Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/11 lok. 6
  • Kotika te kopesa botɔndi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotika te kopesa botɔndi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini komonisa botɔndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yehova azali Nzambe oyo abosanaka te malamu oyo tosalaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mpo na nini kopesaka mersi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nzete ya mbila—Nzete ya misala ndenge na ndenge
    Lamuká!—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/11 lok. 6

Sekele 3

Kotika te kopesa botɔndi

BIBLIA ETEYAKA NINI? “Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.”​—1 Batesaloniki 5:18.

MOKAKATANO EZALI WAPI? Bato oyo tofandi na bango bazali lolendo mpe bazangi botɔndi, yango ekoki kosala ete tókóma lokola bango. (2 Timote 3:1, 2) Lisusu, tokoki komona ete tosengeli kobakisa makambo mosusu mpe mosusu lisusu na bomoi na biso oyo ezali na makambo mingi. Tokoki komitondisa na makambo mingi to komikɔtisa mpenza na koluka matomba na biso moko mpe yango ekoki kosala ete tózala na ntango te ya kosepela na oyo tozali na yango to komonisa botɔndi na makambo oyo basusu bazali kosalela biso.

OKOKI KOSALA NINI? Zwáká ntango ya kokanisaka na mozindo na makambo ya malamu oyo ozali na yango. Ya solo, okoki koyoka lokola makambo eleki yo motó. Kasi, talelá ndakisa ya Mokonzi Davidi. Na ntango moko boye, ayokaki ete alɛmbi mpenza, motema na ye etondaki na mitungisi. Atako bongo, abondelaki Nzambe boye: “Namanyoli mosala na yo mobimba; nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 143:3-5) Atako azalaki na mitungisi, Davidi atikaki te komonisa botɔndi mpe kosepela na oyo azalaki na yango.

Kanisá na oyo basusu basalá mpo na kosalisa yo, mpe monisá botɔndi mpo na milende oyo basalaki. Yesu atiká ndakisa monene na likambo yango. Na ndakisa, ntango moninga na ye Maria asopelaki ye mafuta ya ntalo mingi na motó mpe na makolo, bato mosusu batunaki boye: “Mpo na nini kobebisa mafuta oyo ya nsolo kitoko boye?”a Bato yango bakanisaki esengeli kotɛka mafuta yango mpe kopesa babola mbongo. Yesu ayanolaki ete: “Bótika ye. Mpo na nini bolingi kotungisa ye?” Na nsima, abakisaki boye: “Asali oyo ekoki na ye.” (Marko 14:3-8; Yoane 12:3) Na esika atya likebi na oyo Maria asalaki te, Yesu amonisaki nde botɔndi na oyo asalaki.

Bato mosusu bamonisaka botɔndi mpo na libota, baninga, to mapamboli mosusu oyo bazali na yango, kaka ntango bazali na yango lisusu te. Okoki koboya ete likambo ya ndenge wana ekómela yo soki ozali kokanisa na makambo ya malamu oyo ozali na yango lelo oyo! Mpo na nini te kokanisa to kokoma makambo ya sikisiki oyo osengeli komonisa botɔndi mpo na yango?

Lokola “likabo nyonso ya malamu” eutaka epai ya Nzambe, ekozala malamu tómoniselaka ye botɔndi na mabondeli na biso. (Yakobo 1:17) Kosala bongo ntango nyonso ekoki kosalisa biso tótika te komonisaka botɔndi mpe kosepela na oyo tozali na yango.​—Bafilipi 4:6, 7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ekeke ya liboso, kosopa mafuta na motó ya mopaya ezalaki elembo ya ezaleli ya koyamba bapaya; kosopa mafuta na makolo ya moto ezalaki komonisa komikitisa.

[Elilingi na lokasa 6]

Omonisaka botɔndi mpo na oyo basusu basalelaka yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto