Longola mabele, ezali na esika mosusu oyo bato bafandaka? Bato yango banani?
Na Mpoto, mwasi moko ya mobange akɔti na ndako-nzambe, asimbi sapɛlɛ na mabɔkɔ mpe afukami na limemya nyonso liboso ya ekeko ya Maria. Na Afrika, bato ya libota moko basopi masanga pene ya lilita ya moto moko ya libota na bango oyo bazalaki komemya mingi. Na Amerika, elenge mobali moko azali kokila bilei mpe kokanisa mozindo, na elikya ete akosolola na oyo ye andimaka ete azali anzelu mobateli na ye. Na Azia, sango moko atumbi bapapye ya langi mpo na kopesa mbeka na milimo ya bankɔkɔ.
BATO yango nyonso bakokani na nini? Bango nyonso bandimaka ete ezali na bato ya elimo oyo bakoki kosolola na bango, mpe bazali na likoki ya kotambwisa mpenza bomoi ya bato. Ya solo, likanisi yango ezali ya sika te mpe ezali kokamwisa te. Kasi, likambo ya kokamwa ezali ete bato bazalaka na makanisi mingi mpe bongolabongola na ntina na baoyo bazalaka na nzoto ya elimo.
Bamizilma basambelaka Nzambe moko—Allah.a Bato oyo bamibengaka bakristo balobaka ete Nzambe azali bosato: Nzambe Tata, Nzambe Mwana, mpe Nzambe Elimo Santu. Bahindu bandimaka ete banzambe bazali koleka nkóto; ya mibali mpe ya basi. Bato mosusu balobaka ete bilimo efandaka na banyama mosusu, na banzete, na mabanga, mpe na mikɛli ya mai. Nzokande, bamosusu balandaka makambo ya babuku, mpe baemisyo ya televizyo oyo elobelaka baanzelu mpe bademo, bilimu mpe bilima, banzambe ya mibali mpe ya basi.
Kaka ndenge makanisi ezali ndenge na ndenge na ntina na banzambe ya mibali mpe ya basi, makanisi ezali mpe ndenge na ndenge na oyo etali ndenge ya kozala na boyokani na banzambe yango. Mpo na koloba solo, lolenge nyonso te ya kosolola nde ezalaka malamu. Tókanisa naino: Liboso ya kosolola na moto na telefone, tosengeli koyeba moto oyo tozali kobenga, mpe tosengeli kondima ete moto yango azalaka mpenza mpe akoyamba ntango tokobenga. Koluka kosolola na moto oyo oyebi te, ekozala na litomba moko te. Kasi, oyo eleki mabe ezali ete soki obengi moto ya mabe okoki kozala mpenza na likama.
Na yango, banani mpenza bazalaka na nzoto ya elimo? Biblia esuki kaka te na kopesa eyano na motuna yango, kasi emonisi mpe nani tokoki kosolola na ye mpe litomba oyo tokozwa. Tosɛngi yo otánga masolo oyo elandi. Makambo oyo Biblia elobi, ekokamwisa yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Allah” ezali nkombo te, elakisi kaka “Nzambe.”