Lk 22:29, 30; 12:32, 37
Ndenge nini moto akoki koyeba ete azali na elikya yango. Ro 8:15-17
B. Misa ezali na Makomami te
Mpo masumu elimbisama, makila esengeli kosopana. Ebr 9:22
Kristo Moyokanisi bobele moko ya kondimana ya sika. 1Ti 2:5, 6; Yn 14:6
Kristo na likoló; nganga-nzambe moko te akoki kokitisa ye. Mis 3:20, 21
Ntina ya kozongelaka mbeka ya Kristo mbala na mbala ezali te. Ebr 9:24-26; 10:11-14
15. Ekulusu
A. Babakaki Yesu na nzete ya mpasi, likambo ya nsɔni
Babakaki Yesu na nzete ya kobomama to na likonzí. Mis 5:30; 10:39; Ga 3:13
Bakristo basengeli komema nzete ya mpasi, elembo ya likambo ya nsɔni. Mt 10:38; Lk 9:23
B. Tosengeli kosambela yango te
Kolakisa nzete ya mpasi ya Kristo ezali likambo ya nsɔni. Ebr 6:6; Mt 27:41, 42
Kosalela ekulusu na losambo ezali kosambela bikeko. Kob 20:4, 5; Yir 10:3-5
Yesu azali elimo, azali lisusu likoló ya nzete te. 1Ti 3:16; 1Pe 3:18
16. Elimo, misala ya bilimo mabe
A. Elimo santu ezali nini
Nguya ya Nzambe, kasi ezali moto te. Mis 2:2, 3, 33; Yn 14:17
Esalelamaki na ntango ya bozalisi, etambwisaki bato bákoma Biblia, bongo na bongo. Eb 1:2; Ezk 11:5
Ebotaka mpe etyaka baoyo bakozala nzoto ya Kristo mafuta. Yn 3:5-8; 2Ko 1:21, 22
Epesaka nguya mpe etambwisaka basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ga 5:16, 18
B. Nguya ya bomoi ebengami elimo
Nguya ya bomoi, esimbami na mpema. Yk 2:26; Yb 27:3
Nzambe azali na bokonzi likoló na nguya ya bomoi. Zek 12:1; Mos 8:8
Nguya ya bomoi ya bato mpe ya banyama eutaka epai ya Nzambe. Mos 3:19-21
Elimo ezongaka na mabɔkɔ ya Nzambe na elikya ete moto oyo akufi akosekwa. Lk 23:46
C. Esengeli koboya misala ya bilimo mabe, misala ya bademo
Liloba ya Nzambe epekisi yango. Yis 8:19, 20; Le 19:31; 20:6, 27
Kosakola makambo oyo ebombami ezali misala ya bademo; Nzambe aboyi yango. Mis 16:16-18
Ememaka na libebi. Ga 5:19-21; Em 21:8; 22:15
Astroloji epekisami. Mib 18:10-12; Yir 10:2
17. Kobikisa mpe koloba na minɔkɔ
A. Kobikisa na elimo ezali na matomba oyo eumelaka libela
Maladi ya elimo ebomaka. Yis 1:4-6; 6:10; Hos 4:6
Mokumba ya liboso mpenza ezali nde kobikisa na elimo. Yn 6:63; Lk 4:18
Elongolaka masumu; epesaka bolamu, bomoi. Yk 5:19, 20; Em 7:14-17
B. Na Bokonzi ya Nzambe bato bakozala nzoto kolɔngɔnɔ ntango nyonso
Yesu asilisaki bamaladi ya bato, asakolaki mapamboli oyo Bokonzi ekopesa. Mt 4:23
Bokonzi oyo elakami ekobikisa bato mpo na libela. Mt 6:10; Yis 9:7
Ata liwa ekosila. 1Ko 15:25, 26; Em 21:4; 20:14
C. Eloko moko te emonisi ete Nzambe andimaka kobikisa oyo bato bazali kobikisa lelo
Bayekoli bamibikisaki te na makamwisi. 2Ko 12:7-9; 1Ti 5:23
Makabo ya makamwisi esukaki nsima ya mikolo ya bantoma. 1Ko 13:8-11
Kobikisa bato ya maladi ezali te elembeteli ya kondimama na Nzambe. Mt 7:22, 23; 2Te 2:9-11
D. Koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki bobele mpo na mwa ntango moke
Ezalaki elembo; kasi esengeli koluka nde makabo oyo eleki monene. 1Ko 14:22; 12:30, 31
Basakolaki ete makabo ya elimo ya kosala makamwisi ekosila. 1Ko 13:8-10
Makamwisi ezali elembeteli ya solo te ya kondimama na Nzambe. Mt 7:22, 23; 24:24
18. Kolandana ya ntango
A. 1914 (T.B.) esukisi ntango ya mabota
Molɔngɔ ya bakonzi oyo bayangelaki esukaki na mobu 607 L.T.B. Ezk 21:25-27
“Ntango nsambo” esengelaki koleka liboso ya kozongisama ya bokonzi. Da 4:32, 16, 17
Ntango nsambo = Ntango 3 1⁄2 × 2, to mikolo 1 260 × 2. Em 12:6, 14; 11:2, 3
Mokolo moko mpo na mbula moko. [Epesi mbula 2 520] Ezk 4:6; Mit 14:34
Ekoumela kino Bokonzi ekotyama. Lk 21:24; Da 7:13, 14
19. Kosambela bankɔkɔ
A. Kosambela bankɔkɔ ezali na ntina te
Bankɔkɔ bakufá, bayebaka eloko te. Mos 9:5, 10
Tosengeli kosambela bankɔkɔ te. Ro 5:12, 14; 1Ti 2:14
Nzambe apekisi losambo ya ndenge wana. Kob 34:14; Mt 4:10
B. Tokoki kokumisa bato, kasi tokosambela bobele Nzambe
Bilenge basengeli kokumisa mikóló. 1Ti 5:1, 2, 17; Ef 6:1-3
Kasi tosengeli kosambela bobele Nzambe. Mis 10:25, 26; Em 22:8, 9
20. Kosambela Maria
A. Maria azalaki mama ya Yesu, kasi “mama ya Nzambe” te
Nzambe azali na ebandeli te. Nz 90:2; 1Ti 1:17
Maria azalaki mama ya Mwana ya Nzambe, ntango azalaki awa na mabele. Lk 1:35
B. Maria atikalaki “ngɔndɔ libela” te
Abalanaki na Yozefe. Mt 1:19, 20, 24, 25
Longola Yesu, abotaki bana mosusu. Mt 13:55, 56; Lk 8:19-21
Na ntango wana, bango bazalaki “bandeko ya elimo” ya Yesu te. Yn 7:3, 5
21. Kosangisa mangomba
A. Kosangana na mangomba mosusu eyokani na nzela ya Nzambe te
Nzela ezali bobele moko, ya nkaka, bato moke bazali komona yango. Ef 4:4-6; Mt 7:13, 14
Likebisi: Mateya ya lokuta ebebisaka bato. Mt 16:6, 12; Ga 5:9
Etinda ya kokabwana na mangomba mosusu. 2Ti 3:5; 2Ko 6:14-17; Em 18:4
B. Koloba ete “mangomba nyonso ezali malamu” ezali lokuta
Basusu bazalaka na molende, kasi na ndenge Nzambe alingi te. Ro 10:2, 3
Mabe ekoki kobebisa oyo ezali malamu. 1Ko 5:6; Mt 7:15-17
Bateyi ya lokuta bayeisaka libebi. 2Pe 2:1; Mt 12:30; 15:14
Losambo ya pɛto esɛngi kokangama kaka na Nzambe. Mib 6:5, 14, 15
22. Kozonga ya Kristo
A. Kozonga na ye ekomonana na miso ya bato te
Ayebisaki bayekoli ete mokili ekomona ye lisusu te. Yn 14:19
Bobele bayekoli nde bamonaki ntango amataki na likoló; kozonga na ye mpe ekozala bongo. Mis 1:6, 10, 11
Na likoló, amonanaka te mpo azali elimo. 1Ti 6:14-16; Ebr 1:3
Akozonga na kati ya nguya na Bokonzi ya likoló. Da 7:13, 14
B. Eyebani na makambo oyo ezali komonana polele
Bayekoli basɛngaki elembo ya kozala na ye. Mt 24:3
Bakristo “bamonaka” kozala na ye na ndenge bazali kososola yango. Ef 1:18
Makambo mingi ezali komonisa kozala na ye. Lk 21:10, 11
Banguna “bakomona” ntango libebi ekokwela bango. Em 1:7
23. Libala
A. Libala esengeli kozala ekanganeli ya lokumu
Ezali lokola Kristo ná mwasi na ye. Ef 5:22, 23
Mbeto ya libala esengeli kozala na mbindo te. Ebr 13:4
Babalani bazwi toli ete basengeli kokabwana te. 1Ko 7:10-16
Porneia ezali ntina bobele moko oyo Makomami endimi mpo na koboma libala. Mt 19:9
B. Bakristo basengeli kotosa etinda ya bokonzi
Lokola mobali azali mokonzi, asengeli kolinga mpe kokokisa bamposa ya libota na ye. Ef 5:23-31
Mwasi asengeli komikitisa, kozala na bolingo mpe kotosa mobali na ye. 1Pe 3:1-7; Ef 5:22
Bana basengeli kozala na botosi. Ef 6:1-3; Kol 3:20
C. Mikumba ya baboti bakristo epai ya bana
Basengeli kolinga bango, kolekisa ntango elongo na bango mpe kotyela bango likebi. Tit 2:4
Kosilikisa bango te. Kol 3:21
Kopesa bango biloko basengeli na yango, ná makambo ya elimo mpe. 2Ko 12:14; 1Ti 5:8
Koteya bango makambo ya bomoi. Ef 6:4; Mas 22:6, 15; 23:13, 14
D. Bakristo basengeli kobalana bobele na bakristo
Kobala bobele “na kati ya Nkolo.” 1Ko 7:39; Mib 7:3, 4; Ne 13:26
E. Makomami endimi kobala basi ebele te
Na ebandeli, mobali azalaki bobele na mwasi moko. Eb 2:18, 22-25
Yesu azongisaki lilako yango mpo na bakristo. Mt 19:3-9
Bakristo ya liboso babalaki basi ebele te. 1Ko 7:2, 12-16; Ef 5:28-31
24. Libondeli
A. Mabondeli oyo Nzambe ayokaka
Nzambe ayokaka mabondeli ya bato. Nz 145:18; 1Pe 3:12
Ayokaka bato oyo bazangi boyengebene bobele soki babongoli bizaleli. Yis 1:15-17
Esengeli kobondela na nkombo ya Yesu. Yn 14:13, 14; 2Ko 1:20
Esengeli kobondela na boyokani na mokano ya Nzambe. 1Yn 5:14, 15
Kondima ezali na ntina. Yk 1:6-8
B. Mabondeli ya kozongelazongela, kobondela Maria to “basantu” ezali na ntina te
Esengeli kobondela Nzambe na nkombo ya Yesu. Yn 14:6, 14; 16:23, 24
Mabondeli ya kozongelazongela ekoyokama te. Mt 6:7
25. Lifelo (Nkunda)
A. Ezali esika ya konyokwama na mɔtɔ te
Ntango Yobo azalaki konyokwama, abondelaki ete akende kuna. Yb 14:13
Kuna mosala ezalaka te. Nz 6:5; Mos 9:10; Yis 38:18, 19
Yesu asekwaki mpe abimaki na nkunda, elingi koloba autaki na lifelo. Mis 2:27, 31, 32; Nz 16:10
Lifelo ekozongisa bakufi mosusu, mpe ekobebisama. Em 20:13, 14
B. Mɔtɔ ezali elilingi ya kobebisama nyɛɛ
Mɔtɔ ezali elilingi ya kolongolama na nzela ya liwa. Mt 25:41, 46; 13:30
Bato mabe oyo baboyi kobongola mitema bakobomama libela lokola nde batumbami na mɔtɔ. Ebr 10:26, 27
“Monyoko” makasi oyo Satana akozwa ezali liwa ya seko. Em 20:10, 14, 15
C. Lisolo ya mozwi ná Lazare ezali elembeteli ya minyoko ya seko te
Mɔtɔ oyo balobeli awa ezali mɔtɔ ya solo te ndenge moko mpe ntolo ya Abrahama ezali ntolo ya solo te. Lk 16:22-24
Kondimama na Abrahama ekeseni mpe na molili. Mt 8:11, 12
Kobomama ya Babilone ebengami monyoko makasi. Em 18:8-10, 21
26. Likoló
A. Bobele bato 144 000 nde bakokende na likoló
Ezali motángo moko moke; bakozala bakonzi elongo na Kristo. Em 5:9, 10; 20:4
Yesu moto ya liboso; basusu baponami nsima. Kol 1:18; 1Pe 2:21
Bato mingi bakofanda nde awa na mabele. Nz 72:8; Em 21:3, 4
Bato 144 000 bazwi libaku moko monene oyo bato mosusu bazwi te. Em 14:1, 3; 7:4, 9
27. Lingomba
A. Lingomba ya solo ezali bobele moko
Elikya moko, kondima moko, batisimo moko. Ef 4:5, 13
Ezwi mosala ya kozalisa bayekoli. Mt 28:19; Mis 8:12; 14:21
Eyebanaka na mbuma na yango. Mt 7:19, 20; Lk 6:43, 44; Yn 15:8
Bato na yango balinganaka mpe bayokanaka. Yn 13:35; 1Ko 1:10; 1Yn 4:20
B. Mateya ya lokuta ekweisami mpenza
Yesu akweisaki mateya ya lokuta. Mt 23:15, 23, 24; 15:4-9
Asalaki bongo mpo na kobatela bakufi-miso. Mt 15:14
Solo esikoli bango mpo bázala bayekoli ya Yesu. Yn 8:31, 32
C. Soki emonani ete lingomba na yo ezali mabe, longwa wana
Solo esikolaka; emonisaka ete bato mingi bazali na libunga. Yn 8:31, 32
Bayisraele mpe bato mosusu batikaki losambo na bango ya kala. Yos 24:15; 2Ba 5:17
Bakristo ya liboso babongolaki makanisi na bango. Ga 1:13, 14; Mis 3:17, 19
Paulo atikaki lingomba na ye. Mis 26:4-6
Mokili mobimba ebebi; esengeli kobongola makanisi. Em 12:9; Ro 12:2
D. Koloba ete “mangomba nyonso ezali malamu” emonisi te ete Nzambe andimaka yango
Nzambe nde apesaka malako ya losambo. Yn 4:23, 24; Yk 1:27
Oyo nyonso eyokani na mokano ya Nzambe te ezali mabe. Ro 10:2, 3
“Misala ya malamu” ekoki koboyama. Mt 7:21-23
Eyebanaka na mbuma na yango. Mt 7:20
28. Lisekwa
A. Elikya mpo na bakufi
Nyonso oyo bazali na nkunda bakosekwa. Yn 5:28, 29
Lisekwa ya Yesu ezali ndanga. 1Ko 15:20-22; Mis 17:31
Bato oyo bazali kosalela elimo lisumu bakosekwa te. Mt 12:31, 32
Baoyo bazali na kondima bazali na elikya ete bakosekwa. Yn 11:25
B. Lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló to awa na mabele
Bato nyonso bakufaka mpo na Adama; bazali kozwa bomoi mpo na Yesu. 1Ko 15:20-22; Ro 5:19
Bato nyonso oyo bakosekwa bakozala na nzoto ndenge moko te. 1Ko 15:40, 42, 44
Baoyo bakozala elongo na Yesu bakozala lokola ye. 1Ko 15:49; Flp 3:20, 21
Baoyo bakoyangela te bakozala awa na mabele. Em 20:4b, 5, 13; 21:3, 4
29. Lisiko
A. Yesu apesaki bomoi na ye ezala “lisiko mpo na nyonso”
Yesu apesaki bomoi na ye ezala lisiko. Mt 20:28
Motuya ya makila oyo esopani epesaka bolimbisi ya masumu. Ebr 9:14, 22
Mbeka bobele moko ekoki mpo na libela. Ro 6:10; Ebr 9:26
Matomba eyaka mbala moko boye te; esengeli kondimela yango. Yn 3:16
B. Ezalaki motuya oyo ekokani mpenza
Adama azalisamaki moto ya kokoka. Mib 32:4; Mos 7:29; Eb 1:31
Mpo na lisumu, abungisaki ezaleli ya kokoka mpo na ye moko mpe mpo na bana na ye. Ro 5:12, 18
Bana na ye bazalaki na eloko mosusu ya kosala te; esengelaki moto moko oyo akokani na Adama. Nz 49:7; Mib 19:21
Bomoi ya Yesu moto ya kokoka epesamaki lisiko. 1Ti 2:5, 6; 1Pe 1:18, 19
30. Lisumu
A. Ndimbola ya lisumu
Kobuka mobeko ya Nzambe, lilako na ye ya kokoka. 1Yn 3:4; 5:17
Moto, ekelamu ya Nzambe, akozongisa monɔkɔ liboso na ye. Ro 14:12; 2:12-15
Mibeko epesaki ndimbola ya lisumu, esalisaki bato báyeba yango. Ga 3:19; Ro 3:20
Biso nyonso tozali na kati ya lisumu, tozali kokokisa malako ya kokoka ya Nzambe te. Ro 3:23; Nz 51:5
B. Ntina oyo biso nyonso tomonaka mpasi na lisumu ya Adama
Adama apesaki biso nyonso ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa. Ro 5:12, 18
Nzambe amonisaki motema mawa ndenge atikaki bato bázala. Nz 103:8, 10, 14, 17
Mbeka ya Yesu ezali kozipa masumu. 1Yn 2:2
Lisumu mpe misala mosusu ya Zabolo ekolongolama. 1Yn 3:8
C. Mbuma oyo epekisamaki ezalaki kozanga botosi, kasi kosangisa nzoto te
Nzete oyo epekisamaki ezalaki liboso ete Eva azalisama. Eb 2:17, 18
Balobaki na Adama na Eva ete basengeli kobota bana. Eb 1:28
Bana bazali mbuma ya lisumu te, kasi lipamboli ya Nzambe. Nz 127:3-5
Eva asalaki lisumu ntango mobali na ye azalaki te; azelaki ye te. Eb 3:6; 1Ti 2:11-14
Adama, mokonzi, atombokelaki mobeko ya Nzambe. Ro 5:12, 19
D. Kosalela elimo santu lisumu elimboli nini (Mt 12:32; Mr 3:28, 29)
Ezali te lisumu oyo batikelá biso. Ro 5:8, 12, 18; 1Yn 5:17
Moto akoki koyokisa elimo mawa, kasi akoki komisembola. Ef 4:30; Yk 5:19, 20
Kosalaka lisumu na nko ememaka na liwa. 1Yn 3:6-9
Nzambe asambisaka bato ya ndenge wana, alongolaka elimo na ye. Ebr 6:4-8
Tosengeli kobondela te mpo na bato wana oyo baboyi kobongola motema. 1Yn 5:16, 17
31. Litatoli
A. Bakristo nyonso basengeli kotatola, kosakola nsango malamu
Esengeli kondima Yesu liboso ya bato mpo ondimama. Mt 10:32
Esengeli kozala motosi ya Liloba, kozala na kondima. Yk 1:22-24; 2:24
Bato ya sika mpe basengeli kozala bateyi. Mt 28:19, 20
Kosakola liboso ya bato epesaka lobiko. Ro 10:10
B. Kozongela bato mbala na mbala, kolanda kopesa litatoli ezali na ntina
Esengeli kokebisa bato mpo na nsuka. Mt 24:14
Yirimia asakolaki nsuka ya Yerusaleme bambula mingi. Yir 25:3
Lokola bakristo ya liboso, tokotika te. Mis 4:18-20; 5:28, 29
C. Esengeli kotatola mpo na kozala na nyongo ya makila te
Esengeli kokebisa ete nsuka ebɛlɛmi. Ezk 33:7; Mt 24:14
Soki okebisi te okozala na nyongo ya makila. Ezk 33:8, 9; 3:18, 19
Paulo azalaki na nyongo ya makila te; alobaki mpenza solo. Mis 20:26, 27; 1Ko 9:16
Ebikisaka motatoli ná moyoki. 1Ti 4:16; 1Ko 9:22
32. Liwa
A. Ntina ya liwa
Na ebandeli, moto azalaki na ezaleli ya kokoka, azalaki na elikya ya bomoi nsuka te. Eb 1:28, 31
Kozanga botosi nde ememaki etumbu ya liwa. Eb 2:16, 17; 3:17, 19
Adama atikela bana na ye nyonso lisumu ná liwa. Ro 5:12
B. Soki moto akufi akómaka ndenge nini
Adama asalemaki molimo, kasi azwaki yango kozwa te. Eb 2:7; 1Ko 15:45
Lokola moto azali molimo, akufaka. Ezk 18:4; Yis 53:12; Yb 11:20
Bakufi bazali na bososoli te, bayebi eloko moko te. Mos 9:5, 10; Nz 146:3, 4
Bakufi balali, bazali kozela lisekwa. Yn 11:11-14, 23-26; Mis 7:60
C. Likoki ya kosolola na bakufi ezali te
Bakufi bazali bilimo oyo efandaka epai ya Nzambe te. Nz 115:17; Yis 38:18
Bakebisi biso tómeka kosolola na bakufi te. Yis 8:19; Le 19:31
Bato oyo basololaka na bilimo ná bato oyo basakolaka makambo ekoya bakweisami. Mib 18:10-12; Ga 5:19-21
33. Lobiko
A. Lobiko euti na Nzambe na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu
Bomoi ezali likabo oyo Nzambe apesi na nzela ya Mwana na ye. 1Yn 4:9, 14; Ro 6:23
Lobiko ekoki kozwama bobele na lisalisi ya mbeka ya Yesu. Mis 4:12
Eloko moko te emonisaka kobongola motema na ntango moto alingi kokata motema. Yk 2:14, 26
Mpo na kozwa lobiko esengeli kosala milende. Lk 13:23, 24; 1Ti 4:10
B. Koloba “soki obiki, obiki mpo na libela” ezali na Makomami te
Baoyo bazwi elimo santu bakoki kokwea. Ebr 6:4, 6; 1Ko 9:27
Bayisraele mingi babomamaki atako babikaki na Ezipito. Yd 5
Lobiko ezali likambo ya pwasa te. Flp 2:12; 3:12-14; Mt 10:22
Baoyo bazali kozonga nsima bakómaka mabe koleka ndenge bazalaki liboso. 2Pe 2:20, 21
C. Makomami eteyaka te ete “bato nyonso bakobika”
Bato mosusu bakobongola motema te. Ebr 6:4-6
Nzambe asepelaka na liwa ya moto mabe te. Ezk 33:11; 18:32
Kasi bolingo ekoki te kokanga miso na makambo ya kozanga boyengebene. Ebr 1:9
Bato mabe bakobomama. Ebr 10:26-29; Em 20:7-15
34. Mabe, bampasi oyo ezali na mokili
A. Nani azali mobandisi ya bampasi oyo ezali na mokili
Bampasi ya lelo euti nde na boyangeli mabe. Mas 29:2; 28:28
Mokonzi ya mokili oyo azali monguna ya Nzambe. 2Ko 4:4; 1Yn 5:19; Yn 12:31
Bampasi euti na Zabolo; ntango na ye etikali mokuse. Em 12:9, 12
Kimya mpenza ekozala ntango Zabolo akokangama. Em 20:1-3; 21:3, 4
B. Mpo na nini batiki nzela na mabe
Zabolo abɛtɛlaki bosembo ya bikelamu ya Nzambe ntembe. Yb 1:11, 12
Bapesi bato ya sembo libaku ya komonisa bosembo na bango. Ro 9:17; Mas 27:11
Emonani ete Zabolo azali mobuki lokuta, ntembe ekosila. Yn 12:31
Bato ya sembo bakozwa mbano ya bomoi ya seko. Ro 2:6, 7; Em 21:3-5
C. Koumela oyo ntango ya nsuka eumeli emonisi motema mawa
Lokola na mikolo ya Noa, esengeli ntango ezala mpo na kopesa likebisi. Mt 24:14, 37-39
Nzambe azali koumisa te, kasi azali nde na motema mawa. 2Pe 3:9; Yis 30:18
Biblia ezali kosalisa biso ete likama yango ekwela biso pwasa te. Lk 21:36; 1Te 5:4
Esengeli koluka libateli ya Nzambe sikoyo. Yis 2:2-4; Sef 2:3
D. Bato bakoki te kosilisa bampasi oyo ezali na mokili
Bato bazali na nsɔmɔ, babulungani. Lk 21:10, 11; 2Ti 3:1-5
Bokonzi ya Nzambe ekolonga, kasi ya bato te. Da 2:44; Mt 6:10
Mpo na kobika, esengeli koyokana na Mokonzi uta sikoyo. Nz 2:9, 11, 12
35. Mabele
A. Mokano ya Nzambe mpo na mabele
Paradiso esalemaki awa na mabele mpo na bato ya kokoka. Eb 1:28; 2:8-15
Mokano ya Nzambe ekokokisama. Yis 55:11; 46:10, 11
Mabele ekotonda na bato ya kimya mpe ya kokoka. Nz 72:7; Yis 45:18; 9:6, 7
Bokonzi ekozongisa Paradiso. Mt 6:9, 10; Em 21:3-5
B. Ekobomama te mpe ekozanga bato te
Mabele oyo ekoumela seko na seko. Mos 1:4; Nz 104:5
Bato ya ntango ya Noa babomamaki, kasi mabele te. 2Pe 3:5-7; Eb 7:23
Ndakisa wana epesi elikya ete bato bakobika mpe na ntango na biso. Mt 24:37-39
Bato mabe bakobomama; “ebele ya bato” bakobika. 2Te 1:6-9; Em 7:9, 14
36. Makila
A. Kozongisama makila ezali komonisa kozanga limemya na bosantu ya makila
Bayebisaki Noa ete makila ezali mosantu, ezali bomoi. Eb 9:4, 16
Kondimana ya Mibeko epekisaki kolya makila. Le 17:14; 7:26, 27
Bakundwelaki bakristo epekiseli yango. Mis 15:28, 29; 21:25
B. Kobikisa bomoi epesi nzela te na kobuka mobeko ya Nzambe
Botosi eleki bambeka na malamu. 1Sa 15:22; Mr 12:33
Kolinga bomoi koleka mobeko ya Nzambe ezali likama. Mr 8:35, 36
37. Mikolo ya nsuka
A. “Nsuka ya mokili” elimboli
Nsuka ya makambo ya ntango oyo. Mt 24:3; 2Pe 3:5-7; Mr 13:4
Ezali nsuka ya mabele te, kasi ya makambo mabe ya ntango oyo. 1Yn 2:17
Ntango ya nsuka ekozala liboso ya libebi. Mt 24:14
Bayengebene bakobika; na nsima mokili ya sika ebandi. 2Pe 2:9; Em 7:14-17
B. Tosengeli kolala mpɔngi te lokola tozali komona bilembo ya mikolo ya nsuka
Bilembo oyo Nzambe apesi mpo etambwisa biso. 2Ti 3:1-5; 1Te 5:1-4
Mokili ezali koyeba te likama oyo ezali liboso na yango. 2Pe 3:3, 4, 7; Mt 24:39
Nzambe azali koumela te, kasi azali nde kokebisa. 2Pe 3:9
Baoyo bazali kosɛnzɛla mpe kotya likebi bakozwa mbano. Lk 21:34-36
38. Mosaleli (Ministre)
A. Bakristo nyonso bazali basaleli
Yesu azalaki mosaleli ya Nzambe. Ro 15:8, 9; Mt 20:28
Bakristo balandaka ndakisa na ye. 1Pe 2:21; 1Ko 11:1
Basengeli kosakola mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. 2Ti 4:2, 5; 1Ko 9:16
B. Makambo oyo esengeli kokokisa mpo na kosakola
Elimo ya Nzambe mpe boyebi ya Liloba na ye. 2Ti 2:15; Yis 61:1-3
Kolanda ndakisa ya Kristo na mosala ya kosakola. 1Pe 2:21; 2Ti 4:2, 5
Nzambe azali kopesa formasyo na nzela ya elimo na ye, mpe ya ebongiseli na ye. Yn 14:26; 2Ko 3:1-3
39. Molimo
A. Ndimbola ya molimo
Moto azali molimo. Eb 2:7; 1Ko 15:45; Yos 11:11; Mis 27:37
Banyama mpe babengami milimo. Mit 31:28; Em 16:3; Le 24:18
Molimo ezalaka na makila, elyaka mpe ekufaka. Yir 2:34; Le 7:18; Ezk 18:4
Moto, lokola azali na bomoi, elimboli ete azali na molimo. Mr 8:36; Yn 10:15
B. Bokeseni na kati ya molimo ná elimo
Molimo ezali bomoi ya moto to ya ekelamu. Yn 10:15; Le 17:11
“Elimo” ezali nguya ya bomoi oyo etambwisaka milimo. Nz 146:4; 104:29
Ntango moto akufi, nguya yango ya bomoi ezongaka epai ya Nzambe, moto apesaka yango. Mos 12:7
Bobele Nzambe nde asalisaka nguya ya bomoi mosala. Ezk 37:12-14
40. Nyonso esilá kokanama
A. Bomoi ya moto esilá kokanama te
Mokano ya Nzambe ekokokisama. Yis 55:11; Eb 1:28
Bato bango moko nde baponaka kosalela Nzambe. Yn 3:16; Flp 2:12
41. Sabata
A. Mokolo ya sabata etali bakristo te
Liwa ya Kristo elongolaki Mibeko. Ef 2:15
Sabata etali bakristo te. Kol 2:16, 17; Ro 14:5, 10
Bapamelamaki mpo batosaki Sabata mpe makambo mosusu. Ga 4:9-11; Ro 10:2-4
Mpo na kokɔta na kopema ya Nzambe esengeli kozala na kondima mpe na botosi. Ebr 4:9-11
B. Kokumisa Sabata esɛngisamaki bobele na Yisraele ya kala
Bakumisaki sabata ya liboso nsima ya kobima na Ezipito. Kob 16:26, 27, 29, 30
Yango ezalaki elembo oyo ekesenisaki mpenza Yisraele. Kob 31:16, 17; Nz 147:19, 20
Bambula ya Sabata mpe esɛngisamaki na nse ya Mibeko. Kob 23:10, 11; Le 25:3, 4
Sabata ezali na ntina te mpo na bakristo. Ro 14:5, 10; Ga 4:9-11
C. Bopemi ya Sabata ya Nzambe (mokolo ya 7 ya “pɔsɔ” ya bozalisi)
Ebandaki na nsuka ya kozalisama ya biloko ya mabele. Eb 2:2, 3; Ebr 4:3-5
Ekobaki kino koleka mikolo oyo Yesu azalaki awa na mabele. Ebr 4:6-8; Nz 95:7-9, 11
Bakristo bapemaka na ndenge bazali kotika misala na bango ya mabe. Ebr 4:9, 10
Ekosuka ntango Bokonzi ekosilisa mosala na yango mpo na mabele. 1Ko 15:24, 28
42. Yehova, Nzambe
A. Nkombo ya Nzambe
“Nzambe” ezali nkombo ya moto moko te; Nkolo na biso azali mpenza na nkombo na ye. 1Ko 8:5, 6
Tobondelaka ete nkombo na ye esantisama. Mt 6:9, 10
Yehova ezali nkombo ya Nzambe. Nz 83:18; Kob 6:2, 3; 3:15; Yis 42:8
Nkombo yango ezali na Biblia na Ngala, Uele na Kob 6:3. Nz 83:18; Yis 12:2; 26:4
Yesu ayebisaki nkombo yango. Yn 17:6, 26; 5:43; 12:12, 13, 28
B. Nzambe azali
Moto akoki komona Nzambe mpe kozala na bomoi te. Kob 33:20; Yn 1:18; 1Yn 4:12
Mpo kondima, esengeli bobele komona Nzambe na miso te. Ebr 11:1; Ro 8:24, 25; 10:17
Nzambe ayebani na misala na ye oyo ezali komonana. Ro 1:20; Nz 19:1, 2
Kokokisama ya bisakweli emonisi ete Nzambe azali. Yis 46:8-11
C. Bizaleli ya Nzambe
Nzambe azali bolingo. 1Yn 4:8, 16; Kob 34:6; 2Ko 13:11; Mik 7:18
Atondi na bwanya. Yb 12:13; Ro 11:33; 1Ko 2:7
Azali sembo, asalelaka bosembo. Mib 32:4; Nz 37:28
Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na makasi nyonso. Yb 37:23; Em 7:12; 4:11
D. Bato nyonso basalelaka Nzambe moko te
Nzela oyo emonani malamu ezalaka ntango nyonso nzela ya sembo te. Mas 16:25; Mt 7:21
Nzela ezali mibale, kasi bobele moko nde ezali komema na bomoi. Mt 7:13, 14; Mib 30:19
Banzambe bazali mingi, kasi Nzambe ya solo azali bobele moko. 1Ko 8:5, 6; Nz 82:1
Koyeba Nzambe ya solo ezali na ntina mpo na kozwa bomoi. Yn 17:3; 1Yn 5:20
43. Yesu
A. Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe Mokonzi oyo atyami
Mobotami ya liboso ya Nzambe, asalelamaki mpo na kozalisa biloko nyonso mosusu. Em 3:14; Kol 1:15-17
Akómaki moto oyo abotamaki na mwasi, atyamaki na nse ya baanzelu. Ga 4:4; Ebr 2:9
Abotamaki na elimo ya Nzambe, mpo na kozala na bomoi na likoló. Mt 3:16, 17
Akómi na lokumu mingi koleka ntango oyo azalaki na likoló liboso abotama lokola moto. Flp 2:9, 10
B. Kondimela Yesu Kristo ezali na ntina mpo na kobika
Kristo azali Mombóto oyo elakamaki ya Abrahama. Eb 22:18; Ga 3:16
Bobele Yesu nde azali Nganga-Nzambe Monene mpe lisiko. 1Yn 2:1, 2; Ebr 7:25, 26; Mt 20:28
Mpo na kozala na bomoi esengeli koyeba Nzambe ná Kristo, mpe kozala na botosi. Yn 17:3; Mis 4:12
C. Kondimela Yesu ekoki te
Kondima esengeli komonana na misala. Yk 2:17-26; 1:22-25
Esengeli kotosa bitinda na ye, mpe kosala misala oyo ye asalaki. Yn 14:12, 15; 1Yn 2:3
Ezali te baoyo nyonso basalelaka nkombo ya Nkolo nde bakokɔta na Bokonzi. Mt 7:21-23
44. Zabolo, Bademo
A. Zabolo azali moto kasi na nzoto ya elimo
Azali te mabe oyo ezalaka na kati ya moto, azali nde moto kasi elimo. 2Ti 2:26
Zabolo azali moto lokola baanzelu. Mt 4:1, 11; Yb 1:6
Amikómisaki Zabolo mpo na mposa mabe oyo azalaki na yango. Yk 1:13-15
B. Zabolo azali mokonzi ya mokili oyo, kasi amonanaka te
Azali koyangela mokili, azali nzambe na yango. 2Ko 4:4; 1Yn 5:19; Em 12:9
Akozala na bomoi kino ntembe ekosila. Kob 9:16; Yn 12:31
Akobwakama na libulu mozindo, na nsima akobomama. Em 20:2, 3, 10
C. Bademo bazali baanzelu oyo batombokaki
Balandaki Satana liboso ya Mpela. Eb 6:1, 2; 1Pe 3:19, 20
Bakitisami, bazali kongɛngisama ata moke te. 2Pe 2:4; Yd 6
Bazali kobundisa Nzambe, bazali konyokola bato. Lk 8:27-29; Em 16:13, 14
Bakobomama elongo na Satana. Mt 25:41; Lk 8:31; Em 20:2, 3, 10