Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w23 Novembre lok. 31
  • Hulda akokisaki mokano na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Hulda akokisaki mokano na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Masolo mosusu
  • Bibliotɛkɛ oyo okoki komema na lobɔkɔ
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na bisanga Fidji
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Namoná naino bolingo lokola oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
w23 Novembre lok. 31

Hulda akokisaki mokano na ye

SOKI okendaki kotala mwa esanga ya Sangir Besar na Indonésie na mwa bambula oyo eleki, mbala mosusu omonaki bandeko na biso ya basi misato na libongo. Bayebani mingi na esanga yango mpo na mosala na bango ya kosakola, basalisaka bato báyeba Biblia malamu. Kasi na libaku yango, bazalaki kosala mosala mosusu.

Karte ya Indonésie mpe bamboka na yango ya pembenipembeni. Fɔtɔ oyo ezali komonisa esanga ya moke ya Sangir Besar.

Esanga ya Sangir Besar na nɔrdi ya Indonésie

Ya liboso, bazalaki kotambola na mai kozwa mabanga moko ya kilo mpe komema yango na libongo. Mabanga mosusu ezalaki monene lokola bale. Na nsima, bandeko basi yango bazalaki kofanda na mwa bakiti ya mabaya mpe bazalaki kopasola mabanga yango na bamarto mikemike koleka liki ya nsoso. Nsima na yango, bazalaki kotya mabanga yango ya mikemike na bakatini mpe komata na yango na eskalye na likoló tii esika oyo bazalaki kofanda. Na nsima, bazalaki kotya mabanga yango na basaki ya minene oyo ekokaki kokɔta na mituka mpe ezalaki kosalelama mpo na kotonga banzela.

Hulda, azali kolɔkɔta mabanga na libongo

Moko ya bandeko basi yango ezalaki Hulda. Mpo na mokumba oyo azalaki na yango, azalaki kolekisa ntango mingi na mosala yango koleka basusu. Mbala mingi azalaki kosalela mbongo oyo azalaki kozwa mpo na kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo ya libota na bango. Kasi, sikoyo akómaki kosala mpo na mokano mosusu. Azalaki na mposa ya tablɛti mpo asalela JW Library®. Hulda ayebaki ete bavideo mpe biloko mosusu oyo ezali na Jw Library ekosalisa ye mingi na mosala ya kosakola mpe na boyekoli na ye moko ya Biblia.

Hulda azalaki kosala bangonga mibale ntɔngɔ nyonso na boumeli ya sanza moko na ndambo, mpo na kopasola mabanga mpe kotondisa yango na motuka moko ya moke. Nsukansuka, akokisaki mbongo ya kosomba tablɛti.

Hulda asimbi tablɛti na ye

Hulda alobi boye: “Atako nazalaki koyoka mpasi mpe nzoto elɛmbaki, ntango nakómaki kosalela tablɛti yango ya sika oyo esalisaka ngai mingi na mosala ya kosakola mpe kobongisa makita ya lisangá, nabosanaki mbala moko mpasi oyo nayokaki.” Alobi mpe ete, tablɛti yango esalisaki ye mpe na ebandeli ya eleko ya maladi mabe ya Coronavirus, lokola masanga nyonso ekómaki kosakola mpe kosala makita na nzela ya baaparɛyi. Tozali kosepela elongo ná Hulda ndenge akokisaki mokano na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto