Na baoyo bazali na nzoto ya elimo, nani tosengeli kosolola na ye?
NZAMBE MOZWI-YA-NGUYA-NYONSO apesá bikelamu mosusu ya elimo mikumba mosusu. Na ndakisa, apesi boyangeli ya mabele na mabɔkɔ ya Yesu Kristo, mpe aponá baanzelu mosusu ya sembo mpo básunga na kotambwisa mosala ya kosakola nsango malamu. (Emoniseli 14:6) Kasi, libondeli ezali eloko mosusu. Apesá ekelamu ata moko te mokumba ya koyokaka mabondeli. Mabondeli na biso ekendaka mbala moko epai ya Nzambe ye moko.
Yehova azali “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Ayokaka mabondeli na biso, mpe ayanolaka yango. Mpo na libondeli, ntoma Yoane akomelaki baninga na ye, basaleli ya Yehova boye: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye [Nzambe], akoyoka biso. Lisusu, soki toyebi ete akoyoka biso mpo na eloko nyonso oyo tozali kosɛnga, toyebi ete tokozwa biloko yango oyo esɛngami mpamba te tosɛngi ye yango.”—1 Yoane 5:14, 15.
Baanzelu ya sembo, balingaka te biso tóluka kosolola na bango to kobondela bango. Bayebaka mpe batosaka ebongiseli ya Nzambe mpo na libondeli, oyo na bantango mosusu etalelaka mpe bango. Ndenge nini? Ntango mosakoli Danyele abondelaki Yehova na ntina na kobebisama ya Yerusaleme, Nzambe ayanolaki libondeli ya Danyele na ndenge atindaki anzelu Gabriele amema nsango ya kolendisa.—Danyele 9:3, 20-22.
Bakufi batindaka mpenza bansango?
Tosengeli koluka kosolola na bakufi? Masolo mingi elobelaka makambo oyo bato mosusu balobaka ete basololaki na milimo ya bakufi. Na ndakisa, mwasi moko na Irlande, akutanaki na nganga-nkisi moko oyo alobaki na ye ete na butu oyo elekaki, asololaki na Fred, mobali ya mwasi yango. Kasi, Fred autaki kokufa mwa bapɔsɔ liboso. Nganga-nkisi yango, ayebisaki mwasi yango makambo oyo “Fred” alobaki; makambo oyo mwasi na ye akanisaki ete kaka ye moko nde ayebaki yango. Ezalaki mpenza mpasi te mpo mwasi yango andima ete Fred azalaki na bomoi na mokili ya bilimo mpe azalaki koluka kosolola na ye na nzela ya moto wana. Nzokande, kondima likambo yango eyokani te na oyo Biblia elobi polele na ntina na bakufi.—Talá etanda na nse.
Kasi, ndenge nini tokoki kolimbola masolo ya ndenge wana? Mayele moko oyo bademo basalelaka mpo na kokosa bato ezali ya kosala lokola ete moto oyo akufá azali na bomoi; na lisolo ya mwasi wana balukaki komonisa ye ete Fred azali na bomoi. Mokano na bango ezalaka nini? Mpo bato báyeba te oyo Biblia eteyaka mpe kobebisa kondima mpe elikya na bango epai ya Yehova. Ntembe ezali te, Satana ná bademo na ye bakosaka bato “na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi oyo euti na makambo nyonso oyo ezangi boyengebene mpo na baoyo bazali kobeba nyɛɛ.”—2 Batesaloniki 2:9, 10.
Mpo na koloba solo, ezali na banganga-nkisi mpe baoyo basalaka na bango elongo oyo bandimaka mpenza ete basololaka na bato oyo bakufá. Kasi, soki basololaka mpenza na moto, basololaka nde na bikelamu ya elimo oyo bazali banguna ya Yehova. Ndenge moko, ezali na baoyo bakanisaka ete bazali kosambela Nzambe, kasi bamikosaka. Na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Biloko oyo bikólo bapesaka mbeka, bapesaka yango mbeka na bademo, kasi na Nzambe te.”—1 Bakorinti 10:20, 21.
Lokola toyebi ete tokoki kobondela Ye Oyo-Aleki-Nyonso, oyo alingaka mpe atyelaka biso likebi, mpo na nini koluka kobondela moto mosusu? Kutu, Biblia epesi biso elikya oyo: “Mpo na Yehova, miso na ye ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”—2 Ntango 16:9.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
Lokola toyebi ete tokoki kobondela Ye Oyo-Aleki-Nyonso, oyo alingaka mpe atyelaka biso likebi, mpo na nini koluka kobondela moto mosusu?
[Etanda/Elilingi na nkasa 8, 9]
Solo to lokuta
SOLO: SATANA AZALAKA MPENZA
“Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.”—2 Bakorinti 11:14.
Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”—1 Petro 5:8.
“Moto oyo asalaka lisumu auti na Zabolo, mpamba te Zabolo azali kosala lisumu banda na ebandeli.”—1 Yoane 3:8.
“Yango wana, bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
“Zabolo . . . azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka na kolanda makanisi na ye moko, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.”—Yoane 8:44.
LOKUTA: NA LIWA BATO NYONSO BAKENDAKA NA MOKILI YA BILIMO
“Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.”—Ebandeli 3:19.
“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”—Mosakoli 9:5.
“Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”—Mosakoli 9:10.
“Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.”—Nzembo 146:4.
SOLO: BAANZELU YA SEMBO BATYELAKA BISO LIKEBI
“Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene na baoyo babangaka ye, mpe abikisaka bango.”—Nzembo 34:7; 91:11.
“Bango [baanzelu] nyonso bazali te bilimo oyo bazali kosala mosala mpo na bolamu ya bato nyonso, batindami mpo na kosalela bato oyo bakozwa libula ya lobiko?”—Baebre 1:14.
“Namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko, nsango ya esengo ya kosakwela bato oyo bafandi na mabele, mpe bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso, azali koloba na mongongo makasi ete: ‘Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye.’”—Emoniseli 14:6, 7.
LOKUTA: YESU AKOKANI NA NZAMBE
“Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.”—1 Bakorinti 11:3.
“Ntango biloko nyonso ekotyama na nse na ye, Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—1 Bakorinti 15:28.
“Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi kaka oyo amonaka Tata azali kosala.”—Yoane 5:19.