Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tóbongisaka maloba na biso ya kobanda lisolo
Mpo na nini ezali na ntina: Soki ndenge oyo tobandi lisolo ezali kobenda likebi ya moto oyo tozali kosolola na ye te, akoki kokata lisolo liboso tópesa ye litatoli. Yango wana, basakoli mingi bamonaka ete maloba na bango ya kobanda lisolo ezali na ntina mingi. Atako maloba mpo na ndenge ya kobanda lisolo ezalaka na Mosala na biso ya Bokonzi mpe na buku Ndenge ya kosolola, kasi yango ezalaka na makambo nyonso te oyo ekosala ete tóyokanisa yango na moto oyo tozali kosolola na ye. Ata soki maloba yango ezali mobimba, basakoli mosusu bakoki komona malamu bábongola yango mwa moke to bábongisa oyo ya bango moko. Na ndenge yango, tokosakola malamu soki tozali kobongisa maloba na biso ya ebandeli na esika ya koloba kaka oyo ekoyela biso ntango moto afungoli porte.—Mas. 15:28.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Na losambo na bino na kati ya libota, bózwa mwa miniti ya kobongisa mpe komekameka maloba ya kobanda lisolo.
Ntango bokei kosakola, yebisá basakoli mosusu makambo oyo okani koloba. (Mas. 27:17) Salelá maloba mosusu soki oyo obongisaki esepelisi mpenza bato te.