Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/14 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 8/14 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 sanza ya mwambe 2014.

  1. Ndenge nini Balevi 18:3 ekoki kosalisa biso tóbebisa te lolenge na biso ya kotalela mabe ná malamu? (Ef. 4:17-19) [7 sanza ya 7, w02 1/2 lok. 29 par. 4]

  2. Etinda oyo ezali na Balevi 19:2 eteyi biso nini, mpe mpo na nini tosengeli kosala makasi tótosa yango? [7 sanza ya 7, w09 1/7 lok. 9 par. 5]

  3. Etinda nini ezali na mobeko oyo etalaki kolɔkɔta mbuma, oyo etali biso lelo oyo? (Lev. 19:9, 10) [7 sanza ya 7, w06 15/6 nk. 22-23 par. 13]

  4. Mpo na nini tokoki koloba ete mobeko oyo elobi “liso mpo na liso” elendisaki te kozongisa mabe na mabe? (Lev. 24:19, 20) [14 sanza ya 7, w09 1/9 lok. 22 par. 3-4]

  5. Ntango nini ezalaki mabe mpo na Moyisraele kosɛnga benefisi soki adefisi moto mbongo, kasi ntango nini kosala bongo ezalaki mabe te? (Lev. 25:35-37) [21 sanza ya 7, w04 15/5 lok. 24 par. 3]

  6. Mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12 ya Yisraele, nzokande ezalaki mabota 13? (Mit. 1:49, 50) [28 sanza ya 7, w08 1/7 lok. 21]

  7. Lisolo oyo ezali na Mitángo 8:25, 26, oyo emonisi ndenge bazalaki kolongola Balevi oyo bakómaki mibange na misala makasi, ekoki koteya biso nini na oyo etali komonisela mibange boboto? [11 sanza ya 8, w04 1/8 lok. 25 par. 1]

  8. Nsima ya kobima na Ezipito, mpo na nini Bayisraele bakómaki na ezaleli ya koimaima, mpe liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? (Mit. 11:4-6) [18 sanza ya 8, w95 1/3 nk. 15-16 par. 10]

  9. Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli oyo Moize amonisaki ntango Eledade ná Medade bakómaki kosala ndenge basakoli basalaka? (Mit. 11:27-29) [18 sanza ya 8, w04 1/8 lok. 26 par. 4]

  10. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na etinda oyo Nzambe apesaki Bayisraele ete “basengeli komisalela ndelo ya malendamalenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango”? (Mit. 15:37-39) [25 sanza ya 8, w04 1/8 lok. 26 par. 7]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto